Likita Linene
Kimia na Yo Moko na Ntango ya Mimekano
Likita Linene ya Sanza ya Zomi 2021


Kimia na Yo Moko na Ntango ya Mimekano

Etikala kozala ntina monene koleka mpo na koluka kimia ya moto ye moko.

Natindamaki kala te mpo na kobulisa eteni ya lisitwale ya Nauvoo. Lokola eteni ya mosala, nazalaki na makoki ya kotala Boloko ya Liberty na Missouri. Ntango namonaki boloko, nazalaki kobanza makambo oyo esalaki ete ezala eteni ya ntina monene na lisolo ya Eklezia. Bomoi ya Basantu etungisamaki lokola mbano ya motindo ya koboma epesamaki na Guvenele ya Missouri. Mpo na kobakisa, na bozangi koyeba likambo Profeta Joseph mpe ndambo ya bato na ye batiamaki na Boloko ya Liberty Moko ya bantina mpo na botomboki na ngambo ya bandimi na biso ezalaki ete mingi kati na bango bazalaki kotelemela bowumbu. 1 Monyokoli makasi oyo ya Joseph Smith mpe bato na ye ezalaki ndakisa monene ya bozangi bosembo na nguya ya boponi oyo ekoki kozala na nguya likolo ya bayengebene. Ntango ya Joseph na kati ya Boloko ya Liberty Jail elakisi ete botelemeli ezali ntina te ya lisungi ya Nkolo to bolongoli ya mapamboli na Ye.

Natutisamaki ntango natangaki maye Profeta Joseph Smith alobaki ntango akangamaki na kati ya Boloko ya Liberty: “O Nzambe, ozali wapi? Mpe wapi kisuku oyo ezipaka ebombelo na yo?” 2 Joseph atunaki uta ntango nini bato ya Nkolo basengelaki “konyokwama mpe kotungisama na bozangi bosembo mpe boyengebene.” 3

Elilingi
Mpaka Cook akei kotala boloko ya Liberty Jail

Ntango natelemaki na kati ya Boloko ya Liberty Jail, natutisamaki makasi ntango nazalaki kotanga eyano ya Nkolo: “Mwana na ngai, kimia ezala kati ya molimo na yo; mpasi mpe minyoko na yo ekoumela mpo nan tango molai te; mpe nsima, soki oyiki mpiko malamu kati na yango, Nzambe akonetola yo likolo.” 4 Ezali malamu ete mpasi ekoki kolengela biso malamu mpo na, lobi ekoya ya seko mpe lola. 5

Maloba kitoko ya Mobikisi “Mwana na ngai, kimia ezala kati ya molimo na yo” 6 eyokanaka kati na ngai mpe ezali na ntina monene mpo na mikolo na biso. Ekundolaka ngai mateya na Ye epai ya bayekoli na Ye na ntango ya mosala na Ye na bomoi oyo ya kufa.

Yambo na mpasi ya Klisto na Elanga ya Getesemana mpe na ekulusu, Atindaki Bapostolo na Ye ete “bolingana bino na bino; lokola nalingaka bino” 7 mpe nsima nalendisaki bango na maloba oyo: “Natikeli bino kimia, kimia na ngai napesi bino: te lokola mokili epesaka bino. Tika ete mitema na bino etungisama te, to ebanga mpe te.” 8

Moko ya nkombo kitoko ya Nkolo mpe Mobikisi na biso, Yesu Klisto, ezali “Nkumu ya Kimia.” 9 Nsuka nsuka bokonzi na Ye ekotiama mpe lisusu kimia mpe bolingo. 10 Tozali kotala liboso na bokonzi ya mileniume ya Masiya.

Atako limoni ya bokonzi oyo ya mibu nkoto, toyebi ete mokili ya kimia mpe esengo ezali te bisika nyonso na mikolo na biso lelo. 11 Na bomoi na ngai namonaka bato bazali kozanga bompenza. Totondisami na nkele, maloba mabe mpe matumboli, misala mabe oyo ebebisaka kimia mpe bosepeli.

