Yaka, Landa Ngai 2024
Sanza ya yambo 29–Sanza ya mibale 4: “Nakolengela Nzela liboso na Yo” 1 Nefi 16–22


“Sanza ya yambo 29–Sanza ya mibale 4: ‘Nakolengela Nzela liboso na Yo.‘ 1 Nefi 16-22,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: Buku ya Mormon 2024 (2024)

Sanza ya yambo 29–Sanza ya mibale 4. 1 Nefi 16–22,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: 2024 (2024)

Elilingi
bato kotalaka Liahona

Sanza ya yambo 29–Sanza ya mibale 4: “Nakolengela Nzela liboso na Yo”

1 Nefi 16–22

Ntango libota ya Lehi ekendaki mobembo na mboka ya elaka, Nkolo apesaki bango elaka oyo: “nakolengele nzela liboso na bino, soki ekozala boye ete bokobomba mitindo na ngai” (1 Nefi 17:13). Na polele, elaka wana elingaki koloba te ete mobembo ekozala pete—bato ya libota bazalaki naino koyokana te, matimbo ebukanaki, mpe bato bakutanaki na kpokoso mpe bakufaki, mpe basengelaki mpe kotonga masuwa na biloko basalela naino te. Nzokande, ntango libota ekutanaki na mikakatano to na makambo oyo emonanaki lokola maye ekoki kosalama te, Nefi ayebaki lisusu ete Nkolo azalaki mosika ata moke te. Ayebaki ete Nzambe “akoleisa [basembo], mpe akopesa bango bokasi, mpe akopesa bango banzela oyo wapi bakoki kokokisa makambo oyo atindaki bango” (1 Nefi 17:3). Soki mokolo moko botuni mpo na nini makambo mabe ekomelaka bato malamu lokola Nefi mpe libota na ye, bokoki kozwa mayele na mikapo oyo. Kasi ntango mosusu ya motuya koleka, bokomona maye bato malamu basalaka ntango makambo ya mabe ekomaka.

Makanisi mpo na Koyekola na Libota mpe na Eklezia

Elilingi
elembo ya seminele

1 Nefi 16–18

Mobikisi akosalisa ngai natelemela mikakatano ya bomoi.

Libota ya nefi ekutanaki na mwa mikakatano makasi —lokola biso banso tokutanaka na yango. Bokoki koyekola nini epai na Nefi etali kokutana na mitungisi na bondimi kati na Yesu Klisto? Botanga etali makambo na ye akutanaki na yango kati na 1 Nefi 16:17–32; 16:34–39; 17:7–16; 18:1–4; mpe 18:9–22. Bokanisa kokoma maye bomoni na nse ya milongo ya nkombo lokola oyo: “mikakatano,” “Lolenge nini Nefi Ayanolaki,” mpe “Lolenge nini Nkolo asalisaki.” boyekoli nini oyo bokoki kosalela mpo na mikakatano bozali kokutana na yango?

Nsima ya koyekola uta na Nefi mpe libota na ye, bokoki kokoma makanisi mosusu na nse ya mito ya milongo oyo: “Mikakatano na Ngai,” “Lolenge nini Nakoyanola,” mpe “Lolenge nini Nkolo Akoki Kosalisa Ngai.” Ntango bozali kosala, bokoki kotala makomi lokola oyo: Matai 11:28–30; Yoane 14:26–27; Mosiya 24:13–15. Loyembo lokola: “Where Can I Turn for Peace?” (Hymns, no. 129), e koki kolendisa bondimina bino kati na Mobikisi mpe kosalisa Ye apesa na bileko ya bangonga ya mimekano.

botala lisusu Anthony D. Perkins, “Remember Thy Suffering Saints, O Our God,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2021, 103–5; “He Will Give You Help,” “The Lord Guides Lehi’s Journey,” “The Lord Commands Nephi to Build a Ship,” mpe “Lehi’s Family Sails to the Promised Land” (videos), Gospel Library; “Life Help,” Gospel Library.

