Ya Monene koleka Kati na Bino
Mbano monene ya Nzambe epesami na baye bazali kosunga kozelaka te na lifuti.
Bandeko na ngai ya bolingo, baninga na ngai ya bolingo, ya botondi kani nakoki kozala elongo na bino na bokutani oyo ya kofula ya mokili mobimba. Mokambi Monson, totondi yo mpo na etinda mpe lipamboli na yo. Tokotia ntango nyonso na mitema maloba na yo ya bokami, toli mpe bwania. Tolingaka mpe tosungaka yo, mpe tosambelaka ntango nyonso mpo na yo. Ozali ya solo profeta ya Nkolo. Ozali Mokambi na biso. Tozali kosunga, tozali kolinga, yo.
Ekoki kozala mibu tuku mibale eleki, Tempelo ya Madrid na Espagne ebulisamaki mpe ebandaki mosala na yango lokola ndako ya bule ya Nkolo. Harriet mpe ngai tokundoli yango malamu mpo ete nazalaki kosala na Bokangi ya Etuka na ntango yango. Nzela moko na basusu ebele, tolekisaki bangonga ebele kosanganaka makambo moko ya kosalaka muango mpe kobongisaka botambuisi ya molulu ya bokulisami.
Lokola mokolo ya bokokulisami epusanaki, namonaki ete nayambaki nanu te mbela ya kozala kuna. Ezalaki muke oyo nazelaki te. Na nsima na nyonso, na mokumba na ngai lokola Mokambi ya Etuka, namukotisaki makasi na libongisi oyo ya tempelo mpe namiyokaki kozala na mokumba mpo na yango ata moke.
Natunaki Harriet soki amonaki mokanda ya mbela. Ye amonaki te.
Mikolo eleaki mpe kobanga ekolaki. Namitungisaki soki loasa na biso ebungaki—ntango mosusu—eundamaki na ba cousin ya kiti na biso. Ntango mosusu esanganaki elongo na mikanda ezangi ntina mpe ebuakamaki libanda. Bazalani bazalaki na nyau moko ya kolukaluka, mpe nabandaki kutu kotala ye na lolenge ya kofunda.
Sukasuka nasalaki na makasi ya kondima likambo: nabiangisamaki te.
Kasi boniboni ekokaki yango kosalema? Esalaki ngai eloko ya mabe? Moto moko amonaki ete yango ezalaki mosika koleka mpo na biso kobembuka? Ngai nabosanamaki?
Na suka, nasosolaki ete lolenge wana ya kokanisa ekokaki komema ngai komatisa lolenge moko ya bokobi oyo nalingaki te kozala na yango.
Harriet mpe ngai tokundolaki biso moko ete likuli ya tempelo ezalaki te mpo na biso. Ezalaki te mpo na baoyo basengelaki kobiangama to baoyo babiangamaki te. Mpe ezalaki te mpo na mayoki na biso to likanisi ete tozalaki na mbano ya kozala na likuli.
Yango ezalaki mpo na likulisami ya ndako moko ya bule, tempelo moko ya Nzambe ya likolo koleka. Yango ezalaki mokolo moko ya kosepelaka mpo na bandimi ya Eklezia ya Espagne.
Soki ngai nabiangamaki kozala, nalingaki nakende na esengo koleka. Kasi soki nabiangamaki te, esengo na ngai elingaki kozala te kozanga bozindo. Harriet mpa ngai tolingaki kosepela elongo na baninga na biso, balingami na biso bandeko mibali mpe basi, wuta mosika. Tolikangi kosepela mpo na lipamboli oyo ya kitoko mpenza kaka lokola na bosepeli uta na ndako na biso ya Frankfurt lokola tozalaki uta Madrid.
Bana Mibali ya Nkake
Katikati ya Zomi na Mibale oyo Yesu abengaki mpe akulisaki ezalaki na bandeko mibali mibale, Yakobo mpe Yoane. Bino bokundoli nkombo ya nsima Ye apesaki bango?
Bana Mibali ya Nkake (Bonelegese).1
Okokaki te kopesama nkombo ya kobakisa ya lolenge wana kaka te soki yango ezalaki na ntina moko ya sikisiki. Na nsua, makomi epesi ndombola mingi te mpo na nini Yesu apesaki bango nkomba wana ya kobakisa. Atako, makomi epesi mua ndambo moke ya nsango etali yango na kati ya bato oyo Yakobo mpe Yoane. Bango bazalaki kaka bandeko baoyo bapesamaki kobengama moto ekita uta na lola na mboka moko ya Samalia mpo ete bango babiangami te na ekolo.2
Yakobo mpe Yoane bazalaki balobi mbisi—na ntembe bazalaki mpenza ya mpeto—kasi nakanisi bayebaki mingi etali biloko ya mokili. Na bosolo, bazalaki mibali ya kasakasa.
