Likita Linene
Bozongisi ya Mokolo na Mokolo
Likita Linene ya Sanza ya Zomi 2021


Bozongisi ya Mokolo na Mokolo

Tozali na mposa ya nguya ya mokolo na mokolo ya pole ya lola. Tozali na mposa ya “ntango ya kopema.” Tozali na mposa ya ntango ya boyamboli.

Tosangani na ntongo kitoko ya mokolo oyo ya Saba mpo na koloba na ntina na ya Klisto, kosepela na nsango malamu na Ye, mpe kosalisa mpe kolendisa moko na mosusu lokola tozali kotambola na “nzela” ya Mobikisi na biso. 1

Lokola bandimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka, tosanganaka mokolo ya Saba nyonso mpo na ntina oyo, mobu mobimba. Soki ozali mondimi ya Eklezia te, totombeli yo boyei malamu mpe matondi mpo na kosangana na biso mpo na kokumbamela Nkolo mpe koyekola na ntina na Ye. Lokola bino, tosalaka makasi—atako tokoka te—mpo na kokoma baninga bato ya nzingazinga, mpe bato malamu, 2 mpe tolukaka kosala oyo na kolandaka Ndakisa na biso, Yesu Klisto.

Elilingi
Mobikisi Yesu Klisto

Nalikii ete bokoki koyoka bosolo ya litatoli na biso. Yesu Klisto azali na bomoi! Azali Mwana ya Nzambe na bomoi, mpe Akambaka baprofeta na mabele na mikolo na biso. Tobengisi bino banso koya, koyoka liloba ya Nzambe, mpe kokabola bolamu na Ye! Napesi litatoli na ngaimei ete Nzambe azali kati na biso mpe ete akobeleme solo solo na baoyo nyonso bakobeleme na Ye. 3

Tomoni yango lokola lokumu na kotambola elongo na yo na nzela ya Mobikisi mpe kozala balandi na Ye.

Bokasi ya kotambola na Nzela ya Moke

Esili bino koyoka lisese ete bato oyo babungi mingi mingi batambolaki na zolongano. Kala mingi te, banganga mayele ya Max Planck Institute for Biological Cybernetics bamekaki lisese wana. Bamemaki basangani na nzamba monene mpe bapesaki bango mitindo: “Botambola na molongo ya semba.” Bakokaki komona bilembo na mabele te. Bakokaki kaka kolikya na lolenge na bango ya kokambama.

Okanisi basalaki yango lolenge nini?”

Banganga mayele basukisaki ete, “Bato batambolaka na zolongano ntango bazangi bilembo ya solo ya kolikya na etamboli na bango.” 4 Ntango batunamaki nsima, boko basangani balobaki na nkuku ete babungaki te ata moke. Atako bazalaki na elikya monene, makambo ya GPS elakisaki ete batambolaki na bilembo ya minene diametele ntuku mibale.

Mpo na nini tosengeli kozala na ntango ya mpasi boye kotambolaka na molongo ya semba? Bato ya mayele na bolukiluki babimisaki libanzo ete bobungi ya mikemike na mabele esalaki bokeseni. Basusu balobaki ete tozali biso nyonso na lokolo moko oyo eleki mosusu mwa moke makasi. “Mbala mingi,” nzokande, tozali na mpasi na kotambola semba “[mpo] na kozanga koyeba esika ya semba” 5

Atako ntina ezala nini, ezali ezalela ya bomoto longola se soki bilembo ya kolanda na miso ya kotiela motema ezali, tokobunga kaka.

Kobunga Nzela

Ezali na litomba te na komona ete biloko ya mike ezanga ntina ekoki kosala bokeseni ya minene na bomoi na biso?

Nayebi yango ngaimei na mosala na ngai lokola mokumbi mpepo. Ntango nyonso nazalaki kokita malembe malembe na libanda ya mpepo, nayebaki ete mosala na ngai ya monene ezalaki kobongisa biloko ya mike mike mpo kotambwisa mpepo na kimya nyonso na libanda ya mpepo wapi tolingaki.

Bokoki kozala na mayele se moko ntango bokumbaka motuka. Mopepe, mabe ya nzela, mabe ya semba ya bapine, bozangi bokebi—na kozangaka kolobela misala ya bakumbi basusu—nyonso oyo ekoki kobungisa yo nzela okanaki. Kozanga kokeba biloko nyonso wana mpe ekoki komema na kufa. 6

Elilingi
Motuka na liziba ya mayi

Ekoki kosalema biso na nzoto.

Ekoki lisusu kosalema biso na molimo.