Kimia na mokili elakami to endimisami te kino Boyei ya Mibale ya Yesu Klisto. Mobikisi, ateyaki Bapostolo na Ye ete etinda na Ye awa na mabele ekokokisa kimia ya mokili mobimba te. Ateyaki “Bokanisa te ete nayaki kotia kimia na mabele.” 12 Kimia ya mokili mobimba ezalaki te eteni ya mosala ya Mobikisi na bokufi. Kimia ya mokili mobimba ezali te lelo.

Nzokande, kimia ya moto ye moko ekoki kokokisama atako nkanda, boswani, mpe bokabwani oyo ezali kobebisa mpe kokosa mokili na biso lelo. Etikala kozala ntina monene koleka mpo na koluka kimia ya moto ye moko. Loyembo moko ya sika mpe kitoko ekomamaki mpo na bilenge ya lelo na Ndeko mobali Nik Day na nkombo ya “Kimia kati ya Klisto” esakoli, “Ntango kimia ezali te na mabele, kimia ezali kati na Klisto.” 13 Topambami mpo na kozala na loyembo oyo yambo ya bokono ya mokili mobimba ya COVID-19.

Loyembo oyo elakisi na lolenge malamu likanisi ya kimia mpe ebeti nsete malamu ete kimia ezali lungu ya bomoi mpe etinda ya Yesu Klisto. Mokambi Joseph F. Smith alobaki, “Ekoki koya te na mokili molimo moye ya kima mpe bolingo … kino moto akozwa bosolo ya Nzambe mpe nsango ya Nzambe …, mpe akondima nguya na Ye mpe likoki oyo ezali ya bonzambe.” 14

Atako tozali kozonga nsima soki moke te na makasi nyonso tozali kosala mpo na kokokisa kimia ya mokili mobimba, tondimisamaki ete tokoki kozala na kimia na biso moko lokola Klisto atei. Libongi oyo etiami na kati ya Doctrine et Alliances: “Kasi boyekola ete oyo azali kosala mosala ya boyengebene akozwa lifuti na ye, kutu kimia na kati ya mokili, mpe bomoi ya seko na mokili oyo ezali koya.” 15

Nini ezali mwa “misala ya boyengebene” oyo ekosunga biso tosala mpo na kotelemela boswani mpe kokitisa bowelani mpe kozwa kimia na mokili? Mateya nyonso ya Klisto ezali koloba eloko moko. Nakotanga mwa ndambo oyo nandimeli ete ezali ntina mpenza.

Yambo: Linga Nzambe, Tosa Mitindo na Ye, mpe Limbisa Moto nyonso

Mokambi George Albert Smith akomaki Mokambi ya Eklezia na 1945. Ayebanaki na ntango ya mibu na ye lokola Apostolo lokola mokambi ya bolingo ya kimia. Na mibu 15 elandaki yambo akoma mokambi, mimekano mpe mokakatano ya mobulungano ya mokili mobimba, elandamaki na liwa mpe bobebisi ya Etumba ya Mibale ya Mokili mobimba, etikaki eloko te bobele kimia.

Na nsuka ya Etumba ya Mibale ya Mokili mobimba, na ntango ya likita linene na ye ya yambo lokola mokambi na Sanza ya zomi 1945, Mokambi Smith akundolisaki basantu libiangi ya Mobikisi ya kolinga bazalani na bango mpe kolimbisa banguna na bango mpe nsima ateyaki, “Oyo ezali molimo moye Basantu nyonso ya Mikolo mya Nsuka basengeli koluka mpo na kozwa soki bazali kolikia mokolo moko mpo na kotelema liboso na Ye mpe koyambama na maboko na Ye ya nkembo na ndako.” 16

Ya Mibale: Boluka Bambuma ya Molimo

Apostolo Paulo na kati mokanda na ye epai ya Bagalatia atalisi bokeseni oyo ezali na kati ya mosala ya boyengebene oyo elongisi biso mpo na kokota na bokonzi ya Nzambe mpe misala oyo ekoki, na bozangi boyamboli, elongisi biso te. Kati na oyo elongisaka biso ezali na bambuma ya molimo “bolingo, esengo, kimia, motema molai, boboto, bondimi, bosawu, [mpe] limemia.” 17 Paul abakisi lisusu komema mikumba ya moko na mosusu mpe kolemba te kosalaka bolamu. 18 Na kati ya misala oyo ezali na boyengebene te abakisi likunya, nkanda mpe boswani. 19

