Likita Linene
Makamwisi ya Nsango malamu ya Yesu Klisto.
Likita Linene ya Sanza ya Zomi 2021


Makamwisi ya Nsango malamu ya Yesu Klisto.

Nayebi ete nsango malamu na Ye ekoki komemela biso elikya, kimia, mpe esengo, bobele sikawa te, kasi ekopambola basusu bazanga motango na bankola ekoya.

Mabuhay!! Namemeli bino bolingo mpe koseka ya esengo uta na Basantu ya kokamwa ya Philipines. Mobu oyo ekokisi mibu 60 uta bamisionele ya yambo bakomaki na bisanga ya Philippines. Lelo, ezali na misio 23 mpe bandimi ya Eklezia mingi koleka 800.000 kati na makonzi 123. Ezali na batempelo nsambo oyo ezali kosala, kotongama, to esakolami. Oyo ezali solo likamwisi. Tozali komona bokokisi ya lisakoli kati na 2 Nefi 10:21: “Kasi binene ezali bilako bya Nkolo epai ya bango baye bazali likolo lya bisanga bya mbu.”

Elilingi
Mokambi Hinckley na Philippines

Likamwisi oyo ezali lisusu bokokisi ya lisakoli epesama kati na losambo ya Mpaka Gordon B. Hinckley ntango azalaki apostolo na Manila na 1961. Na losambo yango, Mpalka Hinckley alobaki: “Tozali kosenga mapamboli na Yo eya likolo ya bayo ya mabele oyo, ete bakoka kozala na boyokani mpe boyambi mpe boboto mpe na mawa epai ya baoyo bakoya awa, mpe ete mingi, iyo, Nkolo, tosambeli ete bakozala na mingi, bankoto oyo bakoyamba nsango oyo mpe bakopambolama na nzela na yango. Ekopambola Yo bango na milimo ya boyambi mpe mitema ya bososoli, mpe elongo na bondimi ya koyamba, mpe elongo na mpiko ya kobika mabongi ya nsango malamu” (dedicatory prayer at American War Memorial Cemetery, Philippines, Apr. 28, 1961).

Elilingi
Libota ya Revillo

Motango koleka bankoto mingi, mingi ya Bantu ya Mikolo mya Nsuka ya bosembo, bikamwa ya nsango malamu ememaki mbongwana malamu na ekolo mpe bato na yango. Nazali nzenenekene na bomoi ya oyo. Nazalaki mibu motoba ntango baboti na ngai bakotaki na Eklezia na sudi ya esanga ya Mindanao. Na ntango wana, ezalaki bobele na misio moko na ekolo mobimba, mpe ezalaki na makonzi te. Nazali na matondi ya libela na mpiko, bokasi, mpe molende ya baboti na ngai mpo na kolanda Mobikisi. Natosaka bango mpe babapionie nyonso ya Eklezia na Philippines. Basalaki nzela mpo ete bangola oyo elandi epambolama.

Mokonzi Bnyamina na Buku ya Mormon alobaki: “Mpe lisusu, nazali na mposa ete bomaniola likolo lya bozali bopambolama mpe bwa bosepeli bwa bango baye babateli mitindo mya Nzambe. Mpo bampambolami o makambo manso, ma ntango mpe ma molimo lokola”(Moziya 2:41).

NTondimi ete mabongisi mpe makuli ma yambo ma Nsango elamu mazali: ya yambo Bondimi na Nkolo Yesu Klisto; Wana ezalaki lolenge nsango malamu ebongolaki mpe epambolaki Basantu ya Filipino Saints, kobakisa libota na ngai. Nsango malamu ezali solo nzela ememaka na bomoi ya esengo, efuluka.

Mobeko mwa yambo ya nsango malamu ezali bondimi na Nkolo Yesu Klisto. Bafilipinos mingi bazali na boyambi malamu kati na Nzambe. Ezali pete mpo na biso totia eikya na Yesu Klisto mpe toyeba ete tokoki kozwa biyano na nsambo na biso.

Elilingi
Libota ya Obedoza

Libota ya Obedoza ezali ndakisa monene ya oyo. Ndeko mobali Obedoza azalaki mokambi na ngai ya etape ntango nazalaki elenge mobali. Mposa makasi ya Ndeko mobali mpe Ndeko mwasi Obedoza ezalaki ya kokangisama na libota na bango na tempelo ya Manila. Bafandaki na engumba General Santos, bakilometele 1.600 uta na Manila. Mpo na libota ya bato libwa, kosala mobembe ya kokende tempelo ezalaki lokola ekoki kosalama te. Kasi lokola motekisi oyo akendaki mpe atekaki nyonso oyo azalaki na yango mpo na kosomba mangaliti ya motuya monene (tala Matai 13:45–46), babalani oyo bazwaki mokano ya kotekisa ndako na bango mpo na kofuta mobembo yango. Ndeko mwasi Obedoza amitungisaki mpamba te bakozala na ndako te wapi bakozonga lisusu. Kasi Ndeko mobali Obedoza atalisaki ye ete Nkolo akopesa.

