Yaka, Landa Ngai 2024
Sanza ya zomi 28–Sanza ya zomi na moko 3: “Nalingi Ete Nakoka Kondimisa Banso … Bayambola.” Mormon 1–6


Sanza ya zomi 28–Sanza ya zomi na moko 3: ‘Nalingi Ete Nakoka Kondimisa Banso … Bayambola.’ Mormon 1-6,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: Buku ya Mormon 2024 (2023)

“Sanza ya zomi 28–Sanza ya zomi na moko 3. Mormon 1–6,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: 2024 (2023)

Elilingi
Mormon azali kokoma na bapalaki ya wolo

Mormon Azali kokoma Bapalaki na mokuse, na Tom Lovell

Sanza ya zomi 28–Sanza ya zomi na moko 3: “Nalingi Ete Nakoka Kondimisa Banso … Bayambola”

Mormon 1–6

Mormon abikisaki biso na koyebisaka “lisolo mobimba” ya “likambo ya nsomo ” ya nkanda mpe bosopi makila oyo amonaki na kati ya Banefi (Mormon 2:18; 5:8). Kasi oyo akomaki mpenza na Mormon 1–6 ekoki mpo na kokundolisa biso lolenge nini bato oyo bazalaki kala sembo bakoki kokweya. Na kati ya mabe ya lolenge wana ya kondimisa, moto moko te akokaki kopamela Mormon mpo na kokoma ya kolemba mpe kutu ya kozanga bokasi. Nzokande na maye manso amonaki mpe ayebaki, abungisaki ata moke te lolenge na ye ya koyokaka mawa monene ya Nzambe mpe bondimi na ye ete boyamboli ezali nzela mpo na kozwa yango. Mpe atako bato ya Mormon ye moko baboyaki mabiangisi na ye ya losambo mpo na koyambola, ayebaki ete azalaki na bato ebele ya kondimisa. “Tala,” alobaki, “Nakomi epai ya nsuka nyonso ya mabele .” Na maloba mosusu, akomelaki yo (tala Mormon 3:17–20). Mpe nsango na ye epai na yo, lelo, ezali nsango moko oyo ekokaki kobikisa Banefi na mikolo na bango: “Ndimela nsango malamu ya Yesu Klisto. … Yambola mpe milengele mpo na kotelema liboso ya kiti ya bosambisi ya Klisto” (Mormon 3:21–22).

Tala lisusu “Mormon Preserves the Record to Bring the House of Israel to Chris” (video), Gospel Library.

Makanisi mpo na Koyekola na Libota mpe na Eklezia

Mormon 1–6

Elilingi
elembo ya seminele
Nakoki kolanda Yesu Klisto atako maye bato mosusu basalaka.

Pene ya mibu 10, Mormon azalaki mpenza ya kokesana na bato bazalaki nzinganzinga na ye. Ntango ozali kotanga Moroni 10:1-6, luka ndenge oyo bondimi ya Mormon ekomisaki ya kokesana mpe epesaki ye mabaku ya kosalisa mpe kopambola basusu. Milongo elandi ekoki kosunga yo obanda.

Mormon 1:2–3, 13–17.Bokeseni nini omoni katkati ya Mormon mpe bato na ye? Bizali malamu nini azalaki na yango oyo esalisaki ye atikala makasi na ngonga moko ya mpasi?

Mormon 2:18–19.Maloba nini Mormon asalelaki mpo na kolimbola mokili oyo afandaki? Lolenge nini abatelaki elikya atako nzinga nzinga na ye?

Mormon 3:12.Lolenge nini Mormon ayokaki na oyo etali bato nzinganzinga na ye? Okoki kosala nini mpo na kokolisa lolenge ya bolingo azalaki na yango?

Milongo misusu nini kati na Mormon 1–6 ebeti nsete na bondimi ya Mormon na Yesu Klisto? Mabaku nini apesamaki lokola aponaki kotikala bosembo?

