Yaka, Landa Ngai 2024
Sanza ya sambo 15–21: “Bolamu ya Liloba ya Nzambe.” Alma 30–31


“Sanza ya nsambo 15–21: ‘Bolamu ya Liloba ya Nzambe.’ Alma 30–31,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: Buku ya Mormon 2024 (2023)

“Sanza ya nsambo 15–21. Alma 30–31,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: 2024 (2023)

Elilingi
Alma azali koteya Koliyolo

Nyonso Elakisi ete Nzambe Azali (Alma mpe Koliyolo), na Walter Rane

Sanza ya sambo 15–21: “Bolamu ya Liloba ya Nzambe”

Alma 30–31

Masolo na kati ya Alma 30–31 elakisi na polele nguya ya maloba—mpo na mabe mpe mpo na malamu. Maloba ya “bokosi” mpe “maloba ya kovimbana ya mpamba” ya moteyi ya lokuta na nkombo ya Koliyolo ekanaki komema “milimo mingi na nse ya bobebisami” (Alma 30:31, 47). Na lolenge moko, mateya ya Monefi moko motomboki na nkombo ya Zolami ekumbaki lisanga mobimba ya bato na bokweyi “kati na mabunga manene” mpe “kobebisa banzela ya Nkolo” (Alma 31:9, 11).

Na bokeseni, Alma azalaki na bondimi makasi ete liloba ya Nzambe ekokaki kozala na “ nguya makasi likolo ya makanisi ya bato koleka mbeli, to biloko nyonso mosusu” (Alma 31:5 Maloba ya Alma etalisi bosolo ya seko mpe ememi likolo nguya ya lola na bokangisi monoko ya Koliyolo (tala Alma 30:39–50), mpe bango babiangaki mapamboli ya lola likolo ya baye oyo bakendaki elongo na ye komema Bazolami kozonga na bosolo (tala Alma 31:31–38 Ezali na bandakisa emonani mpo na balandi ya Klisto lelo oyo ntango mateya ya lokuta ezali mingi. Tokoki komona bosolo na kotalelaka, lokola Alma asalaki, “bolamu ya liloba ya Nzambe” (Alma 31:5

Makanisi mpo na Boyekoli na Libota mpe na Eklezia

Alma 30:6–31

Elilingi
elembo ya seminele
Monguna azali komeka kokweyisa biso elongo na mateya ya lokuta.

Na Alma 30Koliyolo abengami “Motelemeli-Klisto” (molongo 6 Motelemeli-Klisto azali moto nyonso to eloko nyonso oyo ezali na polele nyonso to na kobombana nyonso kotelemela Yesu Klisto mpe nsango malamu na Ye. Molongo nini na Alma 30:6–31 elakisi ete Koliyolo akokani na bolimboli oyo? Koyekolaka mateya ya lokuta ya Koliyolo ekoki kosalisa yo oyeba mpe obwaka malakisi ya lolenge moko. Misala oyo elandi ekoki kosalisa yo na boyekoli na yo:

  • Ntina ya mateya okanisi kozala malamu mingi koleka mpo na kososola bokeseni katikati ya mateya ya Mobikisi mpe bomekoli ya lokuta ya Satana? Bandakisa mosusu ezali eloko ya ndobo esalelami mpo na kokanga mbisi, mbongo ya mabe, mpe liyebisi ya kopalanginisa nsango na eloko ya lokuta. Lolenge nini okoki koloba soki eloko ezali ya lokuta? Lolenge nini okoki koyeba bosolo?

  • Kanisa kokoma molongo ya malongi ya lokuta oyo Koliyolo ateyaki na Alma 30:6–31. Mateya na ye nini ekoki kozala na bobendi lelo? (tala Alma 30:12–18, 23–28). Mabe nini ekoki koya uta na kondimaka makanisi ya boye? Mateya nini ya lokuta monguna azali kosalelaka mpo na komeka kokosa yo lelo?

