Likita Linene
Nkisi ezali te na Gilada?
Likita Linene ya Sanza ya Zomi 2021


Nkisi ezali te na Gilada?

Nguya ya Mobikisi mpo ya kobikisa ezali bobele te makoki na Ye ya kobikisa banzoto na biso kasi ekoki kozala kutu likambo ya monene koleka, makoki na Ye ya kobikisa mitema na biso.

Kala mingi te nsima ya misio na ngai, ntango nazalaki nanu moyekoli monzemba na BYU, nayambaki mbela na telefone uta na tata na ngai. Ayebisaki ngai ete bamonaki ye na maladi ya kanser mpe ete atako libaku ya kobika mpo na ye ezali malamu te, azalaki na mokano ya kobika mpe kozongela misala ya bomoi na ye ya mokolo na mokolo. Mbela wana na nzela ya nsinga ezalaki ntango ya kokanisa mingi mpo na ngai. Tata na ngai azalaki episikopo na ngai, moninga na ngai, mpe mopesi toli na ngai. Wana ezalaki mama na ngai, bandeko na ngai mpe ngai moko kotala makambo makoya nsima, yango emonanaki molili. Leki na ngai ya mobali Dave azalaki kosala misio na New York mpe azalaki kolanda na mosika makambo maye ya mpasi kati na libota.

Minganga ya mikolo bapesaki likanisi ete basala lipaso mpe bameka kokata pembeni mpo na kopekisa bopalangani ya kanser. Libota na biso bakilaki, mpe basambelaki mpo na ye azwa likamwisi. Nayokaki ete tozalaki na bondimi ekoka mpo ete tata na ngai akoka kobika. Kaka yambo ya lipaso, nkulutu na ngai ya mobali, Norm mpe ngai moko topesaki tata lipamboli. Na bondimi nyonso tokokaki kolakisa, tobondelaki ete akoka kobika.

Lipaso elengelamaki mpo na kowumela ntango mingi, kasi nsima ya mwa ntango moke kaka, dokotolo ayaki na kisuku ya kozelela mpo na kokutana na libota na biso. Ayebisaki biso ete lokola babandaki lipaso bamonaki ete kanser esilaki kopalangana na nzoto ya tata na ngai. Na kotalaka kaka oyo bamonaki, tata na ngai atikalaki kaka na basanza moke ya kozala na bomoi. Elikya ekimaki biso mpenza.

Ntango tata alamukaki uta na lipaso, amitungisamaki mpo na koyeba soki makambo manso etambolaki malamu lokola esengeli. Tokabolaki na ye nsango wana ya mawa.

Tokobaki kokila mpe kosambela mpo na likamwisi. Lokola bokolongonu ya nzoto ya tata ezalaki kokita mbangu, tobandaki kosambela mpo ete anyokwama na mpasi te. Nsukansuka, nzoto ekomaki mabe koleka, tosengaki na Nkolo apesa ye nzela ya kokufa nokinoki. Basanza moke kaka nsima ya lipaso, lokola monganga alobaki, tata na ngai akufaki.

Bandimi ya Palwasi mpe baninga na biso balakisaki bolingo mpe bosalisi mingi na libota na biso. Tosalaki matanga moko ya kitoko oyo epesaki lokumu na bomoi ya tata na ngai. Lokola ntango ezalaki koleka, nzokande, mpe tobandaki koyoka mpasi ya kozanga tata, mpe nabandaki komituna mpo na nini tata na ngai abikaki te. Namitunaki soki bondimi na ngai ezalaki makasi ya kokoka te Mpo na nini mabota mosusu bazwaka likamwisi, kasi oyo ya biso libota te? Nayekolaki uta na misio na ngai kozonga na makomi mpo na kozwa biyano, mpe bongo nabandaki koluka kati na makomi.

Kondimana ya Kala ezali koteya epakolami moko ya nkisi ya solo kitoko basalelaka mpo na kobikisa bampota oyo esalemi na matiti ya esobe kokolaka na Gilada. Na ntango ya Kondimana ya Kala epakolami wana eyaki koyebana lokola “nkisi ya Gilada.” 1 Profeta Yilimia alelaki na ntina ya mpasi amonaki o ntei ya bato mpe alikiaki kozwa libiki. Yilimia atunaki, “Nkisi ezali te na Gilada; minganga bazali kuna te?” 2 Na nzela ya nkoma, miziki, mpe ntoki, Mobikisi Yesu Klisto atangamaki mbala na mbala lokola Nkisi ya Gilada mpo na nguya na Ye ya monene ya kobikisa. Lokola Yilimia, nazalaki komituna, “Nkisi na Gilada ezali te mpo na libota ya Nielson?”

