Mpe Oyo Ezali Bomoi ya Seko
Nzambe ayebi yo mpe azali kobengisa yo mpo na koyeba Ye.
Nazali koloba na bino, nkola ya kobuta—bilenge mpe bilenge ya mikolo, babala te to babala—bozali bakambi ya mikolo ekoya ya oyo, Eklezia ya Nkolo. Na botau, mobulungano, bobangi, mpe mabungi nyonso ya mokili ya lelo, nalobi na bino polele na ntina ya lokumu mpe lipamboli ya koya epai ya Nzambe.
Yesu Klisto ateyaki bosolo mingi oyo esosolisi mwango ya esengo ya Tata mpe esika na biso na yango. Nakobeta nsete na bosolo mibale oyo ekosalisa bino bososola ezaleli na bino lokola bana ya Nzambe mpe boyeba ntina na bino na bomoi.
Yambo: “Mpo ete Nzambe alingaki mokili na motindo boye ete apesi Mwana-na-likinda na ye ete moto na moto oyo akondima ye abebisama te kasi azala na bomoi na seko.”1
Ya mibale: “Mpe oyo ezali bomoi na seko ete bayeba yo Nzambe moko na solo mpe Motindami na yo Yesu Klisto.”2
Nasengi bobatela bosolo oyo na motema—eteyaka mpo na nini—wana ezali ngai koluka kolimbola lolenge nini bino mpe banso kati na biso tokoki koya epai ya Nzambe.
Boyeba Ye na nzela ya Losambo
Bilenge baninga na ngai, tokoki kobanda koyeba Nzambe na nzela ya losambo.
Na sanza ya minei 7, 1829, Oliver Cowdery ya mibu 22 abandaki mosala na ye lokola mokomi mpo na Joseph Smith ya mibu 23. Bazalaki bilenge, kaka lokola bino. Oliver asengaki bondimami uta na Nzambe na oyo etali Bozongisi mpe mosala na yango. Na eyano, azwaki bobimisi oyo elandi:
“Tala, boyebi ete osengaki epai na ngai mpe nangengisaki mayele na yo. …
“Iyo, Nalobi na yo, ete okoki koyeba ete ezali na moko te mosusu longola se Nzambe oyo ayebi motema na yo mpe makanisi ya motema na yo. …
“… Soki ozali na mposa ya litatoli mosusu, zongisa makanisi na butu oyo obelelaki epai na ngai na motema na yo. …
“Elobaki ngai kimia na motema na yo te … ? Litatoli monene nini okoki kozwa koleka uta na Nzambe?”3
Ntango bino bosambeli na bondimi, boyokaka bolingo ya Nzambe lokola Molimo na Ye ekolobela ya biso molimo. Likambo te lolenge nini ozali yo moko to ozali komiyeba te okoki koyoka bangonga mosusu, ozali yo moko te kati na mokili . Nzambe ayebi yo, yo mpenza. Ntango ozali kosambela, okoya koyeba Ye.
Yeba Ye na nzela ya Koyekola Makomi—
Ntango boyekolaka makomi, boyekolaka bobele te oyo etali Mobikisi, kasi bokoki koya mpenza koyeba Mobikisi.
Na Sanza ya minei 1985, Mpaka Bruce R. McConkie alobaki na likita linene— kaka mikolo 13 yambo akufa. Asukisaki na litatoli oyo:
“Nazali moko ya banzeneneke na ye, mpe na mikolo ekoya nakoyoka bilembo ya nsete na maboko na ye mpe na makolo na ye mpe na kopolisa makolo na ye na mpizoli na ngai.
“Kasi ngai nakoyeba malamu mpenza te koleka nayebi sikoyo ete azali Mwana ya Nzambe ya Nguya Nyonso, ete azali Mobikisi mpe Mosikoli, mpe ete lobiko eyaka kati mpe na nzela na makila ya bomikabi na ye mpe na nzela mosusu te.”4
Baye kati na bino oyo bayokaki Mpaka McConkie koloba mokolo wana babosani ata moke te lolenge nini tomiyokaki. Ntango abandaki lisukulu na ye, abimisaki mpo na nini litatoli na ye ezalaki na nguya mpenza. Alobaki:
“Na kolobaka na ntina ya makambo ya kafukafu oyo nakosalela maloba na ngai moko, atako bokoki kokanisa ezali maloba ya makomi. …
“Ezali solo ete elobamaki yambo na basusu, kasi ezali sikoyo ya ngai, mpo Molimo Mosantu ya Nzambe apesi litatoli epai na ngai ete ezali solo, mpe ezali sikoyo lokola soki Nkolo abimisaki yango epai na ngai na mbala ya yambo na yango nayoki mongongo na ye mpe nayebi liloba na ye.”5
Ntango okoyekola mpe okomaniola makomi, yo mpe okoyoka mongongo ya Nzambe, okoyeba maloba na Ye, mpe okoya koyeba Ye. Nzambe akobimisa bosolo na Ye ya seko epai na yo mpenza. Malongi mpe mabongi oyo ekokoma eteni ya nani ozali mpe ekowuta na molimo na yo mpenza.