  • Eloko nini Alma asalaki mpo na kobeta lisolo ya Mateya ya Koliyolo na bosolo? (tala Alma 30:31–54). Lolenge nini okoki kosalela mibeko ya lolenge moko na bomoi na yo?

Lokola Alma, baprofeta mpe bapostolo ya ntango oyo bazali kosalisa biso toyeba bokesene katikati ya bosolo mpe lokuta ya Satana. Toli nini ozwi na bitinda oyo: Gary E. Stevenson, “Deceive Me Not” (Liahona, Sanza ya zomi na moko 2019, 00–00); Dallin H. Oaks “Be Not Deceived” (Liahona, Sanza ya zomi na moko 2004, 00).

Tala lisusu Gospel Topics, “Seek Truth and Avoid Deception,” Gospel Library; “Oh Say, What Is Truth?,” Hymns, no. 272.

Elilingi
Koliyolo azali kosolola elongo na Alma

Koliyolo Atelemeli Alma, na Robert T. Barrett

Alma 30:39–46

Makambo nyonso ezali kotatola Nzambe.

Batu mingi lelo oyo bandimaka ete Nzambe azali te. Nini omoni na Alma 30:39–46 oyo esalisi yo oyeba ete Nzambe azali ya solo? Nini epekisi biso mpo na koyeba Ye? Matatoli nini lisusu Nzambe apesi yo ete Ye azali na bomoi?

Alma 30:56–60

Monguna asukanga balandi na ye te.

Oyekoli nini uta na Alma 30:56–60 mpo na oyo etali lolenge zabolo asalaka na balandi na ye? Eloko nini okoki kosala mpo na kobatela ndako na yo na nguya na ye?

Tala lisusu Alma 36:3.

Alma 31

Liloba ya Nzambe ezali na nguya ya komema bato na bosembo.

Likambo ya bokabwani ya Bazolami na Banefi ekokaki komonana lokola ete yango esengelaki kozwa eyano kaka na politiki to na misala ya basoda (tala Alma 31:1–4). Kasi Alma ayekolaki kondimela “bolamu ya liloba ya Nzambe” (Alma 31:5). Eloko nini oyekoli uta na Alma 31:5 mpo na oyo etali nguya ya liloba ya Nzambe? (tala lisusu Baebel 4:12; 1 Nefi 15:23–24; 2 Nefi 31:20; Yakobo2:8; Helamani 3:29–30).

Ntango otangi Alma 31, eloko nini mosusu bosolo ya nsango malamu okoki komona oyo etiami na kosala na yo ya bomoi? Ndakisa:

  • Lolenge nini omonaki nguya ya Nzambe komema bato kosala makambo ya malamu? (tala eteni 5).

  • Kokanisa bizaleli, mayoki, mpe misala ya Alma kotalaka basusu (tala biteni 34–35) na oyo ya Bazolami (tala biteni 17–28). Lolenge nini okoki kozala mingi lokola Alma?

  • Eloko nini omoni na Alma 31:30–38 oyo ekoki kosalisa bato oyo bayoki mawa na masumu na bango?

Alma 31:5–6

Mpo na Yesu Klisto, moto nyonso akoki kobongwana.

Tala liboke ya bato Alma amemaki elongo na ye koteya nsango malamu epai ya Bazolami (tala Alma 31:6). Oyekoli nini na ntina ya bomoi ya bato oyo na Moziya 27:8–37; 28:4; Alma 10:1–6; 11:21–25; 15:3–12 Nsango nini ekoki kozala kuna mpo na bino kati na makambo na bango?

Mpo na makansisi mingi, tala bobimisi ya magazini ya Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge ya sanza oyo.

Makanisi mpo na Koteya Bana

Alma 30

Buku ya Mormon ekebisi ngai na mateya ya lokuta.