Kanisa koyekola Mokambi Thomas S. Monson “Zala Ndakisa mpe Mwinda” (Liahona, Sanza ya mitano 2015, 86–88), kolukaka bantina mpo na nini ezali motuya mpo na bayekoli ya Yesu Klisto batelema to bazala ya kokesena. Lolenge nini okotondisa milongo ya maloba lokola oyo? “ ezalaki ndakisa mpo na ngai ntango mobali [to mwasi] . Oyo esalisaki ngai nalinga .”

Mormon akokaki komiyoka ete ndakisa na ye ezalaki te kosala bokeseni na bato na ye. Soki ozalaki na litomba ya kosolola na Mormon, nini olingaki kolobela ye etali lolenge nini ndakisa na ye esali bokeseni mpo na yo?

Tala lisusu David A. Bednar, “Quick to Observe,” Ensign, Sanza ya mibale 2006, 30–36, or Liahona, Sanza ya zomi na mibale 2006, 14–20; “Something Different about Us: Example” (video), Gospel Library; Gospel Topics, “Living the Gospel of Jesus Christ,” Gospel Library.

Salisa basusu bakabola maye bayekoli. Ntango bato bakabolaka maye bayekolaka, balendisaka bondimi na bango moko mpe bondimi ya basusu (tala Malongi mpe Mayokani 88:122). Meka kotuna libota to eteyelo na yo makambo nini bakutanaki na yango ntango bayekolaki liloba ya Nzambe.

Elilingi
Banefi mpe Balamani bakobunda bamoko na basusu

Etumba, na Jorge Cocco

Mormon 2:10–15

Mawa ya Nzambe ememaka ngai na Klisto mpe na mbongwana ya libela.

Ntango Mormon ayokaki mawa ya bato na ye, alikyaki bakoyambola. Kasi “mawa na bango ezalaki te mpo ya boyamboli” (Mormon 2:13)—ezalaki mawa ya bonzambe te kasi mawa ya mokili. Mpo na kososola bokeseni yango, kanisa kokoma maye oyekoli uta na Mormon 2:10–15 na etando lokola moko oyo:

Mawa ya Nzambe

Mawa ya Mokili

Eyaka epai na Yesu (molongo 14)

Elakelaka Nzambe mabe (molongo 14)

Lolenge nini oyebelaka soki mawa ezali ya Nzambe to ya mokili? Soki ozali kokutana na mawa ya mokili, lolenge nini okoki kobongwanisa yango kati na mawa ya Nzambe?

Tala lisusu 2 Bakolinti 7:8–11; ; Michelle D. Craig, “Divine Discontent,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2018, 52–55.

Mormon 3:3, 9

“Basosolaki te ete ezalaki Nkolo oyo abikisaki bango.”

Mormon amonaki ete Banefi bayebaki te ndenge oyo Nkolo apambolaka bango. Ntango ozali kotanga Mormon 3:3, 9, osengeli komanyola lolenge nini ozali koyeba bopusi ya Nzambe na bomoi na yo. Mapamboli nini eyaka ntango oyebi nguya na Ye? Makama nini ezali ya koyeba Ye te? (tala Mormon 2:26; Malongi mpe Mayokani 59:21).

Tala lisusu Henry B. Eyring,“O Remember, Remember,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2007, 66–69.

Mormon 5:8–24; 6:16–22

Yesu Klisto atelemi na maboko efungwama mpo na koyamba ngai.

Soki omiyoki naino ya kolemba na oyo etali masumu na yo moko, bolimboli ya Mobikisi kotelemaka “na maboko ya kofungwama mpo na koyamba yo” ekoki kondimisa yo. Ntango ozali kotanga Mormon 5:8–24 mpe 6:16–22, oyekoli nini etali makanisi ya Tata ya Lola mpe Yesu epayi na yo, kutu ntango osumukaka? Lolenge nini oyokaki Yesu Klisto koya epayi na yo na maboko efungwama? Oyoki nini oyo efulami na kosala lokola litomba?

Tala lisusu “Come unto Jesus,” Hymns, no. 117.

