Nabondeli Nkolo Akosalela Biso
Bokasi ya mike mike ntango esangisami elongo esalaka mosala monene, ekumisaka biloko ebele ya moto ye moko tosalaka lokola bayekoli ya Yesu Klisto.
Lipa oyo elambami na farini mpe mbuma ya pistache ezali ndimbola ya botondi epai ya moto. Lipa yango esalemaki na libota ya Kadado oyo, mpo na bambula ebele, bazalaki bankolo boulangeries misato na Damaseke, na Siria. Ntango etumba eyaki, basoda ya bikolo mosusu baboyaki bilei mpe masungi mosusu ekota na eteni na bango ya engumba. Bakadado babandaki kokufa nzala. Na ntango oyo ya mpasi, Latter-day Saint Charities (Libongisi ya Bosungani ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka) mpe bandeko basusu ya mpiko ya Rhama Worldwide bakobolaki bilei ya moto mokolo na mokolo, na miliki mpo na bana mike. Nsima ya ntango ya mpasi, libota ebandaki bomoi na bango—lokola mpe mosala ya boulangerie—mbala moko na mboka ya sika.
Kala mingi te, KKarton moko ya basikuiti ekomaki na babilo ya Eklezia na maloba maye elandi: “Mpo na basanza mibale koleka, tokomaki kozwa bilei ewuti na makusa ya Libongisi ya Rhama ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka [Lisungi]. Soki yango te tokokaki kokufa [na nzala]. Nasengi bondima oyo …echantillon ewuti na magazini na ngai lokola ndimbola ya botondi na ngai. Nasengi na Nzambe ya Nguya nyonso apambola bino … na eloko nyonso bokosala.” 1
Lipa ya botondi mpe bokundoli. Esalemi mpo na bino. Na baoyo nyonso babondelaki nsima ya kotanga lisolo na bazulunale, na baoyo nyonso bamipesaki mpo na kosalisa na bolingi ntango ebongaki te to baoyo bapesaki mosolo na boboto na Mosolo ya Libongisi ya Lisungi kolikiaka ekosala bolamu songolo, Matondi bino.
Boyanoli ya Bonzambe mpo na Kosunga Babola
Eklezia ya Yesu Klisto epesami etinda ya bonzambe ya kosalisa babola. 2 Ezali moko ya makonzi ya mosala ya lobiko mpe bonetoli. 3 Oyo ezalaki solo na mikolo ya Alma ezali solo mpenza mpo na biso: “Mpe boye, na bizaleli ya bomengo bwa bango, babenganaki moto moko te oyo azalaki bolumbu, to oyo azalaki na nzala, to oyo azalaki na mposa ya mai, to oyo azalaki na bokono, to oyo aleisamaka te; mpe batiaki te mitema mya bango likolo ya bozwi; yango wana bakabaki na banso, mobange mpe elenge lokola, mowumbu mpe monsomi lokola, mwasi mpe mobali lokola, soko libanda ya eklezia to na kati ya eklezia, koponoko bato te na bango baye bazalaki na mposa.” 4
Eklezia eyanolaka na mokumba oyo na banzela ebele, kotangaka mpe:
-
Mosala ya kosalisiatosalaka na nzela ya Lingomba ya bamama basungi, mpe masanga makoki ya Bonganganzambe, mpe bakelasi mosusu.
-
Kokila bilei mpe esaleli ya makabo ya kokila.
-
Baferme mpo ya bolamu ya bato mpe bakompani ya bilei na manzanza.
-
Esika ya koyamba bapaya.
-
Pologalami ya kosunga baye na boloko.
-
Bokasi ya Eklezia mpo na kosalisa basusu na makama.
-
Mpe applikasio JustServe app, wapi emonanaka, oyo ekokisaka bandeko bamipesa na mabaku ya misala.
Oyo ezali banzela, ebongisami na nzela ya bonganganzambe, epai wapi makasi ya mike mike ntango esangisami elongo esalaka mosala monene, ekumisaka biloko ebele ya moto ye moko tosalaka lokola bayekoli ya Yesu Klisto.
Baprofeta bazali na Mokumba ya Mokili Mobimba
Baprofeta bazali na mokumba ya mokili mobimba, kaka te se mpo ya bandimi ya Eklezia. Nakoki kolobela likambo na ngai moko lolenge nini ngai moko mpe na bomipesi mpenza Bokambi ya Yambo ezwaka mokumba wana. Lokola bamposa ezali kokoma mingi, Bokambi ya Yambo epesi biso mokumba ya koyeisa ya biso libongiseli ya lisungi monene. Etalaka makambo ya minene mpe ya mike mike.
Kala te, tomemelaki bango bilamba ya bobateli ya minganga oyo Ba Eglantine basalaka bilamba batongaki mpo na balopitalo mpo kosalela na ntango ya bokono ya mokili mobimba. Lokola dokotolo, Mokambi Russell M. Nelson asepelaki mpenza. Alingaki kaka te kotala bilamba. Alingaki kolata yango—kotala lolenge mpe molai mpe ekangi na nsima. Ayebisaki biso nsima, na mongongo ya kosepela, “Soki bokutani na bato na ntango ya mosala na bino, botonda bango mpo na bokili na bango, makabo na bango, mpe mosala na bango na nkombo na Nkolo.”
