2010–2019
Nyonso Ye Akoloba na Bino, Bosala Yango
Sanza ya Minei 2017


12:46

Nyonso Ye Akoloba na Bino, Bosala Yango

Ntango tokanIya kosala “nyonso Nzambe alobeli” biso, tomipesi na bosembo mpo na kotia ezaleli na biso ya mokolo na mokolo na molongo ya bolingi ya Nkolo.

Nkolo asalaki likamwisi na Ye ekomama ya yambo na feti ya libala ya kana ya Galilai. Yesu; Malia, mama na Ye; mpe bayekoli na Ye bazalaki kuna. Maliya ayokaki lokola mwa mokumba mpo na elonga ya feti. Na ntango ya bosepeli, kpokoso ebimaki—babengisami ya libala bazangaki vinio. Maliya amitungisaki mpe akendaki epai ya Yesu. Basololaki na mokuse, nsima Maliya abalukaki epai ya basali mpe alobaki:

“Nyonso Ye Akoloba na Bino, Bosala Yango.

“Mpe ezalaki na Mbeki na mabanga motoba itiamaki wana. … [Mbeki oyo esalelamaki mpo na kobombela mai te kasi mpo na kosukolela na feti na nse ya mobeko ya Mose.]

“Yesu alobi na [basali], botondisa mbeki na mai. Boye batondisaki yango maa.

“Mpe balobi na bango ete, batoka sasaipi mpe bomema yango epai na mokolo na elambo. Bamemi na yango.

“[Nsima] mokolo na elambo … amekaki mai mabongolami vinyo” mpe alakisaki kokamwa ete vinyo ya malamu mingi ekabolamaki nsima mpenza na feti.1

Tomikundolaka mbala mingi likambo oyo mpo ete kobongolaka mai na vinyo ezalaki ndakisa ya nguya ya Nzambe—likamwisi. Wana ezali nsango ya motuya, kasi ezali na nsangu mosusu na lisolo ya Yoane. Maliya azalaki “sani ya motuya mpe eponomo,”2 abiangama na Nzambe mpo na kobota, koleisa, kobokola Mwana ya Nzambe mpenza. Ayebaki mingi oyo etali Ye koleka moto mosusu kani na mabele. Ayebali bosolo ya mbotama na Ye ya likamwisi. Ayebaki ete Ye azalaki na lisumu te mpe ete Ye “alobaki lokola bato mosusu te, to akokaki koteyama; mpo azalaki na mposa te ete moto nyonso asengeli koteya ye.”3 Malia ayebaki likoki na Ye ya kokamwa mpo na kozwa biyano na bakpokoso, kosangisaka moko mpo na ye moko lokola kopesaka vinyo mpo na feti ya libala. Akolisali bondimi ya sikisiki na Ye mpe na nguya na Ye ya bonzambe. Lilako na Ye ya pete, semba epai ya basali ezalaki na makebisi moko te , bolongobani moko te, bandelo moko te: “Nyonso Ye Akoloba na Bino, Bosala Yango.”

Maliya azalaka elenge mwasi ntango anzelu Gabaliele abimelaki ye. Na liboso “abangisamaka” na kobiangamaka “mwasi ya ngolu” mpe “opambolami … kati na basi … nde abangaki mingi na monoko yango, mpe azalaki kokakatana soki losako ezali ya motindo nini.” Gabaliele andimisaki ye ete azalaki na eloko moko ya kobanga te—Nsango oyo amemaki ezalaki malamu. Ye “akozwa zemi na [ye]libumu … Mwana na Oyo-Aleki-Likolo” mpe “kobota mwana mobali moko … [oyo] akokonza likolo ya ndako ya Yakobo to mpo na libela.”

Maliya amitunaki na mongongo makasi, “Oyo ekozala boni awa ezali ngai na mobali te?”

Anzelu alimbolaki kasi bobele na mokuse, koyebisaka ye ete “Na Nzambe eloko moko te[ekoki] kosalema te.”

