Yaka, Landa Ngai 2024
Sanza ya zomi na moko 11–17: “Pasola Elamba Wana ya Bozangi Bondimi.” Etele 1–5


“Sanza ya zomi na moko 11–17: ‘Pasola Elamba Wana ya Bozangi Bondimi.’ Etele 1–5,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe na Eklezia: Buku ya Mormon 2024 (2023)

“Sanza ya zomi na moko 11–17. Etele 1–5,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe na Eklezia: 2024 (2023)

Elilingi
Bayelede basali mobembo na esobe

Bayelede Balongwe Babele, na Albin Veselka

Sanza ya zomi na moko 11–17: “Pasola Elamba Wana ya Bozangi Bondimi”

Etele 1–5

Lokola ezali solo ete banzela ya Nzambe ezali likolo koleka ya biso mpe tosengeli ntango nyonso komikitisa na bolingi na Ye, Ye mpe lisusu alendisaka biso tokanisa mpe kosala mpo na biso moko. Yango ezali liteya moko Yelede mpe ndeko na ye ya mobali bayekolaki. Ndakisa, likanisi ya kokende mobembo na mabele ya sika oyo ezalaki “boponi likolo ya mabele manso” emonisamaki kobanda na makanisi ya Yelede, mpe Nkolo ayokaki mawa likolo na ye, mpe alobaki na ndeko ya Yelede, “Boye nakosala epai ya yo zambi ntango eye elai obeleli epai ya ngai” (tala Etele 1:38–43). Mpe ntango ndeko mobali ya Yelede azalaki na mposa ya mwinda na kati ya masuwa oyo esengelaki komema bango kino na mabele ya elaka, Nkolo atunaki motuna eye totunaka Ye: “ntango nyonso:“Bolingi nasala nini?” (Etele 2:23). Ye alingi koyoka mabanzo mpe makanisi na biso, mpe Akoyoka mpe Akopesa bondimisi na Ye to lisusu Akopesa biso toli na lolenge mosusu. Mbala mosusu eloko oyo ekabolaka biso na mapamboli oyo tolukaka ezali ya biso moko “elamba ya bozangi bondimi,” mpe soki tokoki “kopasola elamba wana” (Etele 4:15), tokoki kokamwa na oyo Nkolo alingi kosala mpo na biso.

Tala lisusu “Nkolo abimi epai ya Ndeko ya Yelede” (video), Gospel Library.

Makanisi mpo ya Koyekola na Ndako mpe na Eklezia

Etele 1:33–43

Ntango nabeleli Nkolo, Akoyokela ngai mawa.

Etele 1:33–43 elobeli nsambo misato ya ndeko mobali ya Yelede. Oyekoli nini uta na eyano ya Nkolo na losambo ya moko na moko? Kanisa na ntina ya ntango oyo oyokaki mawa ya Nkolo ntango obelelaki epai na Ye na losambo. Okoki kolinga kokoma boyebi oyo mpe kokabola yango na moto songolo oyo akoki kozala na mposa ya koyoka litatoli na yo.

Tala lisusu “Secret Prayer,” Cantiques, no. 144.

Etele 2; 3:1–6; 4:7–15

Elilingi
elembo ya seminele
Nakoki kozwa bobimisi mpo na bomoi na ngai.

Mokambi Russell M. Nelson alobaki: “Nabondeli mpo na yo okolisa makoki na yo ya molimo mpo na kozwa bobimisi. … Pona kosala mosala ya molimo oyo esengelami mpo na kosepela na likabo ya Molimo Mosantu mpe koyoka mongongo ya Molimo koleka mbala na mbala mpe na polele koleka” (“Bobimisi mpo na Eklezia, Bobimisi mpo na Bomoi na Biso,” Liahona, Sanza ya mitano 2018, 96).

Ntango ozali kotanga Etele 2; 3:1–6; 4:7–15, oyekoli nini mpo na oyo etali “mosala ya molimo” Mokambi Nelson alobelaki? Okoki komonisa na langi moko mituna to makambo ndeko mobali ya Yelede azalaki na yango mpe oyo asalaki na ntina na yango, mpe na langi mosusu okoki komonisa lolenge nini Nkolo asalisaki ye mpe asalaki ete bolingi na Ye eyebana.

Tala mwa mituna ya komanyola ntango ozali koyekola:

  • Nini ekamwisaka yo na ntina ya lolenge Nkolo ayanolaki na mituna ya ndeko mobali ya Yelede na Etele 2:18–25?

  • Lolenge nini okoki kosalela milongo Etele 3:1–5 oyo mpo na kosalisa moto oyo azali koyekola lolenge nini ya kosambela?

  • Nini ekoki kopekisa yo ozwa emoniseli uta na Nkolo?(tala Etele 4:8-10). Lolenge nini okoki kozwa bobimisi epai na Ye mbala mingi koleka? (tala Etele 4:7, 11–15).

  • Okanisi ete elimboli nini “kopasola elamba ya bozangi bondima” na bomoi na yo” (Etele 4:15).

Oyekoli nini lisusu uta na ndeko mobali ya Yelede etali bobimisi ya moto ye moko?

Mpaka Dale G. Renlund ateyaki etali “A Framework for Personal Revelation” (Liahona, Sanza ya zomi na moko 2022, 16–19). Kanisa kosala mayemi ya molongo ya bililingi mpe kokoma biloko minei ya molongo na ngambo moko na moko. Lolenge nini molongo oyo ekoki kosalisa yo “obakisa makoki na yo ya kozwa bobimisi”?

Tala lisusu Gospel Topics, “Personal Revelation,” Gospel Library.

Etele 2:14-15; 3:1–20

Na nzela ya etumbu na Ye, Nkolo abengisi ngai koyambola mpe kokende epayi na Ye.

