Mongongo ya Likebisi
Ntango mokumba ya kokebisa eyokanisami mingimingi mpenza na baprofeta, ezali mokumba moko ekabolami na basusu mingi mpe.
Profeta Ezekiele abotamaki pene ya mibu ntuku mibale liboso Leyi mpe libota na ye batika Yelusaleme. Na 597 YK, na mobu 25, Ezekiele azalaki moko kati na mingi oyo bamemaki na bokangemi na Babilona na Nebukadanesala, mpe lokola toyebi, alekisaki bomoi na ye oyo etikalaki kuna.1 Azalaki ya molongo ya Bonganga ya Alona, mpe ntango akomaki na mibu 30, akomaki profeta.2
Na kobiangaka Ezekiele, Yova asalelaki ndimbola ya mokengeli.
“Soki ntango [mokengeli] amoni mompanga koya na likolo na mokili, mpe afuli na kelelo, mpe akebisi bato;
“Boye soki moto ayoki lokito ya kelelo mpe akebisi te, mpe mompanga ebimi mpe elongolu ye, makila na ye ekozala na moto ya na ye.”3
Na ngambo mosusu, “soki mokengeli amoni mopanga koya, mpe afuli na kelelo te, mpe bato bakebisami te; mpe mopanga ebimi, mpe elongoli soki nani na kati na bango, … nde nakotuna mpo na makila na ye na loboko na mokengeli.”4
Boye kolobaka epayi ya Ezekiele, Yowa alobaki ete, “Yo, mwana na moto, nasili kotia yo mokengeli boye mpo na ndako na Yisalaele; yoka liloba na monoko na ngai, okebisa bango mpo na ngai.”5 Likebisi ezalaki mpo na kolongola lisumu.
“Ntango nalobi na moto na nkanda, O moto na nkanda, okokufa mpenza; soki olobeli mpo na koyebisa moto na nkanda te atika mabe na ye, moto na nkanda oyo akokufa na lisumu na ye; kasi makila na ye ekotunama na maboko na yo.
“Soki nde okokebisa moto mabe ete abongwa na nzela na ye; soki ye abongwami na nzela na ye te ya mabe, nde ye akokufa na mabe na ye; kasi yo obikisi molimo na ye. …
“Lisusu, wana ekoloba ngai na moto mabe ete, Okokufa solo; soki ye abongwami na lisumu na ye te, mpe asali yango ebongi mpe na sembo; …
“Moko na masumu masalaki ye makotangama na ye te: ye asali yango ebongi mpe na sembo; mpe akobika.”6
Na esengo, likebisi oyo ezali lisusu mpo na bayengebeni. “Wana ekoloba ngai na moyengebeni ete akobika solo; soki nde akotia motema na ye na boyengebene na ye, mpe asali lisumu, [misala na ye na boyengebene] nyonso ekokonisama te; kasi mpo na lisumu esili ye kosala, mpo na yango.”7
Kobondelaka bana na Ye, Nzambe alobaki na Ezekiele “Lobela bango ete, Nkolo Nzambe alobi ete, Lokola ezali ngai na bomoi, nazui esengo na liwa na moto mabe te, bobele ete moto mabe abongwana na nzela na ye mpe abika; bongwana, bongwana na nzela mabe na bino; zambi bino bolingi kokufa mpo na nini, O ndako na Yisalaele?”8
Mosika ya kozalaka motema likolo ya kokweisa, Tata na biso na Lola mpe Mobikisi na biso balukaka esengo na biso mpe babondelaka biso toyambola, koyebaka malamu mpenza ete “nkanda mokolo moko te ezalaki kuna [mpe mokolo moko te ekozala] esengo.”9 Yango wana Ezekiele mpe baprofeta nyonso ya kala mpe ya sika, kolobaka liloba ya Nzambe na motemba mobimba, bakebisi banso oyo bakobongwana uta na Satana, monguna ya milimo na bango, mpe “baponi lipanda mpe bomoi ya seko, na Moyokanisi monene wa bato banso.”10
Ntango mokumba ya kokebisa eyokanisami mingimingi mpenza na baprofeta, ezali mokumba moko ekabolami na basusu mpe. Yango wana, “ekomi moto nyonso oyo akebisami akebisa mozalani na ye.”11 Biso oyo tozwi boyebi ya mwango ya esengo—mpe mitindo na yango—esengeli toyoka mposa ya kokabola boyebi wana lokola esalaka bokesene nyonso awa mpe na boseko. Mpe soki totuni, “Mozalani na ngai azali nani oyo nasengeli kokebisa?” solo eyano ekomonisama na lisese oyo ebandaka, “Moto moko azalaki kokita na Yelusaleme kokenda na Yeliko, Akweyaki kati na babotoli,”12 mpe bongo na bongo.
