2010–2019
Bobiangami mpo na Mosala
Sanza ya Minei 2017


16:13

Bobiangami na Mosala

Botindami mpo na kosala na esika moko songolo ezali ntina mpe motuya kasi ntina moke na libiangi moko mpo na kosala.

Mokambi Monson, tozali na nsai oyoka mongongo na yo mpe ozwa malakisi na yo. Tolingaka yo, tosungaka yo, mpe tosambelaka ntango nyonso mpo na yo.

Nasambeli mpo na lisungi ya Molimo Mosantu ntango tozali komaniola elongo mabongisi etali mosala monene ya koteya nsango malamu na bikolo, mabota, balokota, mpe bato banso.1

Bobiangami mpo na kosalisa mpe Botindami mpo na Kosala

Mibu nyonso bazomi ya bankoto ya bilenge mibali mpe bilenge basi, mpe misionele ya mikolo mingi, bazali kozela na esengo mpo na kozwa mokanda moko ya kafukafu uta na Salt Lake City. Makambo ya mokanda etutaka motema ya moto oyo etindameli, na baye libota mpe motango monene ya bato misusu. Ntango ekomi, envelope ekoki kofungolama na bokebi mpe na motema molai to kopasolama na motema motomoto mpe na lombango mingi. Kotangaka mokanda kafukafu oyo ezali likambo moko ya kobosana ata moke te.

Mokanda wana etiami elembo ya Mokambi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka, mpe milongo ya yambo etangami boye: “Na nzela ya mokanda oyo obiangami mpo na kosala lokola misionele ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka. Otindami mpo na kosala na Misio ya______.”

Tosengi boyeba ete molongo ya yambo ezali libiangi mpo na kosala lokola misionele ya ntango mobimba na Eklezia ezongisami ya Nkolo. Molongo ya mibale elakisi botindami mpo na kosala na esika mpe misio moko songolo. Bokeseni monene oyo elobelami na milongo mibale oyo ezali na ntina mpo biso banso tososola

Na momesano ya Eklezia, tolobelaka mbala mingi ya kobiangama mpo na kosala na ekolo moko ndakisa Argentine, Pologne, Koré, to Etazini. Kasi misionele abiangami na esika te, kasi abiangami mpo na kosala. Lokola Nkolo alobaki na Profeta Joseph Smith na 1829, “Soki ozali na mposa ya kosalela Nzambe obiangami na mosala.”2

Libiangi mpe botindami ya misio moko na moko, to botindami mosusu ya nsima, ezali mbano ya bobimisi na nzela ya basali ya Nkolo. Libiangi na mosala ewutaka na Nzambe na nzela ya Mokambi ya Eklezia. Botindami na moko ya koleka 400 misio oyo ezali kosala sikawa na mokili mobimba ewuti na Nzambe na nzela ya moko ya Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale, kosalaka na ndingisa ya profeta na bomoi ya Nkolo. Makabo ya molimo ya lisakoli mpe libimisi ezali elongo na mabiangi mpe mikumba nyonso ya misio.

Eteni 80 ya Doctrine et Alliances ezali nkoma ya libiangi ya misio na Stephen Burnett epesamaki na nzela ya Profeta Joseph Smith na 1832. Koyekolaka libiangi oyo na Ndeko mobali Burnett ekoki kosalisa biso (1) kososola na polele mingi bokeseni katikati ya kozalaka ya “kobiangama na mosala” lokola misionele mpe ya “kotindama mpo na mosala” na esika moko songolo mpe (2) kolula mobimba koleka ya biso mokumba epesami ya moto na moto mpe ya bonzambe ya kosakola nsango malamu.

