Likita Linene
Bosimba Mwinda na Bino
Likita Linene ya Sanza ya Zomi 2021


Bosimba Mwinda na Bino

Libengisi na ngai lelo ezali mindondo te: kabola nsango malamu. Bozala bino mpe bosimba mwinda na bino.

Wana ezalaki na mpepo kokende na Peru mwa bambula eleki, nazalaki ya kofanda pembeni ya moto moko oyo amikumisaka mopagano na mpepo ya kokende na Peru. Atunaki ngai mpo na nini nandimelaka Nzambe. Na ntango ya masolo na biso na esengo oyo elandaki, nayebisaki ye ete nandimelaka Nzambe mpo Joseph Smith amonaki Ye—mpe nabakisaki na nsima ete boyebi na ngai ya Nzambe ewuta na makambo ya molimo ya solo nakutana na yango ngai moko. Nakabolaki boyambi na ngai ete “biloko binso bilakisi ete ezali na Nzambe moko” 1 mpe natunaki lolenge nini andimelaki mabele—esanga oyo ya bomoi na etando ya mpamba—eyaki kosalema. Ayanolaki ete, na maloba na ye, “akisida” ekokaki kosalema eleki bikeke nzike. Ntango nalimbolaki boniboni ekokaki kotielema ntembe mpenza ete “likama” ebota molongo ya boye, afandaki kimia mpo na mwa ngonga mpe nsima alobaki na bomikitisi, “Ozwi ngai.” Natunaki soki akolinga kotanga Buku ya Mormon. Alobaki ete akolinga, yango wana natindelaki ye buku moko.

Mibu koleka nsima, nasalaki moninga ya ya sika ntango nazalaki na libanda ya mpepo na Lagos, Nigeria. Tokomaki baninga ntango atalaki passeport na ngai. Natunaki ye na ntina ya boyambi ya eyamba, mpe alakisaki bondimi makasi na Nzambe. Nakabolaki esengo mpe bokasi ya nsango malamu ezongisami ya Yesu Klisto mpe natunaki soki akolinga koyekola mingi uta na bamisionele. Alobaki Yio, ateyamaki, mpe abatisamaki. Mobu moko to mibale nsima, ntango nazalaki kokatisa libanda ya mpepo na Liberia, nayokaki mongongo moko kobenga nkombo na ngai. Nabalukaki, mpe elenge mobali kaka wana apusanaki na koseka mpenza. Toyambanaki na esengo mpe ayebisaki ngai ete azalaki makasi na Eklezia mpe azalaki kosala elongo na bamisionele mpo na koteya makango na ye.

Sikawa, nayebi te soki moninga na ngai ya mopagano soki atikala kotanga Buku ya Mormon to soki akota na Eklezia. Moninga na ngai ya mibale akotaki. Mpo na nyonso mibale, mokumba na ngai 2 —libaku na ngai—ezalaka moko kaka: kosimba mwinda ya nsango malamu—kolinga, kokabola, mpe kobengisa na lolenge malamu, lolenge esalemaka. 3

Bandeko mibali mpe basi, nasili komona mapamboli ya kokabola nsango malamu, mpe nazali manene. Tala mwa ndambo ya makanisi:

Kokabola Nsango malamu ememaka esengo mpe elikia!

Bomoni, bino mpe ngai toyebi ete tozalaki bana ya baboti ya lola liboso toya na mabele oyo 4 mpe ete mabele ekelamaki mpo na ntina ya kopesa moto na moto libaku ya kozwa nzoto, kozwa boyebi, koyekola, mpe kokola mpo na kozwa bomoi ya seko—bomoi ya Nzambe. 5 Tata na Lola ayebaki tokoyoka mpasi mpe tokosumuka na mabele, yango wana Ye atindaki Mwana na Ye, oyo kani “bomoi ekoki kokonisama te” 6 mpe mbeka ezanga nsuka ya bomikabi 7 esalaka ete tokoka kolimbisama, kobikisama, mpe kozongisama mobimba. 8

Koyeba makmbo ya solo oyo ezali mbongwana ya-bomoi! Ntango moto ayekoli ntina ya nkembo ya bomoi, asosoli ete Klisto asungaka baoyo balandaka Ye, mpe aponi kolanda Klisto na mayi ya libatisi, bomoi ebongwanaka mpo na kokoma malamu koleka—ata kutu ntango makambo ya libanda na bomoi ebongwani te.

Ndeko mwasi moko ya esengo mpe bongengi oyo nakutanaki na ye na Onitsha, Nigeria, ntango ayekolaki bosolo mpe abatisamaki (mpe sikawa nasaleli maloba na ye), “Makambo nyonso mazali malamu mpo na ngai. Nazali na esengo. Nazali na lola.” 9 Kokabola nsango malamu epesaka esengo mpe elikya na milimo na bango mibale mopesi mpe mozwi. Solo, “boniboni monene esengo na yo ekozala” 10 ntango ozali kokabola nsango malamu! Kokabola nsango malamu ezali esengo likolo na esengo, elikya likolo na elikya. 11

Kokabola nsanbo malamu ememaka nguya ya Nzambe na bomoi na biso.