Na kobakisa na boyekoli ya moto na moto, koyekola makomi lokola libota ezali na ntina.
Na ndako na biso tolingaki bana na biso bayekola koyeba mongongo ya Molimo. Tondimi ete wana esalemaka ntango tozalaki koyekola Buku ya Mormon mokolo na mokolo lokola libota. Matatoli na biso elendisamaki ntango tozalaki kolobela oyo etali bosolo ya bule.
Boyekoli makomi ekomaka nzela mpo ete Molimo epesa moko na moko na biso mateya elongobana na ye. Ntango bozali koyekola makomi mokolo na mokolo, yo moko mpe elongo na libota na yo, yobokoyekola koyeba mongongo ya Molimo mpe bokoya koyeba Nzambe.
Yeba Ye na Kosalaka Bolingi na Ye
Na kobakisa na losambo mpe boyekoli makomi na biso, tosengeli kosala bolingi na Ye.
Nkolo azali ndakisa na biso ebonga mpenza. Alobaki, “nasili kokita longwa na lola, mpo na kosala mokano na ngai te, kasi nasala mokano na Motindi na ngai.”6
Ntango Mobikisi mosekwi abimelaki Banefi, Alobaki, “Mpe tala, nazali mwinda mpe bomoi ya mokili; mpe nameli nkeni eye ya bololo eye Tata apesi ngai, mpe nakembeli Tata na kokamataka likolo na ngai masumu ma mokili, na yango nandimi bolingi ya Tata na makambo manso uta o ebandeli.”7
Bino mpe ngai tosalaka bolingi ya Tata na kokumisaka mayokani na biso, kobatelaka mitindo, mpe kosaleka Nzambe mpe baninga na biso bato.
Mwasi na ngai, Rhonda, mpe ngai tozali na baboti oyo bazali bato ya bongo na bongo—ntango mosusu lokola baboti na bino. Kasi eloko moko nalingaka oyo etali baboti na biso ezali ete bapesaki bomoi na bango na kosaleka Nzambe, mpe bateyaki biso kosala lokola.
Ntango baboti ya Rhonda bakokisaki kaka mwa mibu nsima ya libala, tata na ye ya mibu 23 abiangamaki mpo na kosala misio ya ntango mobimba. Atikaki nsima elenge mwasi na ye mpe mwana na bango ya mwasi ya mibu 2. Nsima mwasi na ye abiangamaki mpo na kosala elongo na ye ya misio na ye—kotikaka bana na bango na bobateli ya bandeko.
Mwa mibu nsima, sikoyo na bana minei , bakendeki na Missoula, Montana, boye tata na ye akokaki kokende na univesité. Nzokande, basalaka bobele mwa basanza ntango Mokambi Spencer W. Kimball mpe Mpaka Mark E. Petersen abiangaki bokilo na ngai mpo na kozala Mokambi ya yambo ya likonzi ekelamaki sika ya Missoula. Azalaki bobele na mibu 34. Makanisi ya université etikalaki nsima ntango alukaki kosala bolingi ya Nzambe —ya ye moko te.
Ya ngai Baboti basalaki na tempelo mpo na mibu koleka 30—Tata lokola mokangisi, Mama lokola bosali ya likuli. Bango lisusu basalaki bamisio ya ntango mobimba, na Riverside, California; Ulaanbaatar, Mongolia; Nairobi, Kenya; na Tempelo ya Nauvoo Illinois; mpe na tempelo ya Monterrey Mexique. Na Mexique, basalaki makasi mpo na koyekola lokota ya sika, yango ezalaki pete te na mibu 80. Kasi balukaki kosala bolingi ya Nkolo na esika ya kolanda bamposa na bongo moko na bomoi.
Na Basantu ya Mikolo ya Nsuka bamipesa banso ya boye na mokili mobimba, nazongeli maloba eloba Nkolo epai ya profeta Nefi: “Opambolami, … mpo makambo wana oyo osali … na bozangi bolembi … [mpo yo] oluki te bomoi bwa yomei, kasi oluki bolingi bwa ngai, mpe mpo ya kobatela mitindo ya ngai..”8
Ntango biso toluki kosala bolingi ya Nkolo na kosalelaka Ye na bondimi mpe baninga na biso bato, tokoyoka bondimami na Ye mpe solo tokoya koyeba Ye.
Yeba Ye na Kokomaka lokola Ye
Mobikisi alobi na biso ete nzela malamu koleka mpo na koyeba Nzambe ezali kokoma lokola Ye. Ateyaki: “Yango wana, lolenge kani ya bato bosengeli kozala? Solo nalobi epai ya bino, kutu lokola nazali.”9
Bolongobani ezali na ntina mpo na kokoma lokola Ye. Atindaki, “Bomibulisa; iyo, bopetola mitema na bino, bosukola maboko na bino … mpo ete nakoka kosukola bino.”10 Na kobandaka na nzela ya kokomaka lokola Ye, tokoyambola, mpe tokozwa bolimbisi na Ye, mpe Akopetola milimo na biso.
