Eteni Moko na Nkama Malamu koleka
Makasi nyonso tokosala mpo na kobongwana—ezala moke soki lolenge nini ekoki komonana epai na biso—ekoki kosala boekeseni ya monene koleka na bomoi na yo.
Koleka ekeke moko, ekipi ya lisano ya kokima mbangu na nkinga ya ekolo ya Angleterre oyo bato bazalaki koseka na mokili. Lokola bakweyaki kati na mosala mabe, bamati nkinga ya Angele balongaki bobele palata ya wolo moko na mibu 100 ya masano ya Olimpiki mpe bazalaki kokweya mpenza na momekano ya mbangu ya nkinga eyebana, ya makasi, ya Tour de France ya poso 3—wapi ata Angele moko te alongaka na mibu 110. Ezalela ya bamati nkinga ya Bangele ezalaki mpenza mawa ete mosali bankinga ya lokumu aboyaki kotekela Bangele nkinga, kobangaka ete yango ebebisa libela na libela lokumu ya kompani oyo bazwaki na mpasi. Mpe atako batiaki mosolo mingi na tekinolozi ya sika mpe na lolenge ya sika ya komilengela, eloko moko te esimbaki.
Eloko moko te, elingi koloba, kino 2003, ntango mbongwana oyo ekokaki komonana te ebongolaki mpo na libela etamboli ya lisano ya komata nkinga ya Bangele. Lolenge ya kosalela ya sika ekokaki lisusu komonisa libongi to liteya moko ya seko—na elaka—mpo na oyo etali boluki na biso na bomoi oyo ya kufa mpe ya ntango nyonso ya koluka komikomisa malamu koleka. Bongo, nini esalemaki na lisano ya kokima mbangu ya nkinga na Bangele oyo ekoki kosalelama na boluki na biso ya moto moko moko mpo na kozala bana basi mpe bana mibali ya malamu koleka ya Nzambe?
Na 2003, Sir Dave Brailsford azwamaki na mosala. Na bokeseni ya balakisi ya kala oyo balukaki mbongwana ya makasi, ya mbalakaka Sir Brailsford na esika wana amipesaki na lolenge moko oyo abengaki lokola “bosangisi matomba ya mike mike.” Oyo esengelaki kobongisa makambo ya mike mike na nyonso. Yango elakisaki kotala ntango nyonso, kolanda mitango ya motuya mpe kokokisa makambo ya boyekoli kotalaka botawu moko na moko.
Wana ekokanaki mwa moke na oyo Elamani abengaki na Buku ya Mormon “kotambola[ka] na bokebi.” 1 Limoneli oyo ya monene mpe ya mobimba eboyi motambu ya kozipama miso kaka na mokakatano oyo ezali komonana na miso to lisumu oyo ezali komonana. Elobaki Brailsford, “Liteya mobimba ewutaki na likanisi ete soki obukaki biloko nyonso okoki kokanisa mpo na kosala velo, nsima kobongisa yango eteni moko na nkama, okozwa mayele ya kobakisama ya motuya ntango okotia yango nyonso esika moko.” 2
Esaleli na ye emonani kokokana na oyo ya Nkolo, oyo ateyaki mpasi ya eteni 1 na nkama—kutu na esika ya biteni 99 na nkama. Solo, azalaki koteya masengami ya nsango malamu mpo na koluka bato bazali kati na bosenga. Kasi likambo nini soki tosalelaki libongi kaka wana na libongi ya mibale ya nsango malamu, boyamboli? Na esika ya komitika kotepatepa na mbongwana kati na lisumu mpe boyamboli, nini soki lolenge na biso ya kosala ekangisi nzela ya bokebi na biso—kutu ntango toyeisaki yango monene? Na esika ya koluka kobongisa nyonso nie, boniboni soki komipesa na kobongisa kaka likambo moko?
