Yaka, Landa Ngai 2024
Sanza ya zomi na moko 18–24: “Ete Mabe Masila.” Etele 6–11


“Sanza ya zomi na moko 18–24: ‘Ete Mabe Masila.’ Etele 6–11,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe na Eklezia: Buku ya Mormon 2024 (2023)

“Sanza ya zomi na moko 18–24. Etele 6–11,” Yaka, Langa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: 2024 (2023)

Elilingi
Bamasuwa ya Bayelede likolo ya mbu

Nakobimisa Bino Lisusu uta na Bozindo, na Jonathan Arthur Clarke

Sanza ya zomi na moko 18–24: “Ete Mabe Masila”

Etele 6–11

Bankama ya mibu mileki nsima ya Bayelede babebisama, Banefi bamikundolaki bobebi ya bonkoko na bango ya kala. Kati na bitika oyo ezalaki na mokanda moko ya kobombama—palaki ya “wolo ya peto” oyo “etondisamaki na mayemi,” mpe Banefi “bazalaki na mposa makasi koleka” ya kotanga yango (Mosiya 8:9; 28:12). Lelo ozali na bokuse ya likundoli liye, ebongolami na lokota na yo, mpe ebiangemi buku ya Etele. Ntango Banefi batangaki yango, “batondaki na mawa” mpo na koyeba bokweyi ya mawa ya Bayelede. “Nzokande epesaki bango boyebi boike, o eye basepelaki” (Mosiya 28:12, 18). Yo, mpe, okoki kokuta bantango ya mawa na buku oyo. Kasi okoki mpe kosepela na likabo oyo ya boyebi. Ntango Moroni akomaki “Ezali bwania ya Nzambe ete makambo oyo malakisamela bino ete … mabe esila, mpe ete ntango ekoka koya ete Satana akoka kozala na nguya te likolo ya mitema ya bana ya bato” (Etele 8:26).

Makanisi mpo ya koyekola na Ndako mpe na Eklezia

Etele 6:1–12

Nkolo akokamba ngai na nzela ya mobembo na ngai ya kufa.

Okoki kozwa mamoni ya molimo soki okokanisi mobembo ya Bayelede ya kokatisaka mbu na mobembo na yo na nzela ya bomoi. Ndakisa, Nkolo apesaki nini oyo engengisaka nzela na yo lokola mabanga na bamasuwa ya Bayelede? Bamasuwa ekoki kolakisa nini, to mipepe oyo ezali “kobeta epayi na mboka elakelama”? (Etele 6:8). Oyekoli nini uta na misala ya Bayelede yambo, na ntango ya, mpe nsima ya mobembo? Lolenge nini Nkolo amemaka yo na mboka na yo ya elakelama?

“Yemba masanzoli epai ya Nkolo.” Bayelede bamonisaki botondi mpe bolingo na bango mpo na Nzambe na nzela ya nzembo mpe masanzoli (tala Etele 6:9). Okoki koluka to kokela mabaku ya kosalela miziki mpe litatoli ya motema mpo na kosanzola Nzambe na ndako mpe na eklezia. Na ndakisa, ekoki kozala malamu koyemba loyembo ya masanzoli lokola “Kumisa Nkolo na Motema mpe na Mongongo” (Banzembo, no. 73) ntango ozali koyekola Etele 6:1–12.

Elilingi
Libota ya Bayelede kati ya masuwa na bango

Mwana na Kati, na Kendal Ray Johnson

Etele 6:5–18, 30; 9:28–35; 10:1–2

“Tambola na komikitisa liboso ya Nkolo.”

Atako lolendo mpe nkanda emonisami lokola kokonza lisolo ya Bayelede, ezali mpe lisusu bandakisa ya bomikitisi na mikapo miye—mingimingi na Etele 6:5–18, 30; 9:28–35; mpe 10:1–2. Komanyola mituna miye milandi ekoki kosalisa yo oyekola uta na bandakisa oyo: mpo na nini Bayelede oyo bamikitisaki na makambo maye? Lolenge nini balakisaki bomikitisi na bango? Lolenge nini Nzambe apambolaki bango lokola mbano? Kanisa nini okoki kosala na bolingi nyonso mpo na “kotambola na komikitisa mpenza liboso ya Nkolo” (Etele 6:17) na esika ete otindama na makasi mpo na kozala na komikitisa (tala Mosiya 4:11–12; Alma 32:14–18).

Tala lisusu Dale G. Renlund, “Do Justly, Love Mercy, and Walk Humbly with God,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2020, 109–12.

Etele 7–11

Elilingi
elembo ya seminele
Nakoki kokoma mokambi lokola Yesu Klisto.

Mikapo 7–11 ya Etele ezali pene na 28 bankola. Atako makambo moke ekoki kopesama na esika moke boye, motindo moko ebimi noki na ntina ya mbano ya bokambi ya bosembo mpe ya mabe. Nini oyekoli na ntina ya bokambi uta na bandakisa—ya mabe mpe ya malamu—ya bakonzi oyo batangami awa na nse?

Mokambi Dieter F. Uchtdorf apesaki makanisi ya malamu na ntina ya bokambi na etinda na ye “Oyo aleki Monene kati na Bino” (Liahona, Sanza ya mitano 2017, 78–81). Kanisa koyekola nsango oyo—mingimingi masolo maye ezali koyebisa—kolukaka mitinda to bandakisa ya bokambi lokola Klisto. Ntango nini omoni mitinda to mimeseno oyo emonisami epai ya bato oyo bakambaka?

