Likita Linene
Nkombo ya Eklezia Ezali ya Koyokana Te.
Likita Linene ya Sanza ya Zomi 2021


Nkombo ya Eklezia Ezali ya Koyokana Te.

Ntango tolandi na bolingi nyonso toli ya Nkolo lokola emonisami na Profeta na Ye na bomoi, mingi mingi soki ezali kokende na kotelemelaka makanisi na biso ya ebandeli, kosengaka bomikitisi mpe kobonzama, Nkolo apambolaka biso na nguya ya molimo ya kobakisa.

Liboso ya bapanzi nsango na Sanza ya mwambe 16, 2018, Mokambi Russell M. Nelson alobaki: “Nkolo alakisaki na makanisi na ngai motuya ya nkombo Ye abimisaki mpo na Eklezia na Ye, kutu Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka. 1 Tozali na mosala liboso na biso mpo tomimema na boyokani na bolingi na Ye.” 2

Nsima mikolo mibale, na Sanza ya mwambe 18, nazalaki na Mokambi Nelson na Montreal, Canada. Nsima ya likita na Palais de Congré, Mokambi Nelson ayanolaki mituna ya bapanzi nsango. Ayebaki ete “ekozala mokakatano mpo na [kozongisa nkombo ya Eklezia, mpe] kolongola ezaleli ya mibu koleka monkama.” Kasi abakisaki, “Nkombo ya Eklezia ezali ya koyokana te.” 3

Nsima bamposo nsambo, alobaki na likita linene: “Nkolo alakisaki na makanisi na ngai motuya ya nkombo Ye apesaki mpo na Eklezia na Ye, kutu Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka. … Ezalaki Mobikisi Ye moko nde alobaki, “Mpo ete yango nkombo eklezia na ngai ekobengama.’” Na nsima Mokambi Nelson azongelaki koloba, “Nkombo ya Eklezia ezali ya koyokana te.” 4

Motuna moko malamu

Motuna malamu etunamaki: Mpo na nini sikawa, ntango mingi koleka toyambaki nkombo ya “Mormon”? “Bayembi ya Tabelenakele,” mayebisi ya bavideo “Nazali Mormon,”nzembo ya Eteyelo ya Bana “Nazali Elenge Mwana Mobali Mormon”?

Malongi ya Klisto ekobongwana te mpe ezali ya seko. Nzonkande, biteni ya sikisiki mpe motuya ya mosala ya Nkolo ezali kobimisama na bantango na yango. Na ntongo ya lelo Mokambi Nelson alobaki, “Bozongisi ezali mosala ezwaka ntango, kasi likambo ya mbalakata te.” 5 Nkolo alobaki, “Biloko nyonso ekokokisama na ntango na yango elongobani.” 6 Sikawa ezali ntango na biso ya kozongisa nkombo emonisami ya Eklezia.

Bomoi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka, esengi ete tobengama na nkombo na Ye. Nazalaki kala mingi te na Kirtland, Ohio, epai wapi Profeta Joseph Smith, elongo na bandimi moke ya Eklezia, asakolaki, “Eklezia oyo ekotondisama na Nordi mpe Sudi ya Amerika—ekotondisama na mokili.” 7 Nkolo alimbolaki mosala ya eleko oyo lokola “mosala ya bokamwi mpe likamwisi.” 8 Ye alobelaki “liyokani [oyo ekoki] kokokisama na mikolo mya nsuka,” kopesaka nzela na “mokili mobimba epambolama.” 9

Maloba ya likita oyo ezali kobongolama na minoko 55 mpe koyokisama na mokili mobimba. Nsukansuka, maloba oyo ekoyokana mpe ekotangama na minoko 98 na bamboka mpe bateritware koleka 220.

Elilingi
Boyei ya Mibale

Ntango Mobikisi akozonga na nguya mpe nkembo bandimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka: bakozala kati na bato nyonso, mabota nyonso, bikolo nyonso, minoko nyonso mpe mimeseno nyonso ya mokili.

Nguya ya Bokoli ya Eklezia

Mosala ya Eklezia ya Yesu Klisto ezongisama ekozala kaka te likolo ya baoyo bazali bandimi ya Eklezia. Mpo ya misala ya lola na mikolo na biso, makomi ya bule ezongisami na mabele, mpe likabo ya nguya ya Molimo Mosantu, tokozala ndakisa lokola bozangi bondimi na Yesu Klisto oyo ekoli mpe epanzani na mokili mobomba Atako ebele bakoki kotika mokili ebungisa bondimi na Mosikoli, tokolongolama te na [bisika] na biso.” 10 Baklisto oyo bazali bandimi na biso te bakoyamba mosala na biso mpe litatoli na biso ya solo ya Klisto. Kutu Baklisto oyo bayini biso sikawa bakoyamba biso lokola baninga mokolo moko. Na mikolo ezali koya, tokobiangema na nkombo na Yesu Klisto.

Totondi bino mpo na molende na bino ya lokumu mpo ya kotombola nkombo ya solo ya Eklezia. Bambula misato eleki na likita, Mokambi Nelson asakolaki maloba oyo: “Nalaki bino ete makasi mpo na kosalela malamu nkombo ya Eklezia ya Mobikisi …ekomema na bokoli ya bondimi mpe ekokotisa nguya monene ya molimo.” 11

Elaka oyo ekokisami na balandi bamipesa kati na mokili mobimba. 12

Ndeko mobali Lauri Ahola uta na Esti ya Etazini ya Amerika alobaki ete atako bantango mosusu ayokaka nkaka mpo na koyebisa bato nkombo mobimba ya Eklezia. Kasi na ntina ya toli ya profeta, ye atiaki mbamba. Na libaku moko, akendaki kotala moninga moko na Eklezia ya boyambi mosusu. Tala maloba na ye:

Moto ayebani moko atunaki, “Ozali Mormon?”

“‘Nazali mondimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka, iyo,’ Nalobaki. Abandaki kotuna ngai mituna ebele, moko na moko ebandaki na: ‘Eklezia ya Mormon endimelaka … ?’ Ntango nyonso, Nabandaki eyano na ngai na liloba: ‘Na Eklezia ezongisama ya Klisto, tondimelaka …’

“Ntango amonaki ete nazalaki koboya nkombo ya Mormon, atunaki ngai polelepolele, Ozali Mormon te?’

“Yango wana natunaki ye soki ayebi Mormon azalaki nani—ayebaki te. Nayebisaki ye Mormon azalaki profeta … [mpe nazalaki] na lokumu ya kosangana na [ye].

“‘Kasi nakobaki, ‘Mormon akufaki te mpo na masumu na ngai. Mormon anyokwamaki te … na Getesemane to akufaki na ekulusu [mpo na ngai]. … Yesu Klisto azali Nzambe na ngai mpe Mobikisi na ngai. … Mpe nalingi koyebana na nkombo na Ye. …’

“… Nsima mwa ntango moke ya kofanda nie, [moto nayebanaki na ye aslobaki], ‘Bongo, ozali Moklisto!!’” 13

Elilingi
Mokambi Nelson na likita linene

Kundola maloba ya Mokambi Nelson? “Nalaki bino ete soki tokosala makasi mpo na kozongisa nkombo malamu ya Eklezia ya Nkolo, Ye epai Eklezia oyo ezali akosopa na nse nguya na Ye mpe mapamboli likolo ya mito ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka, na lolenge moko tomona ata mokolo moko te.” 14

Nkolo afungolaka ntango nyonso nzela

Nkolo akokisa ntango nyonso bilaka na Ye. Ntango nyonso Nkolo asalelaka biso ntango tozali kosala mosala na Ye.

Mpo mibu ebele tolikiaka kosomba bisika mpo na intelenete ya ChurchofJesusChrist.org mpe ChurchofJesusChrist.com. Ata esika moko te ezalaki ya koteka. Na bantango ya liyebisi ya Mokambi Nelson, nyonso mibale ezalaki komonana. Ezalaki likamwisi. 15

Bopusi ya Nkolo ekolisaki makasi na biso na kotala lisusu bankombo oyo ekangama na Eklezia uta kala.

Kokendeka liboso na bondimi, nkombo ya Bayembi ya Tabelenakele ya Mormon ebongwanaki na Bayembi ya Tabelenakele na Temple Square. Site Internet LDS.org, oyo eyambaki batali koleka bamilio 21 sanza moko moko, ebongwanaki na ChurchofJesusChrist.org. 16 Nkombo ya LDS Business College ebongwanaki na Ensign College. Site interneti ya Mormon.org etindamaki na ChurchofJesusChrist.org. Biloko koleka nkoto moko oyo ezalaki na nkombo ya “Mormon” to “LDS” ekangama na yango ebongwanaki. Basantu ba Mikolo mya Nsuka ya sembo babongolaki basite Interneti, podcasts mpe bankombo na bango na Twitter.

Elilingi
Elembo ya sika ya Eklezia

Tondimaki elembo ya sika oyo efandisami na Yesu Klisto.

“Na katikati ya elembo yango ezali na elembo ya ekeko ya marbre ya Thorvaldsen Christus Ezali kolimbola mosekwi, Nkolo na bomoi kotandaka maboko mpo na koyamba moto nyonso oyo akoya epai na Ye.

“Elembo elakisi, Yesu Klisto atelemi na se ya liyemi [kokundolaka] biso Mobikisi mosekwi uta na nkunda.” 17

Elilingi
Nkombo ya Eklezia na bankota
Elilingi
Nkombo ya Eklezia na bankota mosusu

Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka ebongoli elembo na nkota to minoko koleka 50. Bankombo ya sika ya bisika na Interneti ezwamaki na mokili mobimba.

Matondi na lisalisi ya basusu.

Totondi bato mingi ya malamu mpe ya boboto oyo bakumisi mposa na biso ya kobengama na nkombo na biso ya malamu. Natangaki article moko kala mingi te oyo etangaki Cardinal Katolika moko oyo aloblaki “Basantu ba Mikolo mya Nsuka.” 18 Lokola nakutanaki na mokambi moko ya sanza moko eleki na esti ya Etazini ya Amerika, alobelaki Eklezia na nkombo na yango ya ebandeli na nkombo na biso mobimba, mpe alandisaki yango na, “Eklezia ya Yesu Klisto.”

Tososolaki ete kobakisa maloba motoba na nkombo na biso ekozala malamu mingi te na bapanzi-nsango, kasi lokola Mokambi Nelson asakolaki, “Bapanzi-nsango ya solo solo bakozala motema malamu na koyanola bosenga na biso.” 19 Botondi mpo na kopesa lokumu se moko bopesaka na mangomba ya bato ya miziki to ya teatre, ya masano, ya politiki na kosalelaka nkombo na biso tolingaka.

Ekozala na moke ya bato oyo, balingi kobebisa lokumu to kokitisa mozindo ya etinda na biso, bakokoba kobenga biso “Bamormons.” Na boboto, tosengi lisusu na bapanzi-nsango na kokumisa mposa na biso ya kobengama na nkombo na biso mibu soki 200.

Mpiko ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka

Ezali na bankoto na bankoto ya bandimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka, oyo na mpiko nyonso basakolaki nkombo ya Eklezia. Lokola tokosala eteni na biso, basusu bakolanda. Nalingaka lisolo oyo ya Tahiti.

Iriura Jean elenge mwasi ya mibu zomi azwaki ekateli ya kolanda toli ya Mokambi Nelson.

“Na eteyelo na ye basololaki nsuka ya poso na bango … mpe Iriura alobelaki na ntina na … eklezia.

“Molakisi na ye ya mwasi, Vaite Pifao, alobaki, ‘Oh, boye ozali Mormon?’

“Iriura alobaki na mpiko nyonso, ‘Te …Nazali mondimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka!’

“Molakisi na ye ya mwasi ayanolaki ‘Iyo, … ozali Mormon.’

“Iriura abetaki nsete, ‘Te molakisi, Nazali mondimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka!’

“Ms. Pifao akamwaki mingi na bondimi makasi ya Iriura mpe amitunaki mpo na nini abetaki nsete na kosalelaka nkombo ya molai ya eklezia na ye. [Azwaki ekateli ya koyekola mingi koleka na ntina ya Eklezia.]

“[Nsima, ntango ndeko Mwasi] Vaite Pifao abatisamaki [alakisaki botondi] ete Iriura alandaki toli ya Mokambi Nelson.” 20

Elilingi
Ndeko mwasi oyo oyekolaki na ntina ya Eklezia na nzela ya moyekoli na ye.

“Nkombo ya Eklezia ezali ya koyokana te.” Tika tokende liboso na bondimi Ntango tolandi na bolingi nyonso toli ya Nkolo lokola emonisami na Profeta na Ye na bomoi, mingi mingi soki ezali kokende na kotelemelaka makanisi na biso ya ebandeli, kosengaka bomikitisi mpe kobonzama, Nkolo apambolaka biso na nguya ya molimo ya kobakisa mpe akotinda banzelu na Ye kosunga biso kotelema pembeni na biso. 21 Tozwi bondimami mpe Nzela na Ye.

Nazali nzeneneke na misu ya nguya ya limonisi oyo kimia likolo ya profeta na biso ya bolingo, Mokambi Russell M. Nelson. Mposa na Ye se moko ezali kosepelisa Nkolo mpe kopambola bana ya Tata na biso na Lola. Uta na boyebi na ngaimei ya bule, Natatoli na ntina ya bolingo ya Nkolo mpo na ye. Azali profeta ya Nzambe.

Natatoli ete Yesu azali Klisto, Mwana ya Nzambe. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Tala 3 Nefi 27:7–9; Doctrine et Alliances 115:4.

  2. Russell M. Nelson, na “The Name of the Church,” Newsroom, Aug. 16, 2018, newsroom.ChurchofJesusChrist.org.

  3. Mokambi Russell M. Nelson Discusses the Name of the Church,” Newsroom, Sanza ya mwambe 21, 2018, newsroom.ChurchofJesusChrist.org.

  4. Russell M. Nelson, “The Correct Name of the Church,” Liahona,, Sanza ya zomi na moko 2018, 87.

  5. Russell M. Nelson, “Tempelo mpe Moboko na Yo ya Molimo,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2021, 94.

  6. Malongi mpe Mayokani 64:32.

  7. Teachings of Presidents of the Church: Joseph Smith (2007), 137.

  8. 2 Nefi 27:26.

  9. 1 Nefi 15:18.

  10. Malongi mpe Mayokani 101:17.

  11. Russell M. Nelson, “Becoming Exemplary Latter-day Saints,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2018, 114.

  12. Tala Henry B. Eyring, “Thus Shall My Church Be Called,” Liahona, Sanza ya zomi 2021, 6–9.

  13. Lauri Ahola, “Using the Full Name of the Church Was Awkward but Worth It,” Liahona, Sanza ya minei 2020, ChurchofJesusChrist.org.

  14. Russell M. Nelson, “Nkombo Ebongi ya Eklezia,” 89.

  15. Makomi na lotomo ya Eklezia lokola biloko ya makoki ekambami na esika ya interneti to domain ya ChurchofJesusChrist.org kobanda 2006, mpe ezalaki komonana te. Ekomaki komonana ete epesamaki lmpo na kotekama pene na ntango se moko ya liyebisi ya Mokambi Nelson, mpe Eklezia esombaki nkombo ya domain yango na mwa ntalo moko ya moke.

    Na lolenge se moko, Eklezia ebandaki kokamba ezalela mpe komonana ya nkombo ya domaineChurchofJesusChrist.com kobanda 2011. Likambo ya kokamwa yango mpe ekomaki komonana na sanza ya Mwambe 2018 mpe esombamaki mpe.

  16. Na likita linenesanza ya zomi 2028, Mokambi Nelson alobaki:

    “Bandeko mibali mpe basi, ezali na maloba ebele ya mokili mpenza kotelemela bozongisi ya nkombo ebongi ya Eklezia. Mpo na mokili ya digital oyo tozali kobika mpe na esaleli ya noki noki ya boluki oyo ezali kosunga banso kati na biso kozua nsango tosengeli na yango pene na lombango mpenza—sangisa nsango etali Eklezia ya Nkolo—batongi balobi ete kobongisa ya ntango oyo ezali bozangi buanya. …

    “… Nalaki bino ete soki tokosala makasi mpo na kozongisa nkombo malamu ya Eklezia ya Nkolo, Ye epai Eklezia oyo ezali akosopa na nse nguya na Ye mpe mapamboli likolo ya mito ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka” (”The Correct Name of the Church,” 88, 89).

    Kobanda bobongoli ya LDS.org na ChurchofJesusChrist.org, likoki ya domaine (makoki mpenguya ya site interneti ya kozwa esika na moteur ya recherche) ezali makasi mingi koleka ntango ezalaki liboso. Ndakisa, lokaa ya boyambi ya ChurchofJesusChrist.org,ezali sikawa, mpe ezalaki mpo mobu moko kolreka, oyo emonanaka na esika ya liboso na boluki ya Google na Etazini ntango moto azali koluka liloba “eklezia,” wapi liboso bokeseni oyo ekokaki ksengisama te.

  17. Russell M. Nelson, “Kofungola Lola mpo na Lisalisi,” Liahona, Sanza ya mitano 2020, 73.

  18. Tala “‘If we can’t get along, it’s downright sinful’: The partnership between Catholics and Latter-day Saints,” Deseret News, Sanza ya nsambo 1, 2021, deseret.com

  19. Russell M. Nelson, “Nkombo Ebongi ya Eklezia,” 89.

  20. The Correct Name of the Church: A Tahitian Story,” Pacific Newsroom, Sept. 15, 2019, news-nz.ChurchofJesusChrist.org.

  21. Tala Doctrine et Alliances 84:88.

Bimisa na lokasa