1 Nefi 16:10–16, 23–31; 18:11–22

Nzambe akambaka ngai na banzela mike mpe ya pete.

Ntango Nzambe akambaki libota ya Lehi kati na esobe, Apesaki bango kalati kolakisaka makambo nyonso ya mikemike mike ya mobembo te. Na esika wana, Ye apesaki bango Liahona mpona kokamba bango mokolo namokolo. Ntango bozali kotanga 1 Nefi 16:10–16, 23–31, mpe 18:10–22, bokanisa kosala molongo ya bosolo oyo ezali kolakisa lolenge nini Nzambe akambaka bana na Ye (ndakisa, 1 Nefi 16:10 ekoki koteya ete Nzambe ntango mosusu akambaka biso na ndenge tozali kozela te). Bokokani nini bozali komona katkati ya Liahona mpe Molimo Mosantu? Nini ezali “banzela mike” na nzela na yango Ye amemaki “biloko minene” kati na bomoi na yo?

Tala lisusu Alma 37:7, 38–47; Malongi mpe Mayokani 64:33–34.

Elilingi
Lehi azali kosalela Liahona

Soki Omilengeli Okobanga Tena Clark Kelley Price

1 Nefi 17:1–6, 17–22

Mimekano na ngai ekoki kozala lipamboli.

Atako Nefi mpe bandeko na ye ya mibali bazalaki n amikakataano moko kati na esobe, makambo na bango bakutanaki na yango ezalaki ya kokesana. Bokoki kobimisa bokeseni na lisolo ya mobembo ya Nefi kati na esobe (tala 1 Nefi 17:1–6) na lisolo ya bandeko na ye ya mibali (tala 1 Nefi 17:17–22). Nefi ayebaki nini to asalaki nini oyo esalisaki ye azala na emoneli ya sembo? Bokanisa kokoma etali momekano ya kala te to ya mikolo oyo uta na emoneli ya bondimi mpe matondi. Bomiyoki nini to boyekoli nini uta na oyo?

Botala lisusu Amy A. Wright,“Christ Heals That Which Is Broken,” Liahona, Sanza ya mitano 2022, 81-84; “No Strength without Struggle” (video), Gospel Library.

Ngonga ya kokanisa ya kimia. Kozwaka ngonga ya kokanisa, komanyola, kobanza, to kokoma ekoki kokamba na bofulami. Ekoki kosalisa biso tomona lolenge nini malongi to mabongi to mipeko ya nsango malamu ezali na ntina na bomoi na biso. Ntango bozali koteya basusu, bopesa bango ngonga ya kokanisa mpe kokoma makanisi na bango. Oyo ekoki lisusu kobutisa bolingi na bango ya kokabola makanisi mpe mayoki na bango na basusu.

1 Nefi 19:22–24; 20–22

Nakoki “kosalela makomi masantu nyonso” mpo na ngai moko.

Lokola makomi ekomama kala mpenza, ekoki komonana lokola ezali sika mpo na biso lelo. Kasi Nefi ayebaki malamu koleka. “Nasalelaki makomi masantu nyonso epai na biso,” alobaki, “ete ekoka kozala mpo na litomba mpe boyekoli na biso” (1 Nefi 19:23). oyo ezali moko ya ntina Nefi azwaki nguya ya molimo mingi mpenza katina makomi.

Bokanisa mituna lokola oyo elandi ntango bozali kotanga 1 Nephi 20-22.:

1 Nefi 20:1–9.Milongo oyo eteyi yo nini na etali ya bato ya eleko ya Yisaya? Bozwi nini oyo ezali mpo na bino?

1 Nefi 20:17–22.Milongo oyo eteyi nini etali lolenge nini Tata ya Lola akambaki bato ya eleko ya Yisaya? Lolenge nini Ye azali kobengisa bino mpo na kolanda Ye?

