2011
Kolendisa Mabota na Kokolaka na Molimo
sánzá ya libwa 2011


Etinda ya Bamama Bateyi Batali, sanza ya Libwa 2011

Kolendisa Mabota na Kokolaka na Molimo

Yekolani liteya liye, mpe na lolenge esengeli, solola yango elongo na bandeko basi oyo ozali kotala. Salela mituna mpo na kosalisa yo kolendisa bandeko basi ba yo mpe kosala ete Lingomba lya Bamama Basungi likoma eteni yoko ya mosala na bomoi bwa yo.

Bondimi • Libota • Lisungi

Julie B. Beck, mokambi monene wa Lingomba lya Bamama Basungi, alobaki ete: “Ebotamaki na ngai litatoli lyoko lilekelaki ngai lya motuya mwa bana basi ba Nzambe. … nayokaki na motema ete ezalaki ata moke te na mposa enene mingi mpo na bokoli bwa bondimi mpe bosembo bwa moto na moto. Ezalaki ata moke te na mposa enene mingi mpo na bokasi bwa mabota mpe ndako.”

Bandeko basi bakoki kosalisa kokela ndako mpe mabota makasi wana ezali bango kosalela bobimisi bwa moto na moto. “Likoki lya kokisama mpo na , kozwa, mpe kosalela bobimisi bwa moto na moto ezali ya mayele moko moleki na motuya eye ekoki kozwama na bomoi boye,” Ndeko mwasi Beck akobaki. “Kokokisamaka mpo na Molimo mwa Nkolo ebandi na mposa ya Molimo mona mpe etindi yoko ndelo ya botongono. Kobatelaka mitindo, boyambolaka, mpe kokomisaka sika mayokani masalami na libatisi ikambaka na lipamboli ya kozalaka ntango inso na Molimo mwa Nkolo elongo na biso. Kosalaka mpe kobatelaka mayokani ma tempelo lisusu ibakisi bokasi mpe nguya ya molimo na bomoi bwa mwasi. Biyano mingi na mituna mya kpokoso bizwami na kotangaka makomi mpamba te makomi mazali lisalisi lyoko mpo na bobimisi. …Losambo la mokolo na mokolo ezali ya ntina mpo na kozalaka na Molimo mwa Nkolo elongo na biso.”1

Tolendisaka lisusu bato ba libota na biso na molimo wana ezali biso kosalisa bango kososola mwango mwa seko ya Tata wa biso ya Lola. “Nini ekoki biso kosala mpo na kolengela malamu mingi bana ba biso na molimo mpo na misala mya bango mya seko?” Etunaki Mpaka M. Russell Ballard ya Lisanga lya Bapostolo Zomi na Babale. “Ntango mosusu eyano esangisi mingi koleka: Teyani bango boniboni kowumela na mibeko mya nsango elamu.” Liteya liye likoyaka na nzela ya losambo la mokolo na mokolo, boyekoli makomi, mpe ntango ya elambo ya libota lokola lisanga lya mpokwa na libota mpe bokei na Eklezia. Mpaka Ballard alimbolaki: “Tolengelaka mokolo na mokolo, kaka sasaipi, mpo na bomoi bwa seko. Soki tozali komilengela te mpo na bomoi bwa seko, tozali komilengela mpo na likambo lyoko lya nse, ntango mosusu likambo lyoko lya nse mosika.”2

Uta na Makomi

Masese 22:6; 1 Yoane 3:22; Malongi mpe Mayokani 11:13–14; 19:38; 68:25

Uta na Mambi ma Kala ma Biso

Profeta Joseph Smith ateyaki bandeko basi na mayangani ma Lingomba lya Bamama Basungi ma Sanza ya Minei 1842 ete bazalaka na lotomo la lokumu ya koluka libiki lya bangomei. Alobaki ete, “Nsima ya malako [ma ngai], bokozala bayanoli mpo na masumu ma binomei; ezali lokumu esengelami ete bosengeli mpenza kotambola liboso ya Tata wa biso ya lola mpo na komibikisa; tozali banso bayanoli epai ya Nzambe mpo na lolenge tozali kobongisa pole mpe bwana ipesami na Nkolo wa biso mpo na kopesa biso makoki ya komibikisa.”3 Ateyaki bango kozala bato ba bosembo, kokoma bato ba bule, mpe balengela mpo na makuli mpe mayokani ma tempelo.

Matangi

  1. Julie B. Beck, “And upon the Handmaids in Those Days Will I Pour Out My Spirit,” Liahona, May 2010, 10, 11.

  2. M. Russell Ballard, “Spiritual Development,” Ensign, Nov. 1978, 65, 66.

  3. Teachings of Presidents of the Church: Joseph Smith (2007), 414.

Bimisa na lokasa