Yaka, Landa Ngai 2024
Sanza ya zomi na moko 4–10: “Nazali kolobela Bino Lokola Soki Bozalaki Awa.” Mormon 7–9


“Sanza ya zomi na moko 4–10: Nazali kolobela Bino Lokola Soki Bozalaki Awa.’ Mormon 7–9,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: Buku ya Mormon 2024 (2023)

“Sanza ya zomi na moko 4–10. Mormon 7–9,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: 2024 (2023)

Elilingi
Moroni azali kokoma na bapalaki ya wolo

Moroni Azali kokoma na Bapalaki ya Wolo, na Dale Kilborn

Sanza ya zomi na moko 4–10: “Nazali kolobela Bino Lokola Soki Bozalaki Awa”

Mormon 7–9

Moroni ayebaki oyo ekoyokama lokola kozala yo moko kati na mokili ya mabe—mingimingi nsima ya liwa ya tata na ye na etumba mpe Banefi babomamaki. “Natikali kutu ngai moko,” akomaki. “Nazali na baninga te mpe esika ya kokende te” (Mormon 8:3, 5). Makambo makoki komonana ete elikya ezali te, kasi Moroni azwaki elikya na Yesu Klisto mpe litatoli na ye ete “bantina ya seko ya Nkolo ekokoba kosalama” (Mormon 8:22). Mpe Moroni ayebaki ete eteni ya motuya ya bantina ya seko wana ekozala Buku ya Mormon—likundoli oyo azalaki kokokisa na etingia, likundoli oyo mokolo moko ekomema bato mingi “na boyebi ya Klisto” (Mormon 8:16; 9:36). Bondimi ya Moroni kati na bilaka oyo ekokisamaki mpo na ye kosakola boye na batangi ya buku oyo baye bakoya nsima, “nazali kolobela bino lokola soki bozalaki awa” mpe “nayebi ete bokozwa maloba na ngai” (Mormon 8:35; 9:30). Sikawa biso tozali na maloba na ye, mpe mosala ya Nkolo ezali kokende liboso, na eteni mpo ete Mormon mpe Moroni bakangamaki na etinda na bango, ata na ntango bazalaki bango moko.

Makanisi mpo na Koyekola na Libota mpe na Eklezia

Mormon 7

“Nasengeli kondimela Yesu Klisto” mpe “kotingama na nsango malamu na Ye.”

Nsima ya kokoma na mokuse likundoli ya bato na ye, Mormon apesaki nsango na ye ya kosukisa kati na Mormon 7. Mpo na nini okanisi aponaki nsango oyo? Elingi koloba nini epayi na yo “kokangama na nsango malamu ya Klisto”? (Mormon 7:5).

Tala lisusu “I Believe in Christ,” Hymns, no. 134.

Mormon 7:8–10; 8:12–16; 9:31–37

Buku ya Mormon ezali na motuya monene.

Mokambi Russell M. Nelson atunaki: “Soki babonzeli yo badiama to mabanga ya ntalo to Buku ya Mormon, okopona nini? Na bosembo, nini ezali na motuya monene mpo na yo?” (Buku ya Mormon: Bomoi na Yo Ekokaki Kozala Lolenge nini Soki Yango Ezalaki Te,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2017, 61).

Ozwi nini kati na Mormon 7:8–10; 8:12–22; mpe 9:31–37 oyo esalisi yo ososola mpo na nini Buku ya Mormon ezali buku ya motuya na mikolo na biso? Mpo na nini ezali buku motuya mpo na yo? Okoki kozwa mayele mosusu na kati ya 1 Nefi 13:38–41; 2 Nefi 3:11–12; mpe Malongi mpe Mayokani 33:16; 42:12–13.

Elilingi
bakopi ya Buku ya Mormon na minoko ekeseni

Makomi ya baprofeta ya Buku ya Mormon ekomami mpo na biso.

Mormon 8:1–11

Nakoki kobatela mitindo ata ntango basusu bazali kobatela te.

Ntango mosusu okoki komiyoka yo moko kati na makasi na yo ya kobatela mitindo. Tokoki koyekola nini uta na ndakisa ya Moroni oyo ekoki kosalisa? (tala Mormon 8:1-11). Soki okokaki kotuna Moroni lolenge nini atikalaki sembo, okanisi alingaki koloba nini?

Tala lisusu “All May Know the Truth: Moroni’s Promise” (video), Gospel Library.

Mormon 8:26–41; 9:1–30

Buku ya Mormon ekomamaki mpo na mikolo na biso.

Yesu Klisto alakisaki Moroni maye makozala kosalema ntango Buku ya Mormon ekobima (tala Mormon 8:34–35), oyo ememaki ye mpo na kopesa makebisi ya makasi mpo na mikolo na biso. Ntango ozali kotanga Mormon 8:26–41 mpe 9:1–30, manyola lolenge nini maloba na ye ekoki kosalama epai na yo. Ndakisa, kati na milongo oyo Moroni atuni mituna 24. Elembo nini emonani na miso omoni kati na mituna oyo ete moroni amonaki mikolo na biso? Lolenge nini Buku ya Mormon ekoki kosalisa na mikakatano oyo Moroni asakolaki?

Yokela Molimo. Tia bokebi na makanisi mpe mayoki na yo, ata soki emonani lokola ekokani te na botangi na yo te. Mayoki oyo ekoki kozala maye Tata na yo ya Lola alingi yo oyekola. Ndakisa, mayoki ozali na yango nsima ya komanyola mituna Moroni atuni kati na Mormon 9:1–30?

Mormon 9:1–25

Elilingi
elembo ya seminele
Yesu Klisto azali Nzambe moko ya makamwisi.

