Likita Linene
Bondimi ya Kosenga mpe Nsima Kosalela
Likita Linene ya Sanza ya Zomi 2021


Bondimi ya Kosenga mpe Nsima Kosalela

Bondimi na Yesu Klisto ezali likambo ya motuya mpo na kozwa bimoniseli ya bosolo.

Balingami bandeko na ngai ya mibali mpe ya basi, nazali na botondi mpo na libaku ya kolobela bino na liyangani ya Eyenga na mpokwa ya likita linene oyo. Na boyingisi na ye na likita oyo ya ntongo, Mokambi Russell M. Nelson alobaki ete “emoniseli ya peto mpo na mituna na motema na yo ekosala ete likita oyo ezala na litomba makasi mpe ya kobosana te.” Soki nanu oluka lisalisi ya Molimo Mosantu mpo na kosalisa yo koyoka nini Nkolo alingi yo oyoka na mikolo mibale oyo, nabengisi bino kosala sikawa.” 1 Nalukaki lipamboli oyo ntango nazalaki komilengela mpo na kozwa emoniseli mpo na bokutani oyo na bino. Losambo na ngai ya motema ezali ete bokoka kozwa emoniseli wana uta na Nzambe.

“Lolenge ya kozwa emoniseli kowuta na Nzambe ebongwani te uta na mikolo ya Adama mpe Eva. Ezalaka lolenge moko mpo na mabiangi nyonso ya basali ya Nkolo uta ebandeli kino mokolo ya lelo. Ezali lolenge moko na yo mpe ngai. Esalemaka ntango nyonso na kosalelaka bondimi. 2

Na mibu ya bolenge ya Joseph Smith azalaki na bondimi ya ekoka ya kotuna motuna ya Nzambe, kondimelaka ete Nzambe akokaki koyanola mposa ya liyoki ya motema na ye. Eyano eyaki ebongolaki mokili. alingaki koyeba eklezia nini asengelaki kokende mpo na kopetolama na masumu. Eyano oyo azwaki elendisaki ye mpo na kokoba kosenga kotuna kutu na mituna ya ntina koleka mpe kosalela na bokobi ya bopesi emoniseli oyo ewutaki kaka kobanda. 3

Boyebi na yo ekoki kozala lolenge moko na likita oyo. Ozali na mituna mpo na oyo olukaka biyano. Ozali na bondimi ya kokoka mpo na kolikia ete okozwa biyano uta na Nkolo na nzela ya Basali na Ye. 4 Okozala na libaku malamu te ya kosenga na mongongo makasi mpo na biyano uta na balobeli, kasi okoki kosenga Tata na yo ya bolingo na nzela ya losambo.

Nayebi uta na boyebi na ngai ete biyano ekoya mpo na kokokisa mposa na yo mpe bolengeli na yo ya molimo. Soki ozali na mposa ya eyano oyo ezali ntina mpo na bolamu na yo ya seko to oyo ya basusu, eyano ezali pene ya koya. Nzokande, atako na ntango wana, okoki kozwa—lokola Joseph Smith azwaki—eyano ya kozala na bompikiliki. 5

Soki bondimi na yo na Yesu Klisto ekambi yo na motema oyo ekomi ya boboto na nzela ya makambo ya Bomikabi na Ye, okozala na makoki ya koyoka mamimisi ya Molimo na eyano na losambo na yo. Boyebi na ngai moko ezali ete mongongo ya nse, ya moke—ezalaka ya solo—ezali polele mpe ekoki kososolama na makanisi na ngai ntango nayokaka kimia na motema mpe komikitisa na bolingi ya Nkolo. Liyoki wana ya bomikitisi ekoki kolimbolama malamu lokola “Bolingi na ngai te, kasi ya yo, esalema.” 6

Lolenge ya kosala ya emoniseli oyo ezali nde ntina oyo bokoyoka balobeli koteya na kati ya likita oyo ebiangemi malongi ya Klisto. 7 Emoniseli eyelaka biso ndambu ndambu kino na ndelo ya oyo tolukaki mpo na kozwa malongi ya Klisto kati ya mitema mpe bosaleli yango kati ya bomoi na biso.

