2010–2019
Miboku ya Bondimi
Sanza ya Minei 2017


16:21

Miboku ya Bondimi

Bosenga na ngai ezali ete tokosala babomikabi na biso mpe kozala na komikitisa ya kolendisa miboku ya bondimi na biso na Nkolo Yesu Klisto.

Oyo ezali likita linene ya kitoko mpenza. Ya solo tolendisami. Soki ezali na ntina ya yambo ya likita linene, ezali ya kotonga bondimi na Nzambe Tata mpe Mobikisi, Nkolo Yesu Klisto.

Makebisi na ngai elobeli miboku ya bondimi wana.

Miboku na ngaimei, lokola boluki ya ntina, ezali ntango nyonso ya kotonga eteni moko malembe malembe—boyebi moko, motungisi moko, bozongi sima moko, mpe ngenge moko na ntango. Bomeki moko ya bomoto ezali ntango bebe azali komeka kotambola mpo na mbala ya yambo. Ezalaka elengi mpenza ya kotala. Botali malamu na elongi—bosangani ya bomipesi, esengo, libaku, mpe bosukisi—ezali mpenza molulu ya solo.

Kati ya libota na biso, ezali na molulu moko ya ntina mpenza solo oyo tosalaka. Ntango mwana na biso ya elenge mobali akokisaki mibu minei, akotaki na ndako mpe apesaki nsango na esengo na libota na lolendo nyonso: “Nakoki kosala makambu nyonso sikawa. Nakoki kokanga kalavati, nakoki komata na mpunda mpe nakoki kokanga.” Tososolaki azalaki koyebisa biso ete akokaki kokanga sapatu na ye, akokaki komata na Pine Minene ya velo na ye, mpe akokaki kokanga ekoti na ye. Biso nyonso tosekaki kasi tomonaki sima mpo na ye akanisaki asukaki wana. Abanzaki akomaki mpenza mpe akolaki.

Bokoli na bomoto, na makanisi, mpe na molimo ezali na bana ebele. Bokoli ya nzoto emonisamaka na pete na botali. Tobandaka na kobwaka makolo ya bobebe mpe tokobaka mokolo na mokolo, mobu na mobu, bokoli mpe kimokolo mpo na kozwa mobimba ya nzoto na biso. Bokeseni ezali na moto na moto.

Ntango totalaka mosala ya mosani to moyembi moko, tolobaka mbala mingi ete moto oyo azali mpenza na likabo, oyo ezali mbala mingi solo. Kasi boyebi mosala eyakami na bolengeli ya mibu mpe boyekoli. Mokomi moko ayebana, Malcolm Gladwell, abengaka yango mobeko ya bantango 10,000. Baluki basukisa montango ya boyekoli ezali ntina mpo na basani, mpe bongo. Moko ya misala ya boluki oyo ya “bantango mokama zomi ya boyekoli esengaka kosilisa ndelo ya boyekoli elongo na bozali ya mosala ya kelasi ya mokili—na ntango mosusu.”1

Bato ebele bayebi ete mpo na kokoma na nsuka ya bomoto mpe mayele, boyekoli ya boye mpe bolengeli ezali ntina.

Na libaku mabe, ntango nyonso na mokili oyo ya nzoto, mwa nsete ebetami etiami na motango ya bokoli ya molimo mpo na kokoma na lolenge ya Klisto mpe kotiya miboku oyo ekokamba na boyiki mpiko na bondimi. Mbala mingi tobetaka nsete na bantango ya bososoli malamu ya molimo ezwami kati ya mitema mpe mayele na biso. Tosepelaka na milulu oyo; basengeli kokitisama atako moke te. Kasi mpo na boyiki mpiko ya kozwa nguya ya bozali na Molimo, ezali na eloko moko te ekozwa esika ya motomei na boyambi oyo ekokanisami na bokoli ya nzoto mpe makanisi, oyo ekokani ntango mosusu kotambola ya sika ya bébé. Tosalaka yango na nzela ya bomipesi ya bule mpo na mayangani ya elambo, botangi makomi, losambo, mpe kosungaka lokola mobiangemi. Na kala te na molulu moko ya ekolo na maye matali nkufa ya tata ya bana 13, elobamaki “bolamu na ye ya kosambela mokolo na mokolo mpe kotangaka makomi na mozindo bana na ye balandaki ezalela yango, kopesaka bango moboku elenda ya bondimi na Nkolo Yesu Klisto.”2

