Likita Linene
Kpesa Bosantu na Nkolo
Likita Linene ya Sanza ya Zomi 2021


Kopesa Bosantu na Nkolo

Libonza elimboli “kotika eloko” mpe elingi mingi koloba “kopesa epai na” Nkolo.

Mobu eleki, ntango nazalaki kosala na bokambi ya etuka enene ya Asia ya Nordi, nazwaki na telefone mbela ya Mokambi Russell M. Nelson kobiangaka ngai kosalela lokola mopesi toli ya Mibale na Baepisikopo Bakambi. Abengaki na bopolo nyonso mwasi na ngai, kosangana na lisolo. Nsima ya kozwa libiangai, tozalaki naino kondima te ntango mwasi na ngai atunaki, “Nini baepisikopo Bakambi basalaka mpenza?” Nsima ya mwa ngonga ya makanisi, nazongisaki eyano,“Nayebi mpenza te!”

Mobu moko nsima—mpe nsima koyoka bomikitisi mpe botondi—Nakoki koyanola na motuna ya mwasi na ngai na boyebi mpenza. Na kati na biloko mingi lisusu, Baepisikopo Bakambi batalaka maye matali bolamu ya nzoto mpe Libongiseli ya Ekleziaya kosunga bato na makama. Mosala oyo sikawa epanzani mokili mobimba mpe epamboli bana mingi ya Nkolo koleka ntango ya liboso.

Lokola Baepisikopo Bakambi, tosungami na basali malamu ya Eklezia mpe basusu, kobakisa Bakambi Banene ya Lingomba ya bamama mpo na Lisalisi mpe Komite ya Bokambami ya Bomikoki. Na makoki na biso lokola bai ya komite, Bokambi ya Yambo asengaki ngai—lokola mpe na ndeko mwasi Eubank, oyo alobaki na biso mpokwa eleki—kokabola na bino rapport ya sika ya Eklezia na bokasi ya kosunga bato. Basengi mingi mpenza tozongisela bino matondi na bango ya mozindo—mpo ete, bandeko mibali mpe basi, ezali bino nde bosalaka ete bokasi ya kosunga bato oyo ekokisama.

Elilingi
Makabo mpo na Kosunga
Elilingi
Makabo mosusu mpo na kosalisa bato na makama.

Lokola totalaki na komitungisa mpasi ya nkita na ntongo ntongo ya COVID-19, mpasi na molongo mobimba, tokokaki na pete kozela ete mabonza na misolo oyo basantu bakokaki kopesa ekita. Nsima ya nyonso, bandimi na biso moko babikaki te na mpasi ya bokono oyo ya mokili mobimba. Bokanisa maye toyokaki ntango tomonaki bokeseni! Mabonza ya kosunga bato na 2020, ekomaki likolo koleka nyonso, mpe ezali kokende lisusu likolo mobu oyo. Lokola eyano ya makabo na bino, Eklezia ekomaki na makoki ya kopesa eyano ya monene koleka wuta Misolo ya Kosunga Bato na Makama ekelama, koleka 1500 misala ya kosunga mpo na COVD na koleka 150 mboka. Mabonza oyo, oyo bopesaki na bokabi na Nkolo, ebongolamaki na bilei, oxygen, bisaleli ya lopitalo, mpe mangwele mpo na baoyo, soki yango te bakokaki kokufa.

Elilingi
Bato bakima bamboka na bango
Elilingi
Bato bakima bamboka na bango
Elilingi
Bato bakima bamboka na bango

Ya motuya mingi lisusu koleka bopesi biloko ezali ebele ya ngonga mpe bokasi na misala oyo bandimi ya Eklezia bapesaka na oyo etali kosunga bato. Kaka ntango bokono oyo ya mokili mobimba ezali kotungisa, makama ya minene, kowelana kati na bato ya mboka, mpe yikiyiki ya nkita etikaki te mpe ekobaki komema nkoto ya bato libanda ya bandako na bango. ONU sikawa alobi ete ezali koleka nkoto 82 ya bato balongwe na makasi kati na mokili mobimba. 1 Bakisa na yango bankoto misusu oyo bakani kokima bobola to minyoko mpo na boluki ya bomoi ya malamu mpo na bango moko mpe bana na bango, mpe bokoki kobanda komona monene ya likambo na Molongo mobimbo.

Nazali na esengo ya koloba ete na nzela ya ntango mpe makoki ya bandeko mingi, Eklezia ezali kokamba bisika lisangisi bato bakimaki bamboka mpe bawuta na bisika ebele na eAmerika mpe Mpoto. Mpe matondo mpo na mabonza na bino, topesi biloko, misolo, mpe bato mpo na kosunga mabongisi misusu ya lolenge moko kati na mokili.

Tika ete napesa matondo ya motema ngai na Basantu oyo bapesaki maboko mpo na koleisa, kolatisa, kosala kimoninga mpe kosunga bato bakimaki bamboka na bango bamivandisa mpe bamikoka.

