Yaka, Landa Ngai 2024
Sanza ya motoba 3–9: “Batelemaki Ngwi mpe Baninganaki Te.” Mosiya 29–Alma 4


“Sanza ya motoba 3–9: ‘Batelemaki Ngwi mpe Baninganaki Te.’ Mosiya 29–Alma 4,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe na Eklezia: Buku ya Mormon 2024 (2024)

“Sanza ya motoba 3–9. Mosiya 29–Alma 4,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe na Eklezia: 2024 (2024)

Elenge Alma azali kosakola

Elenge Alama azali Kosakola, na Gary L. Kapp

Sanza ya motoba 3–9: “Batelemaki Ngwi mpe Baninganaki Te”

Mosiya 29Alma 4

Basusu bakokaki komona na mwango ya Mokonzi Mosiya ya kokitanisa bakonzi na basambisi baponama lokola mbongwana ya politiki ya bwania ya mindondo te. Kasi mpo na Banefi, mingimingi baoyo bazalaki na nse ya Mokonzi Noa ya nkuna, mbongwana oyo ezalaki na ndimbola ya molimo mpe. Bamonaki lolenge nini mokonzi moko azanga bosembo atindaki “mabe” mpe “kobebisama ya monene” esalama kati na bato na ye (Mosiya), mpe bazalaki “motema likolo mpenza” ete bazala na bonsomi uta na nguya ya boye. Mbongwana oyo elingaki kopesa bango ndingisa ya kozala bayanoli mpo na bosembo na bango moko mpe “koyanola mpo na masumu [na bango] moko” (Mosiya 29:38).

Solo, nsuka ya boyangeli ya bakonzi elingaki koloba te nsuka ya makambo na lisanga ya Banefi. Bato ya mayele mabe lokola Newolo mpe Amilisi bapalangisaki makanisi ya lokuta, bazangi boyambi baniokolaki Basantu, mpe bandimi mingi ya Eklezia bakomaki lolendo mpe bakweyaki. Kasi “balandi baye bamikitisa ya Nzambe” batikalaki “ngwi mpe baninganaki te” atako maye masalamaki nzinganzinga na bango (Alma 4:15; 1:25).

Makanisi mpo ya koyekola na Ndako mpe na Eklezia

Mosiya 29:26–27; Alma 2:1–7

Nakoki kozala ndakisa ya malonga kati na lingomba na ngai.

Bobele mibu mitano na bokonzi ya basambisi, mpasi moko ebimaki oyo ekomeka esakola ya Mosiya ete mongongo ya bato ekopona mbala mingi oyo ezali malamu (tala Mosiya 29:26). Yekola Alma 2:1–7 mpo na koyeba nini likambo yango ezalaki mpe nini Banefi basalaki mpo na yango. Nini ekokaki kosalema soki “bato ya eklezia” bayokaka mingongo na bango te? Nini lisusu oyekoli uta na lisolo oyo na ntina ya lolenge nini Nkolo alingi ete omipesa na lingomba na yo? (tala lisusu Mosiya 29:26–27).

Makambo nini ya motuya oyo lingomba na yo ezali kokutana na yango? Kanisa boniboni yo, lokola Banefi, okoki kosala ete mongongo na yo ekotisama na “mongongo ya bato.” Na banzela nini mosusu yo, lokola molandi ya Yesu Klisto, okoki kosala bopusi na lingomba na yo mpo na bolamu?

Tala lisusu Dallin H. Oaks, “Love Your Enemies [Linga Banguna Na Yo],” Liahona, Sanza ya mitano 2020, 26-29.

Alma 1

Liloba ya Nzambe ekoki kosunga ngai nayeba malongi ya lokuta.

Atako Newolo atubelaki nsuka nsuka ete maye ateyaki ezalaki ya lokuta, mateya na ye ekobaki kozala na bopusi likolo ya Banefi mpo na mibu mingi. Mpo na nini okanisi ete bato basepelaki na makambo oyo Newolo ateyaki? Na Alma 1:2–6, luka lokuta na mateya ya Newolo—mpe bosolo oyo asalelaki mpo na kobomba lokuta wana.

