2011
Likita Linene Lipamboli lya Momesano Te
sánzá ya libwa 2011


Etinda ya Bokambi wa Yambo, sanza ya Libwa 2011

Likita Linene—Lipamboli lya Momesano Te

Mondimi moko malamu ya Eklezia azalaki koloba elongo na moto moko wa penepene oyo azalaki ya eyamba na biso te. Ntango likambo lya lisolo ebalukaki na likita linene, moto wa penepene atunaki, “Olobi bozali na baprofeta mpe bapostolo? Mpe mbala mibale na mobu mondimi ayanolaki lya mokili mobimba bakobimisaka maloba ma Nzambe?”

“Ya solo,” mondimi ayanolaki na bondimi.

Moto wa penepene akanisaki etali yango mwa ntango. Amonanaki lokola asepelaki mpenza mpe nde atunaki ete, “Nini balobaki na likita linene lileki?”

Na esika eye mondimi ya malamu ya Eklezia alongwaki na boyoki bwa esengo etali kokabola nsango elamu na koyokaka nkaka. Emekaki ye lokola akokaki, akokaki kokanisa na ata lisolo lyoko te.

Moninga wa ye amonaki mobulu mona mpe alobaki ete, “Olingi koyebisa ngai ete Nzambe akolobaka na moto mpe okoki te komikundola nini Ye alobaki?”

Ndeko ayokaki kokitisama na bokaboli boye. Alapaki ete akosala malamu koleka mpo na komikundola maloba malobami na basali ba Nkolo na likita linene.

Toyebi biso banso boniboni ezali mpasi mpo na komikundola etinda yoko na yoko ya likita linene, mpe nandimi ete tozali na mposa te ya koyoka nkaka soki tomikundoli te likambo moko na moko. Nzokande, ezali na bitinda na likita linene moko na moko biye bipesami lokola likabo mpe lipamboli moko uta na lola mingi mingi mpo na bizaleli bya biso ya bomoi bwa moto na moto.

Na bolengeli mpo na likita linene, tika ngai nayebisa makanisi masato ma ntina maye makoki kosalisa biso tozwa malamu koleka, komikundola, mpe kosalela maloba malobami na basali ba Nzambe.

Bandimi ba Eklezia basengeli kozwa na bobimisi bwa moto na moto wana ezali bango koyoka mpe koyekola maloba mafulami maye malobami na likita linene.

Wana ezali bino kolengela mpo na likita linene, nabengisi bino bokanisa mituna bozali na mposa miyanolama. Ndakisa, bokoki kozala mpenza na mposa mpo na boyangeli mpe bokambami na Nkolo na mikakatano bozali kokutana na yango.

Biyano na nsambo ya bino songolo bikoki koya na mbalakaka uta na lisolo songolo to uta na lisakoli lyoko songolo. Na ntango isusu biyano bikoki koya lokola na liloba, lisakoli, to loyembo ya kokangana na yango te. Motema motondi na botondi mpo na mapamboli ma bomoi mpe mposa yoko ya lokengo mpo na koyoka mpe kolanda maloba ma toli makolengela nzela mpo na bebobim lya moto na moto.

Kokakola etinda yoko te kaka mpamba ezali koyokana lokola ya momesano.

Baprofeta bakoteyaka ntango inso na bozongeli; ezali mobeko mwa boyekoli. Bokoyoka bozongeli na makambo mpe malongi na likita linene. Tika ngai nayebisa bino mpenza: eye ezali te mpo na bozangi boko bwa bokeli to makanisi. Tozali kokoba na koyoka bitinda bitali mituna mikokana mpamba te nkolo azali koteya mpe kokotisa na mayele mpe mitema mya biso yoko mibeko mya ntina mya ntina mya mot uya mwa seko miye misengeli kososolama mpe kosalelama likolo na yango yambo tokoka koleka na makambo mosusu. Motongi wa bwania yambo akotiaka moboko liboso atelemisa bifelo mpe motondo.

Maloba malobami na likita linene masengeli kozala likonga likolakisaka nzela mpo na biso na sanza izali koya.

Soki toyoki mpe tolandi botindiki bwa Molimo, ikosalisa biso lokola Liawona, kokambaka biso na nzela iyebani te, lubwaku ya mikakatano mpe ngomba iye izali o boso (tala 1 Nefi 16).

Uta mokili mobanda, Nzambe atelemisi baprofeta baye bakolobaka bolingi bwa lola na bato ba ntango ya bango. Ezali mokumba mwa biso mpo na koyoka mpe nde kosalela bitinda Nkolo azali kopesa biso.

Tata wa biso wa ngolu mpe wa bolingo ya Lola asundoli te mpe okosundola te bana ba Ye. Lelo, lokola na ntango ya kala, Ye aponi bapostolo mpe baprofeta. Azali kokoba kobimisa maloba ma Ye na bango.

Litomba lya kokamwa kani lizali mpo na koyoka bitinda bya nzambe mpo na moko na moko ya biso na likita linene! Tika tomilengela malamu mpo na lipamboli linene liye bokambi bwa bonzambe bopesami na basali ba Ye baponami.

Mpo eye ezali lipamboli lya momesano te.

Koteya uta na Etinda Eye

  • Tangani likomi elongo. Lendisa libota mpo na kotikola makambo ma koyoka na likita linene.

  • Mpo na kosalisa bana bake basalela toli epesami na Mokambi uchtdorf, lakisa bango etando yoko ya Bokulaka Bonene (ezwami na nkasa ya likita lya Liawona) Tika bango bayeba ete Bokambi bwa Yambo mpe Lisanga Likoki lya Bapostolo Zomi na Babale bakoloba na likita linene. Lendisa bana bayoka na likita linene mpe bayema elilingi yoko mpo na kosalisa bango bamikundola nini bayekolaki. Baboti bakoki kokende kotala conferencegames.lds.org mpo na milulu mya likita linene mingi koleka mpo na bana.

Loboko la mobali: foto na Les Nilsson

Bimisa na lokasa