Boyebi moko nazwaka ntango nazalaki na mibu 15 ezalaki moboku mpo na ngai. Mama na ngai ya bondimi amekaka kosunga ngai natiya miboku na bondimi na bomoi na ngai. Nabandaki kozala na mayangani ya elambo, na kelasi ya bana, sima na kelasi ya bilenge mibali lisusu na seminele. Nazalaki kotanga Buku ya Mormon mpe nazalaki ntango nyonso kosambela ngaimei. Na eleko wana, likambo moko ya kokamwa esalemaki na libota na biso ntango ndeko na ngai ya mobali ya liboso azwaki likanisi ya libiangi ya misio. Tata na ngai ya bolingo, mondimi ya bolembu na Eklezia alingaki ye asilisa naino bakelasi na ye mpe asala misio te. Yango ekomaki nkpokoso mpenza.

Na lisolo moko elongo na ndeko na ngai ya mobali, oyo azalaki mokolo na ngai ya mibu mitano mpe totambuisa masolo, tosukisaki mokano na ye ya kosunga na misio eyekamaki na mituna misatu: (1)  Yesu Klisto azalaki na bonzambe? (2)  Buku ya Mormon ezalaki solo? (3) Joseph Smith azalaki mpenza profeta ya bozongisi?

Na nzela ya losambo na butu wana, Molimo andimisaki ngai bosolo ya mituna misatu wana. Nasosolaki lisusu ete mokano nyonso nakozwa na bomoi na ngai ekoyekama na biyano na mituna misato oyo. Sima nasosolaki ete bondimi na Nkolo Yesu Klisto ezalaki ntina. Na kotalaka sima nayokaki ete, mingi mingi mpo na ntina ya mama na ngai, miboku etiamaki mpo nazwa bondimami ya molimo na mpokwa wana. Ndeko na ngai ya mobali, oyo asi azwaki litatoli, azwaki mokano ya kosunga na misio mpe na nsuka azwaki lisungi ya tata na biso.

Bokambami ya molimo ezwamaka na mposa, na ntango ya Nkolo mpe engebene na bolingi na Ye.3 Buku ya Mormon: Litatoli Mosusu ya Yesu Klisto ezali ndakisa malamu koleka. Nawuti komona bobimisi ya sika ya Buku ya Mormon. Joseph Smith asilisaki bobongoli ntango azalaki na mibu 23. Toyebi eloko moko ya mosala mpe bisalelo asalelaki na bobongoli wana. Na bobimisi ya yambo wana ya mobu 1830, mpe Joseph asukisaki mwa ndambo ya eteni ya yambo mpe na pete mpe na pole alobaki ebongolamaki na “na likabo mpe nguya Nzambe.”4 Boni boni na ntina ya bobongoli—Urimi mpe Thumimi, mabanga ya bomoni? Ezalaki ntina, to ezalaki lokola bapine ya ngalasisi na velo kino Joseph akokaki kosalela bondimi ntina mpo na kozwa bokambami na bobimisi?5

Ezipelo ya 1830 ya Buku ya Mormon
Lokasa ya likolo ya Buku ya Mormon

Kaka lokola momesano mpe bokasi ezali ntina mpo na kolonga makoki ya nzoto to ya mayele, ezali lolenge moko na maye matali molimo. Bomikundola ete Profeta Joseph azwaki motali moko oyo, Moroni, kaka bobele na nsango moko mbala minei na bolengeli mpo na kozwa bapalaki. Nabanzi ete bozali ya mposo nyonso na mayangani ya elambo ezali na ntina molimo oyo biso toyebaka te. Komanyolaka ntango nyonso makomi—koleka kotangaka yango kaka likolo likolo —ekoki kosala ete toyeba mpenza maye tozali kotanga te mpo, kobongola bondimi na biso oyo ezali kobongola bomoi na biso.

Bondimi ezali libongi ya nguya. Tika natalisa: lokola elenge misionele, mokambi monene ya misio 6 alakisaki ngai na lolenge moko ya bozindo lisolo ya makomi na Luka 8 ya mwasi oyo azalaki na mpasi ya makila kobima mibu 12 mpe abebisaki bozwi na ye nyonso na minganga oyo bakokaki kopesa ye lobiko te. Etikalaki na mokolo oyo moko ya makomi na ngai nalingaka mingi.