Kotalaka lisese yango ya Mosamalia malamu na likambo oyo ekundolisi ngai ete motuna “Mozalani na ngai ezali nani?” ekangasamaki na mitindo minene mibale: “Okolinga Nkolo Nzambe na yo na motema na yo mobimba, mpe na molimo na yo mobimba, mpe na ngoya na yo mobimba mpe na mayele na yo mobimba; mpe mozalani na yo lokola yo.”13 Botindiki mpo na kotombola mongongo ya likebisi ezali bolingo—bolingo ya nzambe mpe bolingo moninga moto. Kokebisa ezala kobatela. Nkolo eteyi oyo esengeli kosalama “na boboto mpe na komikitisa”14 mpe “na nguya, bompikiliki, na boboto … , mpe na bolingo ya solo.”15 Ekoki kozala nokinoki, lokola ntango tokebisaka mwana atia mosapi na moto te. Esengeli kozala polele mpe ntango mosusu sikisiki. Mbala mosusu, bokebisi ekoki kozwa lolenge ya lipameli “ntango otindikami na Molimo Mosantu,”16 kasi ntango nyonso efandisami kati na bolingo. Tatola, na ndakisa, bolingo oyo etindada lisalisi mpe mabonza ya bamisionele na biso.
Solo bolingo esengeli kotinda baboti bakebisa ya bango ya mpembeni “bazalani,”—bana na bango moko. Oyo elingi koloba koteyaka mpe kotatolaka na ntina ya babosolo ya nsango malamu. Elingi koloba koteya bana malongi ya Klisto: bondimi, boyamboli, libatisi, mpe likabo ya Molimo Mosantu.17 Nkolo akundolisi baboti ete, “Natindi bino bobokola bana na pole mpe bosolo.”18
Eloko ya ntina ya mokumba ya baboti ya kokebisa ezali kaka kolimbola nsuka ya mawa ya lisumu te kasi lisusu esengo ya kotambolaka kati na botosi ya mitindo. Bomikundola maloba ya Enosa etali nini ekambaka mpo na koluka Nzambe, kozwa bolimbisi ya masumu, mpe kokoma ya kobongwana:
“Tala, nakendaki koboma niama na zamba; mpe maloba maye nayokaka mbala nzike. Tata wa ngai koloba matali bomoi ya seko, mpe bosepeli ya basantu, makotaki na bozindo na kati ya motema na ngai.
“Mpe molimo na ngai moyokaki nzala; mpe nafukamaki na nse liboso ya Mozalisi wa ngai, mpe nabelelaki epai ya ye na losambo mpe bobondeli makasi.”19
Mpo na bolingo mpe mawa na Ye eluti mpo na basusu mpe esengo na bango, Yesu atepaki tepaki te mpo na kokebisa. Na ebmpeeli ya mosala na Ye, “Yesu abandaki kosakola, alobi, Boyambola: mpo na bokonzi ya lola esili kobelema.”20 Mpo Ayebaki ete bobele nzela nyonso te ememaka na lola, Atindaki:
“Boingela na ekuke na nkaka: zambi ekuke ezali monene mpe nzela ezali na esika monene oyo ekoleka kino libebi. Bazali mingi baoyo bakoingela na yango:
“Mpo ete ekuke ezali na nkaka mpe nzela ekangani, oyo ekoleka na bomoi, mpe baoyo bakomona yango bazali mingi.”21
Alekisaki ntango mingi elongo na basumuki, kolobaka, “Nayei kobianga bayengebeni te, kasi basumuki mpo ete bayambola.”22
