Tika ete Mwinda Nabiso Ezala lokola Bendele mpo na Bikolo
Nsango malamu ya Mobikisi mpe Eklezia na Ye ezongisama epesaka biso mabaku ebele mpo ete pole na biso ezala eteni moko ya bendele monene mpo na bikolo.
Mibu eleki, ntango nazalaki kosalisa lokola motei na seminele, nayokaki moko ya baninga na ngai basali kotuna bayekoli na ye bayanola na motuna: Soki bozalaka ntango Mobikisi azalaka, mpo na nini bokanisi bongo ete bosengelaki kolanda Ye lokola moko ya bayekoli na Ye? Bayanolaki na nsuka ete baoyo bazali kolanda Mobikisi na mikolo oyo mpe bazali koluka kozala bayekoli na Ye bazali lokola na ntango ya kala.
Uta kala, nakanisaki na motuna wana mpe bosukisi na yango. Namitunaka ntango nionso boniboni nayokaki Mobikisi Yemei ntango alobaki oyo eladi na Esakola likolo ya Ngomba:
“Bozali mwinda ya mokili. Mboka oyo etongami likolo ya ngomba, ekoki kobatama te.
“Mutu moko te akoki kopelisa mwinda, mpe kotiya yango na nse ya mesa, kasi likolo ya mesa; mpe epesa pole kati ya nionso oyo ezali na ndaku.
“Tika ete pole na biso engenga liboso ya batu, mpo ete bamona misala na bino malamu, mpe nkembo ekende epai ya Tata na biono oyo azali na lola” (Matai 5:14–16).
Bokoki kokanisa lolenge nini bokokaki koyoka mongongo ya Mobikisi? Ya solo, tosengeli te kokanisa. Ekomi boyebi makasi mpo na biso ya koyoka mongongo ya Nkolo, mpo ete ntango toyokaka mongongo ya basali na Ye, ezali lolenge moko.
Na 1838, na nsango moko ya lolenge moko na oyo epesami na Esakola likolo ya Ngomba, Nkolo alobaki oyo elandi na Profeta Joseph Smith:
“Mpo bongo ekobengama eklezia na ngai na mikolo ya nsuka, Eklezia ya Yesu Klistu ya Basantu ba mikolo mya Nsuka.
“Ya solo nalobi na bino nionso: Botelema mpe bongenga liboso, ete pole na bino ekoka kozala bendele mpo na bikolo” (D&A 115:4–5).
Mikolo na biso ezali malamu koleka ete emonisamaki na limonisi ya profeta Yisaya; amonaki mpe lisusu mpe asakolaki na ntina ya mokolo ya Bozongisi ya Eklezia ya Yesu Klistu mpe bantina na yango, kolobaka, “Mpe akotiya elembo mpo na bikolo, mpe akosangisa baoyo balongola na Yisalaele, mpe akosangisa baoyo babunga ya Yuda uta ngambo nionso minei ya mabele” (Yisaya 11:12).
Na lolenge ya makomi, elembo, to bendele, ezali dalapo nzinga nzinga epai wapi batu basengeli kosangana elongo na bomoko na ntina. Na ntango yak ala, bendele, ezalaki kosunga lokola elembo ya basoda na bitumba. Na elembo kolobaka, Buku ya Mormon mpe Eklezia ezongisama ya Yesu Klistu ezali babendele na bikolo nionso. (Tala Guide to the Scriptures, “Ensign,” scriptures.lds.org.)
Na ntembe te, moko ya babendele ya mikolo mya nsuka ezali likita linene oyo kitoko, esika oyo mosala monene mpe moango ya Tata na Lola ya “kokokisa bozangi nkufa mpe bomoi ya seko ya mutu” (Moses 1:39) ezali kokoba koteyama.
Likita linene oyo ezali kokoba ezali moko ya matatoli monene na ntina ete, biso Basantu ba mikolo mya Nsuka “tondimelaka ete Nzambe asokolaki, nionso oyo azali kosakola sikawa, mpe akosakola lisusu makambo minene ya ntina na oyo etali Bokonzi ya Nzambe” (Biteni ya Bondimi 1:9).
Nini, kasi, Nkolo asakolaki na nzela ya Profeta Thomas S. Monson oyo tosengeli kokoba kosalaka mpo ete pole na biso ekoka kozala bendele mpo na bikolo? Nini ezali makambu ya ntina oyo esengeli kosalema na ntango oyo malamu ya botongi ya Siona mpe kosangisa Yisalaele?
Nkolo asi asakolaki bolingi na Ye na biso “mokoloto likolo ya mokoloto, mobeko likolo ya mobeko, oyo mwa ndambo” (2 Nephi 28:30). Yango wanas, tosengeli kokamwa te, tosengeli te kokamwa na oyo tokoki komonana lokola biloko ya pete mpo na bopete na yango mpe lolenge na yango ya mbala na mbala, mpo ete Nkolo asi ateyaki biso, kolobelaka biso ete “bapambolami ezali baoyo bazali koyokamela ngai, mpe bazali kotiya litoyi na liteya na ngai, mpo ete bakoyekola bwanya; mpo ete baoyo bakozwa yango nakopesa ye ebele koleka” (2 Nefi 28:30).