Mingi koleka ya mbongwana na bomoi na biso ya molimo—nyonso mibale ya malamu to ya mabe—esalemaka moke moke, eloko moko na ntango moko. Lokola basangani na boyekoli ya Max Planck, tokoki kososola te ntango nini tobungaka nzela na biso ya kolekela. Tokoki kozala na elikya monene ete tozali kotambola na nzela ya semba. Kasi likambo ezali ete sokilisalisi ya bilembo mpo kosunga biso ezangi, tokobunga kaka esika ya kokomela mpe tokokoma na bisika tokanisaki te kokoma ata mokolo moko.

Oyo ezali solo mpo na bato. Ezali mpe solo mpo na bato mpe bikolo. Makomi etondisami na bandakisa.

Mokanda ya Basambisi elobi ete nsima ya liwa ya Yosua, “Eyaki nkola moko … oyo eyebaki Nkolo te, ata misala asalelaki Yisalaele te.” 7

Atako makambo ya kokamwa ya lola, botali, masungi, mpe babolongi ya kokamwa bana ya Yisalaele batatolaki na ntango ya bomoi ya Mose mpe Yosua, kati na nkola ntango batikaki bomoi ya kotosa mibeko ya nsango malamu mpe kolanda Nkolo mpe babandaki kotambola engebene ya bamposa na bango moko. Mpe solo solo, ezwaki ntango molai te yambo bafuta motuya ya ezaleli wana.

Mbala mosusu bokweyi ya kondima nsango malamu ezwaka bankola. Mbala mosusu ezwaka bambula to basanza. 8 Kasi tozali biso nyonso kosala maponi oyo ezali kokimisa biso na nsango malamu. Atako makasi koleka ezalaki makambo na biso ya molimo na kala, tozalaki lokola bato oyo balingaki kaka kopengwa. Ezalaki lolenge wana uta na mikolo ya Adama kino sikawa.

Boyoka Nsango Malamu

Tozali lisusu na libaku ya kobongisa Na bokeseni ya basali ya komekama, tozali na bilembo ya kotiela motema, ya komonana oyo tokoki kotuya botamboli na biso, “kotalela [ya biso] banzela,”9 mpe tokomisa banzela na biso kitoko.

Mpe bilembo yango ezali nini?

Solo mpenza, esangisi losambo ya mokolo na mokolo mpe komaniola makomi mpe kosalela bisalelo ya kofulisama lokola Yaka, Landa Ngai. Mokolo na mokolo, tokoki kobelema na ngbende ya Nzambe na bomikitisi mpe bosembo. Tokoki komaniola misala na biso mpe kotala lisusu bangonga ya mokolo na biso—kotalaka bolingi mpe bamposa na biso na nse ya pole ya bolingi mpe bamposa na Ye. Soki totiki kotosa mibeko ya nsango malamu, tokobondela Nzambe mpo Ye asalisa biso totosa lisusu mibeko ya nsango malamu mpe tobika lokola balandi ya Klisto

Elilingi
Mobikisi akambaka bampate na Ye

Ntango oyo ya komitalela ezali libaku ya kosala bambongwana mpo kobika bomoi ya sembo koleka. Ezali elanga ya kokanisa tokoki kosolola na Nkolo mpe koteyama, kolendisama, mpe kopetolama na liloba mpe liloba ya molimo emonisama ya Tata na biso na Lola. Ezali ngonga ya bule ntango tokundolaka mayokani na biso ya lokumu ya kolanda Klisto wa boboto, ntango toyebaka bokoli na biso mpe toyebaka bilembo oyo esalisaka biso kokoba kobika lokola balandi.

Bokanisa ntango na bino ya komitalela lokola, boyamboli ya mokolo na mokolo. Na mobembo na biso lokola basali mobembo na bomoi na biso ya bolandi, toyebi lolenge nini ezali pete mpo na kopengwa. Kasi se lokola babobungi ya mike mike ekoki kokimisa biso Nzela ya Nzambe, mpe lokola misala ya mike mike mpe ya pete ekoki kozongisa biso na Nzela ya Nzambe. Ntango tozali kobanga na bomoi na biso, ndenge esalaka mingi mingi, boyamboli na biso ya mokolo na mokolo efongolaka mitema na biso na pole ya lola, oyo engengisaka milimo na biso, kolongolaka molili, bobangi, mpe ntembe.

Bayenda ya Mike, Bamasuwa ya Minene

Soki toluki yango, solo mpenza “Nzambe akopesa [biso] boyebi na nzela ya Molimo Mosantu na Ye, iyo na nzela ya likabo na Ye eleka biso mayele ya Molimo Mosantu.” 9 Ndenge tosengaka mingi mingi, Ye akoteya biso Nzela mpe akosalisa biso kolanda yango.

Oyo, ya solo, esengaka kokoba kosala molende na ngambo na biso. Tokoki te kosepela na makambo ya kala ya molimo. Tosengeli kokoba kosala ntango nyonso.