Lokola mpo na bakomeli, mpe Bafalisai, mpe Basidisi, Yesu azalaki sikisiki na koboyaka lokuta na bango. Makebisi mpe mitindo na Ye ezalaki semba: “Mawa na bino, bakomeli mpe Bafalisai, bakosi! Zambi bokokabaka ndambo na zomi na eidosomo mpe na aneti mpe na nkumina, nde bokotikaka kosala makambo maleki na bozito kati na Mibeko, yango: kosambisa-sembo, mpe koyoka mawa mpe kondima. Ekokaki kosala oyo mpe kotika yango na liboso te.”23 Solo moko te akoloba ete Mobikisi alingaki bakomeli mpe Bafalisai oyo te—nsima ya nyonso, Ye aniokwamaki mpe akufaki mpo na kobikisa bango mpe. Kasi kolingaka bango, Ye akokaki kotika bango bakoba kati na masumu te kozangaka kobongisa bango na pole mpenza. Moto moko akomaki, “Yesu ateyaki bayekoli na ye basala bo esalaki ye: koyamba moto nyonso kasi lisusu koteya oyo etali lisumu, mpo bolingo esengaka kokebisa bato na oyo etali maye makoki kosala bango mpasi.”24
Ntango mosusu baoyo batomboli mongongo ya kokebisa babwakisami lokola mabe. Nzoka mpe, na litio, baoyo bazali koloba ete bosolo ezali emoneli ya moto na moto mpe mibeko ya ezalela ezali likambo ya kopona ya moto se moko bazali mbala mingi kaka bango oyo bazali kotonga makasi bato oyo bayambi mibeko eyebani “makanisi malamu.” Mokomi moko alobelaki oyo lokola “bonkoko ya nsoni”:
“Na bonkoko ya kobanga oyebi ete ozali malamu to mabe na maye kansansa na yo ezali koyoka. Na culture ya nsoni oyebi ete ozali malamu to mabe na maye lisanga ezali koloba oyo etali yo, na soki ezali kopesa yo lokumu to kolongola yo. … [Na bonkoko ya nsoni,] bomoi malamu efandisami na mibeko ya nini ezali malamu to nini ezali mabe te; efandisami na makanisi etali nani to nini esengelami kosangisa mpe nani to nini esengelami kolongola. …
“… Moto nyonso azali ntango nyonso kobanga ndenge ya ezalela efandisami na kosangisa mpe kolongola. Ezali na mibeko moko te ya libela, kaka bosambisi ya kotepatepa ya etuluku. Ezali bonkoko ya motema moto moto, ya kosala likambo nokinoki mpe ya bansomo ya ezalela, na ntango na yango moto nyonso amiyokaka asengeli kondimela makanisi na yango na makasi. …
“Bonkoko ya kobanga ekoki kozala makasi, kasi atako bongo okoki koyina lisumu mpe kokoba kolinga mosumuki. Bonkoko ya nsoni ya ntango ya sika ezali lokola kopesa motuya na kosangisa mpe kondima, kasi ekoki kozala na kokamwa mawa te na baoyo bmpeimi te mpe na baoyo bakeseni koleka bato mingi.”25
Oyo ekeseni na oyo ezali “libanga ya Mosikoli na biso,”26 moboko moko ya sikisiki mpe ya libela ya boyengebeni mpe bolamu. Ezali malamu mingi kozala na mobeko ebongwanaka te ya Nzambe na nzela na yango tokoki kosalela kopona lobi na biso koleka kozala mokangemi ya mibeko mibongwanaka mpe mabe ya etuluku ya bamedia ya bato banso. Ezali malamu mingi koyeba bosolo koleka kozala “koningisama na molayi mpe na monene, mpe komemama mosika na mopepe nyonso ya malongi.”27 Ezali malamu mingi koyambola mpe komeka kosalela mibeko nsango malamu koleka kosala lokola ezali na malamu to mabe moko te mpe kokweya na masumu mpe mawa.