Moko ya mateya minene na kati ya eleko ya Boyokani ya Kala etalisi epai ya Tata Abalayama. Abalayama mpe Lota, mwana ya ndeko na ye, bazalaki na bozwi kasi bamonaki ete bakokaki te kozala esika moko. Mpo na koboya boswani Abalayama apesaki Lota ndingisa apona mabele oyo alingaki. Lota aponaki mabele ya Yaladene, oyo ezalaki na mayi mpe ezalaki kitoko. Abalayama azwaki mwa mabele ya moke ya malamu ya Mamre. Makomi elobi ete Abalayama atiaki ema na ye mpe atongaki “atongaki etumbelo mpo na Nkolo.” 20 Lota, na ngambu mosusu, “atiaki ema na ye na Sodome.” 21 Mpo na kozala na mokangano ya kimia, liteya ezali polele: tosengeli kozala na bolingi ya koboya mpe kolongola boswani na limemia ya makambo maye ekotisaka boyengebene te mpo na kozwa kimia na bozalani na bato. Mokonzi Benjamin ateyaki, “Bozala na likanisi ya kosalana mabe te, kasi ya kozala na kimia.” 22 Kasi kasi na likambo etali boyengebene mpe mambi ya malongi, tosengeli kotikala ngwi mpe kotepatepa te.

Soki tolingi kozwa kimia oyo ezali litomba ya misala ya boyengebene tokopika te baema na biso na ngambo ya mokili. Tokopika baema na biso na ngambo ya tempelo.

Ya Misato: Bosalela Nguya ya Kopona Boyengebene

Kimia mpe nguya ya kopona ezali na mokangano moko lokola biloko ya ntina ya mwango ya lobiko. Lokola elombolami na kati ya Masolo ya Nsango malamu na “Nguya ya boponi mpe Botondi,” “Nguya ya boponi mpe Boyanoli,” “Nguya ya boponi ezali likoki mpe libaku malamu oyo Nzambe apesi biso mpo na kopona mpe komisalela biso moko.” 23 Na yango, nguya ya boponi ezali kati ya motema ya bokoli ya moto mpe boyebi oyo epambolaka biso ntango tolandi Mobikisi. 24

Nguya ya kopona ezalaki likambo monene na “Lisanga yambo ya nkufa na Lola” mpe bondongwani ya baoyo balandaki Klisto mpe baoyo balandaki Satana. 25 Kotika lolendo mpe komikonza mpe kolandaka Mobikisi ekopesa biso ndingisa ya kozwa pole na Ye mpe kimia na Ye. Kasi kimia ya moto ye moko ekotungisama soki bato basaleli nguya na bango ya boponi ndenge ya mbindo mpe mabe.

Nazali na kondima ete elikia ya kimia oyo toyokaka na mitema na biso elendisamaka na boyebi tozwaki oyo Mobikisi ya mokili akokisaka na bomoi na biso. Yango elimbolami malamu na Preach My Gospel: “Ntango totaleli Bomikabi ya Yesu Klisto, Ye akoki kosunga biso toyika mpiko na mitungisi na biso, bokono mpe mpasi. Tokoki kotondisama na esengo, kimia, mpe bolendisi. Nyonso oyo ezangi boyengebene na bomoi ekoki kokoma malamu na nzela ya Bomikabi ya Yesu Klisto.” 26

