Yaka, Landa Ngai 2024
Sanza ya libwa 2–8: “Mikundola Nkolo.” Elamani 7–12


“Sanza ya libwa 2–8: ‘Mikundola Nkolo.’ Elamani 7-12,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe na Eklezia: Buku ya Mormon 2024 (2023)

“Sanza ya libwa 2–8. Elamani 7–12,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe na Eklezia: 2024 (2023)

Elilingi
Nefi azali kosambela na elanga ya ndako molayi

Elilingi ya Nefi na elanga ya ndako molayi, na Jerry Thompson

Sanza ya libwa 2–8: “Mikundola Nkolo”

Elamani 7–12

Tata ya Nefi, Elamani, asalisaki na lombango bana na ye “bamikundola, bamikundola.” Alingaki bango bamikundola bakoko na bango, bamikundola maloba ya baprofeta, mpe mingi kati na bango, bamikundola “Mosikoli na biso, oyo azali Klisto” (tala Elamani 5:5–14). Yango ezali polele ete Nefi amikundolaki, mpo ete oyo ezali bobele nsango kaka moko alobaki mibu nsima “na kozanga bolembu” epayi na bato (Elamani 10:4). “Lolenge nini okokaki kobosana Nzambe na yo?” atunaki (Elamani 7:20). Makasi nyonso ya Nefi—koteyaka, kobondelaka, kosalaka bikamwa, mpe kosengaka Nzambe mpo na nzala—ezalaki mimekano mpo na kosalisa bato babaluka epayi na Nzambe mpe bamikundola Ye. Na balolenge ebele, kobosana Nzambe ezali likambo kutu ya monene koleka kozanga koyeba Ye. Mpe ezali pete kobosana Ye ntango makanisi na biso ebungisami mayele na “makambo ya mpamba ya mokili oyo” mpe ezingami na lisumu (Elamani 7:21; tala lisusu Elamani 12:2). Kasi, lokola mosala ya Nefi elakisi, ngonga ekotikalaka koleka ata mokolo moko te mpo na komikundola mpe “kobaluka … epayi ya Nkolo Nzambe na bino” (ElamanI 7:17).

Makanisi mpo na koteya na Ndako mpe na Eklezia

Elamani 7–11

Elilingi
seminary icon
Baprofeta bamonisaka bolingi ya Nzambe epai ya bato.

Elamani 7–11 ezali esika moko malamu ya kososola na ntina ya oyo baprofeta basalaka. Ntango ozali kotanga mikapo oyo, sala keba na misala ya Nefi, makanisi, mpe boyokani na ye na Nkolo. Lolenge nini mosala ya Nefi esalisi yo kososola mosala ya baprofeta? Tala mwa bandakisa. Ozwi lisusu nini?

Engebene na maye otangaki, lolenge nini ekoki yo kolimbola profeta azali nani mpe asalaka nini? Kanisa kokoma ndimbola ya mokuse. Nsima tala nini okolinga kobakisa na ndimbola na yo nsima ya kotanga bokoti mpo na “Profeta” kati na Motambwisi ya Makomi (Gospel Library) to “Follow the Living Prophet” (Teachings of Presidents of the Church: Ezra Taft Benson [2014], 147–55).

Omoni lolenge nini Nefi azalaki na mpiko kati na Elamani 7:11–29? Mpo na nini ozali kokanisa baprofeta balobaka na mpiko lokola Nefi asalaki? Kanisa koluka biyano kati na eteni ebengami “Don’t Be Surprised” kati na Elder Neil L. Andersen’s message “The Prophet of God” (Liahona, Sanza ya mitano 2018, 26).

Na bosolo oyo nyonso na makanisi, manyola lolenge nini Nkolo apambolaki yo na nzela ya lotomo ya baprofeta na Ye. Nini ateyaki yo kala mingi te awa na nzela ya baprofeta na biso na bomoi? Nini ozali kosala mpo na koyoka mpe kolanda bokambi ya Nkolo?

Tala lisusu Gospel Topic, “Baprofeta,” Gospel Library.

Elamani 9; 10:1, 12–15

Bondimi na ngai na Yesu Klisto esengeli etongama likolo koleka bilembo mpe makamwisi.

Soki bilembo mpe bikamwa ezalaki ya kokoka mpo na kobongola motema ya moto, mbele Banefi nyonso bakokaki kobongola motema na nzela ya bilembo ya kafukafu Nefi apesaki bango na ElamanI 9. Kasi yango esalamaki te. Kanisa balolenge ekeseni oyo bato bayanolaki na makamwisi kati na Elamani 9–10. Na ndakisa, okoki kokokanisa biyano ya mibali mitano mpe bakonzi bazuzi kati na Elamani 9:1–20 (tala lisusu Elamani 9:39–41; 10:12–15). Nini oyekoli uta na makambo oyo na ntina ya lolenge nini kotonga bondimi na yo na Yesu Klisto?

Tala lisusu 3 Nefi 1:22; 2:1–2.

Elamani 10:1–12

Nkolo apesi nguya na bato oyo bazali koluka bolingi na Ye mpe kosala makasi mpo na kobatela mitindo na Ye.

Ntango otangi Elamani 10:1–12, mona nini Nefi asalaki mpo na kozwa bondimi ya Nkolo. Lolenge nini Nefi alakisaki ete alukaki bolingi ya Nkolo koleka oyo ya ye moko? Makambo nini ya Nefi efuli yo mpo na kosala?

Elamani 10:2–4

Komanyolaka liloba ya Nzambe ebiangaka bobimisi.