  • Kanisa kolakisa biloko mosusu (lokola mbongo to bilei) mpe bomekoli bisaleli ya bana biloko oyo. Yango ekoki kokamba na lisolo etali lolenge nini koyeba bokesene katikati ya makambo oyo ezali solo mpe na makambo yo ezali lkuta. Nsima okoki kosalisa bana na yo koyeba uta Alma 30:12–18 lokuata to mateya ya lokuta oyo koliyoli ateyaki na ntina ya Nzambe. Na Alma 30:32–35, lolenga nini Alma ayanoli na baluka yango? Toyekoli nini uta na ndakisa ya ye?

Alma 30:44

Makambo nyonso etatoli Nzambe

  • Alma asololaki na ntina ya lolenge nini biloko na likolo mpe na mabele etatoli ete Nzambe azali na bomoi. Soki nzela ezali, tambola libanda elongo na bana na yo to telema liboso lininisa ntango ozali kotanga Alma 30:44. Tuna bango balakisa na mosapi biloko bamoni oyo esalisi bango bayeba ete Nzambe azali ya solo mpe ete Ye alingi bango. Bakoki lisusu kosala elilingi ya biloko bango baye komona (tala lokasa ya molulu ya poso oyo).

  • Ntango bana na yo bazali koyemba “My Heavenly Father Loves Me” (Children’s Songbook, 228–29), lekisa na moto na moto bale moko to eloko mosusu. Na mwa ntango kata miziki mpe senga na mwana oyo asimbi eloko kokabola eloko moko Tata ya Lola akelaki oyo ye azali na botondi mpo na yango.

Bana bayekolaka na nzela ya bilili. Bilili ekosalisa bana na yo basosola malamu koleka mpe bamikundola ntango molayi eloko bango bateyamaki. Milulu mingi mpo na bana na liteya oyo esengi kaka kosalela bilili. Kanisa kolakisaka bilili mingi lisusu na mikolo ekoya mpo na kosalisaa bana na yo kokundola oyo bango bayekolaki.

Alma 31:5

Liloba ya Nzambe ezali na nguya.

  • Lolenge nini okoki kosalisa bana na yo basosola ete liloba ya Nzambe ezali na nguya makasi koleka “eloko nyonso mosusu”? (Alma 31:5). Kanisa kosenga bango bakanisa eloko moko to moto moko ya nguya mingi, to lakisa bililingi ya mwa biloko ya nguya. Eloko nini epesi bango nguya koleka? Botanga Alma 31:5 elongo, mpe senga bana na yo eloko nini bango bakanisi molongo oyo elingi koloba. Kabola makambo moko ntango liloba ya Nzambe ezalaki na nguya makasi na yo.

Alma 31:8–35

Tata na Lola ayokaka nsambo na ngai.

  • Loba na boluse mpenza lisolo ya Alma mpe Bazolami, na kosalelaka milongo uta Alma 31:8–35 (tala lisusu “Mokapo 28: The Zoramites and the Rameumptom,” Masolo ya Buku ya Mormon, 78–80). Salisa bana na yo bayeba biloko Bazolami balobaki na losambo na bango (tala Alma 31:15–18) ntango bazali kosalisaa yo kotonga lndako moko ya molayi ya Rameumptom na biliki to mabanga. Limbola ete oyo ezali te lolenge tosengeli kosambela. Ntango yo mpe bana na yo bozali kosolola na oyo etali lolenge nini basengeli kosambela, tika bango balongola babiliki to mabanga moko moko. Ntango mosusu bango bakoki kobomba libanga monene moko na mbeto na bango lokola likundolisi ya kosambela ntongo mpe butu nyonso. Bango bakoki kosepela na kopakola langi na mabanga na bango.

Mpo na makanisi mingi, tala bobimisi ya magazini Moninga ya sanza oyo.

Elilingi
Bazolami kosambelaka na Rameumptom

Mitema ya Bazolami “mitombwamaki likolo epai ya bifundeli binene, na lolendo na bango” (Alma 31:25).

Bimisa na lokasa