Yaka, Landa Ngai 2024
Sanza ya Libwa 30–Sanza ya Zomi 6: “Nazali Mobeko, mpe Pole.” 3 Nefi 12–16


“Sanza ya Libwa 30–Sanza ya Zomi 6: ‘Nazali Mobeko, mpe Pole.’ 3 Nephi 12–16,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: Buku ya Mormon 2024 (2023)

“Sanza ya Libwa 30–Sanza ya Zomi 6. 3 Nefi 12–16,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: 2024 (2023)

Elilingi
Yesu azali kolakisa Bapostolo Zomi na Mibale

Nefi ya Misato: Bazomi na Mibale Oyo Ngai Naponi, na Gary L. Kapp

Sanza ya Libwa 30–Sanza ya Zomi 6: “Nazali Mobeko, mpe Pole”

3 Nefi 12–16

Lokola bayekoli ya Yesu Klisto oyo basanganaki mpo na koyoka esakola likolo ya Ngomba ya Galilea, bato oyo basanganaki na tempelo ya Beboo babikaka mobeko ya Mose. Bango balandaki yango mpo ete yango elakisaki milimo na bango epai ya Klisto (tala Yakobo 4:5), mpe sikawa Klisto atelemaki liboso na bango, kolobaka mobeko moko ya likolo koleka. Kasi kutu baye kati na biso oyo batikala kobika mobeko ya Mose te bakoki koyeba ete mobeko Yesu atiaki mpo na bayekoli na Ye ezalaki mobeko ya likolo makasi koleka. “Nalingi ete bozala bato ya kobonga nie,” Ye alobaki (3 Nefi 12:48). Soki yango esali ete omiyoka malamu te, omikundola ete Yesu alobaki lisusu, “Bapambolami ezali babola na molimo oyo bayei epayi na ngai, mpo na bango ezali bokonzi ya lola” (3 Nefi 12:3). Mobeko oyo ya likolo koleka ezali mbela ya kobengisa—lolenge mosusu ya koloba “Yaka epai na ngai mpe zala ya kobika” (3 Nefi 12:20). Lokola mobeko ya Mose, mobeko oyo elakisi biso epai na Klisto—kaka Moko oyo akoki kobikisa mpe kobongisa biso nie. “Tala,” Ye alobaki, “Nazali mobeko, mpe pole. Tala epai na ngai, mpe tia molende kino na nsuka, mpe okozala na bomoi” (3 Nefi 15:9).

Makanisi mpo na Koyekola na Libota mpe na Eklezia

3 Nefi 12–14

Elilingi
elembo ya seminele
Nakoki kozala moyekoli ya solo ya Yesu Klisto.

Tala lolenge moko mpo na koyekola mpe kosalela maye Mobikisi ateyaki na 3 Nefi 12–14: Kamata liboke moko ya milongo, mpe tala soki okoki koloba yango na mokuse na molongo moko oyo ebandi na “Bayekoli ya solo ya Yesu Klisto …” Ndakisa, bokuse ya 3 Nefi 14:1–5 ekoki kozala “Bayekoli ya solo ya Yesu Klisto balukaka masanzoli ya bato te mpo na kosala malamu.” Meka yango na makomi oyo:

Nsima ya kotanga milongo oyo, nini omiyoki kofulama kosala mpo na kolanda Yesu Klisto?

Motindo kati na 3 Nei 12:48 ekoki komonana mpasi—kutu ekoki kosalema te. Oyekoli nini uta na nsango ya Mpaka Jeffrey R. Holland “Be Ye Therefore Perfect—Eventually” (Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2017, 40–42) oyo esalisi yo ososola maloba ya Mobikisi na molongo oyo? Engebeni na Moroni 10:32–33, nini ekokisaka yango ete ekoma ya kobonga nie lokola Mobikisi?

Tala lisusu Dallin H. Oaks, “The Challenge to Become,” Ensign, sanza ya zomi na moko 2000, 32–34; Gospel Topics, “Become like Jesus Christ,” Gospel Library; “Lord, I Would Follow Thee,” Hymns, no. 220; “Jesus Christ Teaches How to Live the Higher Law” (video), Gospel Library.

Salela mateya ya ndakisa. Mobikisi ateyaki bosolo ya bozindo na kosalelaka biloko to makambo mayebani malamu na bato. Okoki kosala eloko ya lolenge moko ntango ozali koyekola to koteya etali 3 Nefi 12. Kotala to kosimba mwa mungwa, buji, to kazaka ekoki kotombola lisolo etali bosolo ya seko Mobikisi ateyaki.

3 Nefi 12:1–215:23–2416:1–6

Bapambolami bazali baye oyo bandimi na kozangaka komona na miso.

Moke mpenza ya bana ya Nzambe bamoni Mobikisi mpe bayoki mongongo na Ye, lokola esalamaki na bato ya Bountiful. Mingi kati na biso bazali mingi lokola bato balobelami na 3 Nefi 12:2; 15:23; mpe 16:4–6. Bilaka nini epesami na bato ya ndenge oyo na milongo oyo? Lolenge nini bilaka yango ekokisamaki na bomoi na yo?

Tala lisusu Yoane 20:26–29; 2 Nefi 26:12–13; Alma 32:16–18.

3 Nefi 12:21–30; 13:1–8, 16–18; 14:21–23

Nakoki kobunda mpo na kopetola bamposa ya motema na ngai.