Ntango omiyoki ya kolemba, komitungisa, to kobunga, okoki koyekola liteya ya motuya uta na ndakisa ya Nefi na Elamani 10:2–4. Asalaki nini ntango amiyokaki “kolemba nzoto”? (molongo 3).

Mokambi Henry B. Eyring alimbolaki, “Ntango tomanyolaka , tobengisaka bobimisi na nzela ya Molimo” (“Sala na Molimo,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2010, 60). Lolenge nini okoki kokela ezaleli ya komanyola?

Elamani 12

Nkolo alingi ngai namikundola Ye.

Lolenge nini omikundoli nsango ya motuya—lokola mokolo ya mbotama ya moto moko ya libota to nsango ya momekano? Lolenge nini ezali na bokokani na bokasi esengami mpo na “komikundola Nkolo”? (Elamani 12:5). Lolenge nini ekeseni?

Helaman 12 elimboli biloko mingi ekoki kotinda bato babosana Nkolo. Ntango mosusu okoki kotanga yango mpe komanyola soki ekoki kopengwisa ya yo likebi uta na Ye. Nini esalisi yo omikundola Yesu Klisto? Nini ofulami kosala na kolandaka oyo oyekolaki?

Tala lisusu Mateya mpe Mayokani 20:77, 79; “Reverently and Meekly Now,” Hymns, no. 185.

Salela mateya ya ndakisa Mbala mingi Mobikisi azalaki kokangisa mibeko ya nsango malamu na makambo ya mokolo na mokolo oyo bato bayebaki. Ntango ozali koyekola to koteya na ntina ya Elamani 12:1–6, okoki kokokanisa “bozangi bokatikati … ya bato” na lolenge toyokaka komekaka kotelema na lokolo moko. Lolenge nini biso tokoki kotikala ngwi na molimo?

Mpo na makanisi koleka, tala nsango ya sanza oyo na Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge bamagazini.

Makanisi mpo na Koteya Bana

Elamani 7:20–21

Nkolo alingi ngai namikundola Ye.

  • Mpo na kobanda lisolo ya lolenge nini komikundola Nkolo, okoki koyebisa bana na yo na ntina ya ngonga moko ntango obosani eloko moko. Tika bango bakabola makambo ya lolenge moko ya bangomei. Nsima bokoki kotanga elongo Helaman 7:20–21 mpe tuna bana na yo nini bakanisi elakisi kobosana Nzambe. Ntango mosusu bana na yo bakoki koyema bililingi ya biloko oyo ekoki kotinda biso kobosana Nkolo mpe bosalela mayemi na bango mpo na kozipa elilingi moko ya Yesu. Nsima bakoki kokanisa makambo bakoki kosala mpo na komikundola Ye. Ntango bakaboli makanisi na bango, bakoki kolongola mayemi moko na moko kino elilingi ya Mobikisi ekomonana.

Elamani 8:13–23

Baprofeta batatolaka oyo etali Yesu Klisto.

  • Salisa bana na yo baluka Elamani 8:13–23 mpo na kozwa bankombo ya baprofeta oyo bateyaki na ntina ya Yesu Klisto. Ntango mosusu bakoki koleka nzinganzinga ya elilingi ya Yesu ngonga inso bazwi moko. Nini profeta na biso ya bomoi ateyaki na ntina ya Mobikisi?

  • Bokoki lisusu koyemba elongo loyembo na ntina ya baprofeta, lokola “Follow the Prophet” (Children’s Songbook, 110– 11). Ntango mosusu yo mpe bana na yo bokoki kopona maloba uta loyembo mpe kokoma liloba kowuta na maloba na moko na moko ya mingi ya bilembo ya matambe na bankasa. Nsima okoki kotiya bilembo ya matambe na mabele komemaka na elilingi moko ya Mobikisi, mpe bana na yo bakoki kolanda bilembo ya matambe kokende tii na elilingi. Lolenge nini kolanda profeta ekomema biso na Yesu Klisto?

Elamani 10:1–4

Komanyola maloba ya Nzambe ebengaka bobimisi.

  • Mpo na kosalisa bana na yo basosola nini elingi koloba komanyola, bokoki kotanga elongo “Komanyola” kati na Mokambi na Makomi (Gospel Library). Nini ezali boko maloba oyo ekokani na komanyola? Ntango mosusu okoki kotanga Elamani 10:1–3 elongo mpe kotiya na esika ya liloba komanyola na bankombo oyo mosusu. Solola na bana na yo na ntina ya kokomisa komanyola eteni moko ya boyekoli makomi na bango.

Elamani 10:11–12

Nakotosa Tata na Lola.

  • Nefi atosaki Tata na Lola ata ntango esengelaki kosala likambo moko ya mpasi. Na ndakisa ya oyo, yo mpe bana na yo bokoki kotanga Elamani 10:2, 11–12. Ntango mosusu bana na yo bakoki kosala lokola Nefi asalaki—kokende liboso ngambo moko ya ndako (lokola soki bazali kokende na ndako), batelema, babaluka esika moko, mpe bakende liboso na ngambo mosusu ya ndako (lokola soki bazali kozonga koteya bato). Makambo mosusu nini Tata na Lola alingi biso kosala?

Mpo na makanisi koleka, tala nsango ya sanza oyo na moninga magazini.

Elilingi
Seantum ayebanaki kozala mobomi

Na nzela ya likabo ya lisakoli, Nefi apesaki eyano na bobomi ya mosambisi mokonzi.

Buku ya Mormon mpo na Batangi ya Bilenge,, Seantum—Mobomi ayebanaki,, na Briana Shawcroft; ekoki te komekolama

Bimisa na lokasa