Na Malako mokapo ya 2 ya Kondimana ya Sika, tomoni Mobikisi na Kapalanauma. Lisolo ya nguya ya kobikisa ya Mobikisi epalanganaki na mokili mobimba, mpe bato mingi basalaki mobembo na Kapalanauma mpo na kobikisama na Mobikisi. Mingi basanganaki na mpe nzinga nzinga ya ndako wapi Mobikisi azwamaki na lolenge ete kuna esika ezalaki te mpo na koyamba bango nyonso. Bato minei bamemaki mokatatali moko mpo ete abikisama na Mobikisi. Bakokaki kozwa nzela te na katikati ya ebele ya bato wana, mpe boye batobolaki ndako yango na likolo epai wapi Mobikisi azwamaki mpe bakitisaki moto yango na mabele.

Ntango natangaki lisolo oyo nakamwaki na oyo Mobikisi alobaki ntango Akutanaki na moto oyo: “Mwana, masumu na yo masili kolimbisama.” 3 Nakanisaki soki nazalaki moko ya bato minei oyo bamemaki moto oyo, nakokaki kolobela Mobikisi , “Tomemaki ye awa mpo ete abikisama.” Nakanisi Mobikisi akokaki kozongisa maloba, “Nabikisi ye.” Ekoki kozala ete nguya ya kobikisa ya Mobikisi ezalaki bobele makoki na Ye ya kobikisa nzoto na biso te, kasi ekoki kozala kutu likambo ya monene koleka, makoki na Ye ya kobikisa mitema na biso mpe mitema mibukana ya libota na ngai?

Mobikisi ateyaki liteya moko ya motuya na nzela ya likambo oyo akutanaki na yango lokola azali kobikisa moto oyo na nzoto. Emonanaki polele na ngai ete etinda na Ye ezalaki ete Akokaki kosimba miso ya baye bakufaki miso mpe bakokaki komona. Akokaki kosimba matoyi ya baoyo bazalaki koyoka te mpe bakokaki koyoka. Akokaki kosimba makolo ya baoyo bakokaki kotambola te mpe bakokaki kotambola. Akoki kobikisa miso, matoyi mpe makolo na biso, kasi ya motuya koleka nyonso, Akoki kobikisa mitema na biso lokola Akoki kopetola biso na masumu mpe kotombola biso na mimekano ya mpasi.

Ntango Mobikisi amonanaki na bato na kati ya Buku ya Mormon nsima ya Bosekwi na Ye, Alobaki lisusu na ntina ya nguya na Ye ya kobikisa. Banefi bayokaki mongongo na Ye kolobaka uta na lola ete, “Ekoya bino te sikawa epai na ngai, mpe koyambola masumu na bino, mpe kobongwana, ete nakoka kobikisa bino?” 4 Nsima, Mobikisi ateyaki ete, “Mpo epai ya baye lolenge loye bokokoba kosala; mpo boyebi te soko bakozonga mpe bakoyambola, mpe bakoya epai ya ngai na mokano motonda mwa motema, mpe nakobikisa bango.” 5 Mobikisi azalaki kolobela kobikisama na nzoto te kasi kobikisama ya milimo na bango na molimo.

Moroni amemi bososoli mosusu ntango akaboli maloba ya tata na ye, Mormon. Nsima ya kolobela makamwisi, Mormon alimboli, “Mpe Klisto alobi: Soko bozali na bondimi na ngai bokozala na nguya ya kosala eloko kani elongobani na ngai.” 6 Nayekolaki ete ntina ya bondimi na ngai esengeli kozala Yesu Klisto, mpe nasengeli kondima nini elongobani na Ye ntango nazali kosalela bondimi na Ye. Nasosoli ete liwa ya tata elongobanaki na mwango ya Nzambe. Sikawa, natie maboko na ngai likolo ya moto ya moto mosusu mpo na kopambola ye mobali to mwasi, bondimi na ngai ezali na Yesu Klisto, kososola ete moto akoki mpe akobikisama na nzoto, soki elongobani na Klisto.

