Yaka, Landa Ngai 2024
Sanza ya motoba 24–30: “Kota na kati ya Bopemi ya Nkolo.” Alma 13–16


“Sanza ya motoba 24–30: ‘Kota na kati ya Bopemi ya Nkolo.’ Alma 13-16,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe na Eklezia: Buku ya Mormon 2024 (2024)

“Sanza ya motoba 24–30. Alma 13–16,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe na Eklezia: 2024 (2024)

Elilingi
Alma mpe Amuleki bazali kotambola libanda ya boloko

Elilingi ya Alma mpe Amuleki bakangolami uta na boloko, na Andrew Bosley

Sanza ya motoba 24–30: “Kota na kati ya Bopemi ya Nkolo”

Alma 13–16

Na banzela mingi, bomoi kati na Amoniya ezalaka malamu mpo na bango mibale Amuleki mpe Zezilomi. Amuleki azalaki “moto ayebani makasi,” na “bandeko mpe baninga ebele” mpe “bozui mingi” (Alma 10:4). Zezilomi azalaki “moko ya mayele koleka” kati ya basambisi mpe asepelaki na “mombongo makasi” (Alma 10:31). Nsima Alma ayaki na libyangi ya koyambola mpe “kokota na kati ya bopemi ya Nkolo” (Alma 13:16). Mpo na Amuleki, Zezilomi, mpe basusu, kondimaka libyangi oyo esengaki mbeka mpe kutu ememaki pene ya etumba ya makasi.

Kasi solo lisituale esukaki wana te. Na Alma 13–16, toyekoli oyo ekomelaka na nsuka baye oyo bandimeli “na nguya ya Klisto mpo na libiki” (Alma 15:6). Bantango mosusu bokangolami ezalaka, bantango mosusu lobiko—mpe bantango mosusu makambo etambolaka na pete te na bomoi. Kasi ntango nyonso, “Nkolo ayambaka [bato na Ye] likolo epai na yemoko, na nkembo” (Alma 14:11). Ntango nyonso, Nkolo apesaka “nguya, engebene na bondimi na [biso] na Klisto” (Alma 14:28). Mpe ntango nyonso, bondimi wana epesaka [biso] “elikya ete [to]kozwa bomoi ya seko” (Alma 13:29). Ntango ozali kotanga mikapo oyo, okoki kozwa libondisi na bilaka oyo, mpe okoki koya kososola malamu nini Alma alimbolaki ntango alobaki etali “bopemi ya Nkolo.”(Alma 13:16).

Makanisi mpo ya koyekola na Ndako mpe na Eklezia

Elilingi
Elembo ya seminele

Alma 13:1–19

Makuli ya bonganganzambe esungi ngai kotala epai ya Yesu Klisto mpo na bosikoli.

Maloba ya Alma na Alma 13 etalisi bosolo ya nguya na ntina ya nguya ya bonganganzambe ya Nzambe mpe ntina na yango—mpo na kolengela biso kokota na “bopemi ya Nkolo,” to na bomoi ya seko (Alma 13:16). Ntango mosusu okoki komeka kokoma solo moko na eteni moko na moko na Alma 13:1–9. Topesi mwa makanisi mpo na yo kobanda:

Eteni 1.Bonganganzambe ebengami lisusu “molongo ya mwana [ya Nzambe]” (tala lisusu Malongi mpe Mayokani 107:1–4).

Eteni 2.Nzambe akulisi banganganzambe mpo na kosunga bato kotala epai ya Mwana na Ye mpo na bosikoli.

Ozwi lisusu nini? Lolenge nini oyoki na ntina ya bonganganzambe ntango okanisi bosolo oyo?

Osila kokanisa na ntina na makuli ya bonganganzambe lokola likabo ewuti na Nzambe mpo na kosunga yo ete “ozela mwana na Ye mpo na bosikoli”? (eteni 2; tala lisusu eteni 16). Mbala mosusu okokaki kosala molongo ya makuli oyo ozwi, lokola libatisi, nkotisa, elambo, kotiama pembeni mpo na libiangi, lipamboli ya libondisi to kobikisama, lipamboli ya nkoko, mpe makuli ya tempelo. Manyola makambo oyo okutanaki na yango na makuli lokola oyo. Talela elilingi oyo ekoti na likambo yango mpe Molimo oyo oyokaki. Lolenge nini makuli oyo esungi yo kotala epai ya Yesu Klisto mpo na bosikoli?

