Tia Elikia na Nkolo mpe Koyekama te
Tokoki kotia na katikati Mobikisi na koyeba Ye sima, mpe Ye akokamba banzela na biso.
Ntango nasalaki mobembo na, molingami ndeko mwasi moko abelemaki na ngai. Akangaki maboko na ye nzinganzinga na ngai, mpe atunaki, “Endimi yo ya solo ete nsango malamu oyo ezali ya solo?” Molingami ndeko mwasi, nayebi ezali ya solo. Natiaka elikia na Nkolo.
Na Masese 3:5–6, totangi toli oyo:
“Likia na Nkolo na motema na yo nyonso; mpe koyekama te na bososoli na yo moko.
“Na nzela nyonso ndimela ye, mpe akokamba nzela na yo.”
Makomi oyo eyei na toli mibale, mpe likebisi moko, mpe elaka moko ya nkembo. Toli mibale: Likia na Nkolo na motema na yo nyonso; mpe koyekama te na bososoli na yo moko mpe “na nzela nyonso ndimela ye, mpe akokamba nzela na yo.” Likebisi: koyekama te na bososoli na yo moko.” Mpe elaka ya nkembo: akokamba nzela na yo.”
Tososola yambo likebisi. Elili totali epesi biso mingi na komaniola. Likebisi eyei na maloba “koyekama te”—koyekama te na bososoli na yo moko.” Na Anglais liloba koyekama ezali na ntina ya kotengama to koningana epai ya mopanzi. Ntango biso na nzoto toyekami epai ya mopanzi moko to mosusu, tokimi katikati, tolongwe na sikisiki, mpe tosopani. Ntango na molimo toyekami na bososolomi na biso moko, toyekami mosika na Mobikisi na biso. Soki toyekami; tozali sikisiki te; tokangami te na Klisto.
Bandeko basi, bomikundola, na bomoi yambo ya kufa, totelamaki elongo na Mobikisi. Totiaki elikia na Ye. Topesaki mongongo na biso mpo na kosunga, kosepela, mpe kozala na esengo mpo na mwango ya esengo esalamaki na Tata na biso na Lola. Toyekamaki te. Tobundaki na matatoli na bino mpe “tomitiaki na molongo elongo na makasi ya Nzambe, mpe makasi wana ezalaki na elonga.”1 Etumba oyo katikati ya bolamu mpe mabe eyei na mabele. Mbala moko lisusu tozali na mokumba ya bule ya kotelema lokola nzeneneke mpe kotia elikia na bino na Nkolo.
Tosengeli moko na moko kotuna: Boniboni na komibatela na katikati mpe koyekama te epai ya bososoli na ngai? Boniboni ekoki ngai koyeba lisusu mpe kolanda mongongo ya Mobikisi ntango mingongo ya mokili ezali makasi mingi? Boniboni kokolisa elikia na Mobikisi?
Ekoka ngai kopesa likanisi ya nzela misato mpo na kokolisa boyebi na biso ye mpe kotia elikia na Mobikisi. Bokoki komona ete mabongi oyo ezali ya sika te, kasi ezali ya ntina mpenza. Eyembami na Eteyelo ya Bana nyonso, bazongelaki yango na mateya ya Bilenge Basi, mpe bayanolaki yango na mituna mingi ya Lingomba ya Bamama Basungi. Yango ezali mabongi—ya katikati—mpe ya koyekama te.
Yambo, tokoki koyeba Nkolo sima mpe kotia elika na Ye ntango “tosali limpati na maloba ma Klisto; mpo maloba ma Klisto makoyebisa bino makambo manso oyo bosengeli kosala.”2
Basanza mingi eleki tozalaki koyekola makomi. Nkoko na ngai ya mobali ya mibu misato efanddaki na libolongo na ngai ntango nazalaki kotanga. Nazalaki mpenza na lolenge na mama nkoko, kosepelaka na kotala libota ya mwana na ngai ya mobali.
Na kosilisaka koyekola makomi, nakangaki buku. Nkolo na ngai ya mobali ayebaki ete elingaki noki kozala ntango ya kolala. Atombolaki miso na ye ya bule ya nkanda mpe alobaki bosolo moko ya seko: makomi lisusu , Nana.”