Bomikabi ya Klisto, oyo ezali kopesa bosikoli na Ye mpe nguya na Ye oyo epesaka makoki, ezali lipamboli ya nsuka oyo nsango malamu ya Yesu Klisto ezali kopesa na banso. Ntango toyamboli na ntina ya motema mobimba, Mobikisi akobikisa biso. Ntango topesi na esengo bolingi na biso epai ya Tata, ezala na ntango ya mpasi koleka nyonso, Mobikisi akotombola mikumba na biso mpe akokomisa yango pepele. 7

Kasi ezali na liteya monene nayekoli. Nandimaki kati na libunga ete nguya ya kobikisa ya Mobikisi esalaki te mpo na libota na ngai. Ntango natali sikawa nsima na miso ya bososoli, namoni ete nguya ya kobikisa ya Mobikisi emonanaki polele na bomoi ya moko moko ya bato ya libota na ngai. Nazalaki kotala kaka kobikisama ya nzoto ete nazangaki komona makamwisi oyo esalamaka. Nkolo alendisaki mpe atombolaki mama na ngai likolo ya makoki na ye na nzela ya momekano oyo ya mpasi, mpe atambwisaki bomoi moko ya molai mpe oyo ebotaki mbuma. Azalaki na nguya ya makasi na bolamu na bana mpe bankoko na ye. Nkolo apambolaki ngai mpe bandeko na ngai na bolingo, bomoko, bondimi, mpe molende oyo ekomaki eteni moko ya monene ya bomoi na biso mpe ezali kokoba lelo.

Kasi toloba nini na ntina ya tata? Lokola na banso baye bakoyambola, abikisamaki na molimo lokola alukaki mpe azwaki mapamboli oyo ezali komonana mpo na banso mpo na Bomikabi ya Mobikisi. Azwaki bolimbisi ya masumu na ye mpe sikawa azali kozela likamwisi ya Bosekwi. Apostolo Paulo ateyaki, “Lokola na Adama banso bakwei, kaka bongo na Klisto nde banso bakozonga na bomoi.” 8 Bomoni, nazalaki koloba na Mobikisi, “Tomemi tata na biso epai na yo mpo na kobikisama,” mpe Mobikisi amonisi yango polele epai na ngai ete Abikisaki ye mpenza. Nkisi ya Gilida esalaki mpo na libota ya Nielson—na nzela oyo biso tokanisaki te, kasi na nzela moko ya ntina koleka oyo epamboli mpe ezali kokoba kopambola bomoi na biso.

Na Yoane mokapo ya 6 ya Kondimana ya Sika, Mobikisi asalaki likamwisi moko ya litomba monene. Kaka na mwa mbisi moke mpe mwa biteni ya mapa, Mobikisi aleisaki bato 5, 000. Natangaka lisolo oyo mbala mingi, kasi ezali na eteni ya makambo wana oyo nazangaki kasi oyo ezali na ntina monene epai na ngai. Nsima ya koleisa bato 5.000, Mobikisi asengaki na bayekoli na Ye kosangisa bandambu etikalaki, oyo bakweisaki, oyo etondisaki bitunga 12. Namituni mpo na nini Mobikisi azwaki ntango ya kosala eye wana. Ekomaki polele epai na ngai ete liteya moko oyo tokokaki koyekola uta na libaku wana ezalaki oyo: Akokaki koleisa bato 5.000 mpe mingi ya kolia etikalaki. “Ngolu na ngai ekoki na bato banso.” 9 Nguya ya bosikoli ya Mobikisi ekoki kozipa lisumu, mpota, to momekano songolo—likambo ezali boniboni ezali monene to mpasi—mpe ndambo ekotikala ezali. Ngolu na Ye ekoki.

Na boyebi wana, yo mpe ngai tokoki kokende liboso na bondimi, koyebaka ete ntango eleko ya mpasi eyaka, mpe solo ekoya, to ntango lisumu ekozinga bomoi na biso, Mobikisi atelemaka na “libiki kati na mapapu na ye,” 10 kobengisaka biso koya epai na Ye.

Napesi litatoli na ngai epai na bino ya Nkisi ya Gilada, Mobikisi Yesu Klisto, Mosikoli na biso, mpe ya nguya na ye ya libiki ya kokamwa. Napesi litatoli na ngai ya mposa na Ye ya kobikisa bino. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Bimisa na lokasa