Yaka, Landa Ngai 2024
Sanza ya mwambe 5–11: “Mwango Monene ya Esengo.” Alma 39–42


“Sanza ya mwambe 5–11: ‘Mwango Monene ya Esengo.’ Alma 39–42,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe na Eklezia: Buku ya Mormon 2024 (2023)

“Sanza ya mwambe 5–11. Alma 39–42,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe na Eklezia: 2024 (2023)

Elilingi
Yesu azali kotika lilita

Asekwi, na Del Parson

Sanza ya mwambe 5–11: “Mwango Monene ya Esengo”

Alma 39–42

Ntango moto oyo tolingaka asali libunga ya makasi, ekoki kozala mpasi mpo na koyeba lolenge nini koyanola. Eteni ya oyo ekomisaka Alma 39–42 motuya makasi ezali ete yango ebimisi lolenge nini Alma—moyekoli ya Klisto oyo mbala moko azalaki na masumu na ye moko ya minene asengelaki koyambola na—kokambaka likambo se moko ya lolenge ya boye. Koliatoni mwana mobali ya Alma asalaki lisumu ya bosangisi nzoto, mpe Alma, lokola ayekolaka kosala kati na lotomo na ye, alikyaki na nguya ya malongi mpo na kopesa mwana mobali na ye emoneli moko ya seko mpe kolendisa boyamboli (tala Alma 4:19; 31:5). Na mikapo oyo, tomoni bokasi ya Alma na kopesaka etumbu na lisumu mpe libondi mpe bolingo na ye mpo na Koliatoni. Mpe na nsuka, tomoni bondimi ya Alma ete Mobikisi “asengeli koya kolongola masumu ya mokili mpe kosakola bansango ya esengo ya libiki epayi ya bato na ye” (Alma 39:15). Komona ete Koliatoni ayambolaki mpe na nsuka azongelaki mosala ya kosakola nsango malamu (tala Alma 49:30) ekoki kopesa biso elikya mpo na bolimbisi mpe bosikoli ntango totungisami na oyo etali masumu na biso moko to masumu ya moto moko tolingaka (tala Alma 42:29).

Tala lisusu “Alma Counsels His Sons” (video), Gospel Library.

Makanisi mpo na koteya na Ndako mpe na Eklezia

Alma 39

Elilingi
seminary icon
Nakoki kokima lisumu ya bosangisi nzoto.

Toli ya Alma na mwana mobali na ye Koliatoni kati na Alma 39 epesi libaku monene ya kososola na ntina ya misala ya bobebisi ya lisumu ya bosangisi nzoto, kobakisa bililingi ya bato mutakala to pornogalafi. Ntango mosusu ya motuya koleka, ekoki lisusu kosalisa yo ososola likabo ya Mobikisi ya bolimbisi mpe lobiko na bato oyo bayamboli. Mituna mpe masano miye mikoki kosalisa:

  • Mbeba nin ekambaki Koliantoni kobuka mobeko ya bopeto?(tala Alma 39:2–4, 8–9). Nini ezali bambano ya misala na ye? (tala milongo 5–13). Bilembo ya bosolo nini tozali na yango ete Koliantoni ayambolaki?(tala Alma 42:31; 49:30; 48:18). Oyekoli nini na ntina ya Mobikisi kowuta na makambo oyo?

  • Tanga nkansa 19–20 ya Mpo na Bokasi ya Bilenge: Litambwisi mpo na Kozwa Bikateli. Nsima koma ndimbola na yo moko ya nini bilili ya bato mutala to pornogalafi ezali, mpo na nini ezali likama, mpe nini ekosala yo ntango okokutana na yango. (Tala lisusu Matai 5:27–28 mpe Malongi mpe Mayokani 63:16.)

  • Lolenge nini okoki kolimbola na moninga mpo na nini oponi kokima pornogalafi mpe kobika mobeko ya bopeto? Mayele nini okoki kokabola uta na ”Nzoto na Yo Ezali Bule” kati na Mpo na Bokasi ya Bilenge: Litambwisi mpo na Kozwa Bikateli (nkasa 22–29)?

  • Kanisa kotala video “To Look Upon” (Gospel Library). Telemisa video na ntango inso Dawidi akokaki kosala liponi ekeseni. Lolenge nini maponi ya Dawidi ezali kokokana na maponi okoki kokutana na yango?

Telemisa mpo na komanyola. Ntango ozali kotala video, atako ozali koteya to koyekola mpo na yomei, telemisa video mbala na mbala mpo na kotuna, “Nini ezali ngai koyekola?” Yango ekoki kobengisa mayele uta na Molimo Mosantu.

Tala lisusu Bradley R. Wilcox, “Worthiness Is Not Flawlessness,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2021, 61–67; “Pornography” kati na “Life Help” collection of the Gospel Library.

Alma 40–41

“Nini ekosalema nsima ya kufa na ngai?”

Koliatoni azalaki na ndambo ya mituna na ntina ya nini ekosalema nsima ya liwa. Bomitungisi na ye ememaki Alma koteya koteya mitinda ezwami kati na Alma 40–41. Ntango ozali kotanga, sala molongo ya makambo ya bosolo ozwi na ntina ya biloko lokola mokili ya molimo, lisekwa, mpe bosambisi. Kanisa kotanga mikapo oyo uta na emoneli ya moto moko oyo, lokola Koliantoni, asengeli koyambola—nsima na nyonso, wana ezali solo mpo na biso nyonso.

Alma 40

Nakoki koluka biyano na mituna na ngai na bondimi kati na Yesu Klisto.

Mingi mingi tokoki kokanisa ete baprofeta bayebi eyano na motuna nyonso ya nsango malamu. Kasi koma mituna biyanolami te oyo Alma azwaki na mokapo 40. Asalaki nini mpo na kozwa biyano? Asalaki nini ntango azalaki na biyano te? Lolenge nini ndakisa ya Alma esalisi yo?

