Yaka, Landa Ngai 2024
Sanza ya nsambo 1–7: “Nakokomisa Yo Esalelo.” Alma 17–22


Sanza ya sambo1–7: ‘Nakokomisa Yo Esalelo.’ “Mikanda Misusu,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Mpo na Libota mpe Eklezia: Buku ya Mormon 2024 (2023)

“Sanza ya Nsambo 1–7. Alma 17–22,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: 2024 (2023)

Elilingi
Amona azali kosolola na Mokonzi Lamoni

Amona mpe Mokonzi Lamoni, na Scott M. Snow

Sanza ya sambo: “Nakokomisa Yo Esalelo”

Alma 17–22

Kanisa bantina nyonso bato bakoki kopesa mpo na kokabola nsango malamu te: “Nayebi mingi te” to “nayebi solo te ete bango bakosepela na yango” to ntango mosusu “Nazali kobanga nakobwakisama.” Ntango mosusu okoki komimona yo moko kokanisaka makambo ya ndenge moko na bantango mosusu. Banefi bazalaki na ntina mosusu mpo na kokabolaka nsango malamu na Balamani te: bango bazalaki “bato ya zamba mpe mitema makasi mpe ya boniama; bato oyo basepelaki na kobomaka Banefi” (Alma 17:14; tala lisusu Alma 26:23–25). Kasi bana mibali ya Mosiya bazalaki kutu na ntina ya makasi oyo eyokisaki bango ete bango basengelaki kokabola nsango malamu na Balamani: “Bango basepelaki ete lobiko esengeli kopesama na ekelamo nyonso, mpo ete bango bakokaki kondima te ete molimo ya moto ata moko te ekufa” (Mosiya 28:3). Bolingo oyo efulaki Amona mpe bandeko na ye ya mibali ekoki lisusu kofula yo mpo na kokabola nsango malamu elongo na libota, baninga, mpe bayebani na yo—ata baoyo bamonani lokola bakondima yango te.

Makanisi mpo na boyekoli na Libota mpe na Eklezia

Alma 17:1–4

Misala, ya pete mpe ya ntango nyonso ya bomipesi na Klisto esalisaka ngai nayamba nguya na Ye.

Oyekoli nini uta na Alma 17:1–4 etali lolenge nini kobatela litatoli mpe bomipesi na yo makasi na Yesu Klisto? Eloko nini bana mibali ya Mosiya basalaki, mpe lolenge nini Nkolo apambolaki bango?

Ntango ozali koyekola maye matali bana mibali ya Mosiya na Alma 17–22, koma lolenge nini komilengela na bango na molimo esimbaki misala na bango kati kati ya Balamani (ndakisa, tala Alma 18:10–18, 34–36; 20:2–5; 22:12–16). Oyoki nini oyo efuli yo kosala mpo na kolanda ndakisa na bango?

Alma 17:6–12; 19:16–36

Elilingi
elembo ya Seminele
Nakoki kozala esalelo na maboko ya Nzambe.

Na masolo ya mbongwana totangi na makomi mingi mingi maye ememaka makambo ya makama, kasi na kati kati na yango tokutaka mingi bato oyo bazalaki na bompikiliki ya koloba mpe kokabola bondimi na bango na Yesu Klisto. Kanisa yango ntango ozali koyekola oyo etali Abisha mpe bana mibali ya Mosiya na poso oyo.

Okanisi nini elakisi kozala esaleli na maboko ya Nzambe? Yango ekoki kosalisa yo kokanisa bisaleli to biloko biye okoki kosalela na bomoi na yo ya mokolo na mokolo. Na Alma 17:6–12, tala eloko nini bana mibali ya Mosiya basalaki boye bango bakokaki kozala bisaleli na maboko ya Nzambe. Lolenge nini okoki kokoma esalelo ya makasi mingi koleka na kosalisaka basusu koya epai ya Klisto?

Nini oyoki na ntina ya Abisha kati na Alma 19:16–36? Nini oyekoli uta na ye na ntina ya kosalisa basusu mpo na kotonga bopndimi na Klisto? Ndakisa, nini oyoki ekoki kosalisa baye yo olingaka “bandimela nguya ya Nzambe”? Alma 19:17

Okoki lisusu kokokanisa likambo ya Abish na mibeko Mpaka Dieter F. Uchtdorf ateyaki na “Missionary Work: Sharing What Is in Your Heart” (Liahona, Sanza ya mitano 2019, 15–18). Lolenge nini Abish alakisaki ndakisa ya “Makanisi Mitano ya Pete” ya Mpaka Uchtdorf? Meka kokoma mua biloko okoki koloba na ntina ya Yesu Klisto. Ndakisa, “Mpo na ngai, Yesu Klisto …” to “Mobikisi asungaka ngai …”

Tala lisusu Masolo ya Nsango malamu, “Ministering as the Savior Does,” Gospel Library; “Brightly Beams Our Father’s Mercy,” Hymns, no. 335; “Come and See,” “Come and Help,” “Come and Belong” (videos), Gospel Library.

Salela mateya ya ndakisa Ntango nyonso bato bakoki komona to kosimba eloko moko etali oyo bango bazali koyekola, bango bakoki mpenza kokanisa yango ntango molayi. Soki ozali koteya na ntina ya Alma 17:11, ndakisa, kanisa kolakisaka bibeteli miziki to bisaleli ekomami mpo na kosalisa kofula lisolo moko na ntina ya kozalaka esaleli moko na maboko ya Nzambe.

Alma 17–19

Ntango tolakisi bolingo mpo na basusu, tokoki kosalisa bango mpo na koyamba nsango malamu ya Yesu Klisto.