Molongo ya 1 ya eteni oyo ezali libiangi mpo na kosala: “Solo, boye elobi Nkolo na yo mosali na ngai Stephen Burnett: Kende, kende kati na mokili sakola nsango malamu na ekelamu nyonso oyo eyei na nse ya lokito ya mongongo na yo.”3

Na litomba, molongo ya  2 eyebisi Ndeko mobali Burnett oyo etali moninga na ye ya esika ya misio: “Mpe soki olingi moninga, nakopesa yo mosali na ngai Eden Smith.”4

Molongo ya 3 elakisi esika wapi bamisionele mibale oyo basengeli kosala: “Yango wana, bokende mpe bosakola nsango malamu na ngai, atako na nodi to na sudi, na esite to na wesiti, likambo te, mpo bokoki kobunga te.”5

Nandimi te ete maloba “ezali likambo te” ya Nkolo na makomi oyo, bo esalelami elingi koloba ete Ye azali kotala te bisika wapi basali na ye basalaka. Nzokande, Ye atalaka na mozindo. Kasi lokola mosala ya kosakola nsango malamu ezali mosala ya Nkolo, Ye afulaka, akambaka, mpe ayangelaka basali na Ye bapesama ndingisa. Ntango bamisionele bazali kosala makasi ya kokoba kozala bisaleli ya kolongobana mpe ya makoki mingi na maboko na Ye mpe basali ya bango malamu koleka mpo na kokokisa mikumba na bango na bondimi, nde na lisalisi na Ye “bakoki kobunga te”—ezali wapi bakosala. Ntango mosusu moko ya mateya Mobikisi ateyaki biso na bobimisi oyo ezali ete botindami mpo na kosala na esika moko songolo ezali ntina mpe motuya kasi ntina moke na libiangi moko mpo na kosala.

Molongo oyo elandi ebeti nsete na babolongobani ya ntina mpo bamisionele banso: “Yango wana, bosakola makambo oyo boyoki, mpe solo bondimi, mpe boyebi kozala solo.6

Molongo ya nsuka ezali kokundolisa Ndeko mobali Burnett mpe banso na biso uta na nani libiangi mpo na kosala solo ewutaka, “Tala, oyo ezali bolingi na ye oyo abiangi bino, Mosikoli na bino, kutu Yesu Klisto. Amene.”7

Kolonga Bozangi Bososoli

Basusu kati na bino bakoki kozala komituna mpo na nini naponi kosolola na liyangani ya bonganganzambe ya likita linene bokeseni oyo ezali lokola ya polele katikati ya bobiangemi na mosala mpe botindami mpo na mosala. Eyano na motuna na bino ezali semba mpenza: boyebi na ngai eteyi ngai ete mabongisi oyo esosolami malamu te na bandimi mingi ya Eklezia.

Ntina moko monene koleka mpenza mpo na kolobela likambo oyo ezali nini nayekoli na mibu na oyo etali likambo, motungisi, mpe kutu mabe oyo bamisionele mingi bayoki oyo mpo na bantina ekeseni bapesamaki bisika mosusu na elanga ya mosala na ntango na bango ya kosala. Babotindi ya boye ntango mosusu esengelami mpo na makambo mpe bizaleli ndakisa makama mpe bampota ya nzoto, bozilisi mpe mikakatano na kozwaka visa, mobulu ya politiki, kokela mpe kotia basali ya bamisio ya sika, mpe to botamboli mpe mbongwana ya ntango nyonso ya babosenga na mokili mobimba na mosala ya kosakola nsango malamu.8

Ntango misionele atindami lisusu na elanga ekeseni ya mosala, esalelo ezali mpenza lolenge moko na botindami ya ebandeli. Bato ya Lisanga likoki ya Bazomi na Mibale balukaka bofuli mpe bokambami na kosalaka babotindi mosusu ya boye nyonso.

Kala te nasololaki na mobali moko ya bondimi oyo akabolaki na ngai mayoki ya mozindo mingi ya motema na ye. Na bokutani moko, nalimbolaka bokeseni katikati ya kozala ya kobiangama na mosala mpe kotindama mpo na mosala. Ndeko mobali malamu oyo apesaki ngai mbote mpe na mpizoli na miso na ye alobaki na ngai, “Makambo osalisi ngai nayekola lelo elongoli bozito na mapeka na ngai oyo namemi koleka mibu 30. Lokola elenge misionele, esika ya mosala na ngai ya ebandeli ezalaki na elanga ya mosala na Amerika ya Sudi. Kasi nazalaki na makoki ya kozwa visa te, yango wana esika ya mosala na ngai ebongwamaki mpo na kokende na Etazini. Mibu nyonso oyo namitungisaki mpo na nini nazalaki na makoki te ya kosala na esika wapi nabiangamaki. Sikawa nayebi nabiangamaki na mosala mpe na esika te. Nakoki koyebisa bino te boniboni bososoli oyo esalisaki ngai.”

