Yaka, Landa Ngai 2024
Sanza ya libwa 23–29: “Telema mpe Yaka Epai na Ngai.” 3 Nefi 8–11


“Sanza ya libwa 23–29: ‘Telema mpe Yaka Epai na Ngai.’ 3 Nephi 8–11,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: Buku ya Mormon 2024 (2023)

“Sanza libwa 23–29. 3 Nefi 8–11,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: 2024 (2023)

Elilingi
Yesu abimeli Banefi

Ngai Nazali Pole ya Mokili,, na James Fullmer

Sanza ya libwa 23–29: “Telema mpe Yaka Epai na Ngai”

3 Nefi 8–11

“Tala, nazali Yesu Klisto, oyo baprofeta batatolaki ete akoya na kati ya mokili” (3 Nefi 11:10). Na maloba oyo, Mobikisi asekwa amilakisaki Ye moko, kokokisaka koleka mibu 600 ya masakoli ya Buku ya Mormon. “BomonanI wana mpe esakola wana,” Mpaka Jeffrey R. Holland akomaki, “ezali mama ya likambo, ngonga ya likolo koleka, kati na lisolo mobimba ya Buku ya Mormon. Ezalaki mamonisi mpe mobeko moko oyo eyebisaki mpe efulaki profeta Monefi moko moko. … Moto nyonso alobelaki ye, ayembaki ye, alotaki na ntina na ye, mpe asambelaki mpo na komonana na ye—kasi awa nde ye azalaki mpenza. Mokolo ya mikolo! Nzambe oyo abongolaka butu nyonso ya molili na pole ya ntongo ayaki” (Christ and the New Covenant [1997], 250–51).

Tala lisusu “Jesus Christ Introduces the Sacrament” (video), ChurchofJesusChrist.org.

Makanisi mpo na Koyekola na Libota mpe na Eklezia

3 Nefi 8–11

Yesu Klisto Azali Pole ya Mokili

Okoki komona makambo oyo elobeli molili mpe pole ezongelami na mobimba mbala na mbala na 3 Nefi 8–11. Nini oyekoli lisusu uta na mikapo oyo mpo na oyo etali molili mpe pole ya molimo? (tala, ndakisa, 3 Nefi 8:19–23; 9:18; 10:9–13). Nini ememaka molili kati ya bomoi na yo? Nini ememaka pole? Mpo na nini okanisi Mobikisi amilakisaki Ye moko lokola “pole mpe bomoi ya mokili”? (3 Nefi 9:18; 11:11).

makombo elimbolami kati na 3 Nefi 9–11 ezali kat ya bule mpenza na Buku ya Mormon. Tanga yango malembe malembe, mpe manyola na bokebi. Tala mituna misusu mpo na kosalisa yo. Kanisa kokoma makanisi oyo eyeli yo.

  • Lolenge nini nalingaki koyoka soki nazlaki kati na bato oyo?

  • Nini ekamwisi ngai etali Mobikisi na mikapo oyo?

  • Lolenge nini nayebi ete Yesu Klisto azali Mobikisi na ngai?

  • Lolenge nini Ye azali pole kati ya bomoi na ngai?

Tala lisusu Sharon Eubank, “Christ: The Light That Shines in Darkness,” Liahona, Sanza ya mitano 2019, 73–76.

Koma Makanisi. Ntango okomi makanisi ya molimo ozali na litomba mingi ya kozwa mingi.

3 Nefi 9–10

Yesu Klisto azali na mposa ya kolimbisa.

Mpaka Neil L. Andersen alobaki, “Natatoli ete Mobikisi akoki mpe azali na mposa ya kolimbisa masumu na biso” (“Repent … That I May Heal You,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2009, 40). Luka 3 Nefi 9–10 mpo na elembo emonani na miso ya mposa ya Klisto mpo na kolimbisa. Nini ozwi na 3 Nefi 9:13–22; 10:1–6 oyo esalisi yo oyoka bolingo mpe mawa na Ye? Ntango nini oyokaki Ye “kosangisa” mpe “koleisa” yo (tala 3 Nefi 10:4).

3 Nefi 9:19–22

Nkolo asengaka “motema ebukana mpe molimo ya mawa”

Liboso ya koya ya Mobikisi, mabonza ya nyama ezalaki elembo ya libonza ya Yesu Klisto (tala Moses 5:5–8). Motindo ya sika nini Mobikisi apesaki na 3 Nefi 9:20–22? Lolenge nini ememaka biso epayi na Ye mpe libonza na Ye?

Elingi kolobela yo nini kopesa libonza ya motema ebukana mpe molimo ya mawa? Mpo na nini okanisi ete Mobikisi alingaka libonza kowuta na yo?

3 Nefi 11:1–8

Elilingi
seminary icon
Nakoki koyekola koyoka mpe kososola mongongo ya Nzambe.

Lolenge nini oyebi ntango Nzambe azali kolobela yo? Ntango mosusu mayele ya bato na 3 Nefi 11:1–8 ekoki kosunga yo ososola mabongi mingi ya koyoka mpe kososola mongongo ya Nzambe. Okoki kokoma bizaleli ya mongongo ya Nzambe oyo bato bayokaki mpe oyo bango basalaki mpo na kososola yango malamu koleka.