Na libaku moko, lokola Mobikisi amibongisaki kosala mobembo na Ye ya suka na Yelusaleme, Yakobo mpe Yoane bapusanaki pembeni na Ye na lisenga moko ya sikisiki—moko ntango mosusu kolongobana ya kombo na bango ya kobakisa.
“Tolingi ete osalela biso lokola tokolomba yo,” bango balobaki.
Nakoki kokanisa ete Yesu asekaki bango ntango Ye ayanolaki, “Bolingi ete naselela bino likambo nini?”
“Pesa biso kofanda, moko na loboko mobali nay o mpe moko na loboko mwasi nay o, kuna na nkembo na yo.”
Mobikisi sikawa atindaki bango kokinisa mua moke na bozindo na oyo etali oyo bango bazalaki kosenga mpe alobaki, “Kofanda na loboko mobali na ngai soko na loboko mwasi na ngai ejali mpo na ngai kopesa te; kasi ekojala na baoyo esili kobongisama mpo na bango.” 3
Na maloba mosusu, bokoki te kozua lokumu na bokonzi ya lola na kowelelaka yango. Bokoki mpe te “kobondela” nzela na bino mpo na nkembo ya seko.
Ntango bayekoli mosusu zomi bayokaki oyo etali bosenga oyo uta na Bana mibali ya Nkake, bango basepelaki. Yesu ayebaki ete ntango na Ye na bokufi ekomaki nsuka kala te, mpe amonaki kosuana katikati ya baye oyo basengelaki kokoba na liloba na Ye bakomaki kotungisa Ye.
Ye asololaki na Bazomi na Mibale etali lolenge ya nguya mpe boniboni esimbaka bango oyo baluki yango mpe basimbi yango. “Bato minene na mokili oyo,” Ye alobaki, “basaleli motindo na bango ya kibokonzi kofinaka nguya likolo ya basusu.”
Nakoki komona mpenza Mobiki, kotalaka na bolingo ezangi suka na bilongi na baoyo bayekoli ya bolingo mpe ya kondima. Nakoki mpenza koyoka mongo na Ye kolobaka, “Oyo ezali lolenge te yango esengeli kozala kati na bino, mpenza, jambi moto nani alingi kojala moto monene, ekoki na ye kojala mosaleli na bino: Mpe moto nani alingi kojala moto na liboso kati na bino, ekoki na ye kojala moombo na bino nyonso.”4
Na bokonzi na Nzambe, kimonene na kimokambi elakisi kotalaka basusu lolenge bazali mpenza—lokola Nzambe azali komona bango—mpe bongo kotandaka loboko mpe kosalelaka bango. Yango elakisi kosepelaka elongo na baye oyo bana esengo, kolelaka elongo na baoyo bazali na mawa, kosungaka baoyo na mitungisi, mpe kolingaka mojalani na biso lokola Klisto alingi biso. Mobikisi alingi bana nyonso ya Nzambe kotalaka te libaku na bango ya mambi ya libota mpe bozui, loposo ya nzoto, eyamba, lokota, kondima na politiki, ekolo, to lingombq nyonso mosusu. Mpe boye tosengeli kozala!
Mbano monene ya Nzambe epesami na baye bazali kosunga kozelaka te na lifuti. Yango epesami na baoyo bazali kosala nakosela masanjoli ya bato te. Baoyo bakeyi na kobombana kolukaka lolenge ya kosunga basusu; baoyo basely basusu kaka mpo ete bango balingi Nzambe mpe bana na Nzambe.5
Kovimbisa Tolo te mpo nayango
Ntango moke nsima nga kobianga lokola Mokambi Monene, nazuaki libaku ya kotika Mokambi James E. Faust mpo na bobongisi ya likonzi moko. Ntango nazalaki kokumba motuka mpo na etinda na ngai na Sudi ya Utah kitoko, Mokambi Faust azalaki moto malamu mingi kosalela ngonga wana koyekolisa mpe koteya ngai. Ateyaki ngai liteya moko nakoki kobosanaka ata mokolo moko te. Ye alobaki, “Bandimi ya Eklezia bakali malamu mpo na Bakambi Banene. Bakobatela yo malamu mpe bakoloba makambo malamu na ntina na yo.” Nsima apemaki moke mpe alobaki, “Dieter, ntango nyonso zala na botondi mpo na yango. Kasi kotika yango evimbisa yo tolo te.”