Bomoni nini lisusu kati na 1 Nefi 20–22 oyo ekoki “kokokana”na bino moko?

Mpo na makanisi mingi, botala babobimisi ya sanza oyo ya Liahona mpe magazini ya Mpo na Bokasi ya Bilenge zulunale.

Makanisi mpo na Koteya Bana

1 Nefi 16:10, 28–29; 18:8–13, 20–22

Ntango nabatelaka mitindo na nzambe, Nkolo akambaka ngai.

  • Soki bozali na likonga ekolakisaka nordi, kalati, to eloko mosusu oyo esalisaka biso tomona nzela na biso, bokoki kolakisa yango epayi ya bana na bino. Oyo ekoki kozala nzela malamu ya kobanda lisolo etali Liahona, oyo bokoki kotanga na 1 Nephi 16:10, 28–29. Bantina mosusu nini likonga ekolakisaka nordi to kalati ekoki kosala te? Mpo na nini Liahona ntango mosusu esalaka Lolenge nini Nzambe akobulisa mitungisi na yo mpo na litomba na yo? (tala 2 Nefi 2:2). Tata ya Lola apesi biso nini lelo mpo na kokamba biso tozonga epayi na Ye?

  • Mpo na kosalisa bana na bino batia na misala maye bayekolaka etali Liahona kati na 1 Nefi 16:10, 26–31; 18:8–22, bokoki kobengisa bango bakanisa etali mokano monene to ya mpasi. Nzambe apesi biso nini mpo na kokamba biso lelo oyo ezali kosala lokola Liahona? ( Botala, ndakisa, Alma 37:38–44.) Bokanisa kokabola boyebi ya moto yo moko kati na yango Tata ya Lola akambaki yo.

1 Nefi 16:21–32

Nakoki kozala ndakisa malamu mpo na Libota na ngai.

  • ntango bozali kotanga 1 Nefi 16:21–32 elongo, bosalisa bana na bino bamona lolelenge nini ndakisa ya Nefi epambolaki libota na ye (botala lisusu video “The Lord Guides Lehi’s Journey” [Gospel Library]). Yango ekoki kokamba na lisolo etali lolenge nini tokoki kozala na Nefi. Bobengisa bana na bino basala mwango ya likambo moko bakoki kosala mpo na kozala na nguya malamu likolo ya bato mosusu ya libota.

1 Nefi 17:7-19; 18:1-4

Tata ya Lola akoki kosalisa ngai nasala makambo ya mpasi

  • Bana balingaka kobeta masolo. Bokoki kobengisa bango kosalisa bino kobeta lisolo ya Nefi kotindamaka kotonga masuwa (tala 1 Nefi 17:7–19; 18:1–4; tala lisusu “Mokapo 7: Kotongaka Masuwa,” kati na Book of Mormon Stories, 21–22; to video “The Lord Instructs Nephi to Build a Ship” [Gospel Library]). Bakoki lisusu koyemba elongo molongo ya mibale ya “Mpiko ya Nefi” (Chants pour Enfants,, 120–21) Nini esalisaki nefi azala na makasi ntango bandeko na ye ya mibali basekaki ye mpo na komekaka kotonga masuwa ?

  • Nefi ayebaki te lolenge nini kotonga masuwa, yango wana ayekamaki na motindo ya Nkolo. nsima ya kotanga 1 Nefi 18:1 elongo na bino, bana na bino bakoki kokoma na lokasa ya molulu ya poso oyo. Ntango bazali kosala, bosolola elongo na bango etali lolenge nini Tata ya Lola akoki kosalisa biso tosala makambo ya mpasi, kaka lokola ye asalisaki nefi.

Mpo na makanisi mingi, botala bobimisi ya sanza oyo ya magazini Moninga .

Elilingi
Nefi mpe libota na ye na kati ya masuwa

Banyokolaki Ngai Mpenza na Makasi Mingi, na Walter Rane

Bimisa na lokasa