Bato mosusu bandimaka na libunga ete makuli—mpe bokonzi ya bonganganzambe mpo na kosala yango—ezali na ntina te. Ndenge nini okoyanola na likanisi yango? Tala bansango mibale ya likita linene oyo ekokaki koyebisa makanisi na yo; pona moko, mpe koma biyano nyonso oyo ekoya epai na yo: Russell M. Nelson, “Spiritual Treasures [Biloko ya Motuya ya Molimo],” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2019, 76–79; Dale G. Renlund, “The Priesthood and the Savior’s Atoning Power [Bonganganzambe mpe Nguya ya Bomikabi ya Mobikisi],” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2017, 64–67.

Tala lisusu Malongi mpe Mayokani 84:19-22; Gospel Topics, “Liyokani,” Biblioteke ya Nsango Malamu.

Elilingi
bilenge mibali na mesa ya elambo

Makuli ya bonganganzambe esungi biso kotala epai ya Yesu Klisto mpo na bosikoli.

Alma 13

Nkolo abengisi ngai nakota na bopemi na Ye.

Libiangi ya “kokota kati na bopemi ya Nkolo” (Alma 13:16) ezongelami mbala mingi na Alma 13. Mbala mosusu okokaki koluka eteni nyonso epai wapi liloba “kopema” ebimi mpe komanyola nini eteni mokomoko eteyi yo na ntina ya nini “bopemi ya Nkolo” ekoki kolimbola. Lolenge nini yango ezali ya kokesena na bopemi ya nzoto? Lolenge nini tokozwa yango?

Tala lisusu Russell M. Nelson, “Overcome the World and Find Rest [Longa Mokili pe Zwa Bopemi],” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2022, 95–98; “Yaka epai na Yesu,” Banzembo, no. 117.

Alma 14

Na ntango ya mpasi, tosengeli kotia motema na Nkolo.

Okoki komitungisa, lokola ebele bazali kosala, mpo na nini makambo ya mabe ekomelaka baye bazali komeka kobika na bosembo. Okoki ntango mosusu te kozwa biyano nyonso na motuna makasi oyo na Alma 14, kasi ezali na mingi ya koyekola uta na lolenge Alma mpe Amuleki bayanolaki na likama ekomelaki bango. Maloba mpe misala na bango eteyi yo nini na ntina ya lolenge nini ntango mosusu Nkolo apesaka ndingisa ete bato ya sembo banyokwama? Toli nini Alma mpe Amuleki bakoki kopesa biso ntango tozali kokutana na mimekano ya mpasi?

Tala lisusu Baloma 8:35–39; 1 Petelo 4:12–14; Malongi mpe Mayokani 122:5–9; Dale G. Renlund, “Infuriating Unfairness [Kozanga Bosembo Oyo Esilikisaka],” Liahona, Sanza ya mitano 2021, 41–45.

Zala ya komilengela ntango nyonso. Bantango ya koteya elekaka nokinoki, yango wana osalela yango ntango ekoya. Likama moko na mokili, mpo na ndakisa, ntango mosusu libaku ya kokabola mibeko uta na Alma 14 na ntina ya lolenge nini ntango mosusu Nkolo apesaka ndingisa ete moto ayebi likambo te anyokwama.

Alma 15:16, 18

Kozala moyekoli esengisi komibonza.

Ekokaki kozala malamu kosala molongo moko ya biloko Amuleki atikaki mpo na koyamba nsango malamu (tala Alma 10:4–5; 15:16) mpe kokanisa yango na molongo ya oyo azwaki lokola lifuta (tala Alma 15:18; 16:13–15; 34:8). Ondimi komipimela nini mpo ya kokoma moyekoli ya Yesu Klisto ya sembo?

