Yaka, Landa Ngai 2024
Sanza ya mwambe 12–18: “Telema Ngwi na Bondimi ya Klisto.” Alma 43–52


Sanza ya mwambe 12–18: ‘Telema Ngwi na Bondimi ya Klisto.’ Alma 43–52,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe na Eklezia: Buku ya Mormon 2024 (2023)

“Sanza ya mwambe 12–18. Alma 43–52,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe na Eklezia: 2024 (2023)

Elilingi
Moroni mpe nkombo ya liberty

Mpo na Mapamboli ya Bonsomi, na Scott M. Snow

Sanza ya mwambe 12–18: “Telema Ngwi na Bondimi ya Klisto”

Alma 43–52

Ntango totangi maloba oyo na ebandeli ya Alma mokapo 43—“Mpe sikawa nazongi na lisolo ya bitumba kati kati ya Banefi mpe Balamani”—yango ezali lolenge ya bomoto komituna mpo na nini Mormon akotisaki masolo ya bitumba oyo ntango azalaki na esika moke ya kokoma na bapalaki (tala Maloba ya Mormon 1:5). Yango ezali ya solo ete tozali na makambo na biso ya bitumba na mikolo ya nsuka, kasi motuya ezali na maloba na ye koleka ndimbola ya mayele mpe makama ya etumba. Maloba na ye ezali kolengela biso lisusu mpo na etumba oyo wapi “biso nyonso totiami” (Cantiques, no. 250), etumba oyo tozali kobunda mikolo nyonso na banguya ya mabe. Etumba oyo ezali ya solo mpenza, mpe mbano na yango esimbaka bomoi na biso ya seko. Lokola Banefi, tofulami na ntina ya bule—“Nzambe na biso, eyamba na biso, mpe bonsomi, mpe kimya na biso, basi na biso, mpe bana na biso”—Oyo Moroni abengaki “ntina ya Baklisto” (Alma 46:12, 16).

Makanisi mpo na koteya na Ndako mpe na Eklezia

Alma 43–52

Yesu Klisto akoki kosalisa ngai na bitumba na ngai ya molimo.

Ntango ozali kotanga Alma 43–52, koma nini Banefi basalaki oyo elongisaki bango (to elongisaki bango te). Nsima manyola lolenge nini okoki kosalela oyo oyekoli mpo esalisa yo kolonga bitumba na yo ya molimo. Koma makanisi na yo na nse:

Lisusu, tala nini okoki koyekola uta na milende ya banguna ya banefi. Manyola lolenge nini Satana akoki kobundisa yo na banzela ya lolenge moko:

  • Alma 43:8: Zelayemina alukaki kopesa bato na ye nkanda boye akokaki kozala na nguya likolo na bango. (Satana akoki kosenginya ngai nasala na nkanda.)

  • Alma 43:29:

  • Alma 46:10:

  • Alma 47:10–19:

Tala lisusu Russell M. Nelson, “Embrace the Future with Faith,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2020, 73–76; “A Mighty Fortress Is Our God,” Hymns, no. 68.

Elilingi
Banefi bazali kobundisa Balamani

Minerva Teichert (1888–1976), Defense of a Nephite City, 1949–1951, oil on masonite, 36 × 48 inches. Mize ya Ntoki ya Université ya Brigham Young, 1969.

Alma 46:11–28; 48:7–17

Elilingi
elembo ya seminele
“Telema Ngwi na Bondimi ya Klisto.”

Olingi kokitisa nguya ya monguna na bomoi na yo? Nzela moko ezali kolanda likebisi na Alma 48:17 kokoma “lokola na Moroni.” Kanisa kosala molongo ya maloba oyo Moroni alimboli ntango ozali kotanga Alma 46:11–28; 48:7–17. Oyekoli nini uta na Moroni na oyo etali “Kotelema[ka] ngwi na bondimi ya Klisto”? (Alma 46:27).

Osengeli koyekola lolenge nini Moroni afulaki basusu na “ntina ya Baklisto” (tala Alma 46:11-22). Lolenge nini okomona ntina yango? Nini okoki kosala mpo na kosangana kati na yango? Lolenge nini okoki kofula basusu bamilengela mpo na koyekola?

Eloko moko Moroni asalaki mpo na kofula basusu ezalaki kokela nkombo ya bonsomi, oyo ebeti nsete mibeko ya kofula Banefi (tala molongo 12). Mibeko nini mazali oyo bakambi ya Eklezia na biso babeti nsete kati na mikolo na biso? Bokoki koluka yango kati na For the Strength of Youth: A Guide for Making Choices (booklet, 2022), “The Family: A Proclamation to the World,” the Young Women mpe Aaronic Priesthood Quorum mitu ya likambo, to bansango ya likita linene ya kala mingi te. Okoki koloba na bokuse nini bazali koteya kati na mwa maloba ya pete mpo na kokela nkombo na bino moko ya bonsomi—eloko moko ya kokundola yo kozala solo epayi ya Mobikisi mpe na nsango malamu na Ye.

Tala lisusu Gospel Topic, “bondimi na Yesu Klisto,” Gospel Library.

Alma 47

Satana amekaka mpe alembisaka moke-moke.

Satana ayebi ete mingi kati na biso tolingaka te kosala masumu minene to kondima lmakambo ya okuta minene. Bongo, asalelaka balokuta ya mayele mabe mpe mimekano ya mikemike—mbala mingi nyonso oyo akanisaka ete okondima—kokumba nzela na yo mosika ya bokengi ya bomoi ya boyengebene.