Bokomikundola ete azalaki na bondimi ete soki kaka akokaki kosimba songe ya elamba ya Mobikisi, akokaki kobika. Ntango asimbaki, abikaki mbala moko. Mobikisi, oyo azalaki kotambola elongo na bayekoli na Ye, alobaki, “Nani asimbi ngai?”

Eyano ya Petelo ezalaki ete tozali kotambola elongo, bakanganaki elongo na Ye.

“Mpe Yesu alobaki, Mutu moko asimbi ngai: mpo nayoki bokasi moko ebimi kati na ngai.”

Mosisa ya nkombo mpo na bokasi ekokaki na pete nyonso ebongolama ete lokola “nguya.” Espaniole mpe Portugué, ebongolami lokola “nguya.” Kasi esali eloko te, Mobikisi atali yango te abetaki sete te na ntina na yango. Kasi bondimi na ye ezalaki ete kosimba songe ya elamba eyekamaki na nguya ya lobiko ya Mwana Nzambe.

Ntango Mobikisi alobaki na ye, “Mwana mwasi, zala malamu: bondimi na yo ebikisi yo; kende na kimia.”7

Nakanisaka lisolo oyo bomoi na ngai mobimba. Nabanzi sikawa ete nsambo na bisomei mpe mabondeli epai ya Tata moko ya bolingo na Lola na nkombo ya Yesu Klisto ekoki komemela biso mapamboli na bomoi na biso likolo ya makoki na biso mpo na kososola. Miboku ya bondimi, lolenge ya bondimi ya mwasi oyo elakisaki, esengelaki kozala na mposa monene ya mitema na biso.

Na yango, miboku ya yambo ya bondimi, atako na bondimisi ya molimo, elakisi te ete tokokutana na mimekano te. Bobongwami na nsango malamu elakisi ete makambo na biso nyonso ekozwa biyano.

Lisitwale ya Eklezia na ebandeli mpe mabimisi elobami na Doctrine et Alliances ezali na bandakisa ya malamu mingi koleka na oyo etali miboku ya bondimi mpe kosilisa makambu ya mpasi ya bomoi mpe mimekano oyo mutu nyonso akutanaka na yango na bomoi.

Bosilisi ya Tempelo ya Kirtland ezalaki moboku mpo na Eklezia mobimba. Etambwisamaki elongo na bozalani ya molimo, mabimisi ya malongi, mpe bozongisi bafungola ya ntina mpo na bokobi bozali ya Eklezia. Lokola bapostolo ya kala na mokolo ya pantikoti, bandimi ebele bamona misala malamu ya molimo na mokangano na bokulisi ya Tempelo ya Kirtland.8 Kasi, lokola na bomoi na bisomei, yango elakisi te ete bakokutana na mimekano to makambu te na bomoi. Ndambu ya bandimi ye ebandeli oyo bayebaki ete bakokutana na mpasi ya mosolo ya Etazini ya Amerika—Nsomo ya Mbalakaka ya 1837— emekaka milimo na bango.9

Ndakisa moko mimekano ekangama na mpasi ya mosolo oyo Mpaka Parley P.  Pratt akutanaki na yango, moko ya bakambi minene ya Bozongisi. Azalaki mondimi ya solo ya Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na mibale. Na ebandeli ya mobu ya 1837, mwasi na ye bolingo, Thankful, akufaki sima ya kobota mwana na bango ya ya yambo. Parley mpe Thankful babalanaka uta mibu 10, mpe liwa na ye etungisaki ye makasi.

