Likita Linene
Kotelemelaka Mipepe Makasi na Biso ya Molimo na Kondimelaka Klisto
Likita Linene ya Sanza ya Zomi 2021


Kotelemelaka Mipepe Makasi na Biso ya Molimo na Kondimelaka Klisto

Totelemelaka bikumbaki na biso ya molimo malamu na kondimelaka Klisto mpe kobatelaka mitindo na Ye.

Na mibu motoba oyo eleki, bolingo na ngai, Ann, mpe ngai tofandaki na Texas pembeni ya Gulf Coast, wapi mwa mipepe ya makasi to bikumbaki minene ebetaki Etazini, kotikaka nsima bobuki makasi mpe kutu bobungisi ya bomoi. Mawa mingi, basanza eleki kala te ezalaki mopaya te na makambo ya bobomibomi ya boye. Bolingo mpe nsambo na biso esembolami na baoyo banso basimbamaki na lolenge nyonso. Na 2017, tokutanaki biso moko na Ekumbaki Harvey, oyo ekweisaki ndelo ya bobetami yamvula tii na mapeko 60 (150 sentimetele).

Mibeko ya mokili eyangelaka bosalami ya bikumbaki. Moto ya mayi ya mongwa esengeli kozala pene na ndelo ya 28°c, kosembolamaka tii na 50 metele na nse ya mayi ya mbu monene. Ntango mopepe ekutanaka na mayi ya mbu ya moto, ekomisaka mayi kotoka mpe kobimisa molinga ya molunge mpe etombolaka yango na mopepe, wapi ekomaka mayi. Nsima mapata esalamaka, mpe mipepe ebotaka bambonge na likolo ya etando ya mbu.

Elilingi
Mopepe ya makasi to Bikumbaki

Bikumbaki ezalaka milai na monene, kokomaka na 15,240 metele to mingi na mopepe mpe kopanzanaka penepene na 200 kilometele na mayi. Esengo, ntango bikumbaki ekutani na mabele, ebandi kolemba mpamba te ezali lisusu likolo ya mayi ya moto te oyo esengeli kopesa kopelisa bokasi na bango. 1

Bokoki ata mokolo moko te kotelemela ekumbaki oyo ebebisaka biloko mingi ya solo. Nzokande, moko na moko na biso asila koleka, mpe akoleka na bikumbaki ya molimo oyo ebangisaka kimia na biso mpe emekaka bondimi na biso. Na mokili ya lelo, mipee yango ezali komonana se kokoma mingi na motango ekweyaka mpe nguya. Likambo ya kozongisa matondi, Nkolo apesi biso nzela ya sikisiki mpo na kolonga yango na esengo. Na kosalelaka nsango malamu ya Yesu Klisto, topesami elikya ete “ntango mapata ya moindo ya mobulu etelemeli biso likolo mpe ebangisi kimia na biso mpo na kobuka, ezali na elikya oyo ezali koseka makasi liboso na biso, mpe toyebi ete bokangoli ezali kongengaka pembeni.” 2

Mokambi Russell M. Nelson alimbolaki:

“Basantu bakoki kosepela na nse ya makambo nyonso. Tokoki koyoka esengo kutu ntango tozali kolekisa mokolo mabe, poso mabe, to kutu mobu mabe!

“… Esengo toyokaka etali moke makambo ya bomoi na biso mpe nyonso etali kotiaka makanisi na bomoi na biso.

“Ntango bomoi na biso efandisami likolo ya … Yesu Klisto mpe nsango malamu na Ye, tokoki koyoka atako nini ezali kosalama—to kosalama te—na bomoi na biso.” 3

Kaka lokola mibeko ya mokili eyangelaka bikumbaki ya solo, mibeko ya Nzambe eyangelaka lolenge ya koyoka esengo na ntango ya bikumbaki na biso ya molimo. Esengo to bobola oyo toyokaka ntango totelemelaka mvula minene ya bomoi na biso ekangamii na mibeko oyo nzambe atie. Mokambi Nelson asakolaki, “Babengaka yango mitindo, kasi ezali kaka mpe solo lokola mibeko ya botomboli, mpe mobeko ya kobaluka, [mpe] mobeko ya koyangela kobetama ya motema.”

Mokambi Nelson akobi, “Ekomi nzokande likambo moko ya pete: Soki olingi kozala na esengo, batela mitindo.” 4

Ntembe ezali monguna ya bondimi mpe esengo. Kaka lokola mayi ya mbu ya moto ezali mabele mobokoli mpo na bikumbaki, ntembe ezali mabele mobokoli mpo na bikumbaki ya molimo. Kaka lokola boyambi ezali boponi, bongo nde ezali ntembe. Ntango toponi kotia ntembe, toponi basalaka likolo na biso, kopesaka nguya na motelemeli, ekotika biso bongo na botau mpe likama. 5

Satana alukaka kokamba biso na mabele mobokoli ya ntembe. Alukaka kokomisa mitema na biso makasi mpo ete tondima te. 6 Mabele mobokoli ya ntembe ekoki komonana eloko oyo ezali kobengisa mpampba te mayi na yango oyo emonanaka lokola ya kimia, moto esengaka biso te tobika “na maloba nyonso oyo uta na monoko ya Nzambe.” 7 Na mayi ya boye Satana asenginyaka biso tonyolusa ekenge na biso. Bozangi ekenge wana ekoki kobota bozangi ya bondimi ya molimo, wapi tozali “soki malili te to moto te.” 8 Soki toyekami na Klisto te, ntembe mpe bakitoko na yango ekomema biso na bozangi bosepeli wapi tokozwa soki makamwisi, esengo ewumelaka te, to “bopemi na [ya biso] molimo te.” 9