Gideona atelemelaki Newolo “na maloba ya Nzambe” (Alma 1:7, 9). Tala mwa makomi oyo ezali kokweisa lokuta ya Newolo: Matai 7:21–23; 2 Nefi 26:29–31; Mosiya 18:24–26; mpe Elamani 12:25–26. Meka koloba na mokuse eteni mokomoko ya makomi. Oyekoli nini epayi ya basakoli ya bomoi oyo ezali kokweisa mateya ya lokuta na mikolo na biso?

Alma 1:19–31; 4:6–15

Bayekoli ya solo ya Yesu Klisto bazali “balandi ya komikitisa ya Nzambe.”

MIkapo 1 mpe 4 ya Alma elimbolaka bileko oyo Eklezia ezwaki bomengo, kasi bandimi ya Eklezia bayanolaki na bomengo wana na ndenge ekeseni. Na ndakisa, kokanisa Alma 1:19–30 na Alma 4:6–15 mpo na komona lolenge nini bandimi ya Eklezia babongwanaki na mwa mibu mpamba. Na kotalela makambo oyo otangi, balandi ya solo ya Yesu Klisto bamiyokaka ndenge nini mpo na bato oyo bazali na bindimeli ekeseni? Ezaleli nini balandi ya solo ya Klisto bazali na yango mpo na bozwi mpe bomengo? Nini ozali koyoka efulama mpo na kobongola na ntina ya ezaleli na yo moko?

Kokanisa makomi na yomei. Kanisa lolenge nini masolo mpe mateya ya makomi etali bomoi na yo. Na ndakisa, okokaki komona babokokani katikati mikakatano okutani na yango lelo mpe mikakatano Banefi bakutanaki na yango na Alma 1–4.

Elembo ya seminele

Alma 4:6–20

Ndakisa mpe litatoli na ngai ekoki kobongola mitema.

Mbala mosusu okoki kozala na boyokani na mawa oyo Alma ayokaki ntango amonaki oyo ezalaki koleka kati na bato na ye. Luka mikakatano oyo amonaki na Alma 4:6–15. Omoni mikakatano ya ndenge wana? Mbala mosusu ozali komitungisa mpo na molingami moko oyo azali kobunda na mikakatano yango. Osila komituna nini okoki kosala mpo na kosalisa?

Basusu bakoki koloba ete Alma, lokola zuzi monene, azalaki moto malamu koleka mpo na kosilisa mikakatano wana. Kasi Alma akanisaki ete ezalaki na lolenge ya malamu koleka. Ntango ozali kotanga biteni 16–20, nini ekamwisaka yo na ndenge na ye ya kosalisa bato?

Alma azalaki na bondimi monene na liloba ya Nzambe mpe “litatoli ya peto” (eteni 19). Bandakisa nini omoni ya nguya ya litatoli ya peto? Ntango ozali kokanisa banzela okoki kokabola litatoli na yo ya Yesu Klisto mpe nsango malamu na Ye, okokaki kotanga lisusu Alma 4:6–14. Misala ya bandimi ya Eklezia na biteni oyo emonisi nini na ntina ya matatoli na bango ya Yesu Klisto mpe mateya na Ye? Omoni nini na ntina na bopusi ya misala na bango​—na bangomei mpe likolo na basusu? Okoki lisusu kokanisa na ntina ya banzela opambolamaki na litatoli ya peto ya bato mosusu, ezala ekabolamaki na nzela ya maloba to misala.

Kanisa banzela okokaki kokabola litatoli na yo ya Yesu Klisto—na maloba to misala. Nani akozwa litomba na litatoli na yo?

Tala lisusu Gary E. Stevenson, “Nourishing and Bearing Your Testimony [Koleisa mpe Kopesa Litatoli na Yo],” Liahona, Sanza ya mitano 2022, 111–14; “Litatoli,” Banzembo, no. 137; “Alma the Younger Steps Down as Chief Judge [Elenge Alma Akiti Lokola Zuzi Monene]” (video), Biblioteke ya Nsango Malamu; Gospel Topics, “Revelation [Bobimisi],” Biblioteke ya Nsango Malamu.