Mwana na ngai ya mobali, moboti ya malamu mpe ya sikisiki, akebisaki ngai, “Mama, kolembisa nsinga te. Azali kaka komeka kobima koboya kokende kolala.”
Kasi ntango nkoko na ngai ya mobali asengaki makomi lisusu, totangaki makomi lisusu! Makomi lisusu ekopelisa mayele na biso, ekoleisa milimo na biso, ekoyanola mituna na biso, ekokolisa kolikia na Nkolo, mpe ekosalisa biso totia Ye na katikati ya bomoi na biso. “Bomikundola koluka yango, ete bokoka kozwa litomba na yango.”3
Ya mibale, tokoki koyeba Nkolo mpe kotia elikia na Ye na nzela ya losambo. Lipamboli kani kokoka kosambela Nzambe na biso! “Bosambela epai ya tata na makasi ya motema.”4
Nazali na likundoli ya kitoko ya losambo moko ya motuya oyo nabombaka. Mpo na moko ya kopema na ngai na universite, nandimaki mosala moko na Texas. Nasengelaki kotambola bankama ya bakilometele uta Idaho tii Texas na motuka na ngai ya kala, motuka moko nabengaki na bolingo Vern. Vern ekangamaki tii na likolo, mpe nazalaki ya kobonga mpo na epaka ya sika.
Na nzela na ngai libanda, nayambaki mama na ngai ya bolingo mpe nalobaki, “Tika tosala losambo liboso na longwa.”
Tofukamaki mpe mama na ngai abandaki kosambela. Asambaki elongo na Tata ya Lola mpo na kimia na ngai. Asambelaki mpo motuka na ngai ezanga mopepe ya malili, kosengaka ete motuka ekoka kosala lokola nasengelaki. Asengeki banzelu bazala elongo na ngai na eleko ya molunga mobimba. Asambelaki mpe asambelaki mpe asambelaki.
Kimia ewutaki na losambo wana epesaki ngai mpiko ya kotia elikia na Nkolo mpe koyekama te na bososoli na ngai. Nkolo akambaki nzela na ngai na mikano nasalaki eleko ya molunge wana.
Ntango tosalaka momesano ya kobelema na Tata ya Lola na losambo, toyebaka Mobikisi sima. Tokoya kotia elikia na Ye. Bamposa na biso ekokoma mingi lokola Ye. Tokokoka kobatela mpo biso moko mpe mpo na basusu mapamboli oyo Tata ya Lola alengeli mpo na kopesa soki kaka tosengi na bondimi.5
Ya misato, tokoyeba Nkolo sima mpe kotia elikia na Ye ntango tosalisi basusu. Nakaboli lisolo elandi na ndingisa ya Amy Wright, oyo ayaki kososola libongi ya kosalisaka ata na kati ya maladi ya nsomo mpe ya likama mpo na bomoi. Amy akomaki:
“Na sanza ya zomi 29, 2015, nazwamaka na cancer. Cancer na ngai ezalaki na 17 na nkama ya kobikisa. Nsongo esalaki malamu te. Nayebaki nalingaki kozala na etumba mpo na bomoi na ngai. Nazwaki mokano ya kopesa nyonso nazalaka na yango kaka mpo na ngai moko te kasi, mingimingi, mpo na libota na ngai. Na sanza ya zomi na mibale, nabandaki bankisi. Namesanaki na mabe ya nsima mingi na bankisi ya kobundisa cancer, kasi nayebaki te ete okokaki kozala na bokono mpenza mpe kozala naino na bomoi.
“Na ngonga moko, nasakolaki ete nkisi ezalaki kobuka makoki ya bomoto. Nalobaki na mobali na ngai ete nasilaki. Natikaki! Nalingaki kozonga na lopitalo te. Na mayele na ye, molongani na ngai ayokamalaki mpe ayanolaki, malamu, nde tosengeli koluka na moto moko oyo ya kosalisa.’”
Nini? Ayebaki te ete mwasi na ye azalaka na cancer mpe akokaki te kokoka ngonga moko lisusu ya kozanga to ngonga moko lisusu ya mpasi ya liwa?
Amy akobi na kolimbola: “Bampasi na ngai moko moke eyaki makasi tii esika nazalaki mingimingi na mikolo ya “malamu” moko to mibale na sanza [oyo] nakokaki lokola kozala moto moko ya bomoi, oyo apemaka. Ezalaki mikolo wana nde libota na ngai elingaki kozwa ntango ya kosalisa.”