Liteya oyo ya motuya na oyo etali Eklezia epanzani na basimbi ya bonganganzambe mobimba na lisanga likoki mobimba ya Eklezia. Yango epanzani na biso nyonso na Eklezia oyo.
Ntango Mokambi J. Reuben Clark Jr. apesaki toli na baye babiangemaki kozala bakambi na Eklezia, ye asengelaki koyebisa bango babosana te mobeko ya motoba.
Nakoboya komikanga, moto akokaki kotuna, “Nini ezali mobeko ya motoba?”
“Komitungisa mingi na oyo bato bazali kokanisa mpo na yo te,” ye akokaki koloba.
Na bosolo, yango ememi na motuna elandi; “Mibeko mitano etikali ezali nini?”
Na etaleli moko ya lisano na miso na ye, Mokambi Clark alobi, “Yango ezali te.”6
Kozala Bakambi ya Eklezia ya kokoka, tosengeli koyekola liteya oyo ya motuya: kokamba na Eklezia ezali te koleka oyo etali kotambuisaka basusu lokola yango ezali bolingi na biso ya kotambuisama na Nzambe.
Mabiangi ezali Mabaku mpo na Kosala
Lokola Bansatu ya Nzambe Aleki Likolo, “na nyonso bokundola babola mpe bazangi, babeli mpe bato na mpasi, mpo ete oyo asali makombo oyo te azali moyekoli na ngai te.”7Mabaku ya kokende epai na epai kosalaka malamu mpe kosalisaka basusus ezangi ndelo. Tokoki komona bango na bisika na biso, na ba paluase mpe bitape, mpe na bosolo na bandako na biso.
Na kobakisa, mondimi nyoso ya Eklezia apesami mabaku na yemoko mpenza ya kosala. Tozuaka mabakuyango lokola “mabiangi”—na suka esengeli kokundolisa biso mpo na oyo yango ezali ete abengi biso kosala. Soki tozui mabiangi na biso kozala mabaku ya kosalela Nzambe mpe kosunga basusu na bondimi mpe bomikitisa, mosala nyonso tokosala ekozala litambe moko na nzela ya kiboyekoli. Na lolenge oyo, Nzambe akotonga kaka Eklezia na Ye te kasi akotonga lisusu basali na Ye. Eklezia esalemi mpo na kosunga biso kokoma bayekoli ya solo mpe ya bondimi ya Klisto, bana mibali mpe bana basi ya malamu mpe ya lokumu ya Nzambe. Yango ekomi kaka te ntango tokeyi na mayangani mpe toyoki masukulu kasi lisusu ntango tokani bato mosusu mpe tosaleli bango. Yango ezali lolenge nini tokomi “monene” na bokonzi ya Nzambe.
Tondimi mabiangi na bobonginie, bomikitisi, mpe botondi. Ntango tolongwe uta na mabiangi yango, tondimi mbonguana na bobonginie, bomikitisi, mpe botondi moko wana kaka.
Na miso na Nzambe, ezali libiangi moko te na bokonzi oyo ezali na motuya koleka mosusu. Mosala na biso—atako monene to moke—epetoli milimo na biso, efongoli maninisa ya lola, mpe mpe mapamboli ya Nzambe ya bolongoli ezali kaka te likolo ya baye tosaleli kasi ezali mpe likolo na biso. Ntango totandi loboko kosunga basusu, tokoki koyeba na komipesa nyonso ya komikitisa ete Nzambe ayebi mosala na biso na kondima mpe esengo. Ye akosepela likolo na biso ntango tobonzi misala yango yan bosolo na mawa, mingimingi oyo emonani mpe eyebani na basusu te. 8
Mbala inso tomipesi na basusu, tobelemi penepene mingi ya kokoma bayekoli malamu mpe ya solo ya Moko oyo apesaki nyonso na Ye mpo na biso: Mobikisi na biso.
Uta Kokambaka tii na Defile
Na ntango ya anniversaire ya 150 ya bokomi ya bapionie na Salt Lake Valley, Ndeko mobali Myron Richins azalaki kosalaka lokola mokambi moko ya likonzi na Henefer, Utah. Molulu esangisaki bozongi ya koleka ya bapionie na mboka oyo.
