Likita Linene
Kokotisa na Bozindo Bobongoli na Biso na Yesu Klisto
Likita Linene ya Sanza ya Zomi 2021


Kokotisa na Bozindo Bobongoli na Biso na Yesu Klisto

Makomi mpe boyebi na biso ezali makabo—makabo oyo biso tozwaka mbala mingi lokola ya biso. Tika biso tolinga mapamboli maye.

Matondi mingi, Mpaka Nelson, mpo na mateya na yo ya kitoko. Tosengeli yango.

Balingmi bandeko na ngai ya mibali mpe basi, Mokambi Russell M. Nelson ateyaki biso kala te, mpe natangi, “Mpo na kosala eloko nyonso malamu esengi makasi. Kokoma moyekoli ya solo ya Yesu Klisto ezali mpo na moto nyonso. Komatisa bondimi na bino mpe elikya na Ye esengi makasi.” Kati na mitindo apesaki biso mpo na komatisa bondimi na biso na Yesu Klisto ezali ete tokoma batangi basila komipesa, ete tomikotisa mobimba biso moko na kati ya makomi mpo na kososola malamu koleka etinda mpe mosala ya Klisto. (Tala “Klisto Asekwi; Bondimi na Ye Ekotombola Bangomba,” Liahona, Sanza ya mitano 2021, 103.)

Toyekoli na Buku ya Mormon ete makomi ezalaki eteni ya motuya ya libota Lehi—mingi mpenza ete Nefii mpe bandeko na ye ya mibali bazongaki na Yelusaleme kokamata bapalaki ya motako (tala 1 Nefi 3–4).

Makomi emonisi bolingi ya Nzambe mpo na biso, mingi lokola Liahona esalaki mpo na Nefi mpe tata na ye. Nsima ye kobuka litimbo na ye, Nefi azalaki na mposa ya koyeba wapi asengelaki kokende mpo na kozwa bilei. Tata na ye, Lehi, atalaki liahona yango mpe amonaki biloko oyo ekomamaki. Nefi amonaki ete bamakonga na kati ya mbuma ezalaki kosala na kolandaka bondimi, bomipesi, mpe bokebi epesami na bango. Amonaki lisusu makomi oyo ezalaki pete mpo na kotanga mpe oyo epesaki bango bososoli mpo na oyo etali banzela ya Nkolo. Ayaki koyeba ete Nkolo amemaka biloko minene na nzela ya makambo ya mike-mike. Atosaki na kolandaka banzela Liahona elakisaki. Akendaki likolo ya ngomba mpe azwaki bilei mpo na libota na ye, oyo enyokwamaki mingi mpenza mpo na bazangaki yango. (Tala 1 Nefi 16:23–31.)

Yango emonani epai na ngai ete Nefi azalaki moyekoli moko oyo amipesa na makomi. Totangi ete Nefi asepelaki na makomi, amanyolaki yango na motema na ye, mpe akomaki yango mpo na boyekoli mpe ntina ya bana na ye (tala 2 Nefi 4:15–16).

Mokambi Russell M. Nelson alobaki:

“Soki ‘tokeyi liboso mbangu, kosalaka lipati na liloba ya Klisto, mpe kotiaka molende kino na nsuka, … [biso] tokozwa bomoi ya seko’ [2 Nefi 31:20].

“Kosala lipati elimboli mingi koleka komeka. Kosala lipati elimboli kosepela. Tosepelaka na makomi na koyekolaka yango na molimo ya koyoka esengo ya kokundola mpe botosi ya bosembo. Ntango tosali lipati likolo ya maloba ya Klisto, ekangisami ‘na kati ya bitando ya nzoto ya motema’ [2 Bakolinti 3:3]. Maloba yango ekomaka eteni na kati ya bomoto na biso” (“Living by Scriptural Guidance,” Liahona, Sanza ya yambo. 2001, 21).

Makambo nini mosusu oyo tokoki kosala soki milimo na biso esepeli na makomi?

Mposa na biso ya kozala elongo na bosangani ya Yisalaele na ngambo mibale ya elamba ekomata. Yango ekozala malamu mpe lolenge ya bomoto na biso mpo na kobengisa libota mpe baninga na biso koyoka bamisionele. Tokozala babongi nie, mpe tokozwa mokanda mpo na tempelo ya ntango na ntina ya kokende na tempelo mbala mingi lokola ekoki. Tokosala mpo na koluka, kolengela, mpe kopesa bankombo ya bankoko na biso na tempelo. Tokozala sembo na kobomba mokolo ya Saba, kokota na eklezia Eyenga nyonso kobandela mayokani na biso na Nkolo ntango tozali kosangana na kolongobana mpenza na kozwaka elambo. Tokozwa mokano ya kotikala na nzela ya mayokani, na kobikaka na liloba nyonso oyo ebimaka uta na monoko ya Nzambe (tala Malongi mpe Mayokani 84:44).

Elingi koloba nini mpo na yo kosepela kati na makambo ya Nkolo?

Kosepela kati ya makomi ezali mingi koleka kozala na nzala mpe mposa ya mayi ya boyebi. Nefi amonaki esengo monene na ntango ya bomoi na ye. Nzokande, akutanaki lisusu na mikakatano mpe mawa (tala 2 Nefi 4:12–13). “Atako bongo,” ye alobaki, “Nayebi epai ya nani natie elikya” (2 Nefi 4:19). Ntango totangi makomi, tokososola malamu koleka mwango ya lobiko ya Nzambe mpe bonetoli, mpe tokolikya na bilaka Ye apesaki biso na makomi, lolenge moko na bilaka mpe mapamboli ya baprofeta ya ntango oyo.

Elilingi
Dawidi mpe Goliata

Na nsima ya nzanga moko, mwasi na ngai mpe ngai tobengisamaki na ndako ya moninga moko. Mwana na bango ya mobali ya mibu-nsambo-ya mbotama, David, atikala koyoka ata mokolo moko te lisolo ya Dawidi na Goliata na Biblia, mpe alingaki koyoka yango. Ntango nabandaki kobeta lisolo, asimbamaki na lolenge Dawidi, na bondimi na ye mpe na nkombo ya Nzambe ya Yisalaele, azokisaki mpe abomaki Mofilisitia kaka na bilingongo mpe libanga moko, kozangaka likonga na loboko na ye (tala 1 Samwele 17).

Kotalaka ngai na miso minene ya moyindo, atunaki ngai na makasi nyonso, “Nzambe azali Nani?” Nalimbolelaki ye ete Nzambe azali Tata na biso ya Lola mpe ete toyekolaka oyo etali Ye kati na makomi.

Nsima atunaki ngai, “Makomi ezali nini?” Nayebisaki ye ete makomi ezali liloba ya Nzambe mpe ete kati na yango akoki komona masolo kitoko oyo ekokoka kosunga ye koyeba Nzambe malamu koleka. Nasengaki mama na ye kosalela Biblia oyo azalaki na yango na ndako na ye mpe ete atika David kokende kolala te na kozangaka kotanga lisituale mobimba mpo na ye. Asepelaki makasi wana ezalaki ye koyoka yango. Makomi mpe boyebi na biso ezali makabo—makabo oyo biso tozwaka mbala mingi lokola ya biso. Tika biso tolinga mapamboli yango.

Ntango nazalaki kosala misio lokola elenge mobali, namonaki ete na nzela ya koteya elongo na makomi, bomoi ya bato mingi ebongwanaki. Nayaki koyeba nguya na kati na yango mpe lolenge nini ekoki kobongola bomoi na biso. Moto moko na moko oyo toteyaki nsango malamu ezongisama azalaki lolenge na ye moko mpe na bosenga ekeseni. Makomi ya bule—iyo, masakoli ekomama na baprofeta ya bule—ememaki bango na bondimi na Nkolo mpe boyamboli mpe ebongolaki mitema na bango.

Makomi etondisaki bango na esengo ntango bayambaki lifuli, botambwisi, libondisi, makasi, mpe biyano na bosenga na bango. Mingi na bango bazwaki mokano ya kosala mbongwana na kati ya bomoi na bango mpe kobanda kobomba mitindo ya Nzambe.

Nephi abengi biso kosepela na maloba ya Klisto, mpo ete maloba ya Klisto ekoyebisa bino makambo nyonso tosengeli kosala (tala 2 Nefi 32:3).

Elilingi
koyekola makomi na libota.

Nabengisi bino bozala na mwango ya ntango nyonso mpo na kotanga makomi. Yaka, Landa Ngai ezali esalelo moko monene oyo tozali na yango mpo na koteyaka mpe koyekolaka nsango malamu, kokotisaka na bozindo bobongoli na biso na Yesu Klisto, mpe kosungaka biso kokoma lokola Ye. Ntango tozali koyekola nsango malamu, tozali kaka te koluka nsango ya sika; kasi, tozali koluka kokoma “ekelamo ya sika” (2 Bakolinti 5:17).

Molimo Mosantu akambaka biso na bosolo mpe apesaka litatoli ya bosolo wana (tala Yoane 16:13). Apelisaka mayele na biso, alendisaka bososoli na biso, mpe asimbaki mitema na biso na nzela ya emoniseli ya Nzambe, liziba ya bosolo nyonso. Molimo Mosantu apetolaka mitema na biso. Afulaka kati na biso mposa ya kotambola na bosolo, mpe Alobaka na biso na mongongo ya nsé banzela ya kosala yango. “Molimo Mosantu akoteya bino makambo manso” (Yoane 14:26).

Kolobela maloba Ye abimiselaki Profeta Joseph Smith, Mobikisi na biso alobaki:

“Maloba oyo ezali ya bato te ya moto te, kasi ya ngai; …

“Ezali mongongo na ngai oyo elobi maloba oyo epayi na yo; mpo mapesami na Molimo na ngai epayi na yo … ;

“Yango wana, okoki kotatola ete oyoki mongongo na ngai, mpe oyebi maloba na ngai” (Malongi mpe Mayokani 18:34–36

Tosengeli koluka botambwisi ya Molimo Mosantu. Ntina oyo esengeli kokonza mikano na biso mpe kokamba makanisi mpe misala na biso. Tosengeli koluka nyonso oyo ekobengisaka nguya ya Molimo mpe koboya nyonso oyo ebenganaka nguya yango mosika.

Natatoli ete Yesu Klisto azali Mwana ya bolingo ya Tata na biso ya Lola. Nalingi Mobikisi na ngai. Nazali na botondi mpo na makomi na Ye mpe baprofeta na Ye ya bomoi. Mokambi Nelson azali profeta na Ye. Na nkombo na Yesu Klisto, amene.

Bimisa na lokasa