Yaka, Landa Ngai 2024
Sanza ya mwambe 19–25: “Babatelamaki na Nguya na Ye ya Kokamwa.” Alma 53–63


Sanza ya mwambe 19–25: ‘Babatelamaki na Nguya na Ye ya Kokamwa.’ Alma 53–63,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe na Eklezia: Buku ya Mormon 2024 (2023)

“Sanza ya mwambe 19–25. Alma 53–63,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe na Eklezia: 2024 (2023)

Elilingi
bilenge bilombe nkoto mibale

Bilenge Bilombe Nkoto Mibale, na Arnold Friberg

Sanza ya mwambe 19–25: “Babatelamaki na Nguya na Ye ya Kokamwa”

Alma 53–63

Ntango bakokanisi mapinga ya Balamani, na “lipinga moke ya Elamani” (Alma 56:33) ya bilenge Banefi basengelaki kozala na libaku ya kotelema te. Lisusu kozalaka moke na motango, basoda ya Elamani “bazalaki banso … bilenge mpenza,” mpe babunda ata mokolo moko te” (Alma 56:46–47). Na lolenge mosusu, likambo na bango ekokaki komonana ndenge moko na ya biso oyo ntango mosusu tomiyokaka tolekelami na motango mpe tolekelami na etumba na biso na Satana na mikolo oyo ya nsuka mpe babokasi mabe ya mokili.

Kasi lipinga ya Elamani ezalaki na matoma ya koleka moke likolo ya Balamani ete ezalaki likambo ya mitango to likoki ya basoda te. Bango baponaki Elamani, profeta, mpo na kotambwisa bango (tala Alma 53:19; “bango bateyamaki epayi ya bamama na bango, ete soki batie tembe te, Nzambe akobikisa bango” (Alma 56:47); mpe bango “bapusaki mosika bondimi na oyo bango bateyamaka.” Lokola litomba, babatelamaki na “nguya ya kokamwa ya Nzambe” (Alma 57:26). Bongo ntango tozali kokutana na bitumba ya bomoi, tokoki kozwa mpiko. Limpinga ya Elamani eteyi biso ete “[ezali] na Nzambe moko ya sembo, mpe oyo [akozala] na ntembe te, [ye] akobatelama na nguya na ye ya bikamwa” (Alma 57:26).

Makanisi mpo na koteya na Ndako mpe na Eklezia

Alma 53:10–22; 56:43–49, 55–56; 57:20–27; 58:39–40

Elilingi
seminary icon
Kozala na bondimi na Nzambe esalisaka ngai nalonga bobangi.

Soki ezalaki te mpo na bondimi na bango, bilenge basoda ya Elamani balingaki kozala na ntina malamu ya koyoka bobangi. Kasi mpo na bondimi na bango, bazalaki kutu na ntina koleka ya kozala na mpiko. Ntango ozali kotanga na ntina na bango kati na Alma 53–58, luka biloko oyo ekosalisa yo olonga babobangi na yo na nzela ya bondimi kati na Klisto. Kanisa kotiya mayele na milongo milandi: Alma 53:10–22; 56:43–49, 55–56; 57:20–27; mpe 58:39–40. Mesa oyo ekoki kosalisa yo okoma nini omoni.

Bizalela ya bilenge basoda ya Elamani:

Bantina mpo na bondimi na bango kati na Klisto ezalaki makasi mingi ekoki kozala:

Nini basalaki mpo na kosalela bondimi na Yesu Klisto:

Lolenge nini Nzambe apambolaki bango:

Mpo na kolonga bitumba na biso ya molimo, tosengeli mpe na nguya ya Yesu Klisto. Ndenge nini okoki kozwa nguya na Ye? Luka biyano na nsango ya Mokambi Russell M. Nelson “Drawing the Power of Jesus Christ into Our Lives” (Liahona, Sanza ya mitano 2017, 39–42). Okoki kokokanisa toli na ye na makambo oyo basoda ya Elamani basalaki.

Nsima ya koyekola makambo miye, kanisa na ntina ya bitumba na yomei ya molimo. Koma nini oyoki ofulami ya kosala mpo na kosalela bondimli na yo na Yesu Klisto.

Tala lisusu Neil L. Andersen, “Wounded,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2018, 83–86; “True to the Faith,” Hymns, no. 254; “Drawing upon the Power of God in Our Lives” (video), Gospel Library; Gospel Topics, “Faith in Jesus Christ,” Gospel Library.

Elilingi
Bilenge basoda elongo na mama na bango

Bango Batiaki Tembe Te, na Joseph Brickey

Alma 58:1–12, 31–3761

Balandi ya Yesu Klisto babetisamaka libaku na pete te.

Elamani mpe Pawolani bazalaki na bantina malamu ya kobetisama libaku. Elamani azalaki kozwa lisungi ekoki te mpo na mapinga na ye, mpe Pawolani afundamaki na lokuta epayi ya Moroni na kobombaka lisungi yango (tala Alma 58:4–9, 31–32; 60). Nini ekamwisi yo na ntina ya biyano na bango kati na Alma 58:1–12, 31–37 mpe Alma 61? Mpo na nini omoni ete bayanolaki lolenge wana?

Mpaka David A. Bednar alakisaki Pawolani lokola ndakisa ya bopolo mpe ateyaki ete “bandakisa ya nkembo mpe ya ntina mingi ya bopolo ezwami na bomoi ya Mobikisi Yemei” (“Motema ya Bopolo mpe Komikitisa,” Liahona, Sanza ya mitano 2018, 32). Manyola ndenge Mobikisi alakisaki bopolo. Tala, na ndakisa, Matai 27:11–26; Luka 22:41–42; Yoane 13:4–17. Lolenge nini okoki kolanda ndakisa na Ye?

