Yaka, Landa Ngai 2024
Sanza ya zomi 14–20: “Bozali Bana ya Liyokani.” 3 Nefi 20–26


“Sanza ya zomi 14–20: ‘Bozali Bana ya Liyokani.’ 3 Nephi 20–26,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: Buku ya Mormon 2024 (2023)

“Sanza ya zomi 14–20. 3 Nefi 20–26,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: 2024 (2023)

Elilingi
Klisto abimeli Banefi

Liyemi ya Klisto kobimelaka Banefi, na Andrew Bosley

Sanza ya zomi 14–20: “Bozali Bana ya Liyokani”

3 Nefi 20–26

Ntango oyokaka bato kosalela maloba lokola ndako ya Yisalaele, oyokaka lokola bazali kolobela yo? Banefi na Balamani bazalaki bakitani na nzoto ya Yisalaele “etape ya nzete ya Yisalaele,” mpe atako bongo bamiyokaki “ya kobunga uta na nzoto na yango” (Alma 26:36; tala lisusu 1 Nefi 15:12). Kasi Mobikisi alingaki bango bayeba ete epai na Ye babungaki te. “Bozali ndako ya Yisalaele ,” Ye alobaki, “mpe bozali bato ya liyokani” (3 Nefi 20:25). Akoki kolobela yo eloko ya lolenge moko lelo, mpo ete moto nyonso oyo abatisami mpe asali mayokani na Ye azali mpe ya ndako ya Yisalaele, “ya liyokani.” Na maloba mosusu, ntango Yesu alobeli ndako ya Yisalaele, Azali koloba na ntina na yo. Liteya ya kopambola “bikolo nyonso ya mabele” ezali mpo na yo (3 Nefi 20:27). Libengisi ya “lamuka lisusu, mpe lata bokasi na yo” ezali mpo na yo (3 Nefi 20:36). Mpe elaka na Ye ya motuya, “Boboto na ngai ekolongolama epai na bino te, to kutu liyokani ya kimia na ngai ekolongolama te,” ezali mpo na bino (3 Nefi 22:10).

Makanisi mpo na Koyekola na Libota mpe na Eklezia

3 Nefi 20–22

Na mikolo ya nsuka, Nkolo akosala mosala ya kokamwa.

Na 3 Nefi 20–22, Mobikisi asakolaki oyo etali mikolo ekoya ya bato na Ye ya Liyokani (tala mingimingi 3 Nefi 20:30–32, 39–41; 21:9–11, 22–29). Ntango otangi milongo oyo, mikundola maye Mokambi Russell M. Nelson alobaki: “Tozali kati na bato ya liyokani ya Nkolo. Ya biso ezali litomba ya kozala biso moko na kati ya bokokisi ya bilaka yango. Ntango nini oyo ya malamu ya kobika!” (“Bosangisi ya Yisalaele Epalangana,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2006, 79). Masakoli nini ezali mingi mingi kitoko mpo na yo? Nini okoki kosala mpo na kokokisa yango?

Luka maloba mpe makomi oyo ekoki kofula. Okoki komona ete maloba mpe biteni ya maloba mosusu na makomi etuti yo, lokola soki ekomamaki bobele mpo na yo. Kanisa kotia yango bilembo na makomi na yo to kokoma yango na zulunale moko ya boyekoli.

3 Nefi 2224

Nzambe azali na mawa epai ya bato oyo bazongaka epai na Ye.

Na kati ya 3 Nefi 22 mpe 24, Mobikisi alobeli maloba ya Yisaya mpe Malaki oyo etonda na bilili ya solo mpe bokokanisi—makala na kati ya moto, palata ya peto, libala, maninisa ya lola (tala mingi mingi 3 Nefi 22:7–8, 10–17; 24:10–12, 17–18). Nini babokokanisi oyo eteyi yo etali mokangano ya Nzambe na bato na Ye —mpe mokangano na Ye na yo? Lolenge nini bilaka na kati ya mikapo oyo ekokisami na bomoi na yo?

Tala lisusu “The Refiner’s Fire” (video), Gospel Library.

3 Nefi 23:6–13

Kokoma makambo tokutanaka na yango ya molimo ekoki kopambola libota na ngai.

Nini ekamwisi yo etali lisolo ya Mobikisi na Nefi kati na 3 Nefi 23:6–13? Soki Mobikisi asengelaki kotala nkoma obombaki, mituna nini ye akokaki kotuna yo? Makambo ya motuya to makambo okutanaki na yango ya molimo nini osengeli kokoma? Mpo na nini ezali motuya kosala bongo? (tala 3 Nefi 26:2).

3 Nefi 23; 26:1–12

Mobikisi alingi ngai nameka mozindo ya makomi.

Ntango ozali kotanga 3 Nefi 20:10–12; 23; 26:1–12, manyola lolenge nini Mobikisi ayokaka na oyo etali makomi. Bokeseni nini ezali kati na komeka mozindo ya makomi mpe kotanga yango na pete? (tala 3 Nefi 23:1).

3 Nefi 24:7–12

Elilingi
elembo ya seminele
Kofuta moko na zomi efungolaka maninisa ya lola.

Bato ya Nzambe batindami ntango nyonso bafuta moko na zomi (tala Genese 14:17–20; Malakii 3:8–11). Ntango ozali koyekola 3 Nefi 24:7–12, kanisa etali mpo na nini Nzambe asengaka bato na ye bafuta moko na zomi. Mituna oyo ekoki kokamba boyekoli na yo:

  • Mobeko ya moko na zomi ezali nini? (Tala Malongi mpe Mayokani 119. “Litomba to moleki likolo” kati na emoniseli oyo elingi koloba lifuti. Bandimi nyonso oyo bazali na lifuti basengeli kofuta moko na zomi.) Lolenge nini moko na zomi ekeseni na makabo ya ndenge misusu?

