Yaka, Landa Ngai 2024
Sanza ya motoba 10–16: “Eyoki Bino Mbongwana Makasi Oyo na Mitema na Bino?” Alma 5–7


“Sanza ya motoba 10–16: ‘Eyoki Bino Mbongwana Makasi Oyo na Mitema na Bino?’ Alma 5-7,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe na Eklezia: Buku ya Mormon 2024 (2024)

“Sanza ya Motoba 10–16. Alma 5–7,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe na Eklezia: 2024 (2024)

Elilingi
Elenge Alma azali koteya Bazolamiti

Elenge Alma azali koteya Bazolamiti

Sanza ya motoba 10–16: “Eyoki Bino Mbongwana Makasi Oyo na Mitema na Bino?”

Alma 5–7

Alma ayebaki te balipaso ya kolona motema mpo na kobikisa bomoi na mikolo ya lelo, oyo ekitanisaka motema ebeba to ya bokono na moko ya kolongono. Kasi ayebaki “mbongwana ya motema” ya kokamwisa mingi (Alma 5:26)—moko na nzela na yango Mobikisi apesaka biso bomoi ya molimo ya sika, lokola soki tozalaki “kobotama lisusu” (tala Alma 5:14, 49). Alma akokaki komona ete mbongwana oyo ya motema ezalaki mpenza oyo mingi ya Banefi bazalaki na yango mposa. Mingi bazalaki na bozwi basusu babola, basusu ya lolendo, mpe basusu ya komikitisa, basusu banyokoli mpe basusu basimbamaki na monyoko (tala Alma 4:6–15). Kasi banso na bango bazalaki na mposa ya koya epayi ya Yesu Klisto mpo na kobikisama—kaka se lokola tozali banso kosala. Ata soki tozali koluka kolonga lolendo to koyika mpiko na minyoko, nsango ya Alma ezali lolenge moko: “Yaka mpe kobanga te” (Alma 7:15). Tika Mobikisi abongola motema ya makasi, ya mosumuki to ya kozokisama na moko ya komikitisa, ya peto mpe ya sika.

Makanisi mpo ya koyekola na Ndako mpe na Eklezia

Alma 5:14–33

Nasengeli koyoka—mpe kokoba koyoka—mbongwana moko makasi ya motema.

Mokambi M. Russell Ballard alobaki: “Nasengeli mbala na mbala kozwa ngonga ya komituna, Nazali malamu?’ … Mpo na komikamba na ntango ya lisolo ya bonkutu, ya moto ye moko, nalingaka kotanga mpe komaniola maloba ya kotindika makanisi mpo na komiyeba maye mazwami na mokapo ya mbala ya mitano ya Alma” (“Return and Receive [Zongela mpe Zwa],” Liahona, Sanza ya mitano 2017, 64).

Kanisa kotanga Alma 5:14–33 lokola ozalaki komituna yo moko mpe kososola motema na yo. Okoki kolinga kokoma biyano na yo na mituna. Oyekoli nini na ntina na yo moko? Oyoki nini efuli yo kosala lokola mbano ya lisolo na yo?

Tala lisusu Dale G. Renlund, “Preserving the Heart’s Mighty Change [Kobatela Mbongwana ya Nguya ya Motema],” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2009, 97–99.

Elilingi
elenge mwasi azali kosambela penepene ya mbeto

Wana ezali yo koyambola, okoyoka “mbongwana ya motema.”

Alma 5:44–51

Nakoki kozwa litatoli na ngai moko ya Mobikisi mpe mateya na Ye na nzela ya Molimo Mosantu.

Na Alma 5, ntango Alma alimbolaki lolenge nini azwaki litatoli ya Mobikisi, atangaki makambo akutanaki na yango te ya komonaka anzelu (tala Mosiya 27:10–17). Lolenge nini Alma ayaki koyeba bosolo yemei? Mbala mosusu okoki kosalela oyo okokuta kati na Alma 5:44–51 mpo na kokoma “ndenge ya kolamba” mpo na kozwa litatoli ya Yesu Klisto mpe mateya na Ye. “Biloko” nini (bosolo ya nsango malamu) mpe “malakisi” (makambo tokoki kosala mpo na koluka bosolo) Alma akotisaki? “Biloko” nini mpe “malakisi” nini okokaki kobakisa na ndenge na yo ya kolamba uta na makambo na yo moko to makambo mosusu na makomi?