Makanisi mpo na Koteya Bana

Mormon 1:1–3; 2:1, 23–24; 3:1–3, 12, 17–22

Lokola Mormon, nakoki kolanda Yesu Klisto.

  • Lokola Mormon azalaki mwa elenge ntango akolisaki bondimi na ye kati na Klisto, akoki kozala liziba ya kozwa bofuli mpo na bana na yo. ntango mosusu okoki kotanga Mormon 1:1–3 mpe bana na yo bakoki koyoka mpo na koyeba mibu boni Mormon azalaki na yango ntango Ammaron apesaki ye misio ekeseni. Okoki lisusu kosalisa bango komona kati na milongo oyo bizaleli malamu oyo Ammaron amonaki kati na Mormon. Lolenge nini bizaleli malamu oyo esalisaka biso tolanda Yesu Klisto?

    Elilingi
    Mormon lokola elenge mobali

    Mormon, Mibu 10,na Scott M. Snow

  • Lokola Mormon alandaki Yesu Klisto, apesamaki mabaku ya kosalisa mpe kopambola basusu. Okoki kobengisa bana na yo batanga moko to mingi ya biteni ya makomi oyo elandi mpe kosalisa bango bakabola maye bayekoli etali Mormon: Mormon 1:1–3; 2:1, 23–24; mpe 3:1–3, 12, 20–22 (tala lisusu “Mokapo 49: Mormon mpe Mateya na Ye,” Masolo ya Buku ya Mormon, 138–42). Lolenge nini alandaki Yesu Klisto? Lolenge nini bondimi na ye na Yesu Klisto esalisaka to epambolaka basusu. Lolenge nini bondimi na biso esalisaka bato oyo toyebi?

Mormon 2:8–15

Mawa ya Nzambe ememaka ngai na Klisto mpe na mbongwana ya libela.

  • Ntango mosusu okoki kosala etando lokola moko oyo ezali kati na “Makanisi mpo na Koyekola na Libota mpe na Eklezia” mpo na kosalisa bana na yo basosola bokeseni katikati ya mawa ya Nzambe mpe mawa ya mokili ntango bazali kotanga Mormon 2:8, 10–15. Nsima bakoki lisusu komeka na mozindo Mormon 2:12 mpo na kozwa bantina mpo na nini boyamboli esengeli kokomisa ya biso “[Mi]tema … esepela.” Lolenge nini ekoki biso koyeba solo ete mawa toyokaka mpo na masumu na biso ememaka biso toluka lisalisi ya Nzambe mpo na kobongwana?

Mormon 3:3, 9

Tata ya Lola apesaka ngai mapamboli mingi

  • Kobengisa bana na yo basala molongo ya nkombo (to bayema bililingi ya) makambo mosusu bazaleli na botondi ekoki kozala nzela malamu ya kosalisela bango bayoka botondi mpo na nzambe. Nsima ya kosala molongo ya nkombo, okoki kotanga Mormon 3:3, 9 mpe kolimbola ete Tata na Lola apambolaka Banefi mpe, kasi bayebaka yango te. Tokoki kosala Nini mpo na kollakisa tozali na botondi epai na Tata ya Lola mpo na mapamboli na biso?

Mormon 3:12

Tata na Lola alingi ngai nalinga bato nyonso.

  • Ata kutu Banefi bazalaki mabe, Mormon mokolo moko te atikaki kolinga bango. Salisa bana na yo bamona maloba “alingaki” mpe “bolingo” kati na Mormon 3:12. Bokoki lisusu koyemba loyembo elongo etali Mobikisi, ndakisa “Jesus Said Love Everyone” (Children’s Songbook, 61), ntango bozali kolakisa bililingi ya bana uta na mokili mobimba. Natatoli bolingo ya Nzambe mpo na bana na Ye.

Mpo na makanisi mingi, tala mokanda ya sanza oyo na magazini ya Friend zulunale.

Elilingi
bapalaki ya wolo

Buku ya Mormon ekomamaki “mpo ete bokoka kondimela nsango malamu ya Yesu Klisto” (Mormon 3:21).

Bimisa na lokasa