Likita Linene
“Olingaka Ngai Koleka Baoyo?”
Likita Linene ya Sanza ya Zomi 2021


“Olingaka Ngai Koleka Baoyo?”

Makambo nini okoki kosala na bomoi na yo moko mpo na kolakisa ete olingaka Nkolo yambo.

Na sanza ya zomi na moko 2019, moninga na ngai mpe ngai tokendaki kotala Mabele Masantu. Ntango tozalaki kuna, totalaki mpe toyekolaki makomi na ntina ya bomoi ya Yesu Klisto. Na ntongo moko, totelemaki na libongo nordi wesiti ya Mbu ya Galilea na esika oyo ekoki kozala wapi Yesu akutanaki na bayekoli na Ye nsima ya Lisekwa na Ye.

Nsima ya Lisekwa ya Yesu, lokola totangi na kati ya Yoane mokapo 21, Petelo mpe bayekoli mosusu balobaki mbisi na butu mobimba kasi bazwaki eloko te. 1 Na ntongo, bamonaki moto moko atelemi na pene oyo ayebisaki bango babwaka minyama na bango na ngambo mosusu ya bwatu. Na kokamwa na bango, minyama etondaki na lolenge ya kokamwa. 2

Mbala moko bayebaki ete moto yango ezalaki Nkolo, mpe bakendaki mbango kopesa Ye mbote.

Na ntango bazalaki koluka kobimisa minyama mpembeni, etundisama na mbisi, Yesu alobaki, “Boya mpe bolia.” 3 Yoane alobi ete “ntango baliaki, Yesu alobaki na na Simon Petelo, Simon, mwana ya Yonasi, olingaka ngai koleka baoyo?” 4

Ntango natelemaki na pene ya esika yango, namonaki ete motuna ya Mobikisi ezalaki moko ya mituna ya ntina oyo akotuna ngai mokolo moko. Nakokaki koyoka mongongo na Ye kotunaka, “Russell, olingaka ngai koleka baoyo?”

Omituni nini Yesu azalaki koloba ntango Atunaki Petelo, “Olingaka ngai koleka baoyo?”

Kosalelaka motuna oyo mpo na biso moko na mikolo na biso, Nkolo akoki kotuna biso na ntina ya lolenge tozali na mikumba ebele mpe lolenge nini banguya ya malamu mpe mabe esalemaka na makanisi na biso mpe ntango na biso. Akoki kotuna moko na moko kati na biso soki tolingaka Ye koleka makambo ya mokili oyo. Yango ekoki kozala motuna ya nini ezalaka motuya na bomoi na biso, nani tolandaka, mpe lolenge nini tozwaka bozalani na biso na bandeko ya libota mpe bato ya pembeni. To ntango mosusu akotuna nini ememelaka biso esengo mpe bosepeli.

Kosala makambo ya mokili oyo ememelaka biso esengo, bosepeli, mpe kimia oyo Mobikisi apesaki na bayekoli na Ye mpe oyo apesaka biso? Bobele Ye nde akoki komemela biso esengo ya solo, bosepeli mpe kimia na nzela ya kolinga Ye mpe kolanda mateya na Ye.

Lolenge nini nakoki koyanola motuna “Olingaka ngai koleka baoyo?”

Ntango tozwi ndimbola mobimba ya motuna oyo, tokoki kokoma bandeko malamu ya libota, bato ya pembeni, bato, bandeko ya Eklezia mpe bana mibali mpe bana basi ya Nzambe.

Na mibu na ngai, nakenda na matanga mingi. Nandimi ete mingi kati na bino bamonaka oyo namonaka. Na ntango ya molulu ya kokundola bomoi ya ndeko moko ya libota akufa to moninga, esalemaka mpamba mpamba te omona molobeli abeta lisolo ya motango ya bandako, motango ya mituka to mbongo ya banke ya ndeko. Balobelaka mpenza mingi te biloko ya media social . Na bamatanga mingi koleka oyo ngai nakenda, balobelaka mingi mokangano ya ndeko, mosala epai ya basusu mpe bolingo na bango mpo na Yesu Klisto.

Bozwa ngai mabe te. Nazoloba te ete kozala na ndako kitoko to motuka kitoko ezali mabe to kosalela media social ezali mabe. Oyo ngai nazali koloba ezali kaka ete na nsuka, biloko nyonso ezali na ntina moke koleka kolinga Mobikisi.

Ntango tolingi mpe tolandi Ye, tozali na bondimi epai na Ye. Toyamboli. Tolandi ndakisa na Ye mpe tobatisami mpe tozwi Molimo Mosantu. Toyiki mpiko kino na nsuka mpe totikali na nzela ya liyokani. Tolimbisi bandeko ya libota mpe bazalani na kotikaka bobendani oyo tokoki kozala na yango. Toluki kobatela mitindo ya Nzambe. Toluki kozala na botosi. Tosali mpe tobateli mayokani. Totosi batata na biso mpe bamama. Totie mpembeni banguya mabe ya mokili. Tomilengeli mpo na Boyei ya Mibale.

Na kati ya “Klisto na Bomoi: Litatoli ya Bapostolo,” ekomami: “[Yesu] akozonga mokolo moko na mabele. … Akoyangela lokola Mokonzi ya Bakonzi mpe akokonza lokola Nkolo ya Bankolo, mpe mabolongo nyonso ekofukama mpe monoko nyonso ekoloba na bokumbameli liboso na Ye. Banso kati na biso tokotelema mpo na kosambisama epai na Ye engebene na misala mpe bamposa ya mitema na biso.” 5

Lokola moko ya Bapostolo oyo batiaki mokoloto na mokanda “Klisto na Bomoi ”, nakoki koloba ete koyebaka ete Yesu “azali mwinda, bomoi, mpe elikya ya mokili” 6 epesaka ngai mposa makasi ya kolinga Ye koleka mikolo nyonso.

Natatoli ete Tata na Lola mpe Yesu Klisto bazali na bomoi. Natatoli ete Balingaka biso. Makomi eteyi ete “Nzambe alingaki mokili mingi, nde atindaki Mwana na ye ya bolingo, mpo ete oyo nyonso akondimela ye abunga te, kasi azwa bomoi ya seko.” 7 Makomi eteyi lisusu ete Yesu “alingaki mokili mingi yango wana apesaki bomoi na ye moko, mpo ete baoyo nyonso bakondimela ye bakoka kokoma bana ya Nzambe.” 8

Tata na Lola alingaki biso mingi nde Alengelaki mwango na Ye ya lobiko elongo na Mobikisi lokola elembo ya motuya. Mpe Yesu alingaki biso mingi nde na kati ya Lisanga monene ya Lola, ntango Tala ya Lola atunaki, “Nakotinda nani?” Yesu, oyo azalaki mobotami ya yambo kati na bana nyonso ya molimo ya Tata, ayanolaki, “Ngai oyo, tinda ngai.” 9 Alobaki epai ya Tata, “Tata, tika mokano na yo esalema bongo, mpe nkembo ezala yay o mpo na libela.” 10 Yesu na bolingi nyonso mpo na kozala Mobikisi na biso mpe Mosikolo nde tokokoma lokola Bango mpe kozonga liboso na bango.

Makomi mibale oyo etei lisusu été mpo na kozonga liboso na Bango tosengeli kondimela. Tosengeli kondimela Yesu mpe mwango ya Nzambe ya esengo. Mpo na kondimela esengeli bolingo mpe kolanda Mobikisi na biso mpe kobatela mitindo, atako na kati kati ya mikakatano mpe boswani.

Mokili ya lelo ezali kotepetepa. Ezali na makambo mayokisaka motema mpasi, bozangi boyokani, mawa mpe kubungisa makanisi mpamba.

Mokambi Dallin H. Oaks, alobaki na 2017, alobelaki maye elandi: “Oyo ezali bantango mimekano, etondisama na mitungisi minene: bitumba mpe nungunungu ya bitumba, babokono ya maladi ya kokabolana, bokauki, botomboki ya mai mpe bopeli ya moto na mokili.” 11

Tokoki te kobungisa bolingo mpe elikya na biso epai ya Yesu, atako tozali kokutana na mimekano minene. Tata na Lola mpe Yesu bakobosana biso te. Balingaka biso.

Na Sanza ya zomi eleki, Mokambi Russell M. Nelson ateyaki biso ntina ya kotia liboso Tata na Lola mpe Yesu Klisto na bomoi na biso. Mokambi Nelson ateyaki biso ete moko ya ndimbola ya liloba Yisalaele ezali “kotika Nzambe akonza.” 12

Atunaki moko na moko kati na biso mituna miye: “Ozali na na bolingi ya kotika Nzambe azala na nguya makasi na bomoi na yo? Ozali na bolingi kotika Nzambe azala ndakisa ya ntina koleka na kati ya bomoi na yo? Okopesa ndingisa na maloba na Ye, mitindo na Ye mpe mayokani na Ye epesa nguya na oyo ozali kosala mikolo nyonso? Okopesa ndingisa ete mongongo na Ye elonga koleka mosusu? Ozali na bolingi ya kotika oyo nyonso Ye azali kolinga yo osala yambo koleka makambo mosusu? Ozali naEzali bolingi ya kotika bolingi na yo emelama kati ya bolingi oyo ya Ye?” 13

Tosengeli komikundola ete esengo na biso ya solo ezali engebene na bozalani na biso na Nzambe, na Yesu Klisto, mpe na basusu.

Lolenge moko ya kolakisa bolingo na biso ezali ya kosangisa libota, baninga mpe bazalani na kosalaka makambo ya mike mpo na kosungana malamu. Kosala makambo oyo etiaka mokili oyo ezala esika malamu koleka.

Makambo nini okoki kosala na bomoi na yo moko mpo na kolakisa ete olingaka Nkolo na yambo.

Ntango totie makanisi na biso na kolingaka bazalani na biso lokola Alingaka bango, tobandi kolinga solo baoyo bazali nzinga nzinga na biso. 14

Natuni lisusu, lolenge nini okoki koyanola na motuna ya Mobikisi “Olingaka ngai koleka baoyo?”

Ntango obanzi motuna oyo natuni, nasambeli ete okoki koyanola lokola Petelo uta kala, “Iyo, Nkolo; oyebi ete nalingaka yo,” 15 mpe nsima lakisa yango na kolakisaka bolingo mpe kosalisaka Nzambe mpe baoyo bazali nzinganzinga na yo.

Natatoli ete topambolami mpo na kozala na nsango malamu ya Yesu Klisto mpo na kokamba biso na lolenge tobikaka mpe tosalelaka moko mpe mosusu. Kati na Ye, tomonaka ete molimo moko na moko esali ntina koleka na miso na Ye

Natatoli ete Yesu Klisto azali Mobikisi molingani na biso. Azali mwana Bobele se Moko ya Nzambe. Mpe napesi litatoli na Ye na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Bimisa na lokasa