Tokoki te kotya motema na matatoli ya basusu. Tosengeli kotonga ya biso moko.

Tozali na mposa ya nguya ya mokolo na mokolo ya pole ya lola.

Tozali na mposa ya “kobongola mitema mpo Nzambe alimbisa masumu na biso.” 10 Tozali na mposa ya ntango ya boyamboli.

“Mai ebalukaka ekoki kotikala te ntango molai ezanga peto .” 11 Mpo kobatela makanisi mpe misala na biso ya peto, tosengeli kokoba kosala makasi na kobongwana mpe kobongisa!

Nsima ya nyonso, Bozongisi ya nsango malamu mpe Eklezia ezali eloko moko te oyo esalamaki mbala moko mpo na moto nyonso. Tosengeli kosala ntango nyonso—mokolo moko na ntango moko, moto moko na ntango moko abongwani na nsango malamu ezongisama.

Biloko tosalaka mokolo na mokolo nsukansuka elakisaka lolenge tobikaka bomoi na biso mobimba. Mokomi moko alimboli likanisi oyo na lolenge elandi: “Mokolo moko ezali lokola bomoi mobimba. Bobandi kosala eloko moko songolo, kasi bosukisi na kosala mosusu, bobongisi kosala mosala ya moke ya mokolo na mokolo, kasi bokoki kosilisa yango te. … Mpe na nsuka, bomoi na bino mobimba ezali na bizaleli se wana ya mbalakaka mpe. Bomoi na bino mobimba ezali na lolenge moko ya mosala lokola mokolo moko.” 12

Bolingi kobongola lolenge ya bomoi na bino?

Bobongola lolenge ya mokolo na bino.

Bolingi kobongola mokolo na bino?

Bobongwana ntango oyo.

Bobongola oyo bokanisi, bososoli, mpe bosala yango na ngonga oyo.

Yenda ya moke ekoki kobalola masuwa ya monene. 13

Babriki ya mike ekoki kosalelama na kotonga bandako ya kitoko ya minene.

Bankona ya mike ekoki kokoma nzete milai ya sequoias.

Miniti mpe ngongs oyo elekisami malamu ezali mabanga ya ndako ya bomoi etambwisami malamu. Yango ekoki kofula bolamu, kotombola biso uta na bowumbu ya mabe na biso , mpe kokamba biso na likolo na nzela ya bosikoli ya bolimbisi mpe kosantisama.

Nzambe ya Ebandeli ya Sika

Na bino, Nalakisi botondi mpo na likabo ya kitoko ya libaku ya sika, bomoi ya sika, elikya ya sika.

Totomboli mingongo na biso ya lokumu na Nzambe na biso ya monene mpe alimbisaka. Solo mpenza Azali Nzambe ya bibandeli ya sika. Nsuka monene ya mosala na Ye mobimba ezali kosalisa biso, bana na Ye, tolonga boluki na biso ya bomoi ya kufa te mpe ya seko. 14

Tokoki kokoma bato ya sika kati na Klisto, mpo Nzambe alakaki, “mbala inso bato ba ngai bakoyambola nakolimbisa bango masumu ma bango na ngai” 15 mpe “kokanisa yango lisusu te.” 16

Bandeko balingami mibali mpe basi, baninga ya bolingo biso nyonso topengwaka mbala na mbala.

Kasi tokoki koyambola mpe kobandela lisusu kotosa mibeko ya nsango malamu. Tokoki kosala nzela na biso kati na molili mpe mimekano ya bomoi oyo mpe kozongela nzela na biso ya Tata na biso ya bolingo ya Lola soki toluki bilembo ya molimo Ye apesi, koyamba bobimisi ya moto ye moko, mpe kosala makasi mpo na boyamboli ya mokolo na mokolo. Boye ezali lolenge tokomaka balandi ya solo ya Mobikisi na biso ya bolingo, Yesu Klisto.

Soki tosali bongo, Nzambe akosepela na biso. “Nkolo akopambola … yo o mboka eye Nkolo Nzambe na yo apesi yo. Nkolo akotya bino bato ya bule mpo na Yemei.” 17

Ete koluka boyamboli ya mokolo na mokolo mpe kokoba kotambola na Nzela ya Yesu Klisto ezali losambo na ngai. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Yesu ateyaki, “Nazali nzela, solo, mpe bomoi” (Yoane 14:6). The NIV First-Century Study Bible ezali na ndimbola oyo: “Likanisi ya nzela na Biblia ya Liebele mingimingi elakisi kobomba mitindo to mateya ya Nzambe [tala Banzembo 1:1; 16:11; 86:11]. Oyo ezalaki elobeli ya kala mpo na kozala na lisanga ya babondimi, mateya to misala. The Dead Sea Scrolls community bamibengamaki balandi ya ‘nzela,’ na yango balimbolaki bazali balandi engebene na bolimboli na bango moko oyo esepelisaki Nzambe. Paulo mpe Baklisto ya yambo bamibengamaki lisusu ‘molandi[ba] ya Nzela’ [tala Misala 24:14]” (na What the Bible Says about the Way, the Truth, and the Life,” Bible Gateway, biblegateway.com/topics/the-way-the-truth-and-the-life).

