Yaka, Landa Ngai 2024
Sanza ya zomi 21–27: “Ekokaki Kozala na Bato ya Esengo Mingi Koleka Te.” 3 Nefi 27–4 Nefi


“Sanza ya zomi 21–27: ‘Ekokaki Kozala na Bato ya Esengo Mingi Koleka Te.’ 3 Nephi 27–4,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: Buku ya Mormon 2024 (2023)

“Sanza ya zomi 21–27. 3 Nefi 27–4 Nefi,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: 2024 (2023)

Elilingi
Yesu Mosekwi azali koteya bato

Sanza ya zomi 21–27: “Ekokaki Kozala na Bato ya Esengo Mingi Koleka Te”

3 Nefi 274 Nefi

Mateya ya Yesu Klisto ezali mingi koleka filozofi kitoko mpo na komanyola. Ebongisami mpo na kofula biso tokoma lokola Ye. Buku ya 4 Nefi elakisi kaka lolenge nini nsango malamu ya Mobikisi ekoki kobongola bato malamu. Kolandaka mosala ya mokuse ya Yesu, bikeke ya kondongwana kati na Banefi mpe Balamani ekomaki na nsuka. Bikolo mibale eyebanaki mpo bonguna mpe lolendo ekomaki “moko, bana ya Klisto” (4 Nefi 1:17), mpe babandaki kozwa “biloko nyonso na lisanga kati na bango” (4 Nefi 1:3). “Bolingo ya Nzambe … efandaki na kati ya mitema mya bato,” mpe “ekokaki kozala na bato ya esengo mingi koleka te kati ya bato banso oyo bakelamaki na maboko ya Nzambe” (4 Nefi 1:15–16). Oyo ezali lolenge nini mateya ya Mobikisi ebongolaki Banefi mpe Balamani. Lolenge nini yango ezali kobongola yo?

Makanisi mpo na Koyekola na Libota mpe na Eklezia

3 Nefi 27:1–12

Eklezia ya Yesu Klisto ebiangemi na nkombo na Ye.

Ntango bayekoli ya Mobikisi babandaki kotia Eklezia na Ye na ekolo mobimba, motuna eyaki ete, epai ya bato misusu ekokaki komonisama lokola likambo ya moke—nini esengelaki kozala nkombo ya Eklezia? (tala 3 Nefi 27:1–3). Oyekoli nini na ntina ya litomba ya nkombo oyo uta na eyano ya Mobikisi kati na 3 Nefi 27:4–12

Mobikisi amonisaki nkombo ya Eklezia na Ye lelo kati na Malongi mpe Mayokani 115:4 Manyola liloba moko na moko kati na nkombo wana. Lolenge nini maloba maye esalisi biso toyeba banani biso tozali, nini tondimelaka mpe lolenge nini tosengeli kosala?

Tala lisusu Russell M. Nelson, “The Correct Name of the Church,” Liahona, Sanza ya Zomi na ooko. 2018, 87–89; “Jesus Christ Declares the Name of His Church and His Doctrine” (video), Gospel Library.

3 Nefi 27:10–22

Eklezia ya Yesu Klisto etongami likolo ya nsango malamu na Ye.

Nsima ya kolimbola ete Eklezia na Ye esengeli “kotongama likolo ya [ya Ye] nsango malamu” (3 Nefi 27:10), Mobikisi alimbolaki oyo nsango malamu na Ye ezali. “Lolenge nini okoloba na mokuse maye Alobaki 3 Nefi 27:13? Koyekamaka na ndimbola oyo, elingi koloba nini mpo na Eklezia—mpe mpo na yo—kotongama likolo ya nsango malamu?

Koma maye ozali kotanga. Koma maye Mobikisi ateyaki bayekoli na Ye kati na 3 Nefi 27:23–26. Mpo na nini ezali motuya kobomba likundoli ya makambo ya molimo? Omiyoki kofulama nini mpo na kokoma ntango oyekoli lotomo ya Mobikisi kati na 3 Nefi?

3 Nefi 28:1–11

“Eloko nini oyo bozali na yango mposa?”

Okoloba nini soki Mobikisi atunaki yo, lokola Ye atunaki bayekoli na Ye, “Eloko nini oyo bozali na yango mposa uta na ngai?” (3 Nefi 28:1). Kanisa na oyo etali oyo ntango ozali kotanga 3 Nefi 28:1–11. Oyekoli nini etali bamposa ya mitema ya bayekoli uta na biyano na bango na motuna na Ye? Lolenge nini bamposa na yo ebongwani ntango ozali kobika nsango malamu ya Yesu Klisto?

Nzembo mbala mingi elobaka bamposa ya bosembo—“More Holiness Give Me” ezali ndakisa malamu (Hymns, no. 131). Kanisa kozwa loyembo moko oyo ezali kotalisa bamposa na yo.

3 Nefi 29–30

Buku ya Mormon ezali elembo oyo mosala ya mikolo ya nsuka ya Nzambe ezali kokokisama.

Kanisa oyo etali bilembo oyo epesaka nzela ya koyeba likambo moko ekosalema. Ndakisa, lolenge nini oyebelaka ete mvula ezali koya to bileko ezali kobogwana? Engebene na 3 Nefi 29:1-3, oyebelaka lolenge nini mosala ya Nzambe ya kosangisa bato na Ye “esili kobanda kokokisama”? (tala lisusu 3 Nefi 21:1-7). Okoki lisusu komona, kati na 3 Nefii 29:4-9, makambo oyo bato bakowangana na mikolo na biso. Lolenge nini Buku ya Mormo elendisaka bondimi na yo na makambo oyo?