Ntango ozali komanyola oyo oyekoli, kanisa mabaku okoki kozwa mpo na kokamba to kotinda basusu na ndako na yo, na lisanga na yo, na libiangi na yo na Eklezia, bongo na bongo. Lolenge nini okoki kokolisa bizaleli ya bokambi lokola Klisto, ata soki ozali na mokumba ya bokambi ya sikisiki te?

Tala lisusu Gospel Topics, “Kosala na Mabiangi ya Eklezia,” Gospel Library; “Principles of Leadership in the Church,” General Handbook: Kosala na Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka, 4.2 (ChurchofJesusChrist.org).

Etele 8:7–26

Nkolo asalaka na molili te.

Ntango bato bayokani mpo na kobomba misala na bango ya nkanda na nkuku, basanganaka na likelemba ya nkuku. Mpo na kobakisa likolo ya likelemba ya nkuku oyo elimbolami na Etele 8:7–18, bandakisa mosusu ekoki kozwama na Elamani 1:9–12; 2:2–11; 6:16–30; Mose 5:29–33. Kanisa kokesenisa milongo oyo na 2 Nefi 26:22–24, kati na oyo Nefi alimbolaki lolenge nini Nkolo asalaka mosala na Ye. Mpo na nini okanisi ete Moroni apesamaki motindo ya kokoma maye asalaki na ntina ya bosangani ya nkuku?

Oyekoli nini uta na buku ya Etele oyo ekoki kosalisa yo kozwa mapamboli maye matalisami na Etele 8:26?

Makanisi mpo na Koteya Bana

Etele 6:1–12

Tata na Lola akoki kobondisa ngai ntango nazali kobanga.

  • Moto nyonso azali na mikolo ya mpasi—ata mpe bana mike. Mbala mosusu okoki kosalisa bana na yo bazwa maloba mpe bafraze na kati ya Etele 6:1–12 oyo ezali komonisa lolenge oyo Bayelede bazalaki kotyela Nzambe motema na boumeli ya mikolo mosusu ya mpasi mpenza mpe ya kobangisa. Kanisa kokabola moko na mosusu mwa makambo oyo Nzambe asalisaki yo na ntango ya mpasi na bomoi na yo.

Etele 6:9, 12, 30; 7:27; 10:2

Mikundola oyo Nkolo asali ememaka botondi mpe kimya.

  • Nsima ya kokoma na kimya na mokili ya elaka, Bayelede bazalaki na botondi mingi na boye ete “basopa mpisoli ya esengo” (Etele 6:12). Okoki kofula bana na yo mpo na koyoka botondi mpo na mapamboli ya Nzambe na kosalisaka bango bazwa bafraze uta Etele 6:9, 12 oyo emonisi lolenge oyo Bayelede bapesaki Nzambe matondi na bango. Bakoki kosepela koyemba, lokola Bayelede basalaki, nzembo oyo ezali komonisa botondi, lokola “Tata na Ngai na Lola Alingi Ngai” (Children’s Songbook, 195). Sɛnga bana na yo bayebisa yo makambo mosusu oyo bazali na botondi mpo na yango.

  • Mbala mosusu bana na yo bakokaki kotanga Etele 6:30; 7:27; mpe 10:2 mpe koluka maye bakonzi baye ba sembo bakanisaki. Ezalaki na bopusi nini likolo na lolenge oyo bazalaki kokamba bato na bango? Yo na bana na yo bokoki kolobela balolenge ya komikundola makambo oyo Nzambe asalelaki bino. Na ndakisa, mbala mosusu bakokaki kokoma na ntina na yango to koyema bililingi. Okoki kopesa likanisi ete bazala na momeseno ya kokoma mapamboli oyo bamoni epai ya Nzambe (tala “O Remember, Remember” [video], Gospel Library).

Etele 3:25–27

Napambolamaka ntango nazali kolanda profeta ya Nzambe.

  • Mbala mosusu yo mpe bana na yo bokosepela kosala masano ya makambo mosusu oyo profeta ateyaki biso kosala. Okoki kutu kobongola yango lisano oyo kati na yango ozali kokanisa misala nini yango ezali komonisa. Yango ekoki kolengela bana na yo mpo na kolobela ntina oyo ezali na ntina kolanda profeta ya Nzambe. Na nsima, okokaki kotanga Etele 7:24–27 mpo na koyeba nini esalemaki ntango bato batosaki profeta ya Nzambe. Lolenge nini topambolamaka na kolandaka profeta lelo?

Etele 9:28–35; 11:5–8

Nkolo azali na mawa soki nayamboli.

  • Koluka bandakisa ezali mayele ya boyekoli makomi ya ntina. Buku ya Etele ezali na motindo moko oyo ezongelami mbala na mbala oyo ezali kopesa ntina na ngolu ya Nkolo. Mpo na kosalisa bana na yo bazwa ndakisa yango, senga bango batanga Etele 9:28–35 mpe Etele 11:5–8, kolukaka bokokani kati na masolo yango mibale. Toyekoli nini na masolo yango? Mbala mosusu bakokaki koluka bililingi na kati ya Gospel Art Book ya bato mosusu kati na makomi oyo bayambolaki mpe balimbisamaki.

Mpo na makanisi mosusu, tala nimero ya sanza oyo ya Moninga magazine.

Elilingi
Bamasuwa ya Bayalede likolo ya mbu

Bamasuwa ya Bayelede, na Gary Ernest Smith

Bimisa na lokasa