Yaka, Landa Ngai 2024
Sanza ya nsambo 22–28: “Bolona Liloba Oyo na Mitema na Bino.” Alma 32–35


Sanza ya nsambo 22–28: ‘Bolona Liloba Oyo na Mitema na Bino.’ “Mikanda Misusu,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: Buku ya Mormon 2024 (2023)

“Sanza ya nsambo 22–28. Alma 32–35,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: 2024 (2023)

Elilingi
nkona na maboko ya mwana

Sanza ya sambo 22–28: “Bolona Liloba Oyo na Mitema na Bino”

Alma 32–35

Mpo na Bazolami, losambo ezalaki kotelemaka esika moko wapi bato nyonso bakoki komona mpe kozongelaka maloba ezanga ntina, ya komisepelisa. Bazolami bazangaki bondimi na Yesu Klisto—kutu bawanganaki bozali na Ye—mpe banyokolaki babola (tala Alma 31:9–25) Na bokeseni, Alma mpe Amuleki bateyaki na mpiko nyonso ete losambo ezali na mingi maye masalemaka na mitema na biso koleka na esika ya kotelema oyo moto nyonso akomona. Mpe soki tolakisimawa liboso ya baye bazangi te, losambo na biso ezali “mpamba, mpe ezangi ntina … eloko moko te” (Alma 34:28) Ya motuya koleka nyonso, tosambelaka mpo ete tozali na bondimi na Yesu Klisto, oyo akabaki bosikoli na nzela ya Ye “mbeka ezanga ndelo mpe ya seko” (Alma 34:10) Bondimi ya boye, Alma alimbolaki, ebandi na bomikitisi mpe “mposa moko ya kondima” (Alma 32:27) Na katikati ya mibu, elongo na bilei ekoki, liloba ya Nzambe ezuaka misisa na mitema na biso kino yango ekomi “nzete moko eboti mpo na bomoi ya seko” (Alma 32:41).

Makanisi mpo na Boyekoli na Libota mpe na Eklezia

Alma 32:17–43

Nazali kosalela bondimi na Yesu Klisto na kolonaka mpe koleisaka liloba na Ye na motema na ngai.

Ntango ozali kotanga Alma 32:17–43, koma maloba mpe milongo oyo ezali kosalisa yo ososola lolenge nini kosalela bondimi na Yesu Klisto. Nini oyekoli etali nini bondimi ezali mpe nini yango ezali te?

Lolenge mosusu ya koyekola Alma 32 ezali koyema bafoto oyo ezali kolakisa maloba ekeseni ya bokoli ya nkona. Nsima tia lokasa likolo ya foto moko na moko na maloba uta Alma 32:28–43 oyo ezali kosalisaa yo ososola lolenge nini kolona mpe koleisa liloba ya Nzambe na motema na yo.

Tala lisusu Russell M. Nelson, “Klisto Asekwi; Bondimi kati na Ye Ekotombola Bangomba,” Liahona, Sanza ya mitano 2021. 101–4.

Alma 32:26–43

Nakoki koyeba mpo na ngai moko.

Na bazolami oyo bandimisamaki te ya solo oyo etali litatoli ya Alma mpo na Klisto, Alma apesaki “mayele moko” (tala Alma 32:26). Koluka mayele esengi bosenga, koluka koyeba, kosala, mpe na mwa bondimi moke—mpe yango ekoki komema na makambo ya kitoko. Kanisa oyo etali bosali makambu omonaki to osalaki elongo. Engebene na Alma 32:26–36, bosali makambo ya lolenge nini ekoki komema na bondimi na Yesu Klisto?

Lolenge nini yo “osalelelaki makambo” likolo ya liloba ya Nzambe mpe oye kobeya ete “liloba ezali kitoko”? (Alma 32:28).

Alma 33:2–11; 34:17–29

Nakoki kokumbamola Nzambe na losambo, ntango nyonso mpe esika nyonso.

Toli ya Alma mpe Amuleki etali bokumbameli mpe losambo epesamaki mpo nai kobongisa bososoli mabe Bazorami bazalaki na yango. Kanisa kosalaka molongo na yango (tala Alma 31:13–23). Nmpembeni ya molongo wanai, okoki kosala molongo moko ya bosolo etali losambo na Alma 33:2–11 mpe 34:17–29. Lolenge nini makambo oyo oyekoli uta na milongo oyo esimbi lolenge na yo ya kobondela mpe kokumbamela?

Okoki lisusu komona makanisi utai na loyembo, lokola “Sweet Hour of Prayer” (Hymns, no. 142).

Alma 34:9–16

Elilingi
seminary icon
Nasengeli na Yesu Klisto mpe Bomikabi na Ye.

Tala bambala boni Amuleki asalelaki maloba sezanga ndeloe mpe seko mpo na kolimbola likabo ya bomikabi ya Mobikisi Alma 34:9–14. Mpo na nini ezali na motuya koyeba ete Bomikabi ya Mobikisi ezanga ndelo mpe ya seko? Luka maloba mpe biteni ya maloba na milongo oyo oyo elimboli lisusu Bomikabi ya Mobikisi: Baebele 10:10; 2 Nefi 9:21; Mosiya 3:13.

Atako ntango toyebi nguya ya Yesu ya kobikisa ezanga ndelo mpe ya seko, tosengeli ntango mosusu kotia ntembe ete yango esalemi mpo na biso—to mpo na moto oyo asumukaki mpo na biso. Mpaka David A. Bednar kala alobaki na bato oyo “bamonani lokola kozala na bondimi na Mobikisi, kasi bango bandimeli te ete mapamboli Ye alakaki ezali mpe mpo na bango” (“If Ye Had Known Me,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2016, 104). Nini ekoki kobatela biso uta na boyambi mobimba ya nguya ya Mobikisi? Manyolaa lolenge nini okoki koyeba ete Bomikabi ya Yesu Klisto ezanga ndelo mpe ya seko.

