Yaka, Landa Ngai 2024
Sanza ya nsambo 29–Sanza ya mwambe 4: “Talela Nzambe mpe Zala na Bomoi.” Alma 36–38


Sanza ya nsambo 29–Sanza ya mwambe 4: ‘Talela Nzambe mpe Zala na Bomoi.’ Alma 36–38,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe na EKlezia: Buku ya Mormon 2024 (2023)

“Sanza ya nsambo 29–Sanza ya mwambe 4. Alma 36–38,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe na Eklezia: 2024 (2023)

Elilingi
mwasi azali kosambela

Mwasi, na Jen Tolman, ekoki kokomama mobimba te

Sanza ya nsambo 29–Sanza ya mwambe 4: “Talela Nzambe mpe Zala na Bomoi”

Alma 36–38

Ntango Alma amonaki nkuna nzinganzinga na ye, ayokaki “mawa,” “motungisi,” mpe “nsomo ya molimo” (Alma 8:14). “Nkuna katikati na bato oyo,” alobaki na ntina ya Bazolami, “enyokoli molimo na ngai” (Alma 31:30). Ayokaki eloko ya lolenge moko nsima ya bozongi na ye na mosala epai ya Bazolami—amonaki ete “mitema ya Banefi ebele “ebandaki kokoma makasi, mpe ete babandaki kotumolama na ntina ya sikisiki ya liloba,” mpe yango esalaki motema na ye “mawa mingi koleka mpenza” (Alma 35:15). Alma asalaki nini mpo na oyo etali makambo amonaki mpe ayokaki? Akomaki kaka ya kolemba nzoto te to asimbamaki te na lolenge ya mokili. Na esika ya oyo wana, “asalaki ete bana na ye ya mibali basengelaki kosangana elongo” mpe ateyaki bango “makambo masengelaki mpo na bosembo” (Alma 35:16). Ateyaki bango ete “ezali na nzela moko te to lolenge mosusu epayi wapi moto akoki kobikisama, bobele na kati mpe na nzela ya Klisto. … Tala, azali liloba ya bosolo mpe bosembo” (Alma 38:9).

Makanisi mpo na koteya na Ndako mpe na Eklezia

Alma 36; 38:5–6

Nakoki kobotama na Nzambe.

Bato moke kati na biso bakokutana na makambo ya mpasi lokola ya bobongoli motema ya Alma. Kasi moto nyonso asengili “kobotama na Nzambe,” atako ezali kosalema mokemoke (Alma 36:2338:6). Ntango ozali kotanga Alma 36, kanisa na ntina ya nini elimboli kobotama na Nzambe. Mpo na ndakisa, na nzela ya kobotama na Nzambe, lolenge nini oyoki na ntina na lisumu? na ntina na Yesu Klisto? Lolenge nini kozala kobotama na Nzambe etutaka nini osalaka na eyano ya mabunga na yo moko? Bambongwana mosusu nini ezali koya na bondimi mpe misala na biso? Manyola lolenge nini ozali kobika bambongwana oyo.

Tala lisusu Mosiya 5:7; 27:25–26; Alma 5:14; 22:15; Elamani 3:35; Alma the Younger Is Converted unto the Lordvideo), ChurchofJesusChrist.org

Alma 36:12–24; 38:8–9

Yesu Klisto atie esengo na esika ya mawa.

Ntango mosusu bato babangaka koyambola mpamba te bamonaka boyamboli lokola etumbu ya mpasi mpo na lisumu. Nini okanisi Alma akokaki koloba na ntina ya eye? Mpo na komona yango, okoki kokokanisa nini bomoi ya Alma liboso ayambola (tala Alma 36:6–17) na bolimboli na ye moko nsima ayambolaki (tala milongo 18–27). Engebene na Alma 36:17–18, lolenge nini Alma azwaki bolimbisi oyo?

Tala lisusu Matthew S. Holland, “The Exquisite Gift of the Son,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2020, 45–47.

Alma 37

Makomi ebatelamaki “mpo na ntina moko ya bwanya.”

Tala likamwisi mpe lipamboli oyo ezali na kozala na makomi lelo! Ntango ozali kotanga Alma 37, luka mapamboli oyo ewutaka na kozala na makomi (tala, mpo na ndakisa, milongo 7–10, 18–19, 44–45).

Na Alma 37:38–47, Alma akokanisi “liloba ya Klisto” na Liahona. Ntango omanyoli na bokokanisi oyo, kanisaka na banzela oyaki komona likamwisi mpe nguya ya mateya ya Klisto “mokolo na mokolo” (Alma 37:40).

Tala lisusu D. Todd Christofferson, “The Blessing of Scripture,” Liahona, Sanza ya mitano 2010, 32–35; “As I Search the Holy Scriptures,” Hymns, no. 277; “Alma Testifies to His Son Helaman” (video), Gospel Library.

Elilingi
mwasi azali kotanga makomi

Makomi ezali koteya biso lolenge nini kolanda Nzambe.

Alma 37:1–14

Elilingi
seminary icon
“Na biloko mike mpe ya mindondo te makambo minene esalemaka.”

Ntango mosusu tokoki komiyoka lokola makambo na biso ezali minene koleka mpe na mindondo ete biyano esengeli kozala minene mpe mindondo lisusu. Kasi yango ezali te ntango inso nzela ya Nkolo. Ntango ozali kotanga Alma 37: 1–14, mona nini etuti yo na ntina ya lolenge nini Asali mosala na Ye. Nsima okoki komanyola mpe kokoma ndenge nini omonaki mobeko oyo na bomoi na yo.

