Likita Linene
Bolongobani Ezali Bobongi Nie Te
Likita Linene ya Sanza ya Zomi 2021


Bolongobani Ezali Bobongi Nie Te

Ntango omoni lokola ete osili kokweya mbala mingi mpenza mpo na kokoba komeka, mikundola Bomikabi ya Klisto mpe ngolu yango ekokaka kokokisa ezali solo.

Kala natindelaki mwana na ngai ya mwasi mpe molongani na ye liloba na telefone. Nalobaki, “Mbote, bino mibale. Nalingaka bino solo.” Bayambaki yango, “Nayina bino mibale. Nasengeli kolinga bino.” Ezali bongo kokamwa te lolenge nini ya pete nsango malamu mpe ya likanisi malamu ekoki kososolama mabe? Oyo ezali maye ntango mosusu esalamaka na bansango ya Nzambe ya boyamboli mpe bolongobani.

Basusu bazwaka nsango na libunga ete boyamboli mpe mbongwana ezali na ntina te. Liloba ya Nzambe elobi yango ezali na ntina. 1 Kasi Nzambe alingaka biso ata na bambeba na biso? Ya solo! Ye alingaka biso malamu mpenza. Nalingaka bankoko na ngai, ata na bambeba na bango nyonso, kasi yango elingi koloba te ete nalingi bango babongwana te mpe bakoma bato oyo bango basengeli kokoma. Nzambe alingaka biso lolenge tozali, kasi alinagaka biso mingi mpenza ete akoki te kotika biso lolenge wana. 2 Kokola kati na Nkolo yango nde ntina ya bokufi. 3 Mbongwanaezali ntina ya Bomikabi ya Klisto. Klisto akoki kaka te kosekwisa, kopetola, kolendisa mpe kokangola biso, kasi na nzela na yango nyonso, Akoki kobongola biso tokoma mingi lokola Ye. 4

Basusu bazwaka nsango na libunga ete boyamboli ezali likambo ya mbala moko. Liloba ya Nzambe ezali ete, lokola Mokambi Russell M. Nelson ateyaki, “Boyamboli … ezali mosala ya ntango molai.” 5 Boyamboli ekoki kozwa ntango mpe kosenga bokasi ya kozongela lisusu, 6 mpo na kotika lisumu 7 mpe kozala “lisusu te na ndingisa ya kosala mabe ata moke, kasi kokoba kosala bolamu” 8 yango ezali boluki ya bomoi mobimba. 9

Bomoi ezali lokola mobembo ya bokatisi nzela ya mboka. Tokoki te kokoma esika tozali kokende bobele na ebombelo moko ya esanse. Tosengeli kotondisa ebombelo na biso meke mbala na mbala. Kozwaka elambo ezali lokola kokota na esika bakotekaka esanse. Ntango toyambolaka mpe tokomisaka sika mayokani na biso, tolakaka bolingi na biso ya kobatela mitindo, mpe Nzambe mpe Klisto bapambolaka biso na Molimo Mosantu. 10 Na bokuse, tolakaka kokende liboso na mobembo na biso, mpe Nzambe mpe Klisto balakaka kotondisa lisusu ebembelo.

Basusu bazwaka nsango na libunga ete bazali ya kolongobana te mpo na kosalela nsango malamu mobimba mpo ete naino batiki mimesano nyonso ya mabe te. Liloba ya Nzambe ezali ete bolongobani ezali bobongi nie te. 11 Bolongobani ezali kozala sembo mpe komeka. Tosengeli kozala sembo na Nzambe, bakambi ya bonganganzambe, mpe basusu oyo balingaka biso, 12 mpe tosengeli kosala makasi mpo na kobatela mitindo ya Nzambe mpe kotika ata moke te atako tosielumuki. 13 Mpaka Bruce C. Hafen alobaki ete kotombola ezalela ya Klisto “esengaka molende mpe mpiko koleka lolenge esengaka bobongi nie.” 14 Nkolo alobaki makabo ya Molimo Mosantu “epesami mpo na litomba ya baye balingaka ngai mpe babatelaka mitindo na ngai nyonso, mpe mpo na oyo alukaka kosala bongo.” 15