Bomikundola uta na Buku ya Mormon ete Nefi ateyaki biso ete bondimi na Yesu Klisto ezali fungola ya emoniseli ya bosolo mpe fungola mpo na kozwa elikya ete tozali kolanda bokambi ya Mobikisi. Nefi akomaki maloba oyo bikeke mingi yambo ya mbotama ya Yesu Klisto na bokufi:

“Banzelu balobaka na nguya ya Molimo Mosantu; yango wana, balobaka maloba ya Klisto. Yango wana, nalobaki na bino ete, bosala limpati na maloba ya Klisto; mpo tala, maloba ya Klisto makolobela bino makambo manso oyo bosengeli kosala.

“Yango wana, sikawa esilisi bino koloba maloba maye, soki bokoki kososola yango te ekozala mpo ete bosengi te, mpe bobeti ekuke te; yango wana, bokumbami te kati ya mwinda, kasi bosengeli kowa na molili.

“Mpo tala, lisusu nakoloba epai ya bino ete soki bokokota na nzela, mpe bokozwa Molimo Mosantu, akolakisa bino makambo manso bosengeli kosala.

“Tala, maye mazali malongi ya Klisto, mpe ezali na liteya mosusu te ekopesama kino akomimonisa yemei epai ya bino na mosuni. Mpe ntango akomilakisa epai na bino na mosuni, makambo oyo akolobela bino bosengeli kosalela yango.” 8

Nkolo akoloba makambo na nzela ya basali na Ye epai na biso lelo mpe na mikolo mikoya liboso. Akoyebisa biso makambo oyoe tosengeli kosala. 9 Mobikisi akosukisa te mitindo epai na bino mpe ngai. Lokola Ye ateyaki Eliya:

“Mpe alobaki, Kende liboso, mpe telema likolo ya ngomba liboso ya Nkolo. Mpe, tala, Nkolo alekaki wana, mpe mopepe makasi epasolaki bangomba, mpe ebukaki mabanga liboso ya Nkolo; kasi Nkolo azalaki na kati ya mopepe te: mpe nsima ya mopepe boningani ya mabele; kasi Nkolo azalaki na kati ya boningani ya mabele te:

“Mpe nsima ya boningani ya mabele ekozala moto; kasi Nkolo azalaki te na kati ya moto: mpe nsima ya moto mongongo moko ya moke moke.” 10

Koyoka mongongo wana ekoya uta na bondimi na biso epai na Ye. Na bondimi ya kokoka, tokosenga bokambi na likanisi ya kokende mpe kosala nyonso oyo Ye akosenga. 11 Tokomatisa bondimi ya koyeba ete nyonso oyo Ye akosenga ekopambola basusu, mpe tokoki kopetolama na mosala yango na ntina ya bolingo na Ye mpo na biso.

Ntango bondimi na biso epai ya Yesu Klisto ekokamba biso tosenga Tata biyano, bondimi yango ekomemela biso loboko ya pete ya ekoki ya Mobikisimpo na biso toyoka bokambi na Ye mpe tozala na ekateli mpe mposa ya kotosa. Nsima tokoyemba maloba ya loyembo na esengo, atako ntango mosala ezali makasi: “Mosala ezali elengi, Nzambe na ngai, Mokonzi na ngai.” 12

Mingi mingi ntango tozali na malongi ya Klisto na bomoi mpe mitema na biso, mingi mingi tokoyoka bolingo na Ye monene mpe boboto mpo na baoyo naino bazwa lipamboli ya bondimi na Klisto to bazali kobunda kobatela yango. Ezali mpasi mpo na kobatela mitindo ya Nkolo na bozangi bonidmi mpe kondimela Ye. Lokola basusu babungisaka bondimi na bango na Mobikisi, bakoki kutu kotuka liteya na Ye, kobiangaka mabe malamu mpe malamu mabe. 13 Mpo na koboya libunga oyo ememaka liwa, ezali ntina makasi ete emoniseli tozwaka mpo ya moto ye moko eyokana na mateya ya Nkolo mpe ya baprofeta na Ye.

Bandeko mibali mpe basi, esengaka bondimi mpo na kotosa mitindo ya Nkolo. Esengaka bondimi na Yesu Klisto mpo na kosalisa basusu mpo na Ye. Esengaka bondimi mpo na kobima mpe koteya nsango malamu na Ye mpe kopesa yango na bato oyo bakoki koyoka mongongo ya Molimo te mpe oyo bakoki koboya bosolo ya nsango. Kasi ntango tosaleli bondimi na biso na Klisto—mpe tolandi profeta na Ye ya bomoi—bondimi ekomata na mokili mobimba. Na ntina ya tekinoloji, ekoki kozala ete mingi ya bana ya Nzambe bakoyoka mpe bakoyeba liloba ya Nzambe na nsuka ya mposo oyo koleka mikolo mibale mosusu na lisitwale.