Elilingi
mwasi azali kosambela

Losambo ezali nzela moko wapui tokoki kozwa biyano na mituna ya nsango malamu.

Alma 42

Bomikabi ya Yesu Klisto esali ete bosikoli ekoka kosalema.

Koliatoni andimaki ete etumbu ya masumu ezalaki na boyengebene te (tala Alma 42:1). Kati na Alma 42, lolenge nini Alma alobelaki motungisi na ye? Okoki kobongisa makomi kati na mokapo oyo na maboke mibale: “Nzambe azali sembo” mpe “Nzambe azali na mawa.” Lolenge nini Bomikabi ya Mobikisi esalaka nyonso mibale bosembo mpe mawa ekokisama? Luka mayele ya kobakisa kati na video “The Mediator” (Gospel Library).

Tala lisusu “How Great the Wisdom and the Love,” Hymns, 195.

Mpo na makanisi koleka, tala nsango ya sanza oyo na Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge bamagazini.

Makanisi mpo na Koteya Bana

Alma 39: 1, 10–11

Ndakisa na ngai ya malamu ekoki kokumba bato na Klisto.

  • Toli ya Alma epayi ya Koliatoni ekoki kosalisa bana na yo basosola ntina ya kozala ndakisa malamu. Kanisa kotanga elongo Alma 39:1. Lolenge nini ezalaki Siloni ndeko mobali ya Koliatoni ndakisa malamu? Bana na bino bakoki kozwa biyano ya kobakisa na motuna oyo kati na Alma 38:2–4.

  • Bokoki mpe kosana lisano esika wapi yo mpe bana na yo bokoki kosala moto na moto mbala na ye kolanda to komekolaka moko mosusu. Salela lisano oyo mpo na kolakisa lolenge misala na biso ekoki kosalisa basusu kosala maponi malamu. Boyemba elongo “I Am like a Star” (Children’s Songbook, 163), mpe salisa bana na yo bakanisa lolenge bakoki kokoma ndakisa malamu.

  • Na mwinda to elilingi ya moyi, okoki kokokanisa pole na nguya ya ndakisa malamu. Yo na bana na yo bokoki lisusu kotala bililingi ya Yesu kosalaka makambo malamu mpe koloba na ntina ya ndakisa Apesi mpo na biso. Bavideo “Shine Your Light So Others May See” mpe “Lessons I Learned as a Boy” ekoki kosalisa bana na yo kosolola lolenge ndakisa na bango ekoki kokamba bato epayi na Klisto.

Alma 39:9–15

Na ntina na Yesu Klisto, nakoki koyambola ntango nasali bambeba.

  • Kozanga kokende na bolimboli ya mikemike ya ndenge ya masumu, limbola ete Koliatoni asalaki maponi mabe. Tokoki koloba nini mpo na kosalisa ye? Kanisa kotanga Alma 39:9 na bana na yo, mpe salisa bango kososola nini koyambola mpe kotika elimboli. Tatola ete boyamboli ekoki kosalema na nzela ya Yezu Klisto mpe Bomikabi na Ye.

  • Awa ezali liteya ya eloko mpo na kolakisa esengo ya boyamboli: Pesa mwana moke eloko moko ya kilo ya kotombola ntango ozali kobeta lisolo ya moto moko oyo asalaki eloko moko ya mabe mpe ayokaki mabe. Yebisa bana na yo ete eloko oyo ezali lokola mayoki ya mabe tokoki kozwa ntango tosali libunga. Zwa eloko ya kilo epayi ya mwana moke ntango otatoli ete Tata na Lola mpe Yesu Klisto bakoki kolongola kilo, mayoki ya mabe mpe kosalisa biso kozala malamu koleka ntango toyamboli.

Alma 40:6–7, 11–14, 21–23

Nsima ya kokufa na biso, milimo na biso mikendaka na mokili ya molimo tii lisekwa mpe bosambisi.

  • Ezali pete komituna mingi nini ekomelaka biso nsima ya kufa na biso. Okoki kosala nini mpo na kosalisa bana na yo bazwa biyano efulami? Okokaki kokoma kufa, mokili ya molimo (paradizo to boloko ya molimo), lisekwa, mpe esambiselo na biteni ya lokasa ekabwana. Salisa bana na yo basosola nini maloba maye malimboli. Ntango bozali kotanga elongo Alma 40:6–7, 11–14, 21–23, bana na yo bakoki kotia maloba na alima oyo ezali komonana kati na milongo oyo.

  • Bana bakolo bakoki kozwa litomba uta na kozwaka biyano na mituna na boluki Alma 40:6–7, 11–14, 21–23. Kanisa kotuna bana na yo mituna eye ekoki koyanolama na milongo miye, lokola “Lolenge nini nzoto na ngai ekozala lokola ntango nakosekwa?” Bengisa bango baluka biyano na milongo elongobani.

    Elilingi
    Malia mpe Elizabeta

    Malia mpe Nkolo Mosekwi, by Harry Anderson

  • Bana na yo bayebi moto moko akufa? Ntango mosusu okoki kolobela na mokuse na ntina ya moto wana. Pesa litatoli na yo ete mokolo mosusu ye—mpe moto mosusu—akosekwa mpo na Yesu Klisto. Soki esengeli, salela lokasa ya mosala ya mposo mpo na kolimbola nini elingi koloba kosekwa.

Mpo na makanisi koleka, tala nsango ya sanza oyo na Moninga magazini.

Elilingi
Alma mpe Koliatoni

Oyo Mwana na Ngai, na Elspeth Caitlin Young

Bimisa na lokasa