    Na 1873, buku ya kala na nkombo ya Didache ekundolamaki na Ndako ya mikanda ya nkoko ya Yelusaleme na Constantinople. Baluki ebele bandimi ete ekomamaki mpe esalelamaki na nsuka ya ekeke ya liboso (nsima Yesu Klisto 80–100). Liloba Didache ebandi na maloba maye: “ezali na banzela mibale, moko ya bomoi mpe moko ya liwa, kasi ezali na bokeseni monene kati na banzela yango mibale. Nzela ya bomoi, bongo ezali oyo: Yambo, okolinga Nzambe oyo akelaki yo, ya mibale, moninga na yo ya zingazinga lokola yo moko” (Teaching of the Twelve Apostles, trans. Roswell D. Hitchcock and Francis Brown [1884], 3).

    Mikanda mosusu, lokola The Expositor’s Bible Commentary, ebeti nsete ete “na ebandeli ya bozali ya eklezia, baoyo bandimaki bomasiya ya Klisto mpe balobaki ete azalaki Nkolo na bango bamibengamaki baoyo ya ‘Nzela’ [tala Misala 19:9, 23; 22:4; 24:14, 22]” (ed. Frank E. Gaebelein and others [1981], 9:370).

  2. Tala Moziya 2:17.

  3. Tala Malongi mpe Mayokani 88:63.

  4. “Walking in Circles,” Aug. 20, 2009, Max-Planck-Gesellschaft, mpg.de.

  5. “Kotambolaka na Zolongano,” mpg.de. Elili oyo elakisi nzela ya GPS ya basangisi minei na boyekoli. Misato kati na bango batambolaki na mokolo ya mbula. Moko na bango abandaki kotambola ntango moi ezipamaki na mapata, kasi nsima miniti 15 mapata ebungaki, mpe mosangisi ekokaki komona moi mwa moke. Boyeba lolenge nini, ntango moi emonanaki mbala moko, motamboli akokaki kotambola na molongo ya semba.

  6. Mpo na ndakisa moko ya kufa mpo na libunga ya mokumbi mpepo ya ndelo mibale kaka ebomisaki bato na Mont Erebus na Antarctique, kobomaka bongo bato 257, tala Dieter F. Uchtdorf, “A Matter of a Few Degrees,” Liahona, Sanza ya mitano 2008, 57–60.

  7. Basambisi 2:10.

  8. Nsima ya botali ya Klisto na Amerika, bato oyo bayambolaki masumu na bango, babatisamaki, mpe bazwaki Molimo Mosantu. Esika bazalaki bato ya koswana mpe ya lolendo, sikawa “ezalaki boweli mpe boswani te o ntei ya bango, mpe moto na moto asalaki na boyengebene elongo na mosusu” (4 Nefi 1:2). Eleko oyo ya boyengebene ewumelaki boko bikeke mibale yambo lolendo ebandaki kobenda bato na Nzela. Nzokande, bopengwi ya molimo ekoki kosalama lisusu na lobango koleka. Lokola ndakisa, bambula yambo, na mbula 50 ya bokonzi ya basambisi na Buku ya Mormon, ezalaki “kimia ya ntango inso mpe esengo” kati na bato. Kasi mpo na lolendo oyo ekotaki kati na mitema ya bandimi ya Eklezia, nsima ya eleko mokuse ya mbula minei “ezalaki boweli o ntei ya bato, mpenza ete ezalaki bosopi makila maike” (tala Elamani 3:32–4:1).

  9. Malongi mpe Mayokani 121:26.

  10. Misala 3:19.

  11. Doctrine et Alliances 121:33.

  12. Michael Crichton, Jurassic Park (2015), 190.

  13. “Bozwa bamasuwa lokola ndakisa. Atako ezali minene mpenza mpe ezali kotambwisama na mopepe, ezali kokambama na yenda ya moke epai nyonso wapi mokumbi alingi kokende” (Yakobo 3:4; New International Version).

  14. Tala Mose 1:39.

  15. Moziya 26:20.

  16. Doctrine et Alliances 58:42.

  17. Dutelonome 28:8–9; tala lisusu banzela 1–7.

Bimisa na lokasa