Alma 60:7–14

Nazali na mokumba ya kotombola bato nzinganzinga na ngai.

Moroni akomaki ete Nzambe akozwa Pawolani na mokumba soki na boyebi abosanaki bamposa ya mampinga ya Banefi. Toyekoli nini uta na Alma 60:7–14 na maye matali kosunga bato na mposa? Nini tokoki kosala mpo na kozala na bokebi mpe kokokisa bamposa ya basusu?

Alma 62:39–51

Soki namikitisi, minyoko ya bomoi ekoki kobalola motema na ngai epai na Nzambe.

Tiya likei ya mobesu mpe mbala na mayi ezali kotoka mpo na kosalisa yo okanisa lolenge okoki kopona kozala “ya kolemba” to “ya kokemba” na mimekano na yo. Ntango likei mpe mbala na yo ezali kolambama, yekola Alma 62:39–51, mpe koma lolenge nini bato bayanolaki na mosala ya Elamani nsima ya etumba na bango ya molai elongo na Balamani. Okoki nsima kokokanisa yango na lolenge bayanolaki na mateya na ye mibu 13 yambo (tala Alma 45:20-24). Lolenge nini Banefi basimbamaki na ndenge ekeseni na minyoko ya lolenge moko? Ntango likei mpe mbala ebeli mpenza, pasola likei mpe kata mbala. Lolenge nini mayi ya kotoka esimbaki bango na bokeseni? Nini ozali koyekola na ntina ya lolenge tokoki kopona kosimbama na minyoko? Lolenge nini okoki kobaluka epayi ya Nzambe na ntango na yo ya minyoko?

Salela makambo okutani na yango na ndako. Soki ozali kotangisa na eteyelo moko ya Eklezia, tuna bana kelasi bakabola nini bayekolaki na ndako. Na ndakisa, bobimisa nini bayekolaki na ntina ya minyoko mpe komikitisa kowuta na maki mpe bambala batokisa.

Mpo na makanisi koleka, tala nsango ya sanza oyo na Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge bamagazini.

Makanisi mpo na Koteya Bana

Alma 53:20–21; 56:47–48

Nakoki kozala sembo epayi ya Nzambe lokola bilenge basoda ya Elamani.

  • Bokoki kosalela makoki ebele ya kokabola lisolo ya basoda ya Elamani, kobakisa billingi epesami mpe “Mokapo 34: Helaman and the 2,000 Young Warriors” (Book of Mormon Stories, 93–94). Lokasa ya mosala ya mposo oyo ekoki kosalisa bana na yo kokanisa na lolenge bakoki kozala lokola mampinga ya Elamani. Kanisa kokabola ndambo ya bizaleli malamu ya bilenge basoda uta Alma 53:20–21 mpo na kobandisa yango. Okoki lisusu koyemba elongo loyembo lokola “We’ll Bring the World His Truth” (Children’s Songbook, 172–73).

Alma 56:45–48; 57:21

Nakoki kozala sembo na oyo baboti na ngai bateyaka na boyengebene.

  • Bilenge basoda ya Elamani batalaki bondimi ya bamama na bango ntango bakutanaki na mokakatano monene. Ntango mosusu okoki kotanga Alma 56:46–48 na bana na yo mpe kobenga bango koyoka nini bamama ya bilenge mibali bateyaki na ntina ya bondimi. Okoki kotuna bango nini bayekolaki uta baboti na bango—to mikolo mosusu ya sembo—na ntina ya Mobikisi. Mpo na nini ezali motuya kotosa “na sikisiki”? (Alma 57:21).

  • Lolenge nini ekoki—lokola bamama ya bilenge ya basoda—koyeba solo ete bana na yo bayebi na ntina ya bondimi na yo kati na Nzambe? Lolenge moko ezali ya kokabola lolenge nini bondimi na yo esimbaki bomoi na yo. Na ndakisa, lolenge nini Ye “abikisi” yo ntango “ozalaki na ntembe te”?

Elilingi
mama azali kotangisa mwana na ye ya mobali

Seed of Faith, by Jay Ward

Alma 53:10–18

Nakoki kobatela mayokani na ngai na Tata na Lola.

  • Bana na yo bakoki kozala na likoki ya kolobela ntango moko oyo moto moko apesaki mpe akokisaki elaka moko na bango. Lolenge nini bayokaki ntango elaka ekokisamaki? Okoki kotanga Alma 53:10–18 mpe kobianga bana na yo baluka ndenge nini Elamani, bato ya Amona, mpe bana mibali ya bato ya Amona basalaki mpe babatelaki bilaka na bango, to mayokani. Okoki kokabola lolenge nini Tata na Lola apamboli yo ntango ozali kobatela mayokani.

Alma 61:3–14

Nakoki kopona kozala na nkanda te.

Kanisa kobenga bana na yo bakanisa na ntina ya ngonga moko ntango bafundamaki kosala likambo moko oyo basalaki te. Yebisa bango maye matali lolenge nini yango ekomaki na Pawolani (tala Alma 60–61; tala lisusu “Mokapo 35: Captain Moroni and Pahoran,” Book of Mormon Stories, 95–97). Koyekola na ntina ya lolenge nini Pawolani asimbamaki, bozwa bambala ya kotanga milongo uta na Alma 61:3–14. Mbeba nini ekambaki Koliantoni kobuka mobeko ya bopeto? (tala Alma 61:2–3, 8–9). Toyekoli nini na ntina ya bolimbisi uta na ndakisa ya Mobikisi? (tala Luka 23:34).

Mpo na makanisi koleka, tala nsango ya sanza oyo na Moninga magazini.

Elilingi
bilenge bilombe nkoto mibale

Ezali Solo, Tata, Banso Bazali Wana mpe Bayanoli, na Clark Kelley Price

Bimisa na lokasa