Ndakisa, eloko nini soki, na emoneli na yo ya monene ya ezalela, omoni ete otalaki mpamba kotanga Buku ya Mormon mokolo na mokolo? Malamu, na esika ya komeka na kozanga elikya ya kotanga nkasa 536 na butu moko, likambo nini soki omipesaki na kotanga kaka eteni moko na nkama na yango—to, na maloba mosusu, nkasa mitanona mokolo moko—to,ntina mosusu oyo okoki kokokisa mpo na makambo na yo? Kosangisa oyo ezali ya mike mike kasi ya ntango nyonso matomba ya mpamba na bomoi na biso nsuka nsuka kozala nzela na elonga likolo kutu mabungi na biso moko oyo elembisaka mpenza? Lolenge ya kosala oyo na nzela ya kosimba biloko ya mike mike mpo na kobundisa bozangi kokoka na biso ekokaki kosala mpenza?
Malamu, mokomi ayebana James Clear alobaka ete esaleli oyo etiaka matematiki na litomba na biso. Abeti nsete ete “mimesano ezali ‘litomba esangana’ ya mbongwana na biso moko. Soki okoki kobongisa kaka eteni moko na nkama malamu koleka na likambo moko mokolo na mokolo, na nsuka ya mobu okozala malamu koleka mbala 37 ” 3
Bobongisi makambo ya mike mike ya Brailsford ebandaki na solo emonani na miso, lokola biloko ya velo, lisanga ya bilamba, mpe ndakisa ya boyekoli. Kasi ekipi na ye esukaki wana te. Bakobaki komona eteni moko na nkama makambo bato bamonaka mpamba mpe wapi litoma ezwamaka te lokola bilei, mpe kutu ndenge ya bobongisi. Nsima ya ngonga, mbongwana oyo mpe funda ya mike mike esangisamaki na mbano ya kokamwa oyo eyaki mbangu koleka ete moko te akokaki kokanisa. Solo, Ezalaki na libongi ya seko na bosaleli ya “molongo moko na moko, motindo moko na moko, awa ndambo mpe kuna ndambo.” 4
Mabongisi ya mike mike ekokokisa “mbongwana ya makasi” 5 oyo olingi? Soki etiami malamu nandimi solo na biteni 99 ete bakolonga! Kasi lolenge ya kosala oyo ezali na bokebimpo ete biloko ya mike mike bisangisama mpo na bolamu na biso, esengeli tosala makasi ntango nyonso mokolo na mokolo. Mpe atako tokozala babongi nie te, tosengeli kotalisa molende na biso na bompikiliki. Sala bongo, mpe mbano ya elengi ya bosembo ebakisami ekomema bosepeli mpe kimia olukaka. Lokola Mokambi Russell M. Nelson ateyi: “Eloko moko te ezali kopesa bonsomi koleks, lokumu koleka, to motuya mingi kololeka na bomoto na biso ya moto na moto koleka kokangama mbala na mbala, mokolo na mokolo na boyamboli. Boyamboli ezali likambo esalemaka na mbala moko te; ezali mosala. Ezali fungola ya esengo. mpe kimia ya mayele. Soki esangani na bondimi, boyamboli efungolaka bikuke ya nguya ya Bomikabi ya Yesu Klisto. 6
Kasi mpo na oyo etali masengeli ya bondimi, makomi ezali polele. Nyonso oyo esengeli liboso ezali “eteni moko ya moke ya bondimi.” 7 Mpe soki tokoki kosangisa “mbuma ya sinapi” 8 tokoki, biso mpe na mayele, kozela bambongwana ekanama te mpe ya kokamwa na bomoi na biso. Kasi kanisa, kaka lokola tokomeka te koleka uta na Atilla the Hun tii kokoma na Mother Teresa butubutu, bongo mpe tosengeli kotambwisa lisusu ndakisa na biso ya mbongwana moke moke. Ata soki mbongwana yango esengami na bomoi na biso ezali kitoko, banda na oyo ya moke moke. Wana ezali mingi mingi solo soki ozali komiyoka elekeli yo to olembi nzoto.
Lolenge ya kosala oyo ekokisamaka na lolenge ya semba. Kutu kati na baye bazali molende mpenza ekoki kozala na mabaku ya kozonga nsima. Lokola nakutanaki na makambo ya koyokisa motema mpasi na bomoi na ngai moko, nayebi ete ekoki ntango mosusu komonana lokola nazali kokende liboso eteni 1 na nkama mpe nazali kozonga nsima biteni 2 na nkama. Nzokande soki totikali ya kokangama ngwi na mokano na biso ya kosangisa ntango nyonso matomba ya eteni 1 na nkama, Ye oyo “amemi mawa na biso” 9 solo akomema biso.