Mama ya likambo moko okoki komona na mikapo oyo ezali mbela ya Mobikisi ya kobika mobeko ya likolo koleka—kozala na bosembo kaka na misala na biso te kasi lisusu kati na mitema na biso. Luka mama ya likambo oyo ntango Mobikisi azali kolobela boswani (3 Nefi 12:21–26), bozangi soni (3 Nefi 12:27–30), losambo (3 Nefi 13:5–8), mpe kokila bilei (3 Nefi 13:16–18). Bandakisa mosusu nini okoki kozwa? Okoki kosala nini mpo na kopetola bamposa ya motema na yo?

3 Nefi 14:7–11

Tata ya Lola akopesa ngai biloko malamu ntango nasengi, naluki mpe nabeti ekuke.

Ntango otangi mbela ya Nkolo na 3 Nefi 14:7–11 mpo na kosenga, koluka, mpe kobeta ekuke, komaniola “biloko malamu” nini Ye akokaki kolinga yo osenga. Makomi misusu oyo elandi ekoki kosalisa yo ososola lolenge nini kosenga, koluka, mpe kobeta ekuke. Yango ekoki kosalisa lisusu kolimbola mpo na nini nsambo misusu eyanolamaka te lolenge ozali kozela: Yisaya 55:8–9; Elamani 10:5; Moroni 7:26–27, 33, 37, mpe Malongi mpe Mayokani 9:7–9; 88:64. Lolenge nini makomi oyo ekoki kosimba lolenge osengaka, olukaka, mpe obetaka?

Tala lisusu Milton Camargo, “Tuna, Luka, mpe Kokola,” Liahona, Sanza ya Zomi na moko 2020, 106–8.

Mpo na makanisi mingi, tala mikanda ya sanza oyo ya Liahona mpe magazini Mpo na Bokasi ya Bilenge zulunale.

Makanisi mpo na Koteya Bana

3 Nefi 12:14–16

Nakoki kozala ndakisa malamu na kolandaka Yesu.

  • Ntango mosusu okoki kososola boniboni bandakisa na bango ekoki kopambola basusu. Salela 3 Nefi 12:14–16 mpo na kopesa bango makasi ya kotika pole na bango engenga. Ndakisa, ntango ozali kotanga “yo” to “ya yo” kati na milongo oyo, senga bana na yo bamilakisa misapi. Lobela bana etali pole omonaka kati na bango ntango balandaka Yesu Klisto mpe lolenge nini efulaka ngai nalanda Ye mpe. Okoki lisusu koyemba elongo loyembo oyo epesaka bana makasi bangenga lokola pole, ndakisa “I Am like a Star” (Children’s Songbook, 163).

  • Mpo na kopesa bana na yo makasi babomba pole na bango te (tala 3 Nefi 12:15), tika bango moko nsima ya mosusu babomba to bazipa mwinda to pole mosusu. Bakoki kozipola pole yango ngonga moko na moko batangi nkombo ya eloko moko bakoki kosala mpo na kozala ndakisa malamu epayi ya basusu.

3 Nefi13:19–21

“Bobomba mpo na bino moko biloko ya motuya na lola.”

  • Kotanga milongo oyo ekoki kobenda lisolo etali biloko tobombaka. Ntango mosusu okoki kokamba bana na yo na lisano ya koluka biloko ya motuya mpo na komona biloko oyo ezali kokundolisa bango biloko ya motuya oyo ezali na motuya ya seko.

3 Nefi 14:7–11

Tata na Lola ayanolaka nsambo na ngai.

  • Ntango ozali kotanga 3 Nefi 14:7, bana na yo bakoki kosala makambo oyo ezali kolakisa moko na moko ya bambela ya Mobikisi kati na molongo oyo. Ndakisa, bakoki kotombola maboko na bango (kosenga), kosala zimele na maboko na bango (koluka), to kosala lokola kobeta na ekuke (kobeta). Salisa bana na yo bakanisa makambo bakoki koloba mpe kosenga kati na nsambo na bango.

  • Bana na yo ya mike bakoki kosakana lisano moko na kati na yango bakosenga eloko moko mpe bakozwa eloko moko ekeseni mobimba. Kati ya 3 Nefi 14:7–11, Eloko nini Mobikisi alingaki biso toyeba etali Tata na biso ya Lola?

3 Nefi 14:21–27; 15:1

Mobikisi alingi ngai nayoka mpe nasala maye Ye ateyaka.

  • Kanisa banzela okoki kosalisela bana na yo batala lisese kati ya milongo oyo. Ntango mosusu bakoki koyema bililingi, kosala misala, to kotonga biloko likolo ya miboko moko ya makasi mpe ya zelo. Bakoki lisusu kosobitina bankombo na bango mpo na “moto ya bwanya” ntango bazali kotanga 3 Nefi 14:24–27 to koyemba “The Wise Man and the Foolish Man” (Children’s Songbook, 281). To bakoki kotelema ngonga nyonso bayoki liloba “a” kati na 3 Nefi 14:21–27 mpe 15:1.

  • Oyo ezali liteya ya eloko moko oyo okoki komeka kosenga bana na yo bakanisa ete moko ya makolo na bango elakisi koyoka maloba ya Mobikisi mpe mosusu elakisi kosala maye mobikisi ateyaki. Bengisa bana na yo bameka kotelema bobele likolo ya lokolo na bango ya “koyoka”. Nini elingaki kosalama soki mopepe makasi ebetaki kati na kisuku? Nsima yo mpe bana na yo bokoki koluka makambo ekeseni oyo Mobikisi ateyaki biso tosala: tala 3 Nefi 12:3–12, 21–26; 13:5–8.

Mpo na makanisi mingi, tala mokanda ya sanza oyo na magazini ya Friend .

Elilingi
Yesu azali koteya Banefi

Mobikisi Akei Kotala Bato ya Amerika,, by Glen S. Hopkinson

Bimisa na lokasa