Bakangisamaki lokola libota mpo na ntango mpe seko nyonso kati na tempelo na 1985. Kati na tempelo bazwaki bosepeli oyo ekoki komekama te—liyaka na bango ya motuya koleka. Mpe solo na maloba ya Ndeko mobali Obedoza, Nkolo apesaki. Na bozongi uta na Manila, baninga ya boboto bapesaki bango bisika ya kofanda mpe nsuka nsuka bazwaki ya bango moko ndako. Nkolo abatelaka baoyo balakisaka bondimi kati na Ye.

Mobeko mwa mibale ya nsango malamu ezali boyamboli. Boyamboli ezali kobwakisa lisumu mpe kotelela Nzambe mpo na bolimbisi. Ezali mbongwana ya molimo mpe motema. Lokola Mokambi Russell M. Nelson ateyi, ezali “kosala mpe kozala mwa malamu koleka mokolo na mokolo” (“We Can Do Better and Be Better,” Liahona, Sanza ya mitano 2019, 67).

Boyamboli ezali mingi lokola sabuni. Lokola elenge inzeniele ya nzoto ya biloko, nazalaki kosala na kompani ya sabuni naPhilipines. Nayekolaki kosala sabuni mpe lolenge ya esaleli na yango. Ntango osangisi mafuta na kati ya Alkalin mpe obakisi biloko bibundisaka bacteries, esalaka nkisi moko ya makasi oyo ekoki kolongola mikolobe mpe viris. Lokola sabuni, boyamboli ezali mosali ya kosokola. Epesaka biso libaku ya kolongola babosoto na biso mpe biteni biteni na biso ya kala, mpo ete tolongobana mpo na kozala elongo na Nzambe, lokola eloko moko te ya mbindo ekoki kosangola bokonzi ya [Nzambe]” (Alma 11:37).

Na nzela ya boyamboli totokaka nguya ya bosukolami, bosantisi ya Yesu Klisto. Ezali eteni ya motuya ya bobongwani. Oyo ezali nini esalamaki na Baanti Nefi-Lehi na Buku ya Mormon. Bazalaki Balamani oyo babongwanaki mobimba mpenza ete “mokolo moko te bakweyaki” (tala Alma 23:6–8). Bakundaki bibundeli na bango ya bitumba mpe basalelaki yango lisusu te. Babongaki malamu bakufa na esika ya kobuka boyokani wana. Mpe balakisaki yango.” Toyebi ete libonza na bango ememaki makamwisi; bankoto oyo babundisaki bango babwakaki minduki na bango mpe babongolaki motema. Mibu nsima, bana na bango ya mibali oyo toyebi lokola basoda banzenga ya nguya, babatelamaki na bitumba na mabaku ya kokamwa!

Elilingi
Tata ya Mpaka Revillo

Libota na ngai mpe Basantu Bafiilipino balekelaki na nzela ya kobongola motema ya lolenge moko. Ntango toyambaki nsango malamu ya Yesu Klisto mpe tokotaki na Eklezia, tobongolaki ndenge na biso mpe bonkoko na biso mpo na kolanda oyo ya nsango malamu. Tosengelaki kobosana babonkkoko ya mabe. Namonaki likambo oyo kati na tata na ngai ntango ayekolaki nsango malamu mpe ayambolaki, mpe atalaki nsima te. Azalaki momeli likaya makasi, kasi abwakaki basigaleti na ye mpe asimbaki moko lisusu te. Mpo na mokano na ye ya kobongwana, bankola minei uta na ye bapambolami.

Elilingi
Bankola ya libota ya Revillo

Boyamboli ekambaka biso mpo na kosala mpe kobatela mayokani na nzela ya makuli ya bule. Likuli ya yambo ya lobiko mpe bonetoli ezali libatisi na nzela ya bozindisi na mai mpo na bolimbisi ya masumu. Libatisi epesaka biso nzela ya kozwa likabo ya Molimo Mosantu,mpe kokota kati na boyokani na Nkolo. Tokoki kozongisa sika boyokani ya libatisi oyo poso nyonso wana ezali biso kolia elambo. Oyo mpe ezali likamwisi!

Bandeko, nasengi bino bomema likamwisi oyo na bomoi na bino. Boya epai ya Yesu Klisto mpe bopona kosalela bondimi na bino kati na Ye, boyambola,mpe bosala mpe bobatela mayokani oyo emonani na makuli ya lobiko mpe bonetoli. Oyo ekopesa bino nzela ya kozala Makuli mpe mayokani oyo ekopesa bino nzela ya kokangana na Klisto mpe kozwa nguya mpe mapamboli ya bonzambe (tala Doctrine et Alliances 84:20).

Nabakisi na ntina ya solo ya Yesu Klisto mpe ete Ye azali na bomoi mpe alingi moko na moko na biso. Nayebi ete nsango malamu na Ye ekoki komemela biso elikya, kimia, mpe esengo, bobele sikawa te, kasi ekopambola basusu bazanga motango na bankola ekoya. Wana ezali ntina mpo na maseka kitoko mpe ya esengo ya Basantu ya Bafilipino. Ezali likamwisi ya nsango malamu mpe ya malongi ya Klisto. Natatoli na ntina na Ye na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.

Bimisa na lokasa