Yaka, Landa Ngai 2024
Sanza ya motoba 17–23: “Yesu Klisto Akoya Kosikola Bato na Ye.” Alma 8–12


“Sanza ya motoba 17–23: ‘Yesu Klisto Akoya Kosikola Bato na Ye.’ Alma 8-12,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe na Eklezia: Buku ya Mormon 2024 (2024)

“Sanza ya Motoba 17–23. Alma 8–12,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe na Eklezia: 2024 (2024)

Elilingi
Alma azali koteya

Koteya Malongi ya Solo,, na Michael T. Malm

Sanza ya motoba 17–23: Yesu Klisto Akoya Kosikola Bato na Ye

Alma 8–12

Mosala ya Nzambe ekokweya te. Kasi milende na biso mpo na kosunga elongo na mosala na Ye emonanaka ntango mosusu ya kokweya—na boye, tokoki komona na mbala moko te mbano tolikyaki mpo na yango. Na bantango mosusu tokoki komiyoka moke lokola Alma ntango ateyaki nsango malamu na Ammoniyah—aboyamaki, abwakelamaki soyi , mpe babenganaki ye. Nzoka nde ntango anzelu atindaki ye kozonga mpe komeka lisusu, Alma na mpiko nyonso “azongaki na lombango” (Alma 8:18, mpe Nzambe abongisaki nzela liboso na ye. Ye apesaki Alma kaka bilei mpe esika ya kofanda te, kasi alengelaki Amuleki, oyo akomaki moninga ya mosala, mobundeli ya makasi ya nsango malamu, mpe moninga ya bondimi. Ntango tokutanaka na mikakatano mpe bolembi nzoto ndenge tozali kosala na bokonzi ya Nkolo, tokoki komikundola lolenge Nzambe asalisaki mpe atambuisaki Alma, mpe tokoki kondima ete Nzambe akosalisa mpe akotambwisa biso mpe, atako na mabaku ya mpasi.

Makanisi mpo ya koyekola na Ndako mpe na Eklezia

Elilingi
Elembo ya seminele

Alma 8

Milende na ngai mpo na kokabola nsango malamu ya Yesu Klisto esengisi bompikiliki.

Osila komeka kokabola nsango malamu ya Yesu Klisto epai ya moto moko, kasi libiangi na yo eboyamaki? Alma mpe akutanaki na likambo yango. Oyekoli nini uta na ndakisa ya Alma na Alma 8:13–16 na ntina ya kokabolaka nsango malamu atako bitumba mpe botelemeli? Koba kotanga na biteni 17–32, mpe luka maloba oyo efulaka yo mpo na kokoba kokabola nsango malamu, ata ntango ozali komonana lokola ozali kolonga te.

Baprofeta mpe bapostolo bazali batatoli ya ntina mingi ya Klisto, yango wana bazali na ebele ya toli efulama mpo na kokabola na ntina ya kotatola Ye. Tala oyo Mpaka Dieter F. Uchtdorf alobaki na “But What If It’s Hard? [Kasi Bongo Soki Ezali Pasi?]” (eteni kati na “Missionary Work: Sharing What Is in Your Heart [Mosala ya Misionele: Kokabola Oyo Ezali na Motema na Yo],” Liahona, Sanza ya mitano 2019, 18) to oyo Mpaka Gary E. Stevenson akabolaki na “Love, Share, Invite [Linga, Kabola, Bengisa],” (Liahona, Sanza ya mitano 2022, 84–87). Nini omoni kuna oyo ekoki kosunga moto oyo abandi koyoka kolemba nzoto mpo na kokabola nsango malamu?

Ndenge nini okoki koloba na mokuse makambo nyonso oyo oyekoli awa na maloba moko to mibale ya kolendisa na ntina ya kokabola nsango malamu? Kanisa kosala affiche to meme oyo ekoki kofula yo (mpe basusu) mpo na kokoba komeka.

Tala lisusus “Help Me Teach with Inspiration [Salisa Ngai Nateya na Molimo Mosantu],” Banzembo, no. 281; “Alma Is Commanded by an Angel to Return to Ammonihah [Alma Atindami na Anzelu moko mpo na Kozonga na Amoniya]” (video), Biblioteke ya Nsango Malamu; Gospel Topics, “Bengisa Bango Banso na Kozwa Nsango Malamu ya Yesu Klisto,” Biblioteke ya Nsango Malamu.