4 Nephi 1:1–18

Elilingi
elembo ya seminele
kolanda mateya ya Yesu Klisto ememaka na bomoko mpe esengo.

Elingaki kozala lokola nini kobika na mibu miye milandaki mikolo Mobikisi akendeki kotala bango? Ntango ozali koyekola 4 Nefi 1:1-18, kanisa koyoka mapamboli bato bazwaki. Okoki lisusu kotia bilembo to kokoma maponi basalaki oyo esalisaki kokamba epayi ya bomoi oyo epambwama. Yesu ateyaki bango nini oyo ekokaki kofula maponi na bango ya bosembo? Tala mwa ndakisa, kasi okoki komona misusu: 3 Nefi 11:28–30; 12:8–9, 21–24, 40–44; 13:19–21, 28–33; 14:12; 18:22–25.

Manyola oyo okoki kosala mpo na kosalisa libota, palwasi to lingomba na yo babika na bomoko mpe esengo monene. Okoki kosala nini mpo na kosalisa kolonga babokabwani mpe kokoma solo “moko” elongo na bana basusu ya Nzambe? Mateya nini ya Yesu Klisto esalisaka yo okokisa ntina oyo?

Na mawa, lingomba ya Siona oyo elimbolamaki kati na 4 Nefi na nsuka ekweyaki kati na mabe. Ntango ozali kotanga 4 Nefi 1:19–49, luka bizalela mpe bitambolela oyo esukisaki esengo mpe bomoko na bango. Okoki kosala nini mpo na kolongola bizalela to bitambolela oyo?

Tala Mose 7:18; D. Todd Christofferson, “Sustainable Societies,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2020, 32–35; Reyna I. Aburto, “With One Accord,” Liahona, Sanza ya mitano 2018, 78–80; Gospel Topics, “Belonging in the Church of Jesus Christ,” Gospel Library.

Mpo na makanisi mingi, tala babobimisi ya sanza oyo ya Liahona mpe magazini Mpo na Bokasi ya Bilenge .

Makanisi mpo na Koteya Bana

3 Nefi 27:3–8

Nazali moko ya Eklezia ya Yesu Klisto.

  • Mpo na koyingisa motuya ya nkombo ya Eklezia ya Yesu Klisto, solola na bana na yo oyo etali bankombo na bango moko. Mpo na nini bankombo ezali motuya? Ntango bozali kotanga 3 Nefi 27:3 elongo, boluka motuna oyo ezalaki na bayekoli ya Yesu. Salisa bana na yo bazwa eyano kati na 3 Nefi 27:5–8. Mpo na nini nkombo ya Eklezia ezali motuya?

  • Okoki lisusu kosalisa bana na yo bakanisa maboke ekeseni kati na wapi bango bazali, ndakisa libota to kelasi ya Eteyelo ya bana. Tuna bango maye balingaka kozalaka kati na liboke moko na moko. Nsima bokoki koyemba “The Church of Jesus Christ” (Children’s Songbook, 77) eLongo mpe kosolola oyo etali mpo na nini bozali na botondi ya kozala na Eklezia ya Mobikisi.

3 Nefi 27:13–16

Eklezia ya Yesu Klisto etongami likolo ya nsango malamu na Ye.

  • Mobikisi alobaki na mokuse nsango malamu na Ye kati na 3 Nefi 27. Okoki kolimbolela bana na yo ete liloba nsango malamu elingi koloba “nsango elamu.” Nsango malamu nini omoni kati na 3 Nefi 27:13–16? Salela lokasa ya molulu ya poso oyo mpo na koteya ete Eklezia ya Mobikisi etongami likolo ya nsango malamu na Ye.

3 Nefi 27:30–31

Tata ya Lola asepelaka ntango bana na Ye bazongelaka Ye.

  • Kanisa kosakana lisano kati na oyo moto songolo abombani mpe basusu bazali komeka koluka ye. Oyo ekoki komema na lisolo etali esengo toyokaka ntango moto moko oyo abungaki amonani. Nsima ya kotanga 3 Nefi 27:30–31, okoki kosolola etali lolenge nini kosalisa moko na mosusu atikala mpembeni ya tata ya lola mpo ete “moko te … abunga.”

4 Nefi

Kolanda Yesu Klisto ememelaka ngai esengo.

  • Mpo na kosalisa bana na yo bayekola oyo etali esengo ya bato balimbolami na 4 Nefi, okoki kolakisa bililingi ya bato ya esengo. Nsima, ntango bozali kotanga elongo milongo 2–3 mpe 15–17 (to “Mokapo 48: Kimia na Amelika,” Masolo ya Buku ya Mormon, 136–37), bakoki kolakisa na bililingi ntango bakomi na eloko moko kati na lisolo oyo ememeli bango esengo.

  • Mpo na kosalisa bana na yo batia na misala maye mateyami kati na 4 Nefi 8-16, bokoki kolakisa bango elongo n amakambo epayi wapi bato bazali na nkanda na moko na mosusu. Bengisa bango basala moko nsima ya mosusu maye likambo yango ekoki kozala lokola soki tozali na “bolingo ya Nzambe” kati na mitema na biso.

Mpo na makanisi mingi, tala mokanda ya sanza oyo na magazini ya Friend zulunale.

Elilingi
Yesu azali kosolola na bayekoli misato ya Banefi

Klisto na Bayekoli Misato ya Banefi, na Gary L. Kapp.

Bimisa na lokasa