Soki okendeki koteya mobeko oyo, ndakisa nini uta na mokili to bomoi ya mikolo inso ekoki yo kosalela mpo na kolakisa yango? Okoki kozwa mosusu kati na nsango ya Mpaka Dallin H. Oaks “Biloko ya Mike mpe ya Mindondo Te” (Ensign,, Sanza ya zomi na mibale 2018, 89–92).

Biloko nini ya mike mpe ya midondo te oyo ememaka yo penepene ya Tata na biso ya Lola mpe Yesu Klisto?

Mbala mingi, maponi na biso ya “mike mpe ya mindondo te” esalaka bokeseni monene kati na bomoi na biso. Kanisa kopona moto ya likambo moko uta na For the Strength of Youth: A Guide to Making Choices mpe komituna yomei mituna lokola miye: Lolenge nini maponi na ngai na ntina eye etuti ngai mpe bato nzinganzinga na ngai? Bambongwana nini ya mike mpe ya mindondo te nakoki kosala oyo ekokamba kimya mpe esengo ya monene?

Tala lisusu Michael A. Dunn, “One Percent Better,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2021, 106–8; Gospel Topics “Agency,” Gospel Library.

Salela biloko mike mpe ya mindondo te. Lokola biloko mingi mosusu kati na bomoi, boteyi mpe boyekoli ya nsango malamu ekoki kosalema na balolenge ya mike mpe ya mindondo te. Na ndakisa, lolenge nini mwa mungwa to levire ekoki kosalelama mpo na koteya nguya ya makambo ya mike mpe ya mindondo te? (tala Matai 5:13; 13:33).

Alma 37:35–37

“Tunana elongo na Nkolo.”

Na Alma 37:35–37, luka libiangisi ya Alma epayi ya mwana na ye Elamani. Mabiangisi nini oyo oyoki otindikami mpo ya kosalela? Na ndakisa, okoki komanyola nini elimboli na “kotunana elongo na Nkolo” (molongo 37). Lolenge nini omekaka kosala yango? Lolenge nini Amemaka yo mpo na malamu?

Alma 38

Kokabola litatoli na ngai ya Yesu Klisto ekoki kolendisa bato nalingaka.

Maloba ya Alma na mwana na ye ya mobali Siloni ezali ndakisa monene ya lolenge nini kolendisa mpe kopesa mpiko na bato tolingaka na kobikaka nsango malamu. Koyekola Alma 38 ekoki kopesa yo mwa makanisi mpo na kosalisa bato ya libota mpe baninga bazwa bokasi kati na Yesu Klisto. Koma maye ozwi.

Mpo na makanisi koleka, tala nsango ya sanza oyo na Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge bamagazini.

Makanisi mpo na Koteya Bana

Alma 36:6–24

Boyamboli ememelaka ngai esengo kati na Yesu Klisto.

  • Mpo na kosalisa bana na yo basosola ete boyamboli ememaka esengo, okoki kopesa bango eteni ya lokasa na elongi ya esengo na ngambo moko mpe elongi ya mawa na ngambo mosusu. Senga bango koyoka ntango ozali kotanga to koloba na mokuse Alma 36:13, 17–20 mpe simba elongi moko mpo na kolakisa lolenge nini Alma azalaki koyoka. Bana ya mikolo bakoki kokoma maloba to milongo kolimbolaka lolenge azalaki koyoka. Nini ekomisaki Alma mawa, mpe nini ememelaki ye esengo? Mpe okoki kolobela bango na ntina ya esengo oyokaki ntango oyamboli.

Alma 37:6–7

“Na biloko mike mpe ya mindondo te makambo minene esalemaka.”

  • Bana na yo bakoki kosepela kozwa biloko mike oyo eyeisaka biloko minene. Biloko lokola bateri, fungola ya motuka, to ata kutu eloko ya kosakana oyo ebondisaka bango ekoki kozala bandakisa. Bokoki nsima kotanga Alma 37:6–7 elongo mpe kokanisa na ntina ya biloko ya mike mpe ya mindondo te oyo Nzambe alingi biso kosala. Biloko nini ya minene ekoki kokoma ntango tozali kotosa mitindo oyo ya mike mpe ya mindondo te?

  • Bana na yo bakoki mpe lisusu komeka eloko moko lokola oyo: Kobanda kotondisa kopo moko na mayi, litanga moko na mbala moko. Boniboni yango ekokani na Alma 37:6–7? Nsima okoki koloba na ntina ya lolenge “biloko ya mike mpe ya mindondo te,” ya Nkolo lokola botangi ya makomi mokolo na mokolo, ezali lokola matanga ya mayi na kopo.

  • Salisa bana na yo bakanisa balolenge oyo bakoki komema biloko minene na ndako, eteyelo, to na Eklezia. Loyembo “‘Give,’ Said the Little Stream” (Children’s Songbook, 236) lisusu epesi ndakisa ya libongisi oyo.

Alma 37:38–47

Makomi ekoki kosalisa ngai mikolo inso.

  • Lolenge nini ekoki yo kosalisa bana na yo kokolisa bolingo ya maloba ya Nzambe, lokola Alma asalaki mpo na Elamani? Kanisa kolakisa bango elilingi ya Liahona ( lokola Gospel Art Book, no. 68) to kobengisa bango koyema moko ntango bazalaki kokabola nini bayebi na ntina na yango (tala Alma 37:38–47; 1 Nefi 16:10, 28–29). Lolenge nini makomi ezali lokola Liahona?

Mpo na makanisi koleka, tala nsango ya sanza oyo na Friend magazini.

Elilingi
Anzelu abimeli Alma mpe bana mibali ya Mosiya

Anzelu abimeli Alma mpe bana Mibali ya Mosiya, na Clark Kelley Price

Bimisa na lokasa