Nkolo asakoli ete, “Mongongo ya likebisi ekokende epai ya bato banso, na nzela ya minoko ya bayekoli na ngai, oyo naponi na mikolo ya nsuka.”28 Lokola bakengeli mpe bayekoli, tokoki kozala na katikati na ntina ya “nzela malamu mingi.”29 Lokola Ezekiele, tokoki te komona mopanga koyaka likolo ya mabele mpe “kofula kelelo te.”30 Yango ezali te koloba ete tosengeli kobeta na ekuke ya mozalani to kotelema na esika ya nzela mpe kongangaka. “Boyambola!” Na bosolo, ntango bokanisi na ntina na yango, tozali na nsango malamu ezongisami oyo bato, ya bozindo mpenza, balingi na bosolo. Boye mongongo ya likebisi ezali na bato kaka te, kasi na liloba moko ya Njembo, yango ezali moko “makelele ya esengo mingi.”31
Deseret News likanisi ya mokomi Hal Boyd atangaki ndakisa moko ya mabe oyo etali kolobaka te. Akomaki ete atako likanisi ya libala ezali naino likambo ya “masolo ya mayele” kati na bato ya mayele na bato Amerika, libala yango moko ezali likambo ya lisolo mpo na bango na misala te. “‘Bato ya mayele babalaka mpe batikalaka ya kobala mpe basalaka ete bana bango basepela na matomba ya libala ya sikisiki.’ … likambo, ezali ete [bango] bazali na momesano ya koteya maye bazali kosalela te.” Balingi te “kotia na makasi” likolo ya baoyo mpenza bakokaki kozala na bonsenga ya bokambi, kasi “yango ezali ntango mosusu ngonga mpo na baye batanga mpe bazali na mabota makasi batika kokosa kozala na katikati mpe kobmpea koteya maye bazali kosalela etali libala mpe kobokola, … mpebasalisa baninga na bango Bato ya Amerika bayamba yango.”32
Tolikii ete mingimingi bino oyo ya nkola ya kobuta, bilenge mpe mikolo babala te likolo na baoyo Nkolo asengeli koyekama mpo na elonga ya mosala na Ye na mibu ekoya, bokosunga mateya ya nsango malamu mpe mibeko ya Eklezia na miso ya bato mpe na nkuku. Bosundola te baye bakoki koyamba bosolo kobunda mpe kokweyisa bozangi boyebi. Bokweya na makanisi ya lokuta ya bindimmpeima to na bobangi te—bobangi makambo, bopameli, to kutu mpasi. Bomikundola elaka ya Mobikisi:
“Mapamboli epai na bino wana bakotuka bino mpe bakonyokola bino bakolobela bino mabe nyonso mpo na ngai.
“Bosepela, mpe boyoka esengo: zambi libonza na bino ezali monene kati na lola. Mpo banyokolaki bongo basakoli baoyo bazalaki liboso na bino.”33
Na nsuka tozali banso bayanoli epai ya Nzambe na maponi na biso mpe babomoyi tozali. Mobikisi asakolaki, “Mpe Tata wa ngai atindaki ngai ete nakoka kotombolama likolo ya ekulusu; mpe nsima ete etombolamaka ngai likolo ya ekulusu, ete nakoka kobenda bato banso epai na ngai, ete lokola natombolamaki na bato kutu boye bato batombolama na Tata, mpo na koteleme liboso na ngai, mpo na kosambisama na misala na bango, soki ezali malamu to soki ezali mabe.”34
Koyebaka yango, bokonzi ya Nkolo. Nasukisi na maloba ya Alma:
“Mpe sikawa, bmpeeko na ngai mibali mpe basi natombeli uta o eteni ya katikati ya motema mwa ngai, iyo, na bobangi bonene kutu kina o bolozi, ete …bobwaka mosika masumu ma bino, mpe bozelisa te mokolo ya boyamboli na bino;
“Kasi ete bolinga komikitisa liboso ya Nkolo, mpe kobianga nkombo ya ye esantu, mpe kokenge mpe kosambela mbala na mbala, ete bokoka kosenginiama te likolo ya eye bokoki kokumba, mpe boye kokambema na Molimo Mosantu … ;
“Kozalaka na bondimi na Nkolo; kozalaka na elikia moko ete bokozwa bomoi ya seko; kozalaka na bolingo ya Nzambe ntango nynso o mitema na bino, ete bokoka kotombolama na mokolo ya nsuka mpe bokota na kati ya bopemi bwa ye.”35
Ekoka biso koloba na Nkolo elongo na Dawidi: “Nabombi te bosembo na yo na motema na ngai; nasakoli bondimi na yo mpe lobiko na yo: Nabombami te boboto na yo ya bolingo mpe bosolo na yo na lingomba monene. Kolongola te mawa na ngai na yo ya boboto, O Nkolo.”36 Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.