Mokambi Richins amipesaki na bozito mpenza na miango ya bosepeli, mpe asanganaki na mayangani elongo na Bakambi Banene mpe basusu kosolola na ntina ya molulu. Amipesaki mobimba.
Kaka yambo na bosepeli yango, Mokambi ya likonzi Richins abongisaki, mpe alongolamaki lokola mokambi. Na eyenga oyo elandi, azalaki kosangana na liyangani ya bonganganzambe na paluase na ye ntango bakambi basengaki mpo na baton kosala mpamba mpo na kosunga na molulu. Mokambi Richins elongo na basusu, atombolaki loboko mpe bapesamaki bandingisa ya kolata elamba ya mosala mpe komema motuka na ye mpe pau.
Na nsuka, ntongo ya molulu monene ekomaki, mpe Mokambi Richins ekandi kokokisa mosala na ye lokola mosali ya ofele.
Kaka bamposo mike yambo, apesaki lisungi monene na mabongisi mpe litambwisi ya molulu oyo monene. Na mokolo yango, atako, mosala na ye ezalaki kolanda mpunda na defile mpe kopetolaka nsima na bango.
Mokambi Richins asalaki yango na esengo mpe na kosepela.
Ye asosolaki ete lolenge ya mosala moko ezali koleka mosusu te.
Ye ayebaki mpe atiaki na misala maloba ya mobikisi: “Ye ya monene koleka kati na bino asengeli azala moombo na bino.”9
Kosalaka Kiboyekoli Malamu
Ntango mosusu, lokola Bana mibali ya Nkake, tozalaka na mposa ya bamotindo ya likolo. Tozali kobunda mpo na bondimami. Tozali koluka kotambuisa mpe kosala kotia moko ekobungama te.
Ezali na eloko moko mabe te na kozelaka kosalela Nkolo, kasi ntango toluki tozua lisimbami moko na Eklezia mpo na ntina na biso moko—na lolenge ya kozua masnjoli mpê lokumu ya bato—tokozua mbano na biso. Ntango bisi “totomboli tolo” masanjoli yabasusu, lisanjoli wana ekosala lifuti na biso.
Libiangi nini ezali motuya na Eklezia? Ezali oyo ozali na yango sikawa. Kolanda ata kokita to likolo yango ekok ikomonana kozala, libiiangi ozali na yango sikawa ezali moko oyo ekopesa nzela ya kotombola kaka basusu te kasi lisusu kokoma kokoma mobali ya Nzambe oyo osalamaki po ozala.
Baninga na ngai mpe bandeko na ngai mibali ya talo na bonganganzambe, botombuana esika botelemi!
Paulo ateyaki bafilipi, “Bosala likambo moko mpo na elulela soko mpo na njombo te kasi, awa ezali bino kosokema, botanga basusu ete baleki bino.”10
Kosalaka na Lokumu
Kolukaka lokumu to koyebana na Eklezia na esika mosala ya solo mpe komiktisa liboso ya basusu ezali ezalela ya Esau. 11 Tokoki kozua mbano moko ya mabele, kasi ekoya na talo monene—kozanga kondima ya Nzambe.
Tika biso tolanda ndakisa ya Mobikisi,, oyo azalaki komikita mpe kolemba, oyo alukaki te lisanjoli ya bato kasi asalaki bolingi ya Tata na Ye.12
Tika biso tosalela basusu na komikitisa—na bokasi, botondi, mpe lokumu. Atako misala na biso na mosala emonani yakolemba mpenza, komisokisa, to na motuya moke, baye oyo batandaka loboko na malamu mpe motema motutani na na basusu bakoyeba mokolo moko motuya ya mosala na bango na ngolu oyo epambolami mpe ya libela ya Nzambe ya Nguya nyonso.13
Bandeko ba ngai ba bolingo, baninga na ngai ba bolingo, ekoka bino komaniola, kososola, mpe tokobika liteya oyo ya motuya koleka ya koyangela Eklezia mpe ya kotambuisa bonganganzambe: “Ye ya monene koleka kati na bino asengeli azala moombo na bino.” Eye ezali losambo mpe lipamboli na ngai, na nkombo ya bule ya Nkolo na biso, Mosikoli na biso, na nkombo ya Yesu Klisto, amene.