Mpo na makanisi mosusu, tala bobimisi ya sanza oyo Liahona mpe Bokasi bwa Bilenge bazulunale.

Makanisi mpo na Koteya Bana

Alma 13:1–2, 16

Nguya ya bonganganzambe esungaka ngai koya penepene na Klisto.

  • Lolenge moko ya kosunga bana na yo bamona lolenge nini nguya ya bonganganzambe elakisaka biso epai ya Klisto ezali kolakisa bango bililingi ya banzela nguya ya bonganganzambe esalelamaka (tala Gospel Art Book, nos. 103–110). Bana na yo bakokaki kosunga yo okanisa banzela oyo Yesu asalelaki nguya na Ye (tala, mpo na ndakisa, Matai 26:26–28; Malako 5:22–24, 35–43; Gospel Art Book, nos. 38–41). Na nsima bokokaki kotanga Alma 13:2 elongo mpe kolobela etali lolenge nini bonganganzambe esungaka biso “kozela Mwana [ya Nzambe] mpe kokoma koleka lokola Ye.

  • Mpo na nini Nzambe apesaki biso makuli ya bonganganzambe? Sunga bana na yo bazwa eyano na Alma 13:16. Soki bazali na mposa ya lisalisi koyeba likuli ezali nini, ezali na milongo na Buku Monene, 18.1 mpe 18.2. Mbala mosusu yo mpe bana na yo bokokaki kolobela makambo na bino ya kozwa makuli oyo. Lolenge nini esungaka biso “tozela [Yesu Klisto] mpo na bolimbisi ya masumu na [biso]? Nzembo lokola “When I Am Baptized [Ntango Nabatisami]” (Children’s Songbook, 103) ekoki kosunga bana na yo bakanisa bantina mosusu ya kozala na botondi mpo na makuli ya bonganganzambe.

Alma 13:10–12

Yesu Klisto akoki kopetola ngai.

  • Nsima ya kotanga biteni oyo elongo, kanisa bandenge ya kosunga bana na yo bamona na makanisi makambo oyo bazali koteya. Mbala mosusu bokokaki kosukola eloko moko elongo. Toyokaka ndenge nini ntango tozali bosoto? Toyokaka ndenge nini ntango tokomi peto lisusu? Lolenge nini mayoki oyo ekokani na oyo toyoki ntango tosali masumu mpe nsima toyamboli mpe tokomi peto na nzela ya Bomikabi ya Mobikisi?

Alma 14:18–29

Tata na Lola alendisaka ngai ntango nazali na bondimi na Yesu Klisto.

  • Lokasa ya mosala ya poso oyo ekoki kosunga yo—to bana na yo—kobeta lisolo na Alma 14:18–29 (tala lisusu “Mokapo 22: Alma’s Mission to Ammonihah [Misio ya Alma na Amoniya],” Masolo ya Buku ya Mormon, 58–63). Nyata ete Alma mpe Amuleki bapesamaki bokasi na ntina ya “bondimi na bango oyo [ezalaki] na Klisto” (Alma 14:26). Okoki lisusu kolobela etali ngonga ntango Nzambe apesaki yo bokasi “engebene na bondimi na [yo].” Lolenge nini tokoki kozala sembo lokola Alma mpe amuleki?

Alma 15:3–12

Yesu Klisto akoki kobongola mitema.

  • Mbongwana ya motema ya Zezilomi na nzela ya Yesu Klisto ezali kofula. Kanisa kotala lisusu elongo na bana na yo maye bayekolaki na poso eleki na ntina ya Zezilomi. Na nsima, bokokaki kotanga elongo Alma 15:3–12 mpo koyeba lolenge nini abongwanaki. Nini toyekoli uta na boyebi ya Zezilomi na ntina ya nguya ya Nkolo? (tala “Zeezrom Is Healed and Baptized [Zezilomi Abikisami mpe Abatisami]” [video], Biblioteke ya Nsango Malamu).

Mpo na makanisi mosusu, tala bobimisi ya sanza oyo Moninga zulunale.

Elilingi
Alma mpe Amukeli na boloko

Alma mpe Amuleki na Boloko, na Gary L. Kapp

Bimisa na lokasa