Solo, soki ozwami na masumu ya mawa, Nkolo azali polele mpe abongwani te; tozali na mposa ya kotika, kozwa lisungi uta na episikopo, mpe kotika misala ya boye sikasikawa. Kasi lokola Mpaka David A. Bednar ateyaki: “Mbongwana ya mike, ya ntango nyonso, ya kobakisama ya molimo ezali bitape oyo Nkolo akolinga biso tosala. Komilengela mpo na kotambola na kozangaka elindo liboso ya Nzambe ezali moko ya bantina na biso ya yambo na kufa mpe bolandi ya bomoi mobimba; ewutaka na botindiki ya libaku moko mpe mosusu ya mosala ya molimo makasi.” 10
Bongo, esaleli ya moke moke oyo mpo na boyamboli mpe mbongwana ya solo esimbaka solo? Ezali elembo emonani na miso kati bopusi velo, mpo na koloba? Tala nini esalemaki na basani ya velo ya Angele na mibu ntuku mibale mileki banda batiaki mabanza ya kobikela oyo. Bamati nkinga ya Bangele sikawa balongi Tour de France mbala nsambo na kokamwa. Na ntango ya masano ya Olimpiki minei eleki, Angleterre ekomi ekolo oyo elongi koleka banso na masano nyonso ya mbangu na nkinga. Mpe na Masano ya Olimpiki oyo ewuti kosila kala te, UK alongaki palata ya wolo mingi koleka ekolo mosusu kani.
Kasi mosika koleka ata palata to wolo, elaka na biso ya motuya na nzela na biso ya kokende na boseko ezali ete biso solo “tokolonga kati na Klisto.” 11 Mpe lokola tomipesi kosalaka mbongwana ya mike mpe ya ntango nyonso, tolakami “motole ya nkembo mokobeba te.” 12 Nakomitiaka kati na litomba ya nkembo eninganaka te, nabengisi yo ososola bomoi na yo mpe omona nini ezali kolembisa yo to kutu kosimba yo oningana te na nzela ya liyokani. Nsima, tala malamu koleka. Luka mabongisi ya mike mike na bomoi na yo kasi maye makoki kokokisama na bosepeli kitoko ya kobongwana libela.
Kanisa, David asalelaki kaka libanga moko ya moke mpo na kokweisa engambe oyo azalaki lokola ya kolongama te. Kasi azalaki na mabanga mosusu minei pembeni na ye. Na lolenge moko, motema ya nkuna ya Elenge Alma mpe nsuka na ye ya seko ebongwanaki kaka na likanisi moko ya pete mpe ya komonana—bokundoli ya liteya tata na ye oyo etali ngolu ya kobikisa ya yesu Klisto. Mpe ezali se bongo na Mobikisi oyo, atako azalaki na lisumu te “azwaki litondi na ebandeli te, … kasi akobaki ngolu nsima na ngolu, kino azwaki litondi.” 13
Ezali Ye oyo ayebaka ntango ndeke mokengele mboka akweyaka oyo atalaka mpenza bangonga ya mokuse lokola mpe bangonga ya motuya kati na bomoi na biso mpe oyo abelemi sikawa mpenza mpo na kosunga yo kati na maye manso boluki ya eteni moko na nkama na yo ezali kowuta na likita oyo. Mpo ete bokasi nyonso oyo tosalaka mpo na koyambola—atako emonani moke na biso—ekokaki kosala bokeseni monene mpenza na bomoi na yo.
Na ntina oyo Mpaka Neal A. Maxwell ateyaki, “Engebene na mposa ya sembo, ekela moko na moko ya kokumbamela, atako moke mpe ya kobakisa, ebakisaka na bopoti na biso ya molimo.” 14 Solo, ezali na nzela ya biloko ya mike mike, ya pete, iyo, kutu kaka eteni moko na nkama ete makambo minene ekoka kosalema. 15 Elonga ya nsuka ezali 100 na monkama solo mpenza, “nsima ya nyonso tokoki kosala,” 16 na nzela ya nguya, makokisi, mpe mawa ya Nkolo mpe Mobikisi na biso, Yesu Klisto. Natatoli bongo na nkombo ya Yesu Klisto, amene.