Motema na ngai esalaki mpasi mpo na mobali malamu oyo. Ntango nateyaki mabongi ya ntina oyo na mokili mobimba, bato mingi balobeli ngai na nkuku mayoki kaka moko lokola mobali oyo nalimbolaki. Nazali kolobela likambo oyo lelo mpo ata mondimi moko te ya Eklezia asengeli komema mokumba ezanga ntina ya bozangi kososola, ntembe, motungisi, to mabe na oyo etali botindami mpo na mosala.

“Yango wana, bokende mpe bosakola nsango malamu na ngai, atako na nodi to na sudi, na esite to na wesiti, likambo te, mpo bokoki kobunga te.”9 Ntango bomanioli maloba ya makomi oyo mpe bofungoli motema na bino. Nalikii mpe nasambeli bokobengisa Molimo Mosantu mpo na komema na mozindo kati na molimo na bino bososoli, libiki, mpe bozongisi bokoki kozala na yango mposa.

Ntina moko ya kobakisa nayokaki mposa ya kobola likambo oyo ezali boyebi na ngai moko ya kotinda bamisionele mibu mingi. Mpo na Bazomi na Mibale, eloko moko te endimisaka bosolo ya bobimisi ya kokoba ya mokolo ya nsuka na nguya koleka kolukaka kososola bolingi ya Nkolo wana ezali biso kokokisa mokumba na biso ya kotinda bamisionele na bilanga ya mosala na bango. Natatoli ete Mobikisi ayebi mpe azali kokanisa moko na moko na biso “moko na moko” mpe na nkombo.

Komilengala mpo na Libiangi na Mosala

Nalingi sikawa kosolola na mokuse likambo moko ya ntina kasi mbala mingi etalamaka mpamba ya komilengela mpo na libiangi na mosala.

Maloba misato ekangana elimboli ndakisa ya komilengela mpe ya bokoli mpo na bana mibali ya Nzambe: bonganganzambe, tempelo, misio.Ntango mosusu lokola baboti, baninga, mpe bandimi ya Eklezia, toyekamaka mingi mpenza likolo ya bolengeli ya misio mpo na bilenge mibali ete totalaka mpamba na ndelo moko boye bitambe ya ntina na nzela ya mayokani oyo esengeli kokokisama liboso ya kobanda mosala ya misio ya ntango mobimba. Kosalaka lokola misionele solo ezali moko ya kasi ntina moko kaka te na nzela ya kokela moboko makasi mpo na bomoi mobimba ya bokoli mpe mosala ya molimo. Mapamboli ya bonganganzambe mpe ya tempelo, nyonso mibale eyaka liboso ya kokoma na elanga moko ya mosala, lisusu esengelami mpo na kolendisa mpe kopesa biso bokasi na molimo na bomoi na biso mobimba.

Bilenge mibali, ntango bozali kokokisa balotomo na bino mpe kotosa Bonganganzambe ya Alona, to ya moke, bozali komilengele mpo na koyamba mpe kosalela ndai mpe mayokani ya Bonganganzambe, ya Melekisedeke, to ya monene.10 Bolongobani ya moto se moko ezali bosenga moko ya motuya mingi mpo na koyambaka bonganganzambe ya likolo. Bomoi mobimba ya mosala ya bonganganzambe ya komipima efandi liboso na bino. Bomilengele sikawa na kosalaka mosala ya ntina mbala na mbala. Nasengi boyekola kolinga kozalaka mpe kotikalaka ya kolongobana. Bozala ya kolongobana. Botikala ya kolongobana.