Alma 7

“Namoni ozali na banzela ya boyengebene.”

Ntango mosusu tozali lokola bato na Zalayemila, oyo basengelaki kobengama mpo na boyamboli (tala Alma 5:32). Bantango mosusu tozalaka mingi lokola bato ya Gideona , oyo bazalaki komeka kotambola “na banzela ya boyengebene” (Alma 7:19). Omoni nini na nsango ya Alma na Gideona (na Alma 7) oyo ekokani na oyo alobaki na Zalayemila (na Alma 5)? Bokeseni nini omoni? Luka makambo Alma ateyaki oyo ekoki kosalisa yo otikala “na nzela oyo ememi na bokonzi ya Nzambe” (Alma 7:19).

Elilingi
Elembo ya seminele

Alma 7:7–16

Mobikisi akamataki likolo na Ye moko masumu, mpasi, mpe mitungisi na ngai.

Oyoka ata mokolo moko na bomoi na yo ete moko te azali kososola bitumba to mikakatano na yo? Soki bongo, bosolo Alma eteyaki ekoki kosunga. Ntango ozali kotanga, kanisa na maye biteni oyo eteyi etali batina ya libonza ya Mobikisi. Okoki kosala etanda oyo ezali na mito ya makambo What the Savior suffered mpe Why He suffered mpe koma makambo oyo okokuta kati na Alma 7:7–16 (tala lisusu Yisaya 53:3–5). Okoki kokanisa bantango ya sikisiki oyo Ye anyokwamaki na mwa makambo oyo? Tala mwa bandakisa ewuti na makomi masantu: Matai 4:1–13; 26:55–56; 27:39–44; Malako 14:43–46; Luka 9:58. Okoki kobakisa eloko moko na molongo na yo uta na biteni yango?

Ezali eloko moko ya kondimela ete Mobikisi anyokwamaki mpo na yo. Lolenge nini monyoko na Ye esali bokeseni na bomoi na yo ya mikolo nyonso? Tala mwa biteni oyo ezali komonisa ndenge Yesu Klisto akoki kosalisa to “kosunga” yo: Enosa 1:5–6; Mosiya 16:7–8; 21:15; 24:14–15; 3 Nefi 17:6–7; Etele 12:27–29; Malongi mpe Mayokani 121:7–10. Oyekoli nini na biteni yango? Wapi mwa banzela mosusu Ye ayaka mpo na kosunga yo? Ntango nini okutanaki na lisungi na Ye?

Nzembo lokola “I Need Thee Every Hour [Nazali Na Mposa Na Yo Ngonga Nyonso]” to “I Know That My Redeemer Lives [Nayebi Ete Mosikoli Na Ngai Azali Na Bomoi]” (Banzembo, nos. 98, 136) ekokaki koyeisa mozindo botondi na yo mpo na lisungi ya Mobikisi. Maloba nini kati na banzembo oyo ezali komonisa mayoki na yo epai na Ye?

Tala mpe Mito ya makambo ya Nsango Malamau, “Atonement of Jesus Christ [Bomikabi ya Yesu Klisto],” Biblioteke ya Nsango Malamu; “His Grace [Ngolu na Ye]” (video collection), Biblioteke ya Nsango Malamu.

Tatola Yesu Klisto. Kanisa banzela okoki kokabola litatoli na yo ya Mobikisi mpe bonzambe, ngolu, mpe bolingo na Ye. Okoki kolendisa bato oyo ozali koteya mpo na kotatola na ntina na Ye na kotunaka mituna oyo ezali kotinda bango bakabola lolenge nini bayokaka mpo na Ye.

Mpo na makanisi mosusu, tala bobimisi ya sanza oyo Liahona mpe For the Strength of Youth [Mpo na Bokasi bwa Bilenge] bazulunale.