Sima ya mwa basanza moke, Mpaka Pratt akomaki na eleko moko ya mpasi ya Eklezia. Kati ya mpasi na mboka mobimba, mituna ya mosolo ya mboka—mpe lisusu mambi ya mabele mpe boluki mosolo oyo etiamaki na Joseph Smith mpe bandimi mosusu ya Eklezia—esalaki mobulu mpe boswani na Kirtland. Bayangeli ya Eklezia bazwaka mbala mingi bikateli ya bwanya na babomoi na bangomei te. Parley azwaki mpasi na ntina ya mosolo abungisaki mpe uta eleko wana azangaki boyokani na Profeta Joseph.10 Akomaki mokanda ya maloba mabe epai ya Joseph mpe alobaki mabe na nzoto. Na ntango moko, Parley alobaki azalaki kokoba kondimela Buku ya Mormon mpe Doctrine et Aliances.11

Mpaka Pratt abungisaki mwasi na ye, mpe libota ye. Parley, na bozangi koloba na Joseph, akendaki na Missouri. Na nzela, na mbalakaka akutanaki na Bapostolo baninga Thomas B. Marsh mpe David Patten kozongaka na Kirtland. Bayokaki mposa makasi ya kozonga na Lisanga likoki mpe bandimisaki Parley azonga elongo na bango. Amonaki sima ete moto moko te abungisaki koleka Joseph Smith mpe libota na ye.

Parley alukaki Profeta, alelaki, mpe atubelaki oyo asalaki ezalaki mabe. Mwa basanza sima ya liwa ya mwasi na ye, liwa ya Thankful, Parley amimonaki “kati ya mapata ya molili” mpe alongisamaki na bobangi mpe bozangi kimia. 12 Joseph, koyebaka kobunda na bonguna mpe momekano, “frankly alimbisaki” Parley, kosambelaka mpo na ye mpe kopambolaka ye.13 Parley mpe basusu oyo batikalaki na bondimi balongaki mimekano ya Kirtland. Bakolaki na bwanya mpe bakomaki bato na mosolo koleka mpe nguya. Ekomaki eteni na bango ya miboku ya bondimi.

Monguna asengeli komonana lokola moyini uta na Nkolo te to mozangi ya mapamboli na ye. Bonguna na makambo nyonso ezali eteni ya kolengela biso mpo na kokoma na esika na biso ya lobi ekoya ya seko na lola.14 Ntango Profeta Joseph azalaki na Boloko ya Liberty, maloba ya Nkolo epai na ye etalisaki ye lolenge nyonso ya mimekano mpe lisusu minyoko, bofundi ya lokuta—mpe asukisi:

“Soki munoko ya lifelo efungwami mpo na komela yo, yeba yango, mwana na ngai, ete makambo nyonso oyo ekopesa yo bwanya, mpe ekozala mpo na bolamu na yo.

“Mwana ya Moto akitaki na nse ya bango nyonso wana. Yo oleki ye na nini?”15

Nkolo, na mateya na epai ya Joseph Smith, alimbolaki yango ete mikolo na ye eyebanaki mpe esengelaki kozala ezanga motango te. Nkolo asukisaki, “Bobanga te oyo mutu akoki kosala, mpo Nzambe akozala mpo na elongo na ye mpo na libela mpe seko.”16

Kasi, mapamboli ya bondimi, ezali nini? Bondimi ememaka nini na nsuka? Motango eleki ndelo:

Masumu na biso ekoki kolimbisama mpo na bondimi na biso na Klisto.17

Lokola ebele bazali na bondimi bazali na mokangano na Molimo Mosantu.18

Lobiko eyaka na nzela ya bondimi na nkombo ya Klisto.19

Tozwaka bokasi kolandisama na bondimi na biso na Klisto.20

Eloko te ekoti na bopemi ya Nkolo longola se baoyo bazali kosokola bilamba na bango na makila ya Klisto mpo na bondimi na bango.21

Nsambo eyanolamaka kolandisama bondimi.22

Na bozangi bondimi kati na bato, Nzambe akoki kosala bikamwisi kati na bango te. 23

Na nsuka, bondimi na biso na Yesu Klisto ezali moboku ya ntina mpo na lobiko na biso ya seko mpe bonetoli. Lokola Helaman ateyaki bana na ye ya mibali, “Bomikundola ete ezali likolo ya libanga ya mosikoli na biso, oyo ezali Yesu Klisto, Mwana ya Nzambe, oyo bosengeli kotonga moboku na bino … , oyo ezali moboku ya solo, moboku oyo bato soki batongi ekoki kokweya te.”24

Nazali na esengo mpo na bolendisi ya miboku ya bondimi oyo eyei uta na likita oyo. Bosenga na ngai ezali ete tokosala babomikabi na biso mpe kozala na komikitisa ya kolendisa miboku ya bondimi na biso na Nkolo Yesu Klisto. Mpo na Ye natatoli na bosolo, na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Malcolm Gladwell, Outliers :The Story of Succes (2008), 40. He is quoting neurologist Daniel Levitin.

