Yaka, Landa Ngai 2024
Sanza ya libwa 9–15: “Bansango ya Nsai ya Esengo Monene.” Elamani 13–16


“Sanza ya libwa 9–15: ‘Bansango ya Nsai ya Esengo Monene.’ Elamani 13–16,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe na Eklezia: Buku ya Mormon 2024 (2023)

“Sanza ya libwa 9–15. Elamani 13–16,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe na Eklezia: 2024 (2023)

Elilingi
Samwele Molamani azali koteya likolo ya efelo

Samwele Molamani likolo ya efelo, na Arnold Friberg

Sanza ya libwa 9–15: “Bansango ya Nsai ya Esengo Monene”

Elamani 13–16

Mbala ya yambo Samwele Molamani amekaki kokabola “bansango ya nsai” na Zalayemila (Elamani 13:7), babwakisaki ye mpe babenganaki ye na Banefi ya mitema makasi. Okoki koloba ete yango ezalaki lokola ete batongaki efelo ezanga lidusu nzinganzinga na mitema na bango oyo ekebisaki bango uta na koyambaka nsango ya Samwele. Samwele asosolaki motuya ya nsango amemaki mpe alakisaki bondimi na kolandaka motindo ya Nzambe “ete asengelaki kozonga lisusu, mpe kosakola” (Elamani 13:3). Kaka lokola Samwele, biso banso tokutanaka na bifelo ntango biso “tozali kolengela nzela ya Nkolo” (Elamani 14:9) mpe tozali kosala makasi mpo na kolanda baprofeta na Ye. Mpe lokola Samwele, biso mpe totatolaka Yesu Klisto, “oyo na bosolo mpenza akoya,” mpe kobenga banso ko “ndimela nkombo na ye” (Elamani 13:6; 14:13). Moto nyonso akoyoka te, mpe basusu bakoki kotelemela biso na misala. Kasi baoyo bakondimela nsango oyo na bondimi na Klisto bakomona ete yango ezali solo mpenza “bansango ya nsai ya esengo monene” (Elemani 16:14).

Makanisi mpo na koteya na Ndako mpe na Eklezia

Elamani 13

Nkolo apesaka makebisi na nzela ya baprofeta na Ye.

Kati na makomi, baprofeta bakokanisami ntango mingi na bakengeli likolo ya efelo to linongi oyo bakebisaka na makama (tala Yisaya 62:6; Ezekiele 33:1–7). Ntango ozali koyekola maloba ya Samwele kati na Elamani 13, kanisa lolenge nini azali lokola mokengeli mpo na yo. Nini ye alobaki oyo emonani lokola ezali na ntina mpo na mikolo na biso? (tala mingimingi milongo 8, 21–22, 26–29, 31, mpe 38). Na ndakisa, nini Samwele ateyaki na ntina ya boyamboli? na ntina ya bomikitisi mpe bozwi? na ntina ya boluki esengo “kati na kosalaka lisumu”?

Okoki lisusu koluka bansango ya likita linene ya kala mingi te mpo na makebisi ya kokokana Nkolo apesaki na nzela ya baprofeta ya mikolo na biso. Nini oyoki Molimo efuli yo kosala na ntina ya makebisi oyo?

Luka bandakisa. Ndakisa ezali mwango to lolenge oyo ekoki kosalelama lokola litambwisi mpo na kokokisa mosala moko. Kati na makomi, tomoni bandakisa oyo elakisi lolenge nini Nkolo akokisaki mosala na Ye, lokola kaka kotindaka basali na Ye kokebisa bato.

Elilingi
libota ezali kotala likita linene

Ntango toyokaka baprofeta, bakotinda biso na Yesu Klisto.

Elamani 13–15

Elilingi
seminary icon
Nzambe abengi ngai nayambola.

Mbala na mbala, makebisi ya Samwele mpo na bitumbu ya Nzambe ezalaki mpe kosenga bato na motema mawa bayambola. Luka mabiangi oyo kati na Elamani 13–15 (tala mingi mingi Elamani 13:6–11; 14:15–19; 15:7–8). Nini oyekoli uta na milongo oyo na ntina ya boyamboli? Bato misusu bamonaka boyamboli lokola etumbu moko ya makasi—eloko moko ya kokima. Na ndenge na yo, lolenge nini Samwele alingi Banefi bamonaka boyamboli?

Mpo na kokomisa mozindo boyekoli na yo, okoki kotanga nsango ya Mokambi Russell M. Nelson “Tokoki Kosala Malamu Koleka mpe Kozala Malamu Koleka” (Liahona, Sanza ya mitano 2019, 67). Lolenge nini alimboli boyamboli? Mapamboli nini ya boyamboli ya sembo ozwi kati na nsango na ye? Okoki lisusu koluka eloko ya sikisiki profeta abiangi biso tobongola. Nini Molimo Mosantu ayebisi yo ete osengeli kobongola? Kanisa kokoma bobimisi ya moto yemei oyo ozwui.

Lolenge kani boyamboli ezali kokesena na mbongwana ya bizalela na yo? Mpo na nini ezali motuya na kondima libiangi ya Nzambe mpo na koyambola? Ntango ozali komanyola, kanisa koyemba to koyoka loyembo oyo ezali kolobela libiangi oyo, lokola “How Gentle God’s Commands” (Hymns, no. 125).

Tala lisusu “Yesu Klisto Akolisa Yo,” Mpo na Bokasi ya Bilenge: Lisungi Mpo na Maponi, 6–9; “Repentance: A Joyful Choice,” “Principles of Peace: Repentance” (videos), Gospel Library; Gospel Topics “Repentance,” Gospel Library.

Elamani 14; 16:13–23

Nzambe atindaki bilembo mpe bikamwa mpo na kotatola na ntina ya mbotama mpe kufa ya Mobikisi.