Lobi eleki na mpokwa, Ndeko mwasi Eubank akabolaki mwa lisolo na bino na ntina ya bokasi ya Basantu na makambo oyo. Ntango nazali kokanisa bokasi oyo, makanisi na ngai ebalukaka mingi na mobeko ya komibonza mpe bosangani mbala moko na mibeko ya kolinga Nzambe mpe kolinga mozalani na biso.

Na esaleli ya mikolo oyo, nkombo libonza ekoma kolakisa maloba “kotika” biloko mpo na Nkolo mpe bokonzi na Ye. Atako, ntango ya kala, ndimbola ya nkombo libonza ezalaki mingi ya kokangama na misisa na ye na Latin: sacer, elimboli “sacred” or “bule,” mpe facere, kolimbolaka “kosala.” 2 Boye, na kala libonza elimbolaki na liloba moko moko “kokomisa eloko moko to moto moko mosantu.” 3 Komona yango bongo, libonza ezali nzela ya kokoma mosantu mpe kokoma koyeba Nzambe, te molulu moko to mimesano ya “kotika” biloko mpo na Nkolo.

Nkolo alobaki, “Nalingaki [bolingani] kasi mbeka te; mpe boyebi ya Nzambe mingi koleka makabo.” 4 Nkolo alingi biso tokoma basantu, 5 tozala na bolingani, 6 mpe tokoma na koyeba Ye. 7 Lokola Apostolo Paulo ateyaki, “ Ata nakopalanganisa nyonso ya ngai mpo na kopesaka makabo na babola, mpe ata nakopesa nzoto mpo na kotumbama, nde soko nazangi bolingo, nazwi litomba te.” 8 Na bozindo, Nkolo alingi mitema na biso; Alingi biso tokoma bikelamu ya sika. 9 Ndenge atangisaki bato na Nefi, “Bokobonza mpo ya mbeka yoko epai na ngai motema moko mobukana mpe molimo moko mwa mawa.” 10

Elilingi
Bosantu na Nkolo

Libonza ezali na ndimbola moke na ntina ya “kotika eloko songolo” mpe ndimbola mingi koleka na ntina ya “kopesa epai na” Nkolo. Kuna likolo ya ekuke ya tempelo ezali komonana nkoma “Bosantu na Nkolo;.Ndako ya Nkolo.” Ntango tozali kotosa mayokani na biso na nzela ya komibonza, tozali kokoma mosantu na nzela ya ngolu ya Yesu Klisto, mpe na etumbelo ya tempelo esantu, na mitema moko mibukana mpe milimo moko ya mawa.Topesi bosantu na biso na Nkolo. Mpaka Neal A. Maxwell ateyaki: “Kotika bolingi na yo [to motema 11 ] ezali solo eloko moko tosengeli kokitisa na etumbelo ya Nzambe. … Nzokande, ntango bino na ngai na nsuka tomipesaka, na kotikaka bolingi na biso moko komelama na bolingi ya Nzambe, nde solo tozali kopesa eloko moko epai na Ye!” 12

Ntango mabonza na biso mpo na basusu emonani lokola “ya kotika,” tokoki komona yango lokola mokumba mpe tokolemba ntango mabonza na biso endimami te to epesami mbano te. Nzokande, ntango emonani lokola “kopesa” na Nkolo, mabonza na biso mpo na basusu ekomi mabonza, mpe esengo ya kopesa na motema ya bokabi ekomi mbano na yango moko. Kokangolama na mposa mpo na bolingo, bondimami, to bosepeli epai na basusu, mabonza na biso ekomi maloba ya matondo mpe bolingo ya peto koleka mpe ya mozindo koleka mpo na Mobikisi mpe bazalani na biso. Boyoki nyonso ya lofundu na komipimela epesi nzela na boyoki ya matondo, motema ya kokaba, kosepela, mpe na esengo. 13

Eloko moko esantisami—ezala bomoi na biso, biloko na biso, ntango na biso, to makoki na biso—kaka te na kotikaka yango kasi mpenza na kobulisaka 14 yango epai na Nkolo. Na Eklezia mosala ya kosunga bato ezali likabo. Ezali mbuma ya bosangisi, makabo ya Basantu epesami, elembo moko ya bolingo na biso mpo na Nzambe mpe bana na Ye. 15

Elilingi
Ndeko mwasi Canfield elongo na baye ye asalisaka

Steve mpe Anita Canfield bazali moko ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka oyo bamoni bango moko mapamboli ya mbongwana ya makabo epai na Nkolo. Lokola bamisionele oyo basalaka na kopesaka lisungi mpo na komikoka, ba Canfields basengamaki kopesa lisalisi na banganda ya bakimi mboka mpe bawuta na kati na Mpoto. Na bomoi na ye ya mosali, Ndeko mwasi Canfield azalaki moyemi ya kati ya ndako, alukamaki na bakiliya ya mosolo mpo na kobongisa ndako na bango to ya kitoko. Mbala moko, amimoni na mokili ya ndenge mosusu oyo ezalaki na bokeseni mpenza, mpo ete azalaki kosala kati na bato oyo abungisi nyonso na bozwi ya mokili. Na maloba na ye moko, asombitianaki “banzela ya marbre na banzela ya mabele,” mpe na kosalaka bongo, azwaka bolingo mpe mayele mpo ye na molongani na ye bakomaki baninga—mpe na ntango moke bakomaki kolinga mpe koyamba—bato bazalaki na mposa ya lisungi na bango.