Nsima ya koyambaka Bonganganzambe ya Melekisedeki mpe libiangi ya kosala, elenge mobali moko akoki kolatisama na nguya 11 na nzela ya mayokani mpe makuli ya tempelo esantu. Kokendaka na tempelo mpe kozalaka na molimo ya tempelo kati na yo eyaka liboso ya mosala mpenza lokola misionele ya ntango mobimba. Bolongobani ya moto se moko ezali bosenga moko ya motuya mingi mpo na koyambaka mapamboli ya tempelo mpo na bilenge mibali mpe bandimi banso ya Eklezia. Ntango bozali kobika engebene na mibeko ya nsango malamu, bokoki kokota na ndako ya Nkolo mpe kosala elongo na makuli ebulisama na mibu ya bolenge na bino mobimba. Bolingo na bino mpo na mpe bososoli ya makuli ya tempelo ekolendisa mpe ekopambola bino na bomoi na bino mobimba. Nasengi boyekola kolinga kozala mpe kotikala ya kolongobana. Bozala ya kolongobana. Botikala ya kolongobana.

Bilenge mibali mpe bilenge basi mingi basili kosimba ya ndingisa ya tempelo ya esalelo ya ntango mokuse ya sika. Lokola basimbi ya bonganganzambe ya Alona, bozali kozwa bankombo ya libota na bino moko mpe kosala mabatisi mpe bankotisa mpo na baye libota na bino na tempelo. Kozalaka na ndingisa ya tempelo elakisi bolongobani na bino, mpe kosalisa basusu na tempelo ezali eteni ya motuya ya komilengelaka mpo na Bonganganzambe ya Melekisedeki.

Bilenge mibali, moko na moko na bino azali misionele sikawa. Banso nzinganzinga na bino, mikolo nyonso, bazali baninga mpe bazalani “oyo babombami mosika ya bosolo mpo bayebi te wapi kokuta yango.”12 Ntango boyangelami na Molimo, bokoki kokabola likanisi moko, libengisi moko, nkoma to tweet oyo ekoyingisa baninga na bino epai ya babosolo ya nsango malamu ezongisami. Bosengeli kozela libiangi uta na bakambi te mpo na komipesa na esengo na mosala ya misionele.

Ntango mapamboli ya Bonganganzambe, ya tempelo, mpe ya misio esangisami “elongo na moko … na Klisto”13 mpe kosalana na lisanga na motema, makanisi, mpe molimo ya elenge misionele, akoki kolongobana mpo na mosala.14 Makoki na ye ekobuta mpo na kokokisa mokumba mpo nazala na nguya ntoma ya Nkolo Yesu Klisto. Bosangisi makasi ya molimo ya kotosaka bonganganzambe mpe mayokani ya tempelo, kozwaka “nguya ya bonzambe”15 na nzela ya makuli ya bonganganzambe,16 kosalaka na komipima, kosakolaka nsango malamu ya libela na bana ya Nzambe mpo na kokoma “sikisiki mpe molende kati na bondimi”17 mpe “bolendisama mpe botongama kati na [Kliso].”18

Na bandako na biso mpe na eklezia, tosengeli kopesa ntina ekokana na makambo misato nyonso ya ndakisa ya komilengela mpe ya bokoli mpo na bana mibali ya Nzambe: bonganganzambe, tempelo, misio. Nyonso misato esengaka biso tolinga kozala mpe kotikala ya kolongobana. Bozala ya kolongobana. Botikala ya kolongobana.

Elaka mpe Litatoli

Bandeko na ngai balingami, nalaki likabo ya molimo ya bobimisi ekozala elongo na libiangi na bino na mosala ya kosakolaka nsango malamu mpe botindami na bino na elanga to bilanga songolo ya mosala. Ntango bozali komilengela na etingia sikawa na nzela ya bonganganzambe ya komipima mpe mosala ya tempelo, litatoli na bino bosolo na bomoi ya Nzambe ekolendisama. Bolingo mpo na Ye mpe mosala na Ye ekotonda na motema na bino. Ntango bozali koyekola kolinga kozalaka ya kolongobana, bokokoma esalelo ya nguya na maboko ya Nkolo mpo na kopambola mpe kosalisa bato mingi.

Na esengo, natatoli ete Tata na biso na Lola mpe Mwana wa Ye ya Mobali Molingami, Yesu Klisto, azali na bomoi. Komipesa na mosala na Bango ezali moko ya mapamboli eleki monene tokoki kozwa. Natatoli boye na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.