Rapport ya Libongiseli ya Lisungi
Mokambi Nelson asengaki ngai, nalobela bino na ntina na lolenge Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka ezali koyanola na bikumbaki, na boningani ya mabele, na botamboli ya bato bakenda kofanda epai mosusu—mpe kutu na bokono ya mokili mobimba—na lisalisi ya boboto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka mpe baninga ebele. Ntango misala koleka 1,500 ya COVID-19 ezalaki solo mpenza esika ya monene koleka wapi makanisi ya lisungi ya Eklezia efandaki na basanza 18 eleki, Eklezia eyanolaki lisusu na makama 933 minene mpe mikakatano ya bato bakenda kofanda epai mosusu na bamboka 108. Kasi mituya ezali kolobela lisolo nyonso te. Tika ngai nakabola bandakisa minei ya mokuse na kolakisa lolenge ya moke mpenza ya oyo ezali kosalema.
Lisungi ya COVID mpo na Afrika ya Sudi
Dieke Mphuti ya mibu zomi na motoba ya mboka Welkom, na Afrika ya Sudi, abungisaki baboti na ye bambula mingi koleka, kotikaka ye moko na mokumba ya bandeko na ye misato. Ezalaki ntango nyonso mpasi mpo ya kozwa bilei ekoka, kasi bozangi bilei mpe kotiama ya bato mosika na ntina ya COVID ekomisaki yango mpasi. Bazalaki mingi mingi na nzala, kosalaka makasi na nzela se ya boboto ya bato ya nzingazinga.
Na mokolo ya moi makasi na sanza ya mwambe 2020, moto moko abetaki na ekuke ya Dieke. Nsima ya kofungola amonaki bapaya mibale—moko ntomba ya Eklezia uta na bilo ya etuka monene na Johannesbourg mpe mosusu mokonzi ya Departema ya Botombwami ya Bato ya Afrika ya Sudi.
Mangomba oyo mibale basanganaki mpo komema bilei na mabota mazalaki na likama. Na mbala moko Dieke asosolaki ntina ya lisungi ntango atalaki ebele ya farini ya masango mpe bilei mosusu, oyo esombamaki na Mosolo ya Libongiseli ya lisungi. Oyo ekokaki kosalisa ye mpo kosunga libota na ye mpo na baposo ebele kino mbula-matari ekokaki kosalisa ye.
Lisolo ya Dieke ezali moko ya bankoto ya makambo ya boye oyo esalemi kati na mokili na ntango ya COVID bokono ya mokili mobimba na lisalisi ya makabo na bino bopesaki
Lisungi ya Ramstein mpo na Bafghani
Tomonaki biso banso bilili ya kala mingi te na bazulunale: bankoto ya bato kokimaka Afganistani. Ebele bayaki na mpepo to na banzela mosusu na Katar, Amerika, Alemani, mpe Espania yambo ya kokende na bisika na bango bazalaki kokende. Bamposa na bango ezalaki nokinoki mpe Eklezia eyanolaki na bilei mpe bato bamipesaki na bolingi na bango moko. Na Ramstein Libanda ya Mpepo ya Basoda na Alemani, Eklezia epesaki ebele ya bilamba, biloko ya bana mike, bilei, mpe basapato.
Boko ya bandeko basi ya Lingomba ya bamama mpo na Lisalisi bamonaki ete ebele ya basi ya Afganistani bazalaki kosalela basimisi ya mibali na bango mpo kozipa mitu na bango mpo ete bilamba bazipelaka mitu lokola momesano elongolamaki na nkanda kati na etuluku ya bato na libanda ya mpepo ya Kabul. Na nzela ya kiboninga oyo ekatisaka bandelo ya lingomba to ezaleli songolo, bandeko basi ya Palwasi ya Ramstein ya Yambo basanganaki mpo na kotonga bilamba ya bonkoko ya bamizilma mpo na basi ya Afganistani. Ndeko mwasi Bethani Halls alobaki, “Toyokaki ete basi bazalaki na mposa ya bilamba ya losambo, mpe tozalaki kotonga mpo basi bakoka kozala malamu na ntango ya losambo.” 5
Lisungi mpo na Boningani ya Mabele na Haïti
Ndakisa oyo elandi elakisi ete bosengeli te kozala na bozwi to kozala mukolo mpo na kozala esalelo ya malamu epai ya bato Marie “Djadjou” Jacques ya mibu zomi na mwambe azali ya Etape ya Eklezia ya Cavaillon na Haïti. Ntango boningani ya mabele oyo ebomaki bato ebele ebetaki pene ya engumba na ye na sanza ya mwambe, ndako na ye ya libota ezalaki moko ya bankoto ya bandako oyo ekweyaki. Ezalaki mpasi kokanisa bozangi elikya ya kobungisa ndako na yo. Kasi na esika ya komipesa na bozangi wana, Djadjou—na kokamwa mpenza—akanisaki lolenge nini boningani ya mabele ebetaki bato basusu.