Ata profeta moko monene lokola ndeko mobali ya Yelede asengelaki kozwa etumbu na Nkolo. Oyekoli nini uta na Ether 2:14–15 na ntina na etumbu na Nkolo? Kanisa na ntina ya lolenge nini etumbu ya Nkolo mpe eyano ya ndeko mobali ya Yelede ekoki kosalisa kolengela ye mpo na makambo na ye na Etele 3:1–20.

Etele 2:16–25

Nkolo akolengela ngai mpo na kokatisa “bozindo na ngai ya monene.”

Mpe ntango mosusu, kokatisa “bozindo monene” ezali bobele nzela se moko mpo na kokokisa bolingi ya Nzambe mpo na biso. Ozali komona bokokani na bomoi na yo na kati ya Etele 2:16–25? Lolenge nini Nkolo alengelaki yo mpo na mimekano na yo? Nini Azali kosenga yo osala sikawa mpo na komilengela mpo na oyo Alingi yo osala na mikolo mikoya nsima?

Tala lisusu L. Todd Budge, “Consistent and Resilient Trust,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2019, 47–49.

Salela oyo oyekoli. Boyekoli ya nsango malamu esengeli kofula yo mpo na kobongola bomoi na yo. Nsima ya kotanga Etele 4:11–12, okoki kotanga mwa ndambo ya bopusi na bomoi na yo mpe kotalela soki yango ezali kondimisa yo osala malamu. Bambongwana nini oyoki ofulami na yango mpo na kosala?

Etele 5

Banzeneneke batatoli bosolo ya Buku ya Mormon.

Ntango ozali kotanga lisakoli ya Moroni na Eteni 5, manyola ntina ya Nkolo na kobongisaka banzeneneke mingi ya Buku ya Mormon. Banzeneneke bafuli yo nini na kondimela ete Buku ya Molomoni ezali liloba ya Nzambe? Lolenge nini Buku ya Molomoni elakisi yo “nguya ya Nzambe mpe lisusu liloba na ye”? (Etele 5:4).

Makanisi mpo na Koteya Bana

Etele 1:33–37; 2:16–25; 3:1–6

Tata na Lola ayokaka mpe ayanolaka nsambo na ngai.

  • Soki oyebi monoko oyo bana na yo bayebi te, pesa bango mwa malako ya pete na monoko yango (to beta kaseti oyo ezali na monoko mosusu). Okoki kosalela yango mpo na kolimbola ntina oyo ndeko ya Yelede abondelaki mpo na kosenga lisalisi na Etele 1:33–37. Bobeta nsete na lolenge nini Nkolo ayokaki na ntina ya losambo oyo mpe lolenge nini ayanolaki (tala lisusu “Chapter 50: The Jaredites Leave Babel,” Masolo ya Buku ya Molomoni, 143–44).

  • Bana na yo bakokaki kosala lokola bazali kotonga masuwa ntango ozali kotanga Etele 2:16–17. Na nsima yo na bana na yo bokokaki kotanga na ntina ya mikakatano oyo Bayelede bazalaki na yango na bamasuwa na bango (tala Etele 2:19) mpe banzela ekeseni Nkolo ayanolaki nsambo ya ndeko mobali ya Yelede (tala Etele 2:19–25; 3:1–6). Elilingi mpe lokasa ya misala oyo na nsuka ya molongo oyo ekoki kosalisa yo mpe bana na yo kobeta lisolo yango. Toyekoli nini uta na ndeko mobali ya Yelede na ntina na losambo? Kanisa kokabola likambo moko oyo osambelaki mpo na lisalisi mpe Tata na Lola asalisaki yo.

Etele 3:6–16

Nakelamaki na elilingi ya Nzambe.

  • Ntango bazali kokola, bana na yo bakokutana na bansango mingi ya lokuta oyo etali Nzambe, bango moko, mpe nzoto na bango ya mosuni. Okoki kosenga bango basalisa yo ozwa bosolo na ntina ya mito ya makambo oyo na Etele 3:6–16. Mpo na kobeta nsete na solo oyo eteyami na Etele 3:13, 15, bokokaki kotala elilingi ya Mobikisi elongo mpe kobengisa bana na yo kolakisa biteni ndenge na ndenge ya nzoto na Ye. Na nsima, bakokaki kolakisa eteni moko ya nzoto na bango moko. Bokoki lisusu koyemba nzembo na ntina na banzoto na biso, lokola “Nkolo Apesi Ngai Tempelo” (Children’s Songbook, 153). Yo na bana na yo bokoki kolobela ntina oyo bozali na botondi mpo na nzoto na bino.

Elilingi
mwana azali kopota mbangu na elanga

Tokelami na elilingi ya Nzambe.

Etele 5

Banzeneneke misato batatolaki na ntina ya Buku ya Mormon.

  • Moroni asakolaki ete Banzeneneke Misato bakosalisa kotia bosolo ya Buku ya Molomoni. Mpo na koteya nini litatoli ezali, tuna moto na moto alimbola eloko moko ye amoni oyo bandeko ya libota mosusu bakokaki komona te. Ntango ozali kotanga Etele 5 elongo, bokokaki kolobela mpo na nini Nzambe asalelaka banzeneneke na mosala na Ye. Bokokaki lisusu kokabola moko na mosusu lolenge nini boyebi Buku ya Mormon ezali ya solo mpe lolenge nini okoki kokabola litatoli na yo elongo na basusu.

Mpo na makanisi mosusu, tala nimero ya sanza oyo ya Moninga magazine.

Elilingi
Yesu asimbi mabanga 16 na liboso ya ndeko mobali ya Yelede

Emoni Yo Mingi Koleka Eye?, na Marcus Alan Vincent

Bimisa na lokasa