Ba Canfields balobaki, “Toyokaki te ete ‘totikaki’ eloko moko mpo na kosalela Nkolo. Mposa na biso ezalaki kaka ‘kopesa epai na’ Ye ntango mpe bokasi na biso mpo na kopambola bana na Ye na nzela nyonso oyo Ye amoni kosalela biso. Ntango tozali kosala kati na bandeko na biso ya mibali mpe basi, bonzenga ya libanda—bokeseni nyonso ya esika ewuti to moto ya mboka nini—ebungaki mpo na biso, mpe tomonaki kaka motema ya moto mosusu. Ezali te na litomba moko ya mosala to mpe ya biloko oyo ekokani na nzela oyo misala, kosala kati na bana ya Nzambe oyo bamikitisaki koleka banso, etondisi biso.”

Lisolo ya ba Canfields mpe masusu lokola yango esungaki ngai kosepela na maloba ya mpamba mpe mozindo ya nzembo ya kelasi ya bana.

“Pesa,” elobaki bitima na mai,

Ntango ezalaki kokita ngomba;

“Nazali moke, nayebi, kasi nakei wapi

Bilanga ezali kokoma lisusu na langi ya mai ya mpondu.”

Iyo, biso nyonso tozali mike, kasi lisanga lokola kosala na lombango mpo na kopesa Nzambe mpe bazalani na biso, esika nyonso tokei bomoi epambwami.

Mokapo ya misato ya loyembo oyo eyebani malamu te kasi esukisi na libyangi ya bolingo:

Pesa, kaka, lolenge Yesu apesi;

Ezali na eloko moko banso bakoki kopesa.

Sala lokola bitima na mai mpe bafololo basalaka:

Mpo na Nzambe mpe bomoi ya basusu. 16

Balingani bandeko mibali mpe basi, ntango tozali kobika mpo na Nzambe mpe basusu na kopesaka makoki na biso, ntango na biso, mpe iyo, ata mpo na biso moko, tozali kobika na mokili ya langi ya mai ya mpondu, mpe, na malembe malembe kokokoma mosantu koleka.

Tika Nkolo apambola bino koleka mpo na mabonza oyo bopesi na Ye na nsomi nyonso.

Natatoli ete Nzambe azali na bomoi. “Moto na Bosantu ezali nkombo na Ye.” 17 Yesu klisto azali Mwana na Ye mpe mopesi ya makabo nyonso. 18 Tika ete biso, na nzela ya ngolu na Ye mpe bobateli mayokani na nzela ya libonza tokoma basantu mpe topesa bolingo mpe bosantu na Nkolo. 19 Na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Tala “Global Trends: Forced Displacement in 2020,” UNHCR report, June 18, 2021, unhcr.org.

  2. Libonza ewuti na Latin sacrificium, oyo ezali na misisa mibale ya Latin sacer mpe facere, engebene na Merriam-Webster Dictionary (tala merriam-webster.com). Liloba sacer elingi koloba “bule” to “santu,” mpe liloba facere elingi koloba “kokomisa to kosala,” engebene na Latin English Dictionary (see latin-english.com).

  3. Mokambi na Makomi, “Libonza,” scriptures.ChurchofJesusChrist.org.

  4. Hosea 6:6; tala nkoma na nse ya makomi b, kolakisaka ete mawa na Ebele elingi koloba “bolingani” to “boboto na bolingo.” Tala lisusu Matai 9:10–13; 12:7.

  5. Tala Lewitiko 11:44.

  6. Tala Moloni 7:47.

  7. Tala Moziya 5:13.

  8. 1 Bakolinti 13:3; tala lisusu Moziya 2:21.

  9. Tala 2 Bakolinti 5:17.

  10. 3 Nefi 9:20, sete ebetami awa; tala lisusu verse 19.

  11. Liloba motema ebakisami awa lokola likitani mpo na bolingi.

  12. Neal A. Maxwell, “Swallowed Up in the Will of the Father,” Ensign, sanza ya zomi na moko 1995, 24; nsete ebetami. Tala lisusu Omni 1:26; Romans 12:1.

  13. Tala Moloni 10:3.

  14. Kobulisa elimboli “koloba to kotia mpembeni lokola esantu,” engebene na American Heritage College Dictionary.

  15. Tala Matai 22:36–40.

  16. “‘Give,’ Said the Little Stream,” Children’s Songbook, 236.

  17. Mose 6:57.

  18. Tala Moroni 10:18.

  19. Tala Mateya mpe Mayokani 97:8.

Bimisa na lokasa