Likita Linene
Kozala Molandi ya Klisto
Likita Linene ya Sanza ya Zomi 2021


Kozala Molandi ya Klisto

Kozala Molandi ya Klisto ezali kobunda mpo na kokokanisa misala, etamboli, mpe bomoi na biso,na oyo ya Mobikisi.

Na boyekoli ya ngai moko ya makomi, natutisamaki na lisolo ya Saulo ya Tarsus, oyo nsima akomaki Paulo, lokola elimbolami na Bibilia.

Paulo azalaki kosala mpo na konyokola Eklezia mpe Baklisto. Kasi mpo na nguya ya lola mpe Bomikabi ya Yesu Klisto, ye abongwanaki mobimba, mpe akomaki moko ya basali banene ya Nzambe. Ndakisa na ye ya bomoi ezalaki Mobikisi Yesu Klisto.

Na liteya moko ya Paulo na Bakolinti, abiangaki bango bazala balandi na ye lokola yemei azalaki molandi ya Klisto (tala 1 Bakolinti 11:1). Oyo ezali libiangi ya sembo mpe ya malonga uta na ntango ya Paulo kino lelo: kozala molandi ya Klisto.

Nabandaki kokanisa na ntina ya oyo elingi koloba kokoma molandi ya Klisto. Mpe motuya koleka, nabandaki kotuna, “Na nzela nini esengeli ngai komekola Ye?”

Kozala Molandi ya Klisto ezali kobunda mpo na kokokanisa misala, etamboli, mpe bomoi na biso,na oyo ya Mobikisi. Ezali mpo na kozwa bizaleli malamu. Ezali kozala moyekoli ya solo ya Yesu Klisto.

Nayekolaki makambo mosusu ya bomoi ya Mobikisi, mpe nakangaki, lokola eteni ya nsango na nga ya lelo, bizaleli na Ye minei oyo namekaka komekola mpe oyo nakaboli na bino.

Ezalela ya yambo ya Mobikisi ezali bomikitisi. Yesu Klisto azalaki komikitisa makasi na bomoi yambo ya mbotama. Na Lisanga na Lola, Andimaki mpe apesaki nzela na bolingi ya Nzambe eleka ntina na mwango ya lobiko ya bato nyonso. Ye alobaki, “ Tata, bolingi na yo esalama, mpe nkembo ezala ya yo mpo na seko” (Mose 4:2).

Toyebi ete Yesu Klisto ateyaki bomikitisi mpe amikitisaki Yemei mpo na kokumisa Tata na Ye.

Tika biso tobika kati na bomikitisi mpamba te ememaka kimia (tala Malongi mpe Mayokani 19:23). Bomikitisi eyaka liboso ya nkembo, mpe ememaka ngolu ya Nzambe likolo na biso.“Iyo, bino banso bomisokema moko na mosusu, mpe bomikangela lokola elamba na bomikitisi: mpo ete Nzambe atelemelaka bato na lofundu, mpe apesaka ngolu na basokemi” (1 Petelo 5:5). Bomikitisi ememaka biyano ya boboto. Ezali liziba ya ezaleli ya bosembo.

Mpaka Dale G. Renlund ateyaki:

“Bato batambolaka na bomikitisi liboso ya Nzambe bakanisaka maye Tata ya Lola mpe Yesu Klisto basala mpo na bango.”

“Tosalaka na alima epai na Nzambe na kotambolaka na bomikitisi elongo na Ye” (“Do Justly, Love Mercy, and Walk Humbly with God,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2020, 111, 109).

Ezaleli ya mibale ya Mobikisi ezali mpiko. Ntango nakanisaka Yesu Klisto na mibu 12 avandi na tempelo ya Nzambe kati na banganga mibeko mpe koteyaka bango makambo ya bonzambe, Namoni ete Ye azalaka, na ntongo ya bomoi na Ye, liyoki ya malamu ya mpiko, mpiko ya ndenge wana. Ntango mingi bazalaki kozela ete elenge mobali ateyama na banganga mibeko, Ye azalaki koteya bango lokola bazalaki koyoka ye, mpe kotuna ye mituna” (Joseph Smith Translation, Luka 2:46kati [na Luka 2:46, nkoma na nse ya lokasa c]).

Tosalaki misio ya ntango mobimba na Democratic Republic of the Congo Mbuji-Mayi uta 2016 ti 2019 Nzela ya kosala mobembo na misio uta etuka moko na mosusu ezalaka na nzela ya mabele. Likambo moko ebimaki na etuka wana bamiyibi na bambeli babandaki kobima na nzela mpe kobebisa kimia ya basali mobembo.

Bamisionele mitano bazalaki kosala mobembo uta etuka moko na mosusu na ntango ya mitasio bakweyaki na mobulu wana. Kokweyaka na likama wana bisomei mbala mosusu na liboso, tokomaki kobanga mpo na bomoi mpe bokengi ya biso nyonso, ata kosala mobembo na nzela wana mpo na kokende kotala bamisionele mpe kosala makita ya etuka. Toyebaki te ngonga nini yango elingaki kozwa. Nakomaki nsango, oyo natindelaki bokambi ya etuka enene, nalobekaki mayoki na biso ya bobangi mpo na kokoba kosala mobembo ntango nzela ya mabele ezalaki se nzela moko mpo na kokomela bamisionele.

Na eyano, Mpaka Kevin Hamilton, oyo azalaki mokambi ya Etuka Enene ya Afrika ya Sudi-esti, akomelaki ngai:“Toli na ngai ezali ya kosala malamu koleka oyo okoki. Zala na bwanya mpe sambela. Bomitia te na boyebi nyonso bino moko to bamisionele na bino na nzela ya likama. Kasi na ngonga moko bokoba na kondima. “Mpo Nzambe apesi biso molimo ya kobanga te, kasi ya nguya, mpe bolingo, mpe ya molimo ya pole’ (2 Timothy 1:7).”

Lilendisi oyo ekembisaki biso mpe epesi biso nzela ya kokoba kosala mobembo mpe koyika mpiko tii na suka ya misio na biso, mpamba te toyokaki bokambi uta na Tata na biso ya Lola na nzela ya makomi oyo wana.

Na makomi ya mikolo oyo, totangi maloba efulisami ya Profeta Joseph Smith oyo ezali kolakisa lilendisi ya Nkolo epai na biso: “Bandeko mibali, tokokoba te na mosala oyo ya monene? Bokende liboso mpe bozonga nsima te. Boyika mpiko, bandeko mibali, mpe bokoba, bokoba tii na elonga! Malongi mpe Mayokani 128:22).

Tika tozala na mpiko ya kosala oyo ezali sembo ata ntango ezali kosepelisa bato te—mpiko ya kobundela kondima na biso mpe kosala na kondima. Tika tozala na mpiko ya koyambola mikolo na mikolo, mpiko ya kondimela bolingi mpe kotosa mibeko na Ye. Tika tozala na mpiko ya kobika na sembo mpe kosala oyo esengeli na biso kati na mikumba mpe misala na biso ya ndenge na ndenge.

Ezalela ya misato ya Mobikisi ezali bolimbisi. Na ntango ya mosala na Ye ya kufa, Mobikisi abikisaki mwasi moko oyo azwamaki na ekobo kobambama mabanga. Asengaki ye ete “kende, mpe kosumuka lisusu te” (Yoane 8:11). Yango etindaki ye na boyamboli mpe na mbala mosusu na bolimbisi, mpo ndenge makomi elobi, “mwasi oyo akumisaki Nzambe uta ngonga wana, mpe andimelaki nkombo na ye” (Joseph Smith Translation, Yoane 8:11, [na Yoane 8:11, litangi na nse ya lokasa c]).

Ntango ya mayangani ya milulu ya mbotama ya Yesu na Sanza ya zomi na mibale 2018, molingami Mokambi Russell M. Nelson alobaki na ntina ya makabo minei tozwi uta na Mobikisi Alobaki ete likabo moko Mobikisi apesa ezali makoki ya kolimbisa:

“Na nzela ya Bomikabi na Ye ezanga nsuka, bokoki kolimbisa baoyo batutisi bino libaku mpe baoyo bandimi ata mokolo moko te mabe na bango epayi na bino.

“Ezalaka kaka pete mpo na kolimbisa oyo na solo mpe komikitisa asengi bolimbisi na bino. Kasi Mobikisi akopesa bino makoki ya kolimbisa oyo nyonso akonyokola bino na bandenge nyonso” (“Four Gifts That Jesus Christ Offers to You” [First Presidency Christmas devotional, Dec. 2, 2018], broadcasts.ChurchofJesusChrist.org).

Tika na motema mobimba tolimbisana moko mosusu mpo na kozwa bolimbisi ya Tata. Bolimbisi ekomisaka biso nsomi mpe ekomisaka biso peto mpo na kolia elambo Eyenga nyonso. Bolimbisi esengami na biso mpo na kozala solo bayekoli ya Yesu Klisto.

Ezalela ya minei ya Mobikisi ezali komibonza Ezali eteni ya nsango malamu ya Yesu Klisto. Mobikisi apesaki libonza eleki monene ya bomoi na Ye mpo na biso na ntina ete biso tosikolama. Koyoka mpasi ya libonza; Asengaki Tata na Ye alongola kopo wana mosika, kasi Akendaki ti na nsuka ya libonza ya libela. Oyo ezali Bomikabi ya Yesu Klisto.

Mokambi M. Russell Ballard atangisaki boye: “Libonza ezali [na] ndakisa ya bolingo ya peto. Ndelo ya bolingo na biso mpo na Nkolo, mpo na nsango malamu, mpe mpo na bondeko ekoki komekana na nini tolingi kobonza mpo na bango” (“The Blessings of Sacrifice,” Ensign, Sanza ya mitano 1992, 76).

Tokoki kobonza ntango na biso mpo na service pastoral, kosala basusu, kosala malamu, kosala mosala ya lisolo ya libota, mpe kokumisa libiangi na biso na Eklezia.

Tokoki kopesa misolo na biso na kofutaka moko na zomi, mabonza ya kokila, mpe mabonza masusu mpo na kotonga bokonzi ya Nzambe na mabele. Tosengelli komibonza mpo na kobatela mayokani tosali na Mobikisi.Tosengeli na libonza mpo na kobatela mayokani tosalaki na Mobikisi mpo ete Ye akondima biso.

Libondeli na ngai ezali ete na kolandaka Yesu Klisto mpe koyema likolo ya mapamboli ya bomikabi na Ye, tokokoma mingi mingi ya komikitisa, tozali na mpiko mingi, tokolimbisa mingi mingi, mpe tokobonza mingi mpo na bokonzi na Ye.

Natatoli ete Tata na biso ya Lola azali na bomoi mpe Ayebi biso nyonso moko na moko, ete Yesu azali Klisto, ete Mokambi Russell M. Nelson azali profeta ya Nzambe lelo. Natatoli ete Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba mikolo mya Nsuka ezali lingomba se moko na mabele oyo ezali na likoki oyo ewuta na Nzambe. Na nkombo na Yesu Klisto, Mobikisi na biso, amene.

Bimisa na lokasa