Na bondimi makasi ete oyo ezali Eklezia ya Nkolo mpe bokonzi na mabele, bandimi ebele bafutaka moko na zomi mpe mabonza mpo na kosunga baye bazali na bosenga, atako bandimi oyo bakutanaka na mikakatano na bango moko. Na bondimi ete babiangemaki na Yesu KListo, bamisionele na mokili mobimba bazwaki banzela ya kolonga mimekano oyo etiamaki na bokono ya mokili mobimba—kosalaka bongo na bokasi mpe makanisi malamu. Mpe na na bokasi na bango, bondimi na bango ekoli makasi.

Uta kala botelemeli mpe mikakatano ezalaka mabele mpo na kokolisa bondimi. Oyo ezalaka solo ntango nyonso, mingimingi uta ebandeli ya Bozongisi mpe bozongisi ya Eklezia ya Nkolo. 14

Oyo Mokambi George Q. Cannon alobaki kala koleka ezali solo lelo mpe ekozala kino bozongi ya Mobikisi ye moko mpo na kokamba Eklezia na Ye mpe bato na Ye: “Botosi ya nsango malamu ememaka [bato] na mokangano ya makasi mpe ya pene na Nkolo. Etiaka bokangani ya makasi katikati ya moto na mabele mpe Mokeli na biso Monene na lola. Ememaka kati ya makanisi ya moto liyoki ya elikya ebonga nie na Nkolo wa Bokasi nyonso mpe na bolingi na Ye mpo na koyokela mpe koyanola mabondeli ya baoyo bandimelaka Ye. Na bantango ya mimekano mpe mpasi elikya oyo ezali motuya koleka. Mobulungano ekoki koyela moto moko to koyela bato, bobebisi ekoki kotungisa mpe elikya nyonso ya moto emonisami kotiola, nzokande, epai wapi bato bamimonana mpo na libaku malamu oyo botosi ya Nsango malamu ememaka, bazali na esika ya solo; makolo na bango ezali likolo ya libanga oyo ekoki kolongolama te.” 15

Ezali litatoli na ngai ete libanga likolo ya oyo totelemeli ezali litatoli na biso ete Yesu azali Klisto, ete oyo ezali Eklezia na Ye oyo Ye moko akambaka, mpe ete Mokambi Russell M. Nelson azali profeta na bomoi lelo.

Mokambi Nelson alukaka mpe azwaka bokambi uta na Nkolo. Azali mpo na ngai ndakisa ya boluki ya bokambi oyo na ekateli ya kolanda yango. Ekateli se moko wana kaka ya kozala na botosi na bokambi ya Nkolo ezali kati ya mitema ya baoyo nyonso balobaki to bakoloba, kosambela, to koyemba na kati ya likita linene oyo ya Eklezia na Ye.

Nasambeli ete baye bazali na mokili mobimba oyo bazali kotala to koyoka likita oyo bakozala na liyoki ya bolingo ya Nkolo mpo na bango. Tata na Lola ayanolaki losambo na ngai mpo ete nakoka koyoka mwa eteni ya bolingo ya Mobikisi mpo na bino mpe bolingo na Ye mpo na Tata na Ye ya Lola, oyo azali Tata na biso ya Lola.

Natatoli ete Yesu azali na bomoi. Azali Mobikisi mpe Mosikoli na biso. Oyo ezali Eklezia na Ye. Azali na moto na yango. Ye, elongo na Tata na Ye na Lola, babimelaki na bomoto Joseph Smith na zamba ya banzete na New York. Nsango malamu ya Yesu Klisto mpe bonganganzambe na Ye ezongisamaki na nzela ya batindami ya lola. 16 Na nguya ya Molimo Mosantu, nayebi ete yango ezali solo.

Nasambeli ete bokoka kozala na litatoli wana. Nasambeli ete bokosenga Tata na Lola mpo na bondimi na Klisto oyo bozali na mposa ya kosala mpe kobatela mayokani oyo ekopesa ndingisa mpo Molimo Mosantu azala moninga na bino ya ntango nyonso. Natikeli bino bolingo na ngai mpe litatoli na ngai ya solo na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.

Bimisa na lokasa