Mpo na kosalisa biso ntango tozali kokoba kokende epai ya Tata, Nkolo apesaki biso elaka na Ye: “Molimo nyonso oyo atiki masumu na ye mpe ayei epai na ngai, mpe abeleli nkombo na ngai, mpe atosi mongongo na ngai, mpe abateli mitindo na ngai, akomona elongi na ngai mpe akoyeba ete Nazali.”11
Na nzela ya bondimi kati na libonza ya Bomikabi na Ye, Mobikisi asukoli biso, mpe akokisi biso mpo na koyeba Ye na kosalisaka biso kokomalokola Ye. Mormon ateyaki, “Yango wana, bandeko balingami ba ngai, sambelani epai ya Tata na makasi manso ma motema , … ete bokoka kokoma bana babali [mpe bana basi] ba Nzambe, ete ekobima ye tozala bo ye.”12 Ntango tozali kosala makasi mpo na kokoma lokola Nzambe, Ye akoki kosala biso tozala koleka oyo tokoka komisala.
Yeba Ye na Kolandaka Basungi
Mpo na kosalisa biso na makasi na biso, Nzambe apesi biso bandakisa mpe basungi . Nalingi kokabola mayoki na ngai oyo etali moko wa ngai, Mpaka Neal A. Maxwell. Azalaki koluka ntango nyonso kotika bolingi na ye na bolingi ya Tata na bokasi na ye ya kokoma lokola Nzambe.
Koleka mibu 20 eleki, akabolaki mayoki na ye elongo na ngai kaka nsima ya kozwama na cancer. Alobaki na ngai, “Nalingi kozala na lingomba, na ngambo oyo [ya elamba] to na ngambo wana. Nalingi kofanda na mpembeni te. Nalingi kobeta na lisano.”13
Na mwa baposo elandaki, azalaki kolinga te kosenga Nzambe abikisa ye; alingaki kaka kosala bolingi ya Nzambe. Mwasi na ye, Colleen, alimbolaki ete bogangi ya yambo ya Yesu na elanga ya Getesemane ezalakai “Soki ekoki, tika ete kopo oyo elongwa na ngai.” Nsima kaka Mobikisi alobaki, “Kasi lokola elingi ngai te nde lokola elingi yo,” 14 Alendisaki Mpaka Maxwell alanda ndakisa ya Mobikisi, kosenga libiki, mpe nsima kotika bolingi na ye na bolingi ya Nzambe, yango nde asalaki.15
Nsima ya mpasi na nzela ya kozwa nkisi ya ntango molai mpe ya kobuka nzoto pene ya mobu moko, azongaki mpenza mobimba “na lisano.” Asalelaki Nzambe mibu nsambo mosusu.
Nazalaki na bitinda ebele elongo na ye na mibu wana ya nsima. Nayokaki boboto, mawa, mpe bolingo na ye. Nazalaki nzeneneke bobakisi ya bopetoli na ye ya molimo na nzela ya mpasi ya kowumela mpe mosala ya kokoba na ye ntango azalaki kobunda mpo na kokoma lokola Mobikisi.
Ndakisa mpe lisungi ya nsuka, oyo ezali mpo na biso banso, ezali Nkolo mpe Mobikisi na biso, Yesu Klisto, oyo alobaki, “Ngai nazali nzela mpe solo mpe moi. Moto akoya epai na Tata te soki na nzela na ngai te.”16 “Yaka mpe landa ngai. ”17
Bilenge bandeko na ngai mibali mpe basi, koyeba Nzambe ezali boluki ya bomoi mobimba. “Mpe oyo ezali bomoi ya seko ete biso tokoka koyeba … Nzambe moko na solo, mpe Yesu Klisto, oyo [tata] atindaki.”17
“Ekoki biso te kokoba na mosala monene boye? … Boyika mpiko, [bilenge baninga na ngai]; mpe bokoba, bokoba tii na elonga!”18
Nzambe ayebi bino mpe nabengisi bino boyeba. Ye Bosambela Tata, boyekola makomi, boluka kosala bolingi ya Nzambe, bobunda mpo na kokoma lokola Mobikisi, mpe bolanda basungi ya bosembo. Ntango bosali yango, bino bokoya koyeba Nzambe mpe Yesu Klisto, mpe bokosangola bomoi ya seko. Oyo ezali libengisi epai na bino lokola nzeneneke ya kafukafu akulisama na Bango. Bazali na bomoi. Balingaka bino. Natatoli bongo na nkombo ya Yesu Klisto, amene.nkombo ya Yesu Klisto, amene.