Kaka lokola bikumbaki elembaka na mabele, bondimi ezwaka esika ya ntembe ntango totongi moboko na biso likolo na Klisto. Nsima tozali na makoki ya komona bikumbaki ya molimo na ezaleli na yango, mpe makoki na biso ya kolonga yango eyeisami monene. Bongo, “ekotinda zabulu mipepe na ye ya makasi, iyo, makula na ye na mopepe mwa kaina, iyo, ekobete mvula inso ya mabanga ya ye mpe moketi makasi na ye likolo lya [biso], ekozala na nguya te … mpo ya kobenda [biso] o nse o libulu lya bobola mpe lisuma lizanga nsuka, na ntina ya libanga likolo lya lyango [to]tongami, liye lizali nse yoko ya solo, nse yoko na wapi soko bato batongi bakoki te kokweya.” 10

Mokambi Nelson ateyaki:

“Bondimi kati na Yesu Klisto ezali moboko ya boyambi nyonso mpe ezalela ya nguya ya bonzambe. …

“Nkolo asengisi te bondimi ebonga nie mpo na biso kozwa nguya na Ye ebonga nie . Kasi Asengi na biso tondimela.” 11

Uta likita linene ya sanza ya minei, libota na ngai mpe ngai nazalaki koluka kolendisa bondimi na biso kati na Klisto mpe Bomikabi na Ye mpo na kosunga biso “kobalola [ya biso] mikakatano na bokoli mpe libaku ezanga bokokani.” 12

Nkoko na biso ya mwasi, Ruby, apambolami na bolingi ya kozwa mokumba na makambu kani ya makasi. Ntango abotamaki, nzela na ye ya komelela bilei ekanganaki na libumu na ye te . Kutu ntango azalaki mwana moke, Ruby, na lisungi ya baboti na ye, akutanaki na momekano oyo na mokano monene. Ruby azali sikawa na mibu mitano. Atako azali naino elenge mpenza, azali ndakisa ya nguya ya kotikaka ezalela na ye te eyangela esengo na ye. Azalaka ntango nyoso na esengo.

Sanza ya mitano eleki, Ruby akutanaki na ekumbaki mosusu na bomoi na ye na bondimi. Abotamaki lisusu na loboko oyo ezalaki monene mobimba te oyo esengaki lipaso ya kobongisa. Liboso ya lipaso ya mwa mindondo oyo, tokendaki kotala ye mpe topesaki ye liyemi oyo elakisi kitoko loboko ya mwana moko kosimbaka na esengo loboko ya Mobikisi. Ntango totunaki ye soki azalaki kobanga, na kotatanaba te, ayanolaki, “Te, Nazali na esengo!”

Elilingi
Ruby koyembaka loboko ya Mobikisi

Nsima totunaki ye, “Ruby, boniboni ezali bongo?”

Ruby na bonkutu alobaki, “Mpo nayebi ete Yesu akosimba loboko na ngai.”

Kobika ya Ruby ezalaki ya kokamwa, mpe akobaka kozala na esengo. Lolenge nini bopeto ya bondimi ya mwana ezali kokesena na liboma ya ntembe oyo ekoki mbala na mbala kosenginya biso ntango tokoli koleka! 13 Kasi tokoki banso kokoma lokola bana mike mpe kopona kotia pembeni bozangi boyambi na biso. Ezali boponi ya mindondo te.

Tata mobateli moko na molende abondelaki Mobikisi, kolobaka, “Soki okoki kosala eloko, … sunga biso.” 14

Nsima Yesu alobelaki ye:

“Soki ozali na kondima, makambo nyonso ekosalema na ye oyo andimeli.

“Mbala moko tata … agangaki, mpe alobaki na mayi na miso, Nkolo, nandimi, sunga ngai mozangi kondima.” 15

Tata ya bomikitisi na bwanya aponaki kotia elikya na bondimi na ye kati na Nkolo na esika ya ntembe. Mokambi Nelson akabolaki ete, “Bobele se kozanga bondimi na yo ekopekisa Nzambe apambola yo na makamwisi ya kotombola bangomba na kati ya yo bomoi.” 16

Boni Nzambe atonda na mawa mpenza boboto mpo na kotiela biso baale na ndelo ya kondimela kasi na ndelo ya koyebela te!

Alma ateyi:

“Apambolami ye oyo andimi maloba ma Nzamb.” 17

“[Mpo ete] Nzambe akoyokaka ngolu epai ya baye banso bandimi likolo lya nkombo ya ye; yango wana azali na mposa, o esika ya yambo, ete bondima.” 18

Iyo, na esika ya yambo, Nzambe azali na mposa ete tondimela Ye.

Totelemelaka bikumbaki na biso ya molimo malamu na kondimelaka Klisto mpe kobatelaka mitindo na Ye. Boyambi mpe botosi na biso ekangisi biso na nguya koleka oyo ya biso moko mpo na kolonga “[nyonso kani] ezali kosalamai—kati na bomoi na biso.” 19 Iyo, Nzambe “akopambola [biso] sasaipi” mpo na kondimela mpe kotosaka. 20 yango wana, nsima ya ntango ezalela na biso ya kozala ebongwanaka na esengo mpe “tokomisami na bomoi na Klisto” ntango tozali kosalela bondimi katina Ye mpe tozali kobatela mitindo na biso. 21

Bandeko, topona lelo “kotia ntembe te, kasi zala na kondima.” 22 “Lolenge malamu ezali ya kondima na Klisto.” 23 Bisi “tokomami … likolo ya matando ya maboko na [Ye].” 24 Azali Mobikisi mpe Mosikoli na biso oyo atelemaka na ekuke na biso mpenza mpe abetaka. 25 Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Bimisa na lokasa