Na moko ya mikolo wana, libota ya Amy ekabolaki liboke ya nkisi ya kolendisa na bakoni misusu, basalaki etonda na biloko mpo na kosepela mpe kosalisa kolembisa mpasi. Ntango Amy akokaki te kolaka, azalaki kokanisa ndenge ya kongengisa mokolo na moto moko. Boko ndenge ezalaki ya monene, kasi mingi ezalaki ya mayebisi ya moke to nsango ya nkoma ya bolendisi mpe bolingo. Na babutu wana ntango mpasi ezalaki monene mingi mpo na kolala, akokaki kolala na mbeto na iPad na ye mpe koluka makuli oyo esengelaki kosalema mpo na bankoko na ye bakufa. Na likamwisi mpasi na ye ekokaki kokita, mpe akokaki koyika mpiko.
“Lisalisi,” Amy atatolaki, “ebikisaki bomoi na ngai. Esika na nsuka nazwaki bokasi mpo na kokoba kokende liboso ezalaki esengo na komekaka kolembisa mpasi ya baye bazalaki nzinganzinga na ngai. Nazelaki mpenza miango na biso tosalaki na kosepela mpe nsai. Mokolo ya lelo lisusu ezalaka lokola kpokoso moko ya kokamwa boye. Bokoki kokanisa ete moto oyo azalaki na libandi, na poison, mpe kobundaka na bomoi na [ye] azalaki na ntina ya kokanisa ‘malamu sikawa nyonso mpo na ngai.’ Nzokande, ntango nakanisaki mpo na ngai moko, ezalaki mpe mpasi na ngai, mokili ekomaki molili mpenza mpe moto mpasi. Ntango mayele na ngai ebalukaki na basusu, ezalaki pole, elikia, bokasi, mpiko, mpe bosepeli. Nayebi ete yango ekoki kosalema na ntina ya nguya ya kosunga, kobikisa, mpe kokokisa ya Bomikabi ya Yesu Klisto.”
Amy ayaki kotia elikia na Nkolo ntango ayaki koyeba Ye. Soki ayekamaka ata mwa moke na bososoli na ye moko, akokaki koboya likanisi ete asalisa. Kosalisa ekokisaki ye mpo na kolongola mpasi mpe mitungisi na ye mpe kosaleka makomi oyo: “Ntango ozali na lisalisi ya bandeko na yo bato ozali bobele kosalisa Nzambe na yo.”6
Yesu Klisto alongi mokili. Mpe na ntina na Ye, na ntina ya Bomikabi ya Ye ezanga nsuka, biso banso tozali na ntina monene ya kolikia, koyebaka ete na nsuka banso bakozala malamu.
Bandeko basi, moko na moko na biso akoki kotia elikia na Nkolo mpe koyekama te. Tokoki kotia na katikati Mobikisi na koyaka koyeba Ye, mpe Ye akokamba banzela na biso.
Tozali na mabele mpo na kolakisa elikia lokola naYe oyo ekopesa biso ndingisa ya kotelema elongo na Yesu Klisto ntango alobaki, “Ngai oyo, tinda ngai.”7
Bandeko basi ba bolingo, Mokambi Thomas S. Monson atatolaki ete “bilaka na biso eleki ndelo ya komekisa. Atako mapata ya ekumbaki ekoki kosangana, atako mvula ekoki kosopana likolo na biso, bososoli na biso ya nsango malamu mpe bolingo ya Tata na biso ya Lola mpe Mobikisi na biso ekolendisa mpe ekosunga biso … ntango tokotambola alima. … Ekozala na elongo te na mokili moye oyo ekoki kolonga biso.”8
Nabakisi litatoli na ngai na oyo ya profeta na biso ya bolingo. Soki totii elikia na Tata na biso ya Lola mpe Mobikisi na biso mpe toyekami te na bososoli na biso moko, Bango bakokamba banzela na biso mpe bakotandola liboko ya ngolu epai na biso. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.
Boyeba: Na sanza ya mineil 1, 2017, Ndeko mwasi Cordon apemisamaki lokola Mopesi toli ya Mibale na Eteyelo ya Bana mpe abiangamaki lokola Mopesi toli ya Yambo.