Malia na komikitisa ayanolaki ete akosala oyo Nzambe asengaki, kotunaka te mpo na koyeba makambo ya mikemike mpe na ntembe te na esika ya kozalaka na mituna mingi etali oyo eyela mpo na bomoi na ye. Amipesaki na kozanga kososola mpenza ntina nini Ye azalaki kosenga yango na ye to boniboni makambo elingaki kotambola. Andimaki liloba ya Nzambe na ntembe te mpe yambo esalema, 4na boyebi moke ya nini ezalaki liboso. Na bondimi ya pete na Nzambe, Maliya alobaki, “Tala ngai moombo na Nkolo, tika ebimela ngai lokola elobi yo.”5

Ntango tokani kosala “nyonso oyo Nzambe alobeli” biso, tomipesaka mpo na na bosembo kotia ezaleli na bino ya mokolo na mokolo na molongo ya bolingi ya Nzambe. Bikela ya pete boye ya bondimi lokola koyekolaka makomi mokolo na mokolo, kokilaka mbala na mbala, mpe kosambelaka na motema ya solo ekokomisa mozindo libulu makoki na biso ya molimo mpo na kokokisa babonsenga ya bokufi. Nsima ya ntango, mimesano ya mpamba ya bondimi ekokamba na mbano ya kokamwa. Ebongolaka bondimi na biso uta na nzete moke kati na nguya ya bomoi mpo na bolamu kati na bomoi na biso. Nsima, ntango mikakatano eyei na nzela na biso, misisa na biso na Klisto ekopesa mpiko na milimo na biso. Nzambe abikisaka botau na biso, abakisaka esengo na biso, mpe esalaka “makambo nyonso esala elongo mpo na bolamu na biso.”6

Mwa mibu mileki, nalobaki na elenge episikopo moko oyo azalaki kolekisa bangonga poso moko na moko, kopesaka toli na bandimi ya palwasi na ye. Atalisaki likambo moko monene. Bakpokoso oyo bandimi ya palwasi na ye bazalaki na kokutana na yango, elobaki ye, ezalaki oyo ekutanaka na bandimi ya Eklezia bisika binso—mituna lokola boniboni kofandisa libala moko ya esengo; bitumba na kokabolaka mosala, libota, mpe balotomo ya Eklezia; mikakatano na kotosaka Liloba ya Bwania, pornogalafi; to kozwaki kimia na ntina ya politiki ya Eklezia to motuna eyebana bazalaki kososola.

Toli na ye na bandimi ya palwasi mbala mingi ezalaki na koyekamaka na misala ya pete ya bondimi, lokola koyekolaka Buku ya Mormon kofutaka moko na zomi, mpe kosalaka kati na Eklezia na bomipesi. Mbala na mbala eyano na bango epai na ye ezalaki moko ya. “Nandimi yo te, Episikopo. Biso banso toyebi wana ezali makambo malamu mpo na kosala. Tosololaka na ntina ya makambo wana ntango nyonso kati na Eklezia. Kasi nandimi te ete ozali kososola ngai. Nini ezali kati na kosalaka makambo kani wana na makambo oyo nazali kokutana na yango?”

Ezali motuna malamu. Mibu eleki, namonaki ete baoyo bakanisaka na ntina ya kosala “makambo mike mpe ya pete”7—kotosaka na oyo ezali lokola mwa bikela—bapambolami na bondimi mpe bokasi oyo ekendaka mosika koleka bikela ya solo ya botosi bango moko mpe, solo, bakoki komonana na mobimba lokola ya kokesana na yango. Ekoki komonana mpasi koyeba lisusu mokangano kati na bikela ya mokolo na mokolo ya ebandeli ya botosi mpe biyano ya bakpokoso ya mikakatano oyo tozali kokutana na yango. Kasi yango ezali ya kokangana. Na boyebi na ngai, kokomaka na mwa mimesano ya mokolo na mokolo ya bondimi ya kobonga, ezali nzela moko ya malamu mpo tomikomisa makasi ya kotelemela bamobulu ya bomoi, atako ekoki kozala nini. Bikela ya bondimi, kutu ntango ezali komonana lokola ya ntina te to ya kokangana te uta na bakpokoso songolo oyo ezali kosepelisa biso te, epambolaka biso na nyonso tosalaka.

Bomaniola Namana na Boyokani ya Kala. Azalaki “mokolo na basoda na … Sulia”, … “elombe na mpiko,” mpe azalaki moto na maba. Mosali ya mwasi alobelaki na ntina ya profeta moko na Yisalaele oyo akokaki kopetola Namana, mpe boye akendaki mobembo na molongo ya basali , basoda, mpe makabo na Yisalayela, kokomaka na nsuka na ndako ya Elisa. Mosali ya Elisa, kasi Elisa ya moko te, eyebisaki Namana ete motindo ya Nkolo ezalaki kaka ko “kende mpe sukola nan [Ebale] ya Yaladene [yango] mbala nsambo.” Ntango mosusu lilako oyo ya pete ebetaki mobundi ya nguya yango lokola ya mayele te, ya pete, to na nse ya lokumu na ye ete amonaki likanisi ya pete yango ya kofinga. Atako bongo mpenza, lilako ya Elisa elobelaki Namana eloko te, “boye abongwanaki mpe alongwaki na nkanda.”