  2. Obituary of Bryant Hinckley Wadsworth, Deseret News, Jan. 15, 2017, legacy.com/obituaries/deseretnews.

  3. Tala 2 Nefi 28:30. Tozwi te nzoto mobimba ya boyebi na ntina ya likambo to mikano etali yango. Eyaka ntango esengeli: monkoloto likolo ya monkoloto, mosise likolo ya mosise.

  4. Na bobimisi ya yambo ya Livre Mormon, ebetamaki n 1830, Profeta Joeph Smith akomaki, “nalingi koyebisa bino ete nabongolaki, na likabo mpe nguya ya Nzambe” (tala preface to Book of Mormon [1830]). Subsequent editions of Book of Mormon ekotisi liloba ekokani: “bapalaki epesamaki na Joseph Smith, oyo abongolaki yango na likabo mpe nguya ya Nzambe” (tala introduction ya Book or Mormon [1830])

  5. Orson Pratt abengaki lisusu ete azalaki na mabaku ebele ntango Joseph Smith azalaki kobongola Bondimami ya Sika mpe amonaki ete azalaki kosalela esaleli moko te na mosala yango. Mpaka Pratt alobaki: “Joseph, lokola atangi makanisi na ye, atalaki likolo mpe alimbolaki ete Nkolo apesaki ye Urim mpe Thummim ntango azalaki na mituna na Molimo mpo na bofuli. Kasi sikawa akobi mosika ete asosolaki misala ya Molimo wana, mpe azalaki na ntina ya bozali elongo na esalelo wana te” (“Mikolo mibale na Liyangani na Brigham City, Sanza ya Nsambo 27 mpe 28, 1874,” Millennial Star Aug. 11, 187499; Tala lisusu Richard E. Turley Jr., Robin S. Jensen, mpe Mark Ashurst-McGee, “Joseph the Seer ,” Liahona, Sanza ya Zomi. 2015, 10–17).

  6. Mokambi ya misio ezalaki Mpaka mission Marion D. Hanks, oyo azalaki lisusu Mokambi Monene.

  7. Tala Luka 8:43–48.

  8. Tala Misala 2.

  9. Tala Moziya 2:36–37; Tala lisusu Henry B. Eyring, “Spiritual Preparedness: Start Early and Be Steady,” Liahona, Sanza ya Zomi na moko. 2005, 38: “So, the great test of life is to see whether we will hearken to and obey God’s commands in the midst of the storms of life. It is not to endure storms, but to choose the right while they rage. Mpe likama ya bomoi ezali kozanga bozwi na momekano wana mpe kozanga mpenza mpo na kolonga na nkembo na ndako na biso ya lola.”

  10. Tala Terryl L. Givens and Matthew J. Grow, Parley P. Pratt: The Apostle Paul of Mormonism (2011), 91–98;volume introduction and introduction to part 5, The Joseph Smith Papers, Documents, Volume 5: October 1835–January 1838, ed. Brent M. Rogers and others (2017), xxviii–xxxi, 285–93.

  11. Tala “Letter from Parley P. Pratt to 23, Sanza ya Mitano 1837,” kati ya The Joseph Smith Papers, Documents, Volume 5: Sanza ya Zomi 1835–Sanza ya Yambo 1838, 386–91.

  12. Tala “History of John Taylor by Himself,” 15, in Histories of the Twelve, 1856–1858, 1861, Church History Library; Givens and Grow, Parley P, Pratt, 101–2.

  13. Tala The Autobiography of Parley P, Pratt, ed. Parley P. Pratt Jr. (1874), 183–84.

  14. Tala 2 Nefi 2:11.

  15. Doctrine et Aliances 122:7–8.

  16. Doctrine et Aliances 122:9.

  17. Tala Enos 1:5–8.

  18. Tala Jarom 1:4.

  19. Tala Moroni 7:26, 38.

  20. Tala Alma 14:26.

  21. Tala 3 Nefi 27:19.

  22. Tala Moroni 7:26.

  23. Tala Etele 12:12.

  24. Helamani 5:12.