Luka molongo na Alma 17–19 oyo elakisi lolenge nini bolingo ya Amona mpo na Balamani efulaki makasi na ye ta kokabola nsango malamu ya Yesu Klisto. Bosolo nini mosusu etali kokabola nsango malamu oyekoli uta na ndakisa na ye?

Tala lisusu video “Ammon Serves and Teaches King Lamoni” (video), Gospel Library.

Elilingi
Amona abikisi bampate ya Mokonzi

Minerva Teichert (1888–1976), Amona abikisi Bibwele ya Mokonzi,, 1949–1951, oil on masonite, 35 15/16 × 48 inches. Mise ya Ntoki ya Université ya Brigham Young, 1969.

Alma 19:36

Nkolo akosunga ngai nayambola.

Sima ya kobetaka lisolo ya mbonguana ya Lamoni mpe bato na ye, Mormon alobaki yango na bokuse na kotalelakaezalela ya Yesu Klisto. Nini Alma 19:36 eteyi yo na ntina ya ezalela ya Nkolo? Nini lisusu lisolo ezwami na Alma 19:16–36 eteyi yo na ntina na Ye? Ntango nini oyokaki loboko ya Nkolo kotandama epai na yo?

Alma 20:23; 22:15–18

Koyaba Nzambe eleki bambeka nyonso.

Kokanisa oyo tata ya Lamoni alingaki kotika mpo na kobikisa bomoi na ye (tala Alma 20:23) elongo na oyo alingaki kotika nsima mpo na koyamba esengo ya nsango malamu mpe koyeba Nzambe (tala Alma 22:15, 18). Kanisa nini ozali na bolingi ya kobonza na ntina ya koyeba Nzambe malamu mingi koleka.

Mpo na kozwa makansisi mingi koleka, tala mateya ya magazini ya Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge ya sanza.

Makanisi mpo na Koteya Bana

Alama 17:2–3

Litatoli na ngai na Yesu Klisto ekolaka ntango nayekoli makomi, nasambeli, mpe nakili bilei.

  • Lolenge nini bandakisa ya bana ya Moziya ekoki kosalisa bana na yo kotonga matatoli na nbango na Yesu Klisto? Okoki kosalisa bana na yo koluka nini bana mibali ya Moziya basalaki mpo na kotonga bokasi na bango ya molimo na Alma 17:2–3. Nsima bakoki kosala elilingi mpe koluka makambo oyo elakisi biloko yango. Salisa bango basala mwango nini bango bakosala mpo na kolendisa matatoli na bango ya Mobikisi.

Alma 17–19

Nakoki kokabola nsango malamu ya Yesu Klisto na basusu.

  • Mpo na koyekola na ntina ya kozalaka esalelo na maboko ya Nzambe, lokola bana mibali ya Moziya bazalaki, yo mpe bana na yo bokoki koluka esalelo moko to eloko moko mpe bolobela na ntina ya nini yango esalelamaka. Nsima okoki koyekola Alma 17:11 mpe kosolola na ntina ya nini yango elakisi kozala bisalelo na maboko ya Nzambe mpo na kosalisa bato bayekola na ntina ya Yesu Klisto.

  • Lokasa ya mosala ya poso oyo ezali na bafoto kolakisaka bosolo Amona ateyaki Mokonzi lamoni. Okoki kosalisa bana na yo bamona bosolo yango na Alma 18:24–40. Bana na yo bakoki kosala lokola bazali bamisionele mpe kokabola oyo bango bayebi na ntina ya bosolo wana.

  • Nsima otangi na ntina ya Abish elongo na bana na yo (tala Alma 19:16–20, 28–29), bakoki kosala lokola bazali Abish na kokimka na esika, kokokolaka na bikuke, mpe koyebisaka oyo ekomaki na Alma 19:1–17. Lolenge nini tokoki kozala lokola Abish mpe kokabola nini toyebi na ntina ya Yesu Klisto mpe nsango malamu na Ye? Bana nayo bakoki kokoma ba foto ya bango moko kokabolaka sango malamu to koyembaka elongo nzembo moko etali kokabolaka sango malamu, lokola “Called to Serve” (Children’s Songbook, 174–75).

Alma 17:21–25; 20:8–27; 22:1–3

Nakoki kosalisa basusu koya epai na Klisto na kolakisaka bolingo na ngai mpo na bango.

  • Na ebandeli, bango nyonso mibale Mokonzi Lamoni mpe tata na ye bazalaki mitema makasi liboso ya nsango malamu. Nsima, mitema na bango ekomaki pete, mpe bango bandimelaki Yesu Klisto. Lolenge nini yango esalemaki? Salisa bana na yo bayeba biyano na mituna oyo ntango ozali kotala lisusu makambo ya Amona elongo na bango. Bakoki kosalela “Chapter 23: Ammon: A Great Servant” mpe “Chapter 24: Ammon Meets King Lamoni’s Father” (Book of Mormon Stories, 64–68, 69–70). To ntango mosusu bana na yo bakolinga koyema bililingi ya biteni ekeseni ya lisolo mpe kosalela bililingi mpo na kobeta masolo yango. Nini Amona asalaki mpo na kosalisa Lamoni mpe tata na ye kofongola mitema na bango na nsango malamu ya Yesu Klisto? (tala Alma 17:21–25; 20:8–27; 22:1–3).

  • Ntango mosusu yo mpe bana na yo bokoki kokanisa moto moko oyo asengeli koyeba na ntina ya Yesu Klisto. Salisa bango bakanisa ndenge bango bakoki kozala bandakisa malamu mpe balakisa bolingo na moto yango, lokola Amona asalaki mpo na Lamoni mpe tata na ye.

Mpo na makanisi mingi, tala bobimisi ya sanza oyo ya magazini Moninga zulunale.

Elilingi
Foto ya Abisha

Foto moko ya Abisha, na Dilleen Marsh

Bimisa na lokasa