Kasi basali ya Namana na boboto babelamaki pene na ye mpe balobaki ete akokaki kosala “likambo moko monene” soki Elisa asengaki ye yango. Balimbolaki ete lokola asengamaki bobele kosala lotomo, esengelaki ye kosala yango te, ata soki azalaki kososola mpo na nini te? Namana atalaki lisusu eyano na ye mpe ntango mosusu na ntembe, kasi na botosi, “akitaki … na nse, mpe asukolaki na Yaladene mbala” mpa abikisamaki na kokkamwa.8

Mbano mosusu ya botosi eyaka mbango; misusu eyaka bobele nsima ya komekama na biso. Na Perle de Grand Prix, totangi na oyo etali etingia ya mpiko ya Adama na kobatelaka motindo ya kotumba bambeka. Ntango anzelu atunaki ye mpo na nini azalaki kotumbela mbeka, alobaki,“nayebaki te, longola se Nkolo atindaki ngai.” Anzelu alimbolaki ete bambeka na ye ezalaki “bokokani ya libonza ya Mombotami se Moko ya Tata.” Kasi bolimboli wana eyaki lokola bobele nsima Adama azalaka alakisaka bomipesi na ye na kotosaka Nkolo mpo na “mikolo mingi” kozangaka koyeba mpo na nini bakanisaki asengelaki kotumba mbeka.9

Nzambe akopambola bison tango nyonso mpo na botosi na biso ya sikisiki ya nsango malamu na Ye mpe fidelité na Eklezia na Ye, kasi Ye alakisaka biso mingimingi te manaka na Ye mpo na kosalaka boye na kozela te. Alakisaka biso foto nyonso uta na ebandeli. Wana ezali esika wapi,bondimi, elikia, mpe kotiela motema na Nkolo ekotelaka.

Nzambe asengi biso tomema elongo na Ye—totia motema na Ye mpe tolanda Ye. Abondeli biso mpo na “kotia ntembe te zambi bomoni te.” Akebisi biso ete tosengeli kozela biyano ya pete te to biyano ya nokinoki uta na lola. Makambo ebonganga ntango totelemaka ngwi nan tango ya “momekano ya [ya biso] bondimi,” atako momekano yango ekoki kozala mpasi mpo na kotia molende to malembe eyano ekoki kozala na koyaka.10 Nazali kolobela “botosi ya kokufa miso” te11 kasi boliki ya makanisi na bolingo ebonga mpenza mpe na ngonga ya Nzambe.

Bomekami ya bondimi ntango nyonso ekosenga kotikalaka solo na misala ya pete, ya mokolo na mokolo ya bondimi oyo . Nsima, mpe bobele nsima, Ye alaki mpenza ete tokozwa eyano ya bonzambe oyo tozalaki koluka: libiki uta na kpokoso moko, bokasi ya koyika mpiko, koyanola motuna, limoni, bwania, bolimbisi. Bobele ntango tolakisi bolingi na biso ya kosala nini Ye asengi kozanga kosengaka koyeba bantango nini, bampo na nini, mpe baboniboni nde biso “tokobuka mbuma mbano ya [ya bino] bondimi, mpe [ya bino] etingia, mpe bompikiliki, mpe motema molai.”12 Botosi ya solo edimaka mitindo ya nzambe na mobimba mpe na ko na kozela te.13

Nakoyeba to te, toponaka banso “nani [biso] tokosalela.” 14 Tolakisaka mokano na biso ya kosalela Nkolo na komipesaka na bondimi, na bikela ya mokolo na mokolo ya losambo. Nkolo alaki été akotambolisa na banzela na biso, 15kasi mpo ete Ye asala yango, tosengeli kotambola, kotiaka motema ete Ye ayebi nzela mpamba te Ye azali “nzela.”16 Ntango totieli motema na mpe tolandi Ye, lokola mai ebongwanaki vinyo bomoi na biso ebongwanami. Tokomi eloko moko ya motuya oyo tokokaki kozala te na lolenge mosusu. Botiela Nzambe motema, bolendisa bondimi na bino kati na nkolo, mpe “nyonso ye akoloba na bino, bosala yango.” Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.