Mpo na makanisi mosusu, tala bobimisi ya sanza oyo Liahona mpe For the Strength of Youth [Mpo na Bokasi bwa Bilenge] bazulunale.

Makanisi mpo na Koteya Bana

Alma 1:2–9

Nkolo akoki kosunga ngai nayeba mateya ya lokuta.

  • Lolenge moko ya koyekola Alma 1:2–4 elongo na bana na yo ezali kosalisa bango basala motuna ya solo to ya lokuta na kosalelaka maloba oyo eteyamaki na Newolo, molakisi ya lokuta. Na nsima, okoki koyebisa bango mpo na nini mbala mingi Satana asangisaka solo na lokuta. Sunga bana na yo bakanisa mwa bandakisa. Na biteni 7–9, ndenge nini Gideona alongaki lokuta ya Newolo? (Tala lisusu “Mokapo 20: Alma mpe Newolo,” Masolo ya Buku ya Mormon, 54–55.)

Alma 1:19–25

Lokola mondimi ya Eklezia ya Yesu Klisto, nalingaka mpe nasalelaka basusu.

  • Bandimi mosusu ya Eklezia ya Nkolo na mokolo ya Alma bazalaki na bokabi mpe bapesaka, mpe bandimi mosusu bazalaki na boboto te mpe na lolendo. Mpo na kosunga bana na yo bayekola na makambo yango, okokaki kotanga elongo na bango Alma 1:27, 30 mpe kosala molongo ya lolenge ya bato ya boboto bandimi ya Eklezia ya Nkolo basalisaki. Toyebi nani oyo akoki “[kotelema] na bosenga” (Alma 1:30) ya bolingo mpe lisungi na biso? Bokoki lisusu koyemba elongo loyembo na ntina ya bolingo mpe mosala, ndakisa “Kindness Begins with Me [Boboto Ebandi na Ngai]” (Children’s Songbook, 145), mpe kosalisa bana bakanisa misala oyo ekokaki kokende elongo na nzembo.

  • Tosengeli kosala nini soki bato bazali na boboto te epai na biso? Kanisa kotanga elongo na bana na yo lolenge nini balandi ya Klisto basalelamaki na Alma 1:19–20. Lobela ndenge oyo basalaki na biteni 22 mpe 25. Ntango mosusu okokaki kosalela banzela ya koyanola ntango basusu bazangi boboto.

Alma 4:8–20

Litatoli na ngai ekoki kolendisa basusu.

  • Mbala mingi “litatoli ya peto” (Alma 4:19) ya mwana ekoki kozala na bopusi makasi likolo na basusu. Mpo na kosalisa bana na yo bayeba likambo yango, okoki kotanga elongo na bango Alma 4:8–12, 15, kosalisaka bango na koyeba mikakatano oyo ezalaki koleka na Eklezia. Alma akokaki kosala nini mpo na kosilisa mikakatano oyo? Sunga bango bayeba Alma azwaki mokano nini ya kosala na Alma 4:16–20. Mbala mosusu okokaki kokabola elongo na moko na mosusu lolenge nini litatoli ya moto mosusu mpo na Klisto elendisi yo.

  • Soki bana na yo bazali na mposa ya bandakisa ya nini litatoli ezali, kanisa kolakisa clip video ya molobi moko na likita linene oyo azali kopesa litatoli. Okoki mpe kosalela lonkasa ya mosala ya poso oyo to koyemba elongo nzembo lokola “Litatoli” (Banzembo, no. 137). Toyekoli nini na ntina ya matatoli oyo ewuti na biloko yango? Tika bana na yo bamesana kokabola matatoli na bango.

Mpo na makanisi mosusu, tala bobimisi ya sanza oyo Moninga zulunale.

Banefi bazali kobundisa Baamalisi

Alma mpe Amilisi,, na Scott M. Snow