Amonaki moninga ya nzingazinga ya mukolo kobundaka mpe komisunga. Asalisaki basusu kolongola biloko bibebaki. Atako bolembu na ye, asanganaki na bandimi basusu ya Eklezia mpo na kokabola bilei mpe biloko ya bopeto na basusu. Lisolo ya Djadjou ezali lisolo se moko ya bandakisa ebele ya nguya ya mosala esalemaka na bilenge mpe bilenge bakoli ntango basalaka makasi ya kolanda ndakisa ya Yesu Klisto.
Lisungi mpo na Mpela na Alemani
Kaka baposo moke yambo ya boningani ya mabele, liboke mosusu ya bilenge bakola bazalaki kosala mosala se moko na ngambo ya mbu ya Atlantiki. Bampela elimwisaki westi ya Mpoto na Sanza ya nsambo ezalaki ya mabe makasi na bambula ewuti koleka.
Ntango nsuka nsuka mai ekitaki, moteki magazini moko na engumba penepene ya ebale ya Ahrweiler, na Allemani, atalaki makama mpe elekelaki ye mpenza. Moto oyo ya bomikitisi, mondimi ya solo solo ya Katolika, asalaki libondeli na kimia mpenza ete Nzambe akoka kotinda moto kosalisa ye. Na ntongo ntongo elandi, Mokambi Dan Hammon ya Misio ya Frankfurt na Alemani akomaki na balabala na liboke ya bamisionele balataki bilamba ya Bopesi Maboko ya langi ya mosaka. Mai ekomaki tii na metele misato na bifelo ya moteki magazini, kotikaka nsima ebele ya potopoto. Bato bamipesa balongolaki potopoto na bapawu, balongolaki tapi mpe balumwale, mpe basangisaki biloko nyonso na balabala. Moteki magazini atondaki na esengo mpe asalaki na bango elongo mpo na bantango, kokamwa ete Nkolo atindaki liboke ya basali na ye koyanola losambo na ye—mpe na bangonga ntuku mibale! 6
“Malamu, nabondeli ete Nkolo akosalela biso”
Kolobelaka na ntina ya Makasi ya Eklezia mpo na kosalisa bato na likama , Mpaka Jeffrey R. Holland alobaki mbala moko: “Nsambo eyanolamaka … mbala mingi … na Nzambe kosalelaka bato basusu. Malamu, nabondeli ete Nkolo akosalela biso. Nabondeli ete tokozala eyano na nsambo ya bato.” 7
Bandeko mibali mpe basi, na nzela ya mosala, makabo, ntango, mpe bolingo na bino, bozali eyano na nsambo ebele. Mpe nzokande ezali na ebele koleka ya kosala. Lokola bandimi babatisama ya Eklezia, tozali na se ya liyokani ya kosunga baoyo bazwami na mposa. Makasi na biso ya moto moko moko esengeli kaka mosolo te to bisika ya mosika; 8 esengeli mpenza bokambami ya Molimo Mosantu mpe motema elingi koloba na Nkolo: “Ngai oyo, tinda ngai.” 9
Mobu ya Kondimama ya Nkolo
Luka 4 elobi ete Yesu ayaki na Nazalete, epai wapi akolaki, mpe atelemaki mpo na kotanga. Ezalaki pene ya ebandeli ya mosala na Ye na kufa, mpe atangaki liloba moko na mokanda ya Yisaya:
“Molimo ya Nkolo azali likolo na ngai, mpo aponi ngai nasakola nsango malamu na babola; atindi ngai nayebisa bakangami ete bakokangolama, mpe na bato bakufa miso ete bakomona lisusu; mpo na kokangola bato oyo bazali konyokwama,
“Mpo koteya mobu ya kondimama ya Nkolo. …
“… Mokolo oyo ezali likomi oyo ekokisami na matoyi na bino.” 10
Natatoli ete makomi ezali mpe lokola kokisama na ntango na bisomei. Natatoli ete Yesu Klisto ayaki kobikisa bato batutisama mitema. Nsango malamu na Ye ezali mpo kozongisa komona na bakufi miso. Eklezia na Ye ezali koteya bokangolami na bakangemi, balandi na Ye kati na mokili bazali kosala makasi mpo kokangola bato oyo bazali konyokwama.
Tika ngai nasukisa na kozongelaka motuna Yesu atunaki Apostolo na Ye Simoni Petelo: “Olingaka ngai?” 11 Ntina mpenza ya nsnago malamu ezali kati na lolenge toyanolaka motuna wana mpo na bisomei mpe “leisa [ya Ye] bampate.” 12 Na limemia monene mpe bolingo mpo na Yesu Klisto, Molakisi na biso, nabengisi moko na moko na biso kozala eteni ya mosala na Ye ya kitoko, mpe nabondeli ete Nkolo akosalela biso.” Na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.