Ntango tobatisamaki, moko na moko na biso tokataki kati na liyokani 12 ya ntango nyonso na Nzambe “mpo an kosalela Ye mpe kobatela mitindo na Ye,” 13 miye esengi na kati “kotelema lokola nzeneneke na [Ye] na ntango nyonso mpe na makambo nyonso mpe na bisika nyonso.” 14 Ntango “tokangami na” Ye na kobatelaka boyokani oyo, nguya ya bonzambe esopani kati na bomoi na biso uta na Klisto, lokola etape ezwaka bilei uta na mai ya nzete. 15

Kokabola nsango malamu ebatelaka biso uta na masinginya

Nkolo atindaki:

“Bosimba mwinda na bino likolo ete engengela mokili. Tala nazali mwinda oyo bosengeli kosimba—ete oyo bomonaki ngai kosala. …

“… Natindi ete … bosengeli koya epai ya ngai, ete bokoka kosimba mpe bomona; kutu boye ekosala bino epai ya mokili; mpe moto nyonso oyo abuki motindo oyo andimi ye moko komikambama na kati ya masenginia.” 16

Kopona kosimba mwinda ya nsango malamu te ememaka biso na bililingi, epai wapi tozali mingi pene ya kokweya na masenginia. Likambo ya motuya mpenza, bokeseni ezali solo, kopona kosimba mwinda ya nsango malamu ememaka biso pembeni ya pole yango mpe pene ya bobateli yango epesaka mpo na kotelemelaka masenginia. Oyo lipamboli monene nini na mikolo ya molili ya mokili ya lelo oyo!

Kokabola nsango malamu ememaka libiki

Ndeko mwasi Tiffany Myloan andimaki libengisi ya ya kosunga misio atako mikakatano na ye moko ya makasi, mpe na kati mituna mitali bondimi na ye. Kala mingi te ayebisaki ngai ete kosunga bamisionele ezongisaki sika bondimi na ye mpe mayoki ya bozali-malamu. Na maloba na ye, “Mosala ya misionele ebikisaka mpenza.” 17

Bosepeli. Elikya. Nguya ya kosunga uta na Nzambe. Bobateli uta na masenginia. kobikisa. Nyonso oyo—mpe mingi koleka (kobakisa bolimbisi ya masumu) 18 —esopaka likolo na biso mapamboli uta na lola ntango tozali kokabola nsango malamu.

Sikawa, tobaluka na libaku na biso ya monene

Bandeko mibali mpe basi, ezali na mingi kati na “nyoso … mangomba, [binzambinzambi,] mpe bankombo … oyo babombelamaki bosolo bobele mpo ete bayebi te wapi komona yango.” 19 Mposa ya kosimba mwinda ya nsango malamu etikala kozala makasi na lisolo ya mokili mobimba te. Mpe solo ezwama mokolo moko te mingi koleka.

Jimmy Ton, oyo akolaki lokola Buddhist, akamwisamaki na libota moko oyo akabolaki bomoi na bango na YouTube. Ntango ayekolaki ete bazalaki bandimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka, na ndenge na ye moko ayekolaki nsango malamu na interneti, atangaki Buku ya Mormon na aplikasio, mpe abatisamaki nsima ya kokutana na bamisionele na eteyolo. 20 Mpaka Ton azali sikawa misionele ya ntango-mobimba ye moko.

Ye mpe baninga na ye bamisionele bipai na mokili—mpo na kozwa maloba ya Mokambi Russell M. Nelson, bazali mampinga ya Nkolo. 21 Bamisionele oyo bazali kotelemela bizaleli ya mokili: ntango boluki elobi ete Nkola Z ezali kopesa mokongo na Nzambe, 22 basoda banzenga na biso 23 bampaka mpe bandeko basi bazali komema bato epai ya Nzambe. Motango ya komata ya bandimi ya Eklezia bazali kosala bomoko na bamisionele na kokabolaka nsango malamu, kosalisaka baninga mingi mpe mingi koleka mpo na koya na Klisto mpe Eklezia na Ye.

Bandimi ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka na biso ya bolingo na Liberia basungaki baninga 507 kokota na mai ya libatisi na basanza 10 oyo ezalaki na bamisionele ya ntango mobimba ata moko te kosalaka na ekolo na bango. Ntango moko ya bakambi na biso ya kafukafu ya likonzi na Liberia ayokaki ete bamisionele ya ntango mobimba bakoki kozonga, alobaki : “O kitoko, sikawa bakoki kosunga biso na ya biso mosala.”

Azali semba: bosangani ya Yisalaele—ntina monene koleka nyonso na mabele 24 ezali ya biso mokumba ya liyokani. Mpe oyo ezali ya biso ntango! Libengisi na ngai lelo ezali mindondo te: kabola nsango malamu. Bozala bino mpe bosimba mwinda na bino. Bosambela mpo na kozwa lisalisi ya Lola mpe kolanda bitinda ya molimo. Bokabola bomoi na bino malamu mpe na sembo, mpe bobengisa moto mosusu aya komona, aya kosunga, mpe aya kozala elongo. 25 Mpe bosepela ntango bino mpe baye bolingaka bazwi mapamboli maye elakama.

Nayebi ete kati na Klisto maloba kitoko oyo eteyami na basokemi; na Klisto batutami na motema bakangemi; na Kliso ezali bonsomi esakolami epai ya bakangemi; mpe na Klisto, bobele na Klisto, baye bazali kolela bapesami kitoko esika ya putulu. 26 Yango wana, mposa monene ya kosala ete makambo oyo eyebana na banso na oyo etali biso! 27

Natatoli ete Yesu Klisto azali mobandisi mpe mosukisi ya bondimi na biso. 28 Akosukisa, Akokokisa, esaleli na biso ya bondimi—atako ebongi nie te—na kosimbaka mwinda ya nsango malamu. Akosala makamwisi na bomoi na biso mpe na bomoi ya banso Ye asangisaka, mpo ete Ye azali Nzambe moko ya bikamwa. 29 Na nkombo ya kokamwa ya Yesu Klisto, amene.

Bimisa na lokasa