Natatoli ete na koyekolaka “mokoloto likolo ya mokoloto, mobeko likolo ya mobeko, awa mwa ndambo likolo ya mwa ndambo” mpe koyokaka mateya ya bakambi na biso, tokozwa mafuta mpo na bamwinda na biso oyo ekosunga biso mpo ete topesa pole epai ya basusu lokola Nkolo alobelaki biso.
Atako ezali na makambo ebele tosengeli kosala, kozala mwinda mpe bendele mpo na basusu, nalingi kobeta sete na misato oyo elandi: kotosaka mokolo ya Saba; kotambusa na lombango mosala ya lobiko na ngambo ya bawei, mpe koteyaka na lolenge ya Mobikisi.
Mwinda oyo tozali kolobela eyaka na bomipesi oyo topesaka na botosi ya mokolo ya Saba, kati ya Eklezia mpe lisusu na libot; ezali mwinda oyo ekolaka ntango tomibatelaka na makambu ya mokili; ezali mwinda oyo eyaka na kobonzaka elambo na biso na mokolo na Ye ya bule mpe na kofutaka moko na biso ya bomipesi na Likolo Koleka—oyo epesaka biso ndingisa ntango nionso ya kozala na Molimo na Ye elongo na biso. Ezali mwinda wana ekokola mpe ekokoma na nguya ntango tozongi na ndaku na liyoki ya kolimbisa oyo Mokambi Henry B. Eyring alobelaki na likita Linene oyo eleki ya sanza ya Zomi ntango alobaki: “Na mapamboli nionso oyo tokoki kozwa, ya monene ezali liyoki ya bolinmbisi oyo eyaka ntango tokabolaka elambo. Tokoyoka bolingo monene mpe bosepeli mpo na Mobikisi, oyo libonza ezanga nsuka epesaki biso ndingisa ya kopetolama na masumu” (“Botondi na mokolo ya Saba,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2016, 100).
Ntango tozali kotosa mokolo ya Saba ya bule mpe kobaola elambo, biso topetolami kaka te, kasi bongengi ya mwinda na biso ekoli mpe.
Pole na biso ekoli ntango topesi mpe tosaleli ntango na biso mpo na koluka bankombo ya bankoko na biso, na komemaka bankombo na bango na tempelo, mpe koteya libota na biso mpe basusu basala yango mpe.
Tempelo ya bule oyo mpe mosala ya mambi makala ma libota oyo tokabolaka elongo na Basantu na ngambo mibale ya bakufi ezali kokoba koleka ntango batempelo ya Nkolo ezali kotongama. Sikawa lokola batempelo ezali na manaka ya kafukafu mpo na masanga ya mabota oyo bazali koyaka na bakalati ya bankombo ya mabota na bangomei, mwasi na ngai mpe ngai tozwaki boyebi malamu koleka ntango tosungaki na tempelo elongo na bana mpe bankoko na biso.
Ntango tozwaka mpe tomemaka bankombo na tempelo mpe toteyaka basusu boni boni biso mpe, banso tozali kongenga lokola elembo to bendele.
Koyekolaka lokola Mobikisi ateyaki ezali lolenge mosusu tokoki kotelema mpe kongenga. Nazali kosepela na baoyo nionso bazali koyekola kotangisa na lolenge ya Mobikisi. Bopesa ngai ndingisa ya kotanga na nkasa ya mokanda ya sika ya mateya: “Ntina ya motei nionso ya nsango malamu—moboti nionso, motei nionso oyo abiangema, motei nionso ya libota mpe motei motali, mpe molandi nionso ya Klistu—asengeli koteya malongi ya peto ya nsango malamu, na Molimo, … mpo na kosunga bana ya Nzambe batonga bondimi na bango na Mobikisi mpe bakoma mingi lokola Ye” (Mateya na Lolenge ya Mobikisi [2016]).
Sikawa, bankoto ya batei ya bondimi basimbi minda ntango bazali koteya na lolenge ya Mobikisi. Na likanisi oyo, liyangani ya toli ya batei ya sika ezali nzela mpo na kotelema mpe kongenga ntango bayekoli basali kokutana na lolenge ya malongi ya Klistu, mpo ete “fungola ya koteya lolenge Mobikisi ateyaki ezali ya kozala lokola Mobikisi azalaki” (Liteya na Lolenge ya Mobikisi , 4).
Ntango tozali banso koteya mpe koyekola na lolenge na Ye, mwinda na biso engengaka mpe ekoki te kobombama mpe kokoma bendele na baoyo bazali koluka mwinda ya Mobikisi.
Bandeko na ngai ya mibali mpe basi, tokoki te mpe tosengeli te kobomba mwinda na biso. Mobikisi na biso atindaki biso totika mwinda na biso engengisa lokola mboka likolo ya ngomba Tata na biso ya Lola. Nsango malamu ya Mobikisi mpe Eklezia na Ye ezongisama epesaka biso mabaku ebele mpo ete mwinda na biso ezala eteni moko monene ya bendele mpo na bikolo.
Natatoli ete Yesu Klistu azali mwinda oyo tosengeli kolanda, na nkombo ya Yesu Klistu, amene.