Kati na Elamani 14, Samwele alimbolaki ete Nkolo apesaki bilembo ya mbotama mpe kufa ya Mobikisi mpo ete bato “bakoka koyeba … boyei na ye” mpe “bandima na nkombo na ye” (Elamani 14:12). Ntango oyekoli Elamani 14, koma bilembo ya mbotama ya Mobikisi na milongo 1–8 mpe bilembo ya kufa na Ye na milongo 20–28. Mpo na nini okanisi ete bilembo oyo ezali banzela ekoki mpo na kolimbola mbotama mpe kufa ya Yesu Klisto?

Bilembo mosusu koleka ya moto ye moko mpe ya mpasi te ekoki kosalisa yo “ondimela na nkombo ya [Mobikisi].” Nini Asalaki mpo na kolendisa bondimi na yo kati na Ye?

Likebisi nini epesami na ntina ya bilembo na Elamani 16:13–23? Lolenge nini okoki koboya ezaleli ya bato elobelami na milongo oyo?

Tala lisusu Alma 30:43-52; Dale G. Renlund, “By Divine Design,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2017, 55-57.

Elamani 15:3

Etumbu kowuta na Nkolo ezali elembo ya bolingo na Ye.

Maloba ya Samwele ezali na bitumbu ebele ya makasi, kasi Elamani 15:3 epesaka biso bomoni ya monene na maye matali Nkolo. Lolenge nini etumbu kowuta na Nkolo ezali elembo ya bolingo na Ye? Elembeteli nini omoni na bolingo ya Nzambe mpe motema mawa na Ye kati na bisakweli mpe makebisi ya Samwele?

Kanisa koyekola nsango ya Mpaka D. Todd Christofferson “Lolenge Moko Nalingaka, Napamelaka mpe Napesaka Etumbu” (Liahona, Sanza ya mitano 2011, 97–100), kolukaka bantina misato ya etumbu ya bonzambe. Ntango nini omonaki Nzambe kosala na balolenge oyo na bomoi na yo?

Elamani 16

Baprofeta balakisaki ngai epai ya Yesu Klisto.

Na Elamani 16, nini oyekoli uta na baoyo bandimaki mateya ya Samwele? Nini oyekoli uta na baye baboyaki Ye? Kanisa na ntina ya lolenge nini kolanda baprofeta ya bomoi esalisaki yo kokangama penepene ya Yesu Klisto.

Mpo na makanisi koleka, tala nsango ya sanza oyo na Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge bamagazini.

Makanisi mpo na Koteya Bana

Elamani 13:2–5

Nzambe akoki kosolola na ngai kati ya motema na ngai.

  • Lolenge nini ekoki yo koteya bana na yo ete Nzambe akoki kosolola na motema na biso, ndenge asalaki mpo na Samwele? Ntango mosusu okoki kosenga bango balakisa banzela ekeseni ya kosolola kozanga kosalela maloba (lokola kosala bilembo na maboko to na elongi). Yango ekoki komema na masolo etali banzela ekeseni oyo Tata na Lola asololaka na biso. Lokola eteni ya masolo, yo mpe bana na yo bokoki kotala elilingi ya Samwele Molamani (molongo oyo ezali na mibale) mpe botanga Elamani 13:2–5 lokola bana na yo bayoki lolenge nini Nzambe ayebisaki Samwele nini ya koloba.

  • Mingi na biso—mingimingi bana—basengeli na lisalisi ya koyekola mpo na koyeba lolenge nini mpe ntango nini Nzambe alobelaka biso. Okoki koyebisa bana na yo maye matali ngonga ntango nini Molimo Mosantu asalisaka yo koyeba na motema na yo nini Nzambe alingaki yo kosala to koloba. Limbola lolenge nini oyebaki ete Nzambe azalaki kosolola na yo. Ntango mosusu bana na yo bakokaki kokabola makambo ya ndenge moko bakutanaki na yango.

Elamani 14:2–7, 20–25

Baprofeta Bateyaka oyo etali Yesu Klisto.

  • Koyemba elongo “Samuel Tells of the Baby Jesus” (Children’s Songbook, 36) ekoki kozala nzela malamu ya koteya bana na yo maye Samwele ateyaki na ntina ya Yesu Klisto. Kokabola “Mokapo 40: Samwele Molamani Alobeli Yesu Klisto” (Masolo ya Buku ya Mormon, 111–13) ezali mosusu. Nini Samwele ateyaki na ntina ya Mobikisi? Ntango mosusu okokaki lisusu kokabola nini baprofeta ya mikolo na biso batayaka na ntina na Ye. Lolenge nini maloba na bango etongaka bondimi na biso epai na Ye?

Elamani 16:1–6

Napambolami ntango nazali kolanda profeta.

  • Okoki kotonga bondimi ya bana na yo na profeta na kolakisaka bango bandakisa ya bato baye bazalaki sembo. Ndambo na bango bazwami na Elamani 16:1, 5. Ntango ozali kotanga, bana na yo bakoki kotelema ntango bayoki eloko moko bato basalaki ntango bandimelaki maloba ya Samwele. Nsima, ndenge ozali kotanga milongo 2 mpe 6, bana na yo bakoki kovanda ntango bayoki eloko moko bato basalaki ntango bandimelaki te maloba ya Samwele. Lolenge nini tokoki kolakisa ete tondimelaka maloba ya profeta na bomoi ? Yebisa bana lolenge nini bopambolami ntango ozali kolanda toli ya Nkolo na nzela ya baprofeta na Ye.

Mpo na makanisi koleka, tala nsango ya sanza oyo na Moninga magazini.

Elilingi
Samwele Molamani

Samwele Molamani, na Lester Yocum

Bimisa na lokasa