  • Moko na zomi esalelami na nini? Okoki komona molongo ya nkombo moko ndambo kati na Gospel Topics, “Tithing” (Gospel Library). Na ndenge nini opambolami mpo bandimi ya eklezia bafuti moko na zomi?

  • Mapamboli nini eyelaka bato oyo babikaka mobeko ya moko na zomi? (Tala 3 Nefi 24:7–12). Okoki kozwa misusu elimbolami na etinda ya Mpaka David A. Bednar “The Windows of Heaven” (Liahona, Sanza ya zomi na moko 2013, 17–20). Luka, mingimingi, mapamboli oyo esengeli mpenza na mosolo te. Lolenge nini omonaki mapamboli oyo na bomoi na yo?

Okoki lisusu kotala video “Jesus Teaches about the Widow’s Mite” (Gospel Library), to kotanga Malako 12:41–44. Lisolo oyo eteyi yo nini?

3 Nefi 25:5–6

Nkolo atindaki Eliya abalola motema na ngai epayi ya bankoko na ngai.

Na mikolo na biso, mitema na biso “ebalusami epayi [ya biso] batata” na nzela ya mosala ya tempelo mpe mambi ya kala ya libota. Lolenge nini oyo esalamaki epayi na yo? Ntango ozali kotanga 3 Nefi 25:5–6 mpe Malongi mpe Mayokani 110:13–16, manyola mpo na nini oyo ezali eteni ya motuya ya mwango ya Nzambe.

Tala lisusu “Families Can Be Together Forever,” Children’s Songbook, 188.

Mpo na makanisi mingi, tala mikanda ya sanza oyo ya Liahona mpe magazini Mpo na Bokasi ya Bilenge .

Makanisi mpo na Koteya bana

3 Nefi 23:1, 5

Nakoki komeka mozindo ya makomi na etingya.

  • Mitindo ya Mobikisi kati na Moroni 3 Nefi 23 elakisi lolenge nini makomi ezali motuya epayi na Ye. Mpo na kosalisa bana bamona oyo, okoki kotanga 3 Nefii 23:1, 5 makasi mpe kosenga bango bayoka mpo na liloba moko oyo ezongelami mbala misato. Lolenge nini komeka na mozindo ekeseni na kaka kotanga?

  • Ntango mosusu yo mpe bana na yo bokoki kokoma molongo moko ya makomi bolingaka mpe kobomba yango. Nsima bokoki moko nsima ya mosusu komona makomi ebombami ya moko na mosusu, kotanga yango elongo, mpe kosolola oyo etali mpo na nini milongo oyo ezali ntina.

3 Nefi 24:8–12

Kofuta moko na zomi efungolaka maninisa ya lola.

  • Salisa bana na yo bameka na mozindo 3 Nefi 24:8–12 mpo na komona ndenge ya kotondisa esakola oyo: Soki nafuti moko na zomi, Nkolo ako … . Okoki lisusu kokabola likambo okutanaki na yango kati na yango opambolamaki mpo ete ofutaki moko na zomi. Soki ekosalisa, kanisa kokoma mwa mitango ya mosolo mpe kosalisa bana na yo baluka mituya motango boni ya moko na zomi (10 pourcent) ya kopesa mpo na motango moko na moko.

  • Lokasa ya molulu ya poso oyo ekoki kosalisa bana na yo basolola etali banzela misusu Nkolo asalelaka moko na zomi mpo na kopambola bandimi ya Eklezia na Ye. Ntango mosusu bakoki koyema bililingi (to kozwa bililingi na bamagazini ya Eklezia) ya banzela moko na zomi epambolaka bango.

3 Nefi 25:5–6

Tata na Lola alingi ngai nayekola oyo etali bankoko na ngai.

  • Lolenge nini okofula bana na yo bameka na mozindo mpo na koyekola oyo etali bankoko na bango? Lolenge nini okoki kolendisa bana na yo basala makuli mpo na bankoko na bango ntango bakokoma mikolo? Kanisa kosalisa bango bameka na mozindo 3 Nefii 25:5–6 mpo na kozwa likambo moko oyo esengelaki kosalama na mikolo ya nsuka. Bana ya bilenge bakoki kotia maboko na bango likolo ya motema na bango ngonga moko na moko bakoyoka liloba “motema” ntango ozali kotanga milongo oyo. Okoki lisusu kotanga oyo etali lolenge esakola oyo ekokisamaki kati na Malongi mpe Mayokani 110:13–16 (tala lisusu Gospel Art Book, no. 95). Lobela bana na yo oyo etali lolenge nini motema na yo ebalukaki epayi ya bakoko na yo. Ndakisa, okoki kokabola baboyebi nyonso ozwi koyekolaka oyo etali bankoko na yo mpe kosalaka makuli ya tembpelo mpo na bango.

  • Salisa bana na yo batondisa nzete ya libota na bankombo ya baboti mpe bankoko na bango. Masolo nini okoki kokabola etali moko ya bankoko na yo? Lakisa bafoto soki ekoki kosalema. Bokoki lisusu koyemba elongo “Families Can Be Together Forever” (Children’s Songbook, 188) mpe kosolola elongo na bana na yo oyo etali mpo na nini mabota ezali motuya kati na mwango ya Tata ya Lola.

Mpo na makanisi mingi, tala bobimisi ya sanza oyo na magazini ya moninga .

Elilingi
Yesu azali kotanga mambi ma kala ya Banefi elongo na Nefi

Bobimisa Buku, na Gary L. Kapp.

Bimisa na lokasa