Luka lolenge oyo kati na Alma 47, mpe manyola lolenge nini Satana akoki komeka kokosa yo. Banza mateya oyo uta na Mpaka Robert D. Hales:

“Moto ya bilongi mibale Amalikia abengaki Lewoti na lombango ko ‘kita na nse’ mpe kokutana na ye na nse ya bangomba. Kasi ntango Lewoti atikaki mabele ya likolo, amelisamaki mono ‘malembemalembe’ kino akufaki, mpe lipinga na ye ekweyaki na maboko ya Amalikia (tala Alma 47). Na nzela ya maloba ya mayele mpe bofundi, bato mingi babendaka biso kotika mabele ya likolo. Mabele ya likolo ezali epai wapi pole ezali. … Ezali mabele ya bokengi” (“Christian Courage: The Price of Discipleship,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2008, 74).

Oyekoli nini uta na video “Temptation Fades as We Seek Christ in Every Thought” (Gospel Library) oyo ekoki kosalisa yo kotelemela lisenginya?

Tala lisusu Nehemia 6:3; 2 Nefi 26:22; 28:21–22.

Alma 50–51

Bomoko ememaka bokengi.

Atako bibundeli mpe biloko makasi ya Banefi, Balamani kala mingi te babotolaki mingi ya bingumba na bango (tala Alma 51:26–27). Lolenge nini yango esalemaki? Luka biyano ntango ozali kotanga mikapo oyo (tala mingi mingi Alma 51:1–12). Kanisa makebisi nini lisolo oyo ekoki kozala na yango mpo na yo mpe libota na yo.

Mpo na makanisi koleka, tala nsango ya sanza oyo na Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge bamagazini.

Makanisi mpo na Koteya Bana

Alma 43:17–21; 48:7–8; 49:1–5; 50:1–6

Nakoki kozwa libateli ya molimo kati na nsango malamu ya Yesu Klisto.

  • Kanisa kosalela “Mokapo 31: Captain Moroni Defeats Zerahemnah” (Book of Mormon Stories, 85–88) mpo na kolobela bana na yo na ntina ya bitumba katikati na Banefi mpe Balamani. Ntango ozali kotanga na ntina ya bibundeli ya Banefi kati na Alma 43:19, okoki kokokanisa bibundeli oyo ebatelaka nzoto na biso na biloko Nzambe apesa biso ya kobatela milimo na biso. Ntango mosusu yo na bana na yo bokoki koyema elilingi moko ya mwana moke mpe kobakisa eteni ya ebundeli na elilingi mpo na eloko nyonso bana na yo bakoki kopesa nkombo oyo ebatelaka biso na ndenge ya molimo.

  • Milongo miye milimboli mabateli makasi Banefi batongaki: Alma 48:7–9; 49:1–9; 50:1–6. Nsima ya kotanga milongo miye elongo, bana na yo bakoki kosepela kotonga mabateli na makasi ya biloko lokola bakiti mpe babulangeti. Video “Elder Stevenson on Fortifying Families” (Gospel Library) ekoki kosalisa yo kosolola ndenge nini kolendisa ndako na yo na molimo.

Alma 46:11–16; 48: 11– 13, 11–17

Nakoki kozala “sikisiki na bondimi ya Klisto” lokola Kapitene Moroni.

  • Bana na yo bakokaki kotala bililingi kati na molongo ya koloba lisolo ya nkombo ya bonsomi (tala Alma 46:11–16; “Mokapo 32: Captain Moroni and the Title of Liberty,” Book of Mormon Stories, 89–90). Nini Moroni alingaki bato bamikundola (tala molongo 12)? Nini Tata na Lola alingi biso tomikundola? Ntango mosusu bana na yo bakoki kopona “nkombo ya bonsomi” ya bangomei na maloba to bililingi ekosalisa bango bamikundola biloko eye.

  • Mpo koteya bana na yo na ntina ya kozala “sikisiki na bondimi ya Klisto” lokola Moroni (tala Alma 48:13), okoki kosalisa bango bazwa mpe basimba eloko moko ya sikisiki. Nini elingi koloba mpo na bondimi ezala “sikisiki”? Botanga elongo Alma 48:11–12 mpo na koyeba nini ekomisaki Moroni sikisiki kati na bondimi na Klisto. Okoki lisusu koyemba elongo loyembo lokola “Nakozala ElombeChants pour Enfants,162). Nini tokoki kosala mpo na kozala “makasi na bondimi na Klisto”?

Alma 47:4–19

Satana amekaka mpe alembisaka biso moke-moke.

Botanga elongo milongo eponami uta na Alma 47:4–19. NIni elingaki kokoma soki Amalikia asilaki koyebisa Lewoti nini ye akanaki kosala uta na ebandeli? Milongo oyo eteyi biso nini na ntina ya lolenge Satana alingi kolembisa biso?

Salisa bana na yo batonga elikya. Bana mosusu bakoki te koyoka ete bakoki koyekola nsango malamu na bangomei Nzela se moko ya kotonga elikya na bango ezali kokumisa bango ntango bazali kosangana na boyekoli. Epai wapi ekoki yo kosalela makanisi oyo na masano na ndakisa oyo?

Mpo na makanisi koleka, tala nsango ya sanza oyo na Moninga magazini.

Elilingi
Moroni asimbi nkombo ya bonsomi

Nkombo ya Bonsomi, na Larry Conrad Winborg.

© 2018 na Larry Conrad Winborg

Bimisa na lokasa