Mpo nakomanyola lolenge boni osengeli na Bomikabi ya Mobikisi, ekoki kosalisa yo okanisa likambo moko osengeli na yango mikolo nyonso. Mituna yo moko, “Bomoi na ngai elingaki kozala lolenge nini na kozangaka yango?” Nsima ntango oyekoli Alma 34:9–16, manyola bomoi na yo elingaki kozala lolenge nini na bozangi Yesu Klisto. Bokoki kozwa makanisi mosusu na 2 Nephi 9:7–9. Lolenge nini okoki koloba na mokuse Alma 34:9–10 na molongo ya maloba kaka moko?

Tala lisusu Michael John U. Teh, “Our Personal Savior,” Liahona, Sanza ya misato 2021, 99–101; Gospel Topics, “Bomikabi ya Yesu Klisto,” Gospel Library; “Reclaimed” (video), Gospel Library.

Alma 34:30–41

“Sikawa ezali ntango mpe mokolo ya lobiko na bino.”

Kanisa ete olingi kosangana na lisano ya mbango to momekano ya miziki. Nini ekokaki kosaalema soki ozelaki kino ya mokolo momekano mpo na komilengela? Lolenge nini ndakisa oyo ekokani na makebisi ya Amuleki na Alma 34:32–35? Likama nini ezali na kozelisa makasi na biso ya koyambola mpe kobongwana?

Molongoi 31 lisusu ezali na etinda mpo na bato oyo bakoki komitungisa ete bango mpenza bazali kozelisa mosika mingi mpe ntango eleki mpenza mpo na koyambola. Okolobaetinda wana ezali nini?

Mpo na makansisi mingi, tala bobimisi ya magazini ya Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge ya sanza oyo.

Makanisi mpo na Koteya Bana

Alma 32:1–16

Nkolo akoki koteya ngai ntango naponi komikitisa.

  • Alma mpe Amuleki balongaki koteya Bazolami oyo bazalaki ya komikitisa. Elingi koloba nini kozala ya komikitisa? Salisa bana na yo bayeba ndimbola ya komikitisa na Mokambi ya Makomi. Bilembo nini misusu etali ndimbola ya maloba yango tokoki komona na Alma 32:13–16? Bengisa bana na yo babakisa molongo ya maloba moko lokola “nakozala ya komikitisa ntango ngai .”

Alma 32:28–43

Litatoli na ngai na Yesu Klisto ekolaka ntango naleisaka yango.

  • Milona, ba nzete, mpe mbuma ezalaka mingimingi biloko oyo ekoki kosalisa bana basosola mibeko emonani na miso te lokola bondimi mpe litatoli. Tika bana na yo basimba milona ntango ozali kotanga Alma 32:28. Nsima okoki kosenga bango basalisa yo okanisa ndenge oyo kokolisa litatoli na Yesu Klisto ezali lokola kolonaka mpe koleisaka nkona (tala “Chapter 29: Alma Teaches about Faith and the Word of God,” Masolo ya Buku ya Mormon, 81). Ntango mosusu okoki kolona nkona na yo mpe kolobela etali maye esengelami mpo kosalisa nkona—to litatoli—ekola.

  • Foto ya nzete ezali elongo na liteya oyo; okoki kosalela yango mpo na kolakisa maloba ya Alma. Alma 32:28–43. To okoki kokende kotambola kotala nkona na ndenge na yango ekeseni ya bokoli mpe kotanga milongo uta na Alma 32 oyo ekokokanisa nzete oyo ezli kokola na litatoli na biso. To ntango mosusu bana na yo bakoki koyema nzete na etando mpe kobakisa lokasa to mbuma ntango nyonso bango bazali kokanisa eloko moko bango bakoki kosala mpo kosalisa litatoli na bango na Yesu Klisto ekola.

  • Okoki kotika bana na yo bameka kopusa nkona (kolimbolaka liloba ya Nzambe) na kati na ya libanga (kolimbolaka motema moko ya lofundu) mpe na mabele ya pete (kolimbolaka motema ya komikitisa). Botanga elongo Alma 32:27–28. Solola na oyo etali elingi koloba niniko “pesa esika” (molongo 27) mpo na liloba ya Nzambe na mitema na biso.

yema bililingi. Batu basusu bayekolaka malamu koleka ntango bango bayemi elilingi ya eloko bazali koyekola. Bana na yo bakoki kosepela koyema elilingi nkona oyo ezali kokola mpo na kokoma nzete ntango bazali koyekola Alma 32

Alma 33:2–11; 34:17–29

Nakoki kosambela Tata ya Lola ntango nyonso, mpo naa eloko nyonso.

  • Salisa bana na yo bamona maboke ya maloba oyo ezali kolobela bisika tokoki kosambela (na Alma 33:4–11) mpe biloko tokoki kosambela mpo na yango (na Alma 34:17–27). Ntango mosusu bakoki koyema bililingi ya bango moko kosambelaka na bisika oyo. Bokabola elongo na basusu makambo bokutanaka na yango ya ntango Tata ya Lola ayokaki bansambo na yo. Okoki lisusu koyemba loyembo etali losambo, lokola “A Child’s Prayer” (Children’s Songbook, 12–13).

Mpo na makanisi mingi, tala bobimisi ya magazini Moninga ya sanza oyo.

Elilingi
Mbuma na nzete

“Mpo na ntina ya etingia mpe bondimi mpe bompikiliki na bino na liloba na koleisaka yango, … tala, moke moke bokopikola mbuma yango, oyo ezali ya motuya koleka” (Alma 32:42).

Bimisa na lokasa