Makanisi mpo na Koteya Bana

Alma 5:44–48

Nakoki kozwa litatoli na ngai moko na nzela ya Molimo Mosantu.

  • Mpo na kosalisa bana na yo bayekola kokola litatoli na bango moko, okoki kolakisa bango elilingi oyo ezali awa na nse mpe kotuna bango lolenge nini tosalisaka bana ya banyama bakokola. Na nsima okokaki kokangisa likambo oyo na kobatela matatoli na biso. Bokebi nini matatoli na biso esengeli? Lolenge nini tokoki koloba soki ezali kokola?

    Elilingi
    bana mibali mibale oyo bazali na bana ya banyama

    Ntango tondimi nsango malamu, ezali lokola kobanda bomoi ya sika.

  • Ndenge nini Alama azwaki litatoli na ye ya makasi ya Yesu Klisto? Okokaki kotanga Alma 5:44–46 elongo na bana na yo mpo na koluka biyano na motuna oyo. Mbala mosusu bana na yo bakokaki kosala mwango ya kosala eloko moko na poso oyo mpo kolendisa litatoli na bango.

Alma 7:10–13

Mobikisi akamataki likolo na Ye moko masumu, mpasi, mpe mitungisi na ngai.

  • Ndenge nini okoki kosunga bana na yo basosola Alma 7:10–13 mpo bayeba ete Yesu Klisto atyelaka bango likebi mpe akoki kosunga bango? Mbala mosusu okoki kosenga bango bakabola likambo moko oyo bakutanaki na yango ntango bazalaki kobela to ntango bazalaki na mpasi to bazalaki na mokakatano mosusu oyo ezalaki kopesa bango mawa. Ndenge nini bato mosusu basalisaki bango bamiyoka malamu? Pesa litatoli na yo ete Mobikisi anyokwamaki mpe makambo wana, mpe lobela ntango moko oyo Ye abondisaki mpe asungaki yo.

  • Ntango yo na bana na yo bozali kotanga Alma 7:11–13, boluka makambo oyo Yesu Klisto anyokwamaki mpo na biso. Senga bana na yo basalela maloba mpe biteni ya maloba oyo bamonaki mpo na kosilisa liloba oyo: “Yesu anyokwamaki bongo Ye akoki kosalisa ngai.” Ndenge nini esalisaka biso toyeba ete Yesu asosolaka bitumba na biso? Lolenge nini tozwaka lisungi na Ye? Kabola litatoli na yo ya Yesu Klisto.

Alma 5:14; 7:19–20

Kolanda Yesu Klisto ebatelaka ngai na nzela ya semba ya kozonga epai ya Tata na Lola.

  • Tika bana na yo batala na talatala ntango ozali kotanga Alma 5:14 tala lisusu lokasa ya misala ya poso oyo). Yango elingi koloba nini kozala na nkombo ya Mobikisi na bilongi na biso”?

  • Ndenge nini okoki kosalela ndimbola ya Alma ya nzela ya kozonga epai ya Tata na Lola mpo na kosalisa bana na yo bayekola kosala maponi malamu? Okokaki kotangela bango Alma 7:19–20 mpe kotika basala masano ya kotambola na “banzela ya kogumbama” mpe kotambola na nzela ya semba. Salisa bango bakanisa maponi oyo esalisaka biso totikala na nzela mpe maponi mosusu oyo elongolaka biso na nzela. Okokaki lisusu kotala bililingi ya Yesu elongo mpe kolobela makambo Ye asalaki mpo na kolakisa biso nzela ya kozonga epai ya Tata na Lola. Nzembo lokola “Nazali Komeka Kozala lokola Yesu,” (Chants pour les Enfants, 78–79) ekokaki kopesa mwa makanisi.

Mpo na makanisi mosusu, tala bobimisi ya zulunalo ya sanza oyo Moninga zulunale.

Elilingi
Yesu alati zambala ya motane

Molobeli na Biso,, na Jay Bryant Ward

Bimisa na lokasa