Moroni asukisaki makomi ya tata na ye na nsango ya nguya mpo na bato na mikolo na biso oyo bandimaka makamwisi te (tala Mormon 8:26; 9:1, 10–11). Mpo na nini okanisi ete boyambi na makamwisi esengelami lelo? Meka na mozindo Mormon 9:9–11, 15–27 mpe Moroni 7:27–29 mpe manyola mituna lokola:

  • Nayekoli nini etali Mobikisi uta na milongo oyo?

  • Nayekoli nini etali makamwisi, kala mpe sikawa?

  • Nini ezali matomba ya kondimela ete Yesu Klisto azali Nzambe moko ya makamwisi. Nini ezali nsuka ya kondimelaka oyo te?

  • Makamwisi nini—ya minene mpe mike—Mobikisi asali kati na bomoi na ngai? Makamwisi oyo eteyi ngai nini na oyo etali Ye?

Mokambi Russell M. Nelson ateyaki “Mobikisi mpe Mosikoli na biso, Yesu Klisto, akosala misala na Ye ya nguya mpenza katikati ya sikawa mpe ntango Ye akozonga lisusu. Tokomona makambo ya kokamwa ete Nzambe Tata mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto, bazali kokamba Eklezia oyo na nguya mpe nkembo” (“Revelation for the Church, Revelation for Our Lives,” Liahona, Sanza ya mitano 2018, 96). Oyoki nini mwa makamwisi oyo ekokaki kozala? Nini okoki kosala mpo na kosalisa Mobikisi akokisa yango?

Oyekoli nini etali bondimi mpe makamwisi uta na makambo ya Basantu na Samoa, Tonga, Fiji, mpe Tahiti ntango Mokambi mpe Ndeko mwasi Nelson bakendeki kotala bango? tala Russell M. Nelson, “Christ Is Risen; Faith in Him Will Move Mountains,” Liahona, Sanza ya mitano 2021, 101–4).

Tala lisusu Mpaka Ronald A. Rasband, “Tala! Nazali Nzambe ya Makamwisi,” Liahona, Sanza ya mitano 2021, 109-12, “Miracles,” Gospel Library.

Makanisi mpo na Koteya Bana

Mormon 7:8–10

Buku ya Mormon mpe Biblia etatolaka Yesu Klisto.

  • Mpo na kobeta nsete na mokangano kati na Biblia mpe Buku ya Mormon, lokola esalaki Moroni, okoki kosakana lisano lokola moko oyo elongo na bana na yo: Senga bango baloba “Boyokani ya Kala, Boyokani ya Sika” ntango otomboli likolo kopi ya Biblia mpe “Litatoli Mosusu” ntango otomboli likolo Buku ya Mormon. Okoki lisusu kopona makambo mingi oyo nyonso mibale Biblia mpe Buku ya Mormon etatolaka—ndakisa mbotama, liwa, mpe Bosekwi ya Yesu—mpe bengisa bana na yo bazwa bililingi ya makambo oyo (ndakisa, kati na Gospel Art Book).

  • Mpo na kosalisa bana na yo bayekola eteni ya bondimi ya mbala ya mwambe, okoki kokoma liloba moko na moko na biteni ekabwana ya papie. Bengisa bana na yo basala elongo mpo na kotia maloba na molongo malamu mpe bazongela yango mbala mingi.

Mormon 8:1–7

Nakoki kobatela mibeko ata kutu ntango nazali komiyoka ngai moko.

  • Ndakisa ya Moloni ekoki kofula bana na bino batosa mibeko ya Nzambe atako ntango bazali komiyoka bango moko. Nsima ya kotanga Mormon 8:1–7 elongo na bango, bakoki kokabola lolenge balingaki komiyoka soki bazalaki Moroni. Na milongo 1, 3, mpe 4, nini Moroni etindamaki kosala, mpe lolenge nini atosaki? Lolenge nini tokoki kozala mingi lokola Moroni?

  • Ntango mosusu yo mpe bana na yo bokoki kosolola etali makambo epayi wapi basengeli kopona katkati ya malamu mpe mabe ntango moto moko te azali kotala . Lolenge nini kozalaka na bondimi kati na Yesu Klisto esalisaka biso kati na makambo oyo. Loyembo lokola: “Stand for the Right,” (Children’s Songbook,, 159) ekoki kobakisama na lisolo oyo.

Mormon 8:24–26; 9:7–26

Yesu Klisto azali “Nzambe moko ya makamwisi.”

  • Okoki kolinga kolimbolela bana na yo ete likamwisi ezali eloko moko Nzambe asalaka mpo na kolakisa nguya na Ye mpe kopambola bomoi na biso. Nsima okoki kotanga maloba uta na Mormon 9:11–13, 17 oyo elimboli mwa makamwisi ya Nzambe, mpe bana na yo bakoki kokanisa makamwisi mosusu (bililingi uta na Gospel Art Book, ndakisa banimelo. 26, 40, 41, mpe 83, ekoki kosalisa). Bosolola mpo na oyo etali makamwisi oyo Nzambe asali kati na bomoi na bino.

  • Lakisa bana na yo elubu, mpe bosolola mpo na oyo etali maye malingaki kosalema soki otikaki eloko ya mpimbo ya ntina. Botanga elongo Mormon 8:24 mpe 9:20–21 mpo na kozwa “biloko ya mpimbo” oyo ekoki komema na makamwisi ya Nzambe.

Mpo na makanisi mingi, tala mokanda ya sanza oyo na magazini ya Friend .

Elilingi
Moroni azali komona libebi ya Banefi

Moroni Azali Komona Libebi ya Banefi, na Joseph Brickey

Bimisa na lokasa