Alma 9:14–23

Mapamboli ya Nzambe eyaka na mokumba monene.

Ntango ozali kotanga oyo etali lolenge Banefite na Ammoniyah bayambaki basali ya Nkolo, yango ezali pete na kobosana ete kala babikaki-nsango malamu mpe bazalaki “bato balingamaki makasi epai ya Nkolo” (Alma 9:20). Ntango ozali kotanga na oyo etali mapamboli minene Nzambe apesaki bato ya Nefi (tala mingi mpenza Alma 9:19–23), manyola mapamboli minene Ye apesi yo. Mikumba nini eyaka na mapamboli oyo? Nini ozali kosala mpo na kotikala sembo na mikumba oyo?

Tala lisusu Malongi mpe Mayokani 50:24; 82:3; 93:39.

Alma 11–12

Mwango ya Nzambe ezali mwango ya bosikoli.

Na Alma 11–12, Alma mpe Amuleki bazwaki ndakisa na yango lokola mwango ya bosikoli. Ntango ozali kotanga mikapo oyo, manyola mpo na nini liloba bosikoli esalelami mpo na kolimbola mwango ya Nzambe. Kanisa kokoma liloba ya mokuse ya oyo Alma mpe Amuleki bateyaki etali balolenge oyo elandi ya mwango:

  • Bokweyi

  • Mosikoli

  • Boyamboli

  • Kufa

  • Lisekwa

  • Bosambisi

Tala ndenge maloba ya Amuleki esimbaki mitema ya bato (tala Alma 11:46). Ndenge nini koyeba na ntina ya mwango ya Nzambe ezali na bopusi na yo?

Tala lisusu Dallin H. Oaks, “The Great Plan [Mwango Monene],” Liahona, Sanza ya mitano 2020, 93–96; “Amulek Testifies of Jesus Christ [Amuleki Atatoli Yesu Klisto]” (video), Biblioteke ya Eklezia.

Alma 12:8–18

Soki nayeisi motema na ngai makasi te, nakoki kozwa ebele ya liloba ya Nzambe.

Bato mosusu bakoki komitungisa mpo na nini Tata ya Lola asalaka te ete makambo nyonso eyebama na biso. Na Alma 12:9–14, Alma alimbolaki oyo ekoki kozala ntina moko. Mituna oyo ekoki kosunga yo omanyola oyo ateyaki:

  • Koyeisa motema na yo makasi elimboli nini? Kozala na motema makasi ememaka makambo nini? (tala mpe Alma 8:9–11; 9:5, 30–31; mpe 10:6, 25).

  • Okoki kosala nini mpo na kobalusa motema na yo epai ya Nzambe? (tala Yilimia 24:7; Alma 16:16; Elamani 3:35).

  • Nini okoki kosala mpo na kondimisama ete liloba ya Nzambe “ezwami kati na [yo]”? (Alma 12:13). Ntango ozali na liloba ya Nzambe kati na yo, nguya nini ezali na yango kati ya “maloba,” na yo “misala,” mpe “makanisi”? (Alma 12:14).

Likambo ya Amuleki eteyi yo nini na ntina ya mapamboli ya kozala na motema ya pete? (tala Alma 10:1–11).

Tala lisusu “Alma Warns Zeezrom [Alman Akebisi Zezilomi]”(video), Biblioteke ya Nsango Malamu.

Mpo na makanisi mosusu, tala bobimisi ya sanza oyo Liahona mpe For the Strength of Youth [Mpo na Bokasi bwa BIlenge] bazulunale.

Makanisi mpo na Koteya Bana

Alma 8–10

Nakoki kokabola nsango malamu ya Yesu Klisto.

  • Lokasa ya misala ya poso oyo ekoki kosunga yo oloba na mokuse makambo oyo esalemaki na Alma 8–10 mpo na bana na yo. Okoki kolinga kosunga bango bazwa mitinda oyo esalaki Alma mpe Amuleki bamisionele malamu. Na ndakisa, batikaki te (tala Alma 8:8–