Elenge mobali moko oyo nakobenga Damon akomaki: “Ntango nazalaki kokola namitungisaki na pornografi. Nazalaki ntango nyonso na nsoni ete nakokaki te kosala makambu ya malamu.” Ntango nyonso oyo Damon azalaki kosielumuka, mpasi ya ya motema ezalaki komata, azalaki komimona ya kolongobana te na ngolu nyonso, bolimbisi, to mabaku malamu misusu kouta na Nzambe. Alobaki: “Nazwaki mokano ete nasengelaki koyoka mpasi ntango nyonso. Namonaki lokola Nzambe ayinaki ngai mpo ete nazalaki te na bolingi ya kosala makasi mpe kolonga yango mbala moko. Nazalaki na makoki ya kotelemela na poso moko mpe ntango mosusu na sanza moko, kasi nsima nakwei lisusu mpe nakanisi, ‘Nakotikala kozala malamu te, na yango ntina ya komekaka ezali nini?’”

Na ngonga moko ya bolembu Damon ayebisaki mokambi na ye ya bonganganzambe: “Ntango mosussu nasengeli kotika koya eklezia. Nalembi kozala moto ya lokuta.”

Mokambi na ye ayanolak: “Ozali moto ya lokuta te mpo ozali na ezaleli mabe oyo ozali komeka kotika. Okozala moto ya lokuta soki ozali kobomba yango, kokosa na ntina na yango, to komeka komindimisa ete Eklezia ezali na mikakatano mpo na kobatela mibeko ya makasi. Kozala sembo na misala na yo mpe kozwa mokano ya kokoba liboso ezali kozala moto ya lokuta te. Ezali kozala moyekoli.” 16 Mokambi oyo atangaki Mpaka Richard G. Scott, oyo ateyaki, “Nkolo Nzambe amonaka babotau lolenge mosusu koleka lolenge Amonaka botomboki. … Ntango Nkolo alobelaka babotau, ezalaka ntango nyonso na mawa.” 17

Bomoni wana epesaki Damon elikya. Amonaki ete Nzambe azalaki wana te kolobaka, “Damon akweyaki lisusu.” Na esika na yango, Azalaki pene ya koloba, “Tala mosika nini Damon awutaki.” Elenge mobali oyo na nsuka atikaki kotala na nse na nsoni to kobalusaka elongi mpo na kosenga bolimbisi mpe kolukaka maloba ya koloba. Alukaki lisungi kowuta na Nzambe mpe azwaki yango. 18

Damon alobaki, “Ntango se moko na kala natalelaki epayi ya Nzambe ezalaki mpo na kosenga bolimbisi, kasi sikawa nazali lisusu kosenga ngolu—ya Ye ‘nguya na ya likoki’ [Bible Dictionary, “Grace”]. Natikala kosala yango naino te liboso. Mikolo oyo nalekisaka ntango moke ya komiyinaka mpo na oyo nasalaki mpe ntango ebele kolingaka Yesu mpo na oyo Asalaki epai na ngai.”

Kotalaka ntango molai oyo Damon amitungisaki, ezalaki bozangi lisungi mpe koyeba epai ya baboti mpe bakambi mpo na kosunga ye koloba “kosala lisusu te” na lombango to lna pamba kotia mobeko songolo ya komibatela mpo na komimona ya “kolongobana.” .” Na esika na yango, babandaki na mwa, mikano mikoki kokokisama. Balongolaki makanisi ya ekosimba to te mpe batalelaki mingi mingi bokobi ya bokoli, yango epesaki Damon nzela ya kotonga molongo ya baelonga ya solo na esika ya bokweyi. 19 Ye, lokola baumbu ya bato ya Lemhi, ayekolaki ete akokaki “kobongwama malembe malembe.” 20