Ekoki lisusu kosalisa mpo na koluka makomi mosusu oyo ezali kolimbola mongongo ya Nzambe to nguya ya Molimo na Ye. Tala mwa mosusu. Ntango mosusu, nsima ya kotanga oyo, okoki kokoma mwa bokambi mpo na koyeba emoniseli: 1 Mikonzi 19:11–12; Bagalati 5:22–23; Alma 32:27–28, 35; Elamani 10:2–4; Etele 4:11–12; Malongi mpr Mayokani 9:7–9; 11:11–14.

Okoki lisusu kozwa litomba ya koyoka baprofeta, bapostolo, mpe bakambi ya Eklezia mosusu ya lelo oyo bayokaka mpe kolandaka mongongo ya Nzambe. Mingi na bango bakabolaka makambo bakutanaka na yango kati na “Hear Him!” lisanga ya video kati na Gospel Library. Kanisa kotala moko to mingi koleka.

Boniboni okosalela maye oyekolaki mpo na koyoka mpe koyeba mongongo ya Nzambe polele koleka?

Tala lisusu Russell M. Nelson, “Hear Him,” Liahona, Sanza ya mitano 2020, 88–92; “This Is My Beloved Son,” Children’s Songbook, 76; Gospel Topics, “Personal Revelation,” Gospel Library

Elilingi
Yesu azali kolakisa bilembo na maboko na Ye epai ya Banefi

Moko na Moko,, na Walter Rane

3 Nefi 11:8–17

Yesu Klisto abiangi ngai nazwa litatoli na ngai moko mpo na Ye.

Pene bato 2.500 basanganaki na tempelo kati Beboo ntango Yesu Klisto amonanaki (tala 3 Nefi 17:25). Atako motango yango ya monene, Mobikisi abiangaki bango nyonso “moko na moko” koyoka bilembo ya nsete na maboko mpe makolo na Ye (3 Nefi 11:14–15). Ntango ozali kotanga, banza maye ekokaki kozala kozala kuna. Na ndenge nini Mobikisi azali kobianga yo mpo na “kotelema mpe koya epai na” Ye? (3 Nefi 11:14).

Mpo na makanisi mingi, tala mikanda ya sanza oyo ya Liahona mpe magazini Mpo na Bokasi ya Bilenge .

Makanisi mpo na Koteya Bana

3 Nefi 8–9

Ntango nazali kati ya molili, Yesu Klisto akoki kozala pole na ngai.

  • Mpo na kosalisa bana na yo bamaniola makambo elobami na 3 Nefi 8–9, bokoki koloba lisusu to koyoka biteni ya mikapo oyo kati ya kisuku moko ya molili. Bosolola nini yango ekokaki kozala lokola kozala na molili mikolo misato. Nsima okoki koloba oyo etali mpo na nini Yesu Klisto amibiangaki Yemei Pole ya Mokili (tala 3 Nefi 9:18). Nini Yesu abiangaki bato, mpe biso, tosola mpo ete Ye akokoka kozala pole na biso? (tala 3 Nefi 9:20–22).

3 Nefi 10:4–6

Yesu abatelaka bato na ye lokolo soso ya mwasi abatelaka bana na ye.

  • Elilingi ya soso ya mwasi kosangisaka bana na ye ekoki kozala esaleli moko ya boyekoli ya nguya mpo na kosunga bana basosola ezaleli mpe mosala ya Mobikisi. Okoki kotanga 3 Nefi 10:4–6 ntango libota na yo ezali kotala foto ya soso ya mwasi mpe bana na ye. Mpo na nini soso ya mwasi asengeli kosangisa bana na ye? Mpo na nini Mobikisi alingi kosangisa biso pembeni na Ye? Lolenge nini ekomi biso koya epayi na ye mpo na kimia?

3 Nefi 11:1–15

Yesu Klisto abengisi ngai naya epayi na Ye.

  • Lolenge nini okosalisa bana na yo bayoka Molimo ntango bozali kotanga 3 Nefi 11:1–15 elongo? Ntango mosusu okoki kosenga bango balobela yo ntango bamoni likambo moko kati na milongo oyo oyo esalisi bango bayoka bolingo ya Nzambe. Bokoki kosala eloko moko na bafoto oyo ezali kati na liteya oyo to video “Jesus Christ Appears at the Temple” (Gospel Library). Lobela bana na yo etali lolenge nini oyokaka ntango otakgaka mpe omaniolaka makambo oyo. Tika bango bakabola mayoki na bango mpe.

3 Nefi 11:1–8

Nzambe alobelaka ngai na mongongo moko ya makasi te, moke.

  • Ntango mosusu okoki kotanga mwa milongo oyo na “mongongo ya moke”, ya makasi te (3 Nefi 11:3). To okoki kobeta palaki ya loyembo lokola “This Is My Beloved Son” (Children’s Songbook, 76) na makasi te mpo ete ezala mpasi mpo na koyoka. Nini bato basengelaki kosala mpo na kososola mongongo uta na lola? (tala milongo 5–7). Toyekoli nini uta na makambo na bango?

3 Nefi 11:21–26

Yesu Klisto alingi ngai nazwa libatisi.

  • Ntango ozali kotanga 3 Nefi 11:21–26, okoki kobengisa bana na yo batelema ntango nyonso bayoki liloba libatisi. Yesu ateyaki nini etali libatisi? Soki bana na yo bamonaki libatisi moko liboso, senga bango balimbola maye bamonaki. Mpo na nini yesu alingi biso tozwa libatisi?

Mpo na makanisi mingi, tala mokanda ya sanza oyo na magazini ya Friend .

Elilingi
Yesu abimeli Banefi

Mobateli Mpate Moko, na Howard Lyon

Bimisa na lokasa