Ya Minei: Totonga Siona na kati ya Mitema mpe Mabota na Biso

Tozali bana ya Nzambe mpe eteni ya libota na Ye Tozali mpe lisusu eteni ya libota oyo tobotameli. Libongisi ya libota ezali moboku ya esengo mpe kimia. Mokambi Russell M. Nelson ateyaki biso, mpe na ntango ya bokono ya mokili mobimba oyo toyekolaki, ete limemia ya boyambi oyo etiami na libota mpe esungami na Eklezia, ekoki “kobikisa nguya ya mabota … mpo na kobongola [libota] na biso [mabota] na biso ekoma bisika ya bondimi.” 27 Soki tozali na limemia ya boyambi oyo na mabota na biso, tokozala lisusu na kimia ya Mobikisi. 28 Tokebisami ete ebele kati na bino bazali na mapamboli te ya mabota ya boyengebene mpe bakanganaka mingi mingi na baoyo baponaka bozangi boyengebene. Mobikisi akoki kopesa bobateli mpe kimia mpo na kokamba bino nsuka nsuka na bokengi mpe ebombamelo uta na mipepe makasi yabomoi.

Nalobeli bino ya solo ngai ete esengo, bolingo mpe bokokisi oyo emonisami na kati ya mabota ya bolingo ya boyengebene epesaka kimia mpe esengo. Bolingo mpe boboto ezali na kati ya kozala na Siona na kati ya mitema na biso mpe mabota. 29

Ya Mitano: Tolanda Makebisi ya Sikawa ya Profeta na Biso

Kimia na biso elendisamaka makasi ntango tolandaka profeta ya Nkolo, Mokambi Russell M. Nelson. Kala te tokozala na libaku malamu ya koyoka ye. Alengelamaki uta na ebandeli ya mokili mpo na libiangi oyo. Bolengeli na ye moko ezali na ntina koleka. 30

Ateyaki biso ete tokoki “koyoka kimia elenda mpe esengo atako na ntango ya bileko ya mikakatano” 31 ntango tozali koluka kokoma mingi mingi lokola Mobikisi na biso, Yesu Klisto. Ateyaki biso toyambolaka mikolo minso, mpo na kozwa nguya ya kopetolama, ya kobikisa, mpe ya kolendisa ya Nkolo. 32 Nazali kotatola ete emoniseli ezwamaki mpe ezali kokoba kozwama uta na lola na nzela ya profeta na biso ya bolingo.

Ntango tozali kotosa mpe kosunga ye lokola profeta na biso, tokumbameli Tata na biso na Lola mpe Mobikisi, Yesu Klisto. Tosungami na nzela ya Molimo Mosantu.

Natatoli mpe napesi litatoli na ngai ya ki Apostolo ete Yesu Klisto, Mobikisi mpe Mosikoli ya mokili, akambaka mpe atambuisaka Eklezia na Ye ezongisama. Bomoi mpe etinda ya bomikabi na Ye ezali liziba ya solo ya kimia. He is the Prince of Peace. Natatoli solo mpe na lokumu ete Ye azali na bomoi. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. “Bato na etuka ya Independence balingaki ete Basantu bateya Baindia mpe bandimaki kibowumbu te” ( Saints: The Story of the Church of Jesus Christ in the Latter Days , vol. 1, The Standard of Truth, 1815–1846 [2018], 172).

  2. Doctrine et Alliances 121:1.

  3. Doctrine et Alliances 121:3.

  4. Doctrine et Alliances 121:7–8.

  5. Tala 2 Nefi 2:11, 15..

  6. Doctrine et Alliances 121:7.

  7. Yoane 13:34.

  8. Yoane 14:27.

  9. Yisaya 9:6; 2 Nefi 19:6. Mobikisi, na Bisengo mwambe na Ye, ateyaki lisusu, “Bapambolami ezali baoyo balukaka kimia: mpo bakobiangema bana ya Nzambe” (Matthew 5:9).

  10. “Na bonzuzi mpe boyengebene … mpo na libela” (tala Isaiah 9:6–7; 2 Nephi 19:6–7; tala lisusu Bagalatia 5:22).

  11. Tala Malongi mpe Mayokani 6:23. Mokambi Wilford Woodruff asakolaki eye na 1894 mpe lisusu na 1896 (tala The Discourses of Wilford Woodruff, sel. G. Homer Durham [1946], 251–52; tala lisusu Marion G. Romney, na Conference Report, Apr. 1967, 79–82; Ezra Taft Benson, “The Power of the Word,” Ensign, May 1986, 79–80; Dallin H. Oaks, “Preparation for the Second Coming,” Liahona, May 2004, 9).

  12. Matai 10:34.

  13. Nik Day, “Peace in Christ,” 2018 Mutual theme song, Liahona, Jan. 2018, 54–55; New Era, Jan. 2018, 24–25. Loyembo ya Catique “Peace in Christ” eteyi ete:

    Ntango totambwisi bomoi na lolenge Atambolaki.

    Ekozala na kimia na Klitso.

    Ye apesi biso kimia.

    Ntango elikya ekeyi.

    Apesaka biso makasi

    Ntango tokoki kokende liboso te.

    Apesaka biso ebombelo.

    Na bambonge ya bomoi.

    Ntango kimia ezangi na mabele,

    Ekozala na kimia na Klitso.

  14. Teachings of Presidents of the Church: Joseph F. Smith (1998), 400.

  15. Doctrine et Alliances 59:23.

  16. Tala George Albert Smith, na Conference Report, Oct. 1945, 169–70.

  17. Bagalatia 5:22–23.

  18. Tala Bagalatia 6:2, 9.

  19. Tala Bagalatia 05:20.

  20. Genese 13:18.

  21. Genese 13:12.

  22. Moziya 4:13.

  23. Masolo ya Nsango malamu, “Agency and Accountability,” topics.ChurchofJesusChrist.org.

  24. Tozali na “nguya ya kopona bonsomi mpe bomoi ya seko, na nzela ya Molobeli monene ya bato banso.” (2 Nephi 2:27). Nguya ya boponi epesaka biso lisusu ndingisa na boponi ya mabe oyo ebebisaka ya basusu oyo esalaka mpasi mpe monyokwami mpe mbala mosusu kutu liwa. Makomi etalisi yango polele ete Nkolo Nzambe apesaki nguya ya boponi na ntina ete moto akoka kopona malamu to mabe.(see 2 Nephi 2:16).

  25. Tala Gospel Topics, “Agency and Accountability,” topics.ChurchofJesusChrist.org.

  26. Preach My Gospel: A Guide to Missionary Service (2019), 52, ChurchofJesusChrist.org; sete ebetami.

  27. Russell M. Nelson, “Becoming Exemplary Latter-day Saints,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2018, 113.

  28. Tala Doctrine et Alliances 19:23.

  29. Nazwaki libaku malamu ya kokola na libota oyo ezalaki na ekimia. Yango ezalaki yambo mpo mama na biso, oyo azalaki mondimi ya Eklezia. Tata na ngai azalaki malamu na makambo nyonso kasi azalaki na kondima moke. Mama na biso azalaki kotosa tata na biso mpe azalaki koboya boswani. Azalaki koteya biso lokola bana kosambela mpe kokende Eklezia. Azalaki lisusu koteya biso kolinga mpe kosalela basusu (tala Moziya 4:14–15). Kokolaka na libota ya boye epesaki kimia mpe ezalaki lipamboli monene na bomoi na ngai.

  30. Russell M. Nelson azwaki diplome na ye na Université ya Utah Medical School yambo na kelasi na ye na mibu 22. Azalaki na mposa makasi ya kozala dokotolo ya lipaso mpe azwaki boyekoli malamu na biteyelo minene ya kimonganga. Na bondimi akokisaki mabongisi ya mampinga na Korée mpe Japon. Uta mibu ebele azalaki pionie lipase ya bofungoli mitema mpe ayebanaki mokili mobimba. Lokola na boyebani wana ya bomilengeli asengelaki kopambola bato ebele na mokili na mayebi na ye ya kimonganga, bolengeli ya molimo ya Mokambi Nelson ezalaki kutu ntina koleka. Azali tata ya libota ya bana ebele, nkoko, mpe nkokololo. Asalisaka na bondimi libota na ye mpe Eklezia na bomoi na ye mobimba.

  31. Tala Russell M. Nelson, “Opening Message,” Liahona, May 2020, 7; tala lisusu Russell M. Nelson, “Joy and Spiritual Survival,” Liahona, Nov. 2016, 82–84.

  32. Russell M. Nelson, “Opening Message,” 6.

Bimisa na lokasa