Yaka, Landa Ngai 2024
Sanza ya mwambe 26–Sanza ya libwa 1: “Libanga ya Mosikoli na Biso.” Elamani 1–6


Sanza ya mwambe 26–Sanza ya libwa 1: ‘Libanga ya Mosikoli na Biso.’ Elamani 1–6,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe na Eklezia: Buku ya Mormon 2024 (2023)

“Sanza ya mwambe 26–Sanza ya Libwa 1. Elamani 1–6,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe na Eklezia: Buku ya Mormon: 2024 (2023)

Elilingi
mbonge ezali kobetana na mabanga

Sanza ya mwambe 26–Sanza ya libwa 1: “Libanga ya Mosikoli na Biso”

Elamani 1–6

Na buku ya Elamani ekomami nyonso mibale baelonga mpe makama katikati ya Banefi mpe Balamani. Yango ebandi na “mokakatano moko monene katikati ya bato ya Banefi” (Elamani 1:1), mpe mikakatano ekobi koyaka na buku mobimba. Awa totangi na ntina ya misala ya sekele ya politiki, lisanga ya miyibi, kobwakama ya baprofeta, mpe lofundu mpe kozanga bondimi na mboka mobimba. Kasi tomoni lisusu bandakisa lokola Nefi mpe Lehi mpe “ndambu monene ya bato ya bomikitisi,” oyo kaka te babikaki kasi bafulukaki makasi na molimo (Elamani 3:34). Lolenge nini bango basalaki yango? Lolenge nini bango batikalaki makasi ntango bato bakomaki kokweya mpe kopanzana? Lolenge moko na moko kati na biso atikali makasi kati ya “mbonge makasi” zabulu atindi ko “beta likolo na [biso]”—na kotongaka babomoi na biso “likolo ya libanga ya Mosikoli na biso, oyo ezali Klisto, Mwana ya Nzambe, … moboko oyo likolo na yango soki bato batongi bango bakoki te kokweya” (Elamani 5:12).

Makanisi mpo na koteya na Ndako mpe na Eklezia

Elamani 1–6

Lofundu ekabolaka ngai uta na Molimo mpe makasi ya Nkolo.

Ntango ozali kotanga Elamani 1–6, okoki kozwa ndakisa na bizaleli ya Banefi. Ntango bazali sembo, Nzambe akopambola bango, mpe bakozwa bomengo. Nsima ya ngonga moko, bango bakomaki lofundu mpe mabe, bazali kosala maponi oyo ekambaki bango na bobebi mpe konyokwama. Bongo bamikitisaki mpe bafulamaki mpo na koyambola, mpe Nzambe apambolaki bango mbala moko lisusu. Ndakisa to lolenge ya kosala oyo ezongelaki bango yango moko mbala na mbala mpenza ete bato mingi babengi yango “zolongano ya lofundu.”

Elilingi
zolongano ya lofundu

“zolongano ya lofundu”

Luka bandakisa ya zolongano oyo ntango ozali kotangi Elamani 1–6. Oyo ezali mwa mituna mpo na kosalisa yo ososola ndakisa eye:

  • Bilembo nini ya lofundu omoni kati ya Banefi? (tala, mpo na ndakisa, Elamani 3:33–34; 4:11–13). Emoni yo bandakisa ya ndenge moko ya lofundu kati na yo moko?

  • Nini ezali bambano ya lofundu mpe ya nkanda? (tala Elamani 4:23–26). Nini ezali bambano ya bomikitisi mpe ya boyamboli? (tala Elamani 3:27–30, 35; 4:14–16).

  • Nini oyo Elamani alingaki bana na ye ya mibali bakundola?(tala Elamani 5:4–12). Na balolenge nini kokundola bosolo oyo ekoki kosalisa yo koboya kokoma na lofundu?

Tala lisusu “Mokapo 18: Keba na Lofundu,” Mateya ya Bakambi ya Eklezia: Ezra Taft Benson (2014), 229–40; “I Need Thee Every Hour,” Hymns, no. 98.

Elamani 3:24–35

Bondimi na Klisto etondisaka molimo na ngai na esengo.

Kati na Elamani 3, Mormon alimbolaki ngonga ya esengo ntango Eklezia epambolamaki mpenza mingi ete ata bakambi bakamwaki. Na kotalela maye otangi kati na milongo 24–32, nini okanisi ekokamba na ezalela ya esengo? Nzokande, bandimi nyonso te bakobaki na esengo. Koma bokeseni kati na bato balobelami kati na milongo 33–35. Oyekoli nini uta na ndakisa na bango?

Luka ndenge ya kosalela ya yomei. Profeta Mormon asalelaki liloba “boye tomoni” mpo na kobeta nsete na babosolo ya motuya ntango akomaki na mokuse Buku ya Mormon. Na ndakisa, nini alingaki biso tomona na Elamani 3:27–30? Ntango otangi makomi, okoki kopema mbala na mbala mpo na kokokisa liloba “boye tomoni” kotalaka maye otangaki.

Elamani 5:6–7

Nakoki kokumisa nkombo ya Mobikisi.

Kotalaka ElamanI 5:6–7 ekoki kofula yo kotala bankombo epasamelaki yo, kobakisa bankombo ya libota. Bankombo oyo elakisi nini epai na yo? Lolenge nini okoki kokumisa yango? Kutu motuya koleka, tala nini elakisi kolata nkombo ya Mobikisi (tala Moroni 4:3). Lolenge nini okumisi nkombo oyo ya bule?

Elamani 5:12–52

Elilingi
seminary icon
Soki na tie Yesu Klisto moboko na ngai, nakoki te kokweya.

Elingi koloba nini epai na yo “kotonga moboko na yo” likolo na “libanga ya Mosikoli na Biso”? (Elamani 5:12). Lolenge nini ozwi libateli na babonge ya bomoi kati na Yesu Klisto? Ntango ozali kotanga Elamani 5:12–52, koma lolenge Nefi mpe Lehi bapambolamaki na kotongaka bondimi na bango likolo na libanga ya Mosikoli na bango.

Bato mosusu bamonaka yango lisalisi mpo na komona nini bazali koyekola. Mpo na komonisa Elamani 5:12, okoki kotonga mwa eloko moko likolo ya miboko ya lolenge ya kokesena. Okoki bongo na nsima kokela “mbonge makasi” na kopanzaka mayi likolo na yango mpe kosalelaka pakapaka ya mopepe mpo na kokela ekumbaki. Mayele nini epesi yo na ntina ya kotonga moboko na yo likolo ya Yesu Klisto? Nini lisusu oyekoli uta na video “A Secure Anchor”? (Ebombelo ya Babuku ya Nsango Malamu).

Molongo 50 elobeli “bonene ya bilembeteli” oyo Balamani bazwaki. Kotangaka Elamani 5:12–52 ekoki komema na makanisi na yo bilembeteli oyo Nzambe apesaki yo. Na ndakisa, ntango mosusu “ nungunungu” kowuta na Molimo Mosantu ekembisi kondima na yo kati na mobikisi (Elamani 5:30; tala lisusu Malongi mpe Mayokani 88:66). To ntango mosusu ozalaki na molili mpe ogangaki epayi ya Nzambe mpo na bondimi monene (tala Elamani 5:40–47). Makambo mosusu nini oyo esalisaki yo otonga moboko na yo likolo na Yesu Klisto?

Tala lisusu Russell M. Nelson, “Tempelo mpe Moboko na Yo ya Molimo,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2021, 93–96; Sean Douglas, “Kotelemela bikumbaki na biso ya Molimo kondimelaka na Klisto,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2021, 109–11; Gospel Topics, “Bondimi kati na Klisto,” Gospel Library.

Mpo na makanisi koleka, tala nsango ya sanza oyo na Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge bamagazini.

Makanisi mpo na Koteya Bana

Elamani 3:24, 33–34; 4:11–15

Tata na Lola alingi ngai nazala moto na komikitisa.

  • Kanisa kobengisa bana na yo bayema no lolenge na bango moko “zolongano ya lofundu,” engebene na elilingi oyo ezali likolo. Nsima, ntango bozali kotanga elongo Elamani 3:24, 33–34 mpe 4:11–15, bakokaki kolakisa biteni ya zolongano elimbolami kati na milongo oyo. Nakoki kopona kozala mosokemi—mpe kotikala na nzela yango?

Elamani 5:12

Nakotonga moboko na ngai likolo ya Yesu Klisto.

  • Kanisa kosalela foto ya tempelo mpo na kobanda lisolo na ntina nini bandako esengeli na moboko ya makasi. To okoki kotala moboko ya ndako na yo to ya ndako ya Eklezia. Mpo na kobeta nsete na makasi na moboko lokola libanga, bana na yo bakoki kolongola libanga moko na kofulaka likolo na yango. Ntango ozali kotanga ElamanI 5:12, tuna bana na yo mpo na nini Yesu Klisto azali “moboko ya sikisiki” mpo na bomoi na biso. Lolenge nini tokoki kotonga bomoi na biso likolo na Ye?(tala Elamani 3:27–29, 35 mpe Biteni ya Bondimi 1:4).

  • Bengisa bana na yo batonga ndako ya molayi na biteni ya mabanga to miboko na biloko ya lolenge ekeseni (lokola bambuma ya koton to libanga ya petepete). Lolenge nini moboko ya makasi ezali lokola Yesu Klisto? Bakoki kobakisa mabanga na ndako mpo na likanisi mokomoko bakaboli na ntina ya maye bakoki kosala mpo na kolanda Ye.

Elamani 5:21–52

Molimo Mosantu alobaka na kimya, na mongongo moke.

  • Mongongo elimbolami na Elamani 5:29–30, 45–47 eteyi biso lolenge moko oyo Molimo Mosantu alobelaka biso. Mpo na kosalisa bana na yo kososola bosolo oyo, kanisa kotanga “Mokapo 37: Nephi and Lehi in Prison” (Masolo ya Buku ya Mormon, 99–102). Ntango tolobelaka na ntina ya mongongo bato bayokaka, elobaka na mongongo ya pete. Bandela lisolo bangonga moke, mpe benga bana baloba na mongongo ya moke na yo. Salisa bango bakanisa na balolenge mosusu Molimo Mosantu akoki koloba na biso. Mpo na kolendisa lisusu etinda yango, bokoki koyemba elongo “The Still Small Voice” (Children’s Songbook, 106–7).

Elamani 5:20–52

Boyamboli ezwi esika ya molili ya molimo na kotiyaka pole.

  • Mpo na kobeta nsete na oyo Elamani 5:20–41 etangisi na ntina ya molili mpe pole, meka kotanga to koloba na bokuse milongo miye na molili, kosalelaka kaka mwinda ya torshe. Bana na yo bakoki koyoka nini bato basengeli kosala mpo na molili ekoka kolongwa. Nsima pelisa mwinda, mpe botanga milongo 42–48 elongo. Nini milongo oyo eteyi biso mpo na oyo etali koyambola?

Mpo na makanisi koleka, tala nsango ya sanza oyo na Moninga magazini.

Elilingi
Nefi mpe Lehi na boloko

Atako na boloko, Nefi mpe Lehi bazalaki ya kobatelama na nguya ya Nzambe.

Buku ya Mormon mpo na Batangi ya Bilenge,, Nefi mpe Lehi Bazingami na Likonzi ya Moto, na Briana Shawcroft; ekoki te komekolama

Bimisa na lokasa