Mpaka D. Todd Christofferson apesaki toli: “Mpo na kobunda na makambo minene [mpenza], tokoki kobanda kosalela yango uta na moke, mokolo na mokolo. … Kokotisaka bizaleli ya sika mpe ya peto na kati ya ezalela na biso to kolongaka bizaleli mabe to bokakemi ya ntango inso elingi koloba kosala makasi lelo elandisami na lobi mpe nsima mosusu, ntango mosusu mpo na mikolo ebele, kutu basanza mpe mibu. … Kasi tokoki kosala yango mpo tokoki kosenga epai ya Nzambe … mpo na lisungi eye tosengeli mikolo nyonso.” 21

Sikawa, bandeko mibali mpe basi, bokono ya COVID-19 ezali pete te mpo na biso banso, kasi kozala yo moko mpe mibeko ya konfinema ekomisi bomoi mpasi mpenza mpo na baoyo bamitungisaka na mimesano ya mabe. Mikundola mbongwana ekoki kosalema, boyamboli esalemaka malembe malembe, mpe bolongobani ezali bobongi nie te. Ya motuya koleka nyonsp, mikundola ete Nzambe mpe Klisto bazali na bolingi ya kosunga biso awa mpe sikawa. 22

Basusu bazwaka nsango na libunga ete Nzambe azali kozela kosunga kino nsima ya boyamboli na biso. Liloba ya Nzambe ezali ete Ye akosunga biso ntango toyamboli. Ngolu na Ye ezali mpo ya biso “kotala te esika tozwami na nzela ya botosi.” 23 Mpaka Dieter F. Uchtdorf alobaki: “Nzambe alukaka te bato oyo bazangi mbeba. Alukaka baoyo bakobonzela mitema na bango mpe makanisi ya bolingi’ [Doctrine and Covenants 64:34], mpe Akokomisa bango babongi nie kati na Klisto’ [Moroni 10:32–33].” 24

Bato ebele mpenza bayokisami mpasi na mabota ekabwana mpe etukama ete ezali mpasi mpo na bango bandimela mawa mpe ngolu ya Nzambe. Babundaka mpo na komona Nzambe lokola Ye azali—Tata ya bolingo oyo asalisaka biso na bamposa na biso 25 mpe ayebi lolenge nini “kopesa biloko malamu epai na bango oyo basengaka Ye.” 26 Ngolu na Ye ezali te bobele motuya epai ya balongobani. Ezali “lisungi ya Nzambe” Ye apesaka biso lisungi wana mpo tokoma ya kolongobana. Ezali bobele lifuti mpo na bayengebene te. Ezali “dotasio ya bokasi” Ye apesaka lisungi oyo esungaka biso tokoma bayengebene. 27 Tozali bobele kokende epai ya Nzambe mpe Klisto te. Tozali kotambola na Bango. 28

Na Eklezia mobimba, bilenge basakolaka Maloba ya Bilenge Basi mpe ya Lisanga likoki ya Bonganganzambe ya Alona. Na Nouvelle Zealande na Espagne na Ethiopie na Japon, bilenge basi balobaka, “Nalingaka likabo ya boyamboli.” Na Chili na Guatemala na Moroni, Utah, Bilenge mibali balobaka, “Ntango nazali koluka kosalisa, kosalela bondimi, koyambola mpe kobongwama mikolo nyonso, nakozala na ndingisa ya kozwa mapamboli ya tempelo mpe esengo ya ntango molayi ya nsango malamu.”

Nalaki ete mapamboli mpe bosepeli oyo ezali solo mpe epai ya baoyo babatelaka mitindo nyonso mpe “ye oyo akoluka kosala bongo” 29 Ntango oyoki lokola okweyi mbala mingi mpo na kokoba komeka, mikundola Bomikabi ya Klisto mpe ngolu yango esalaka ete ekoka kosalema mpe ekoma solo. 30 “[Ya Ye] loboko ya mawa esembolami epai na yo.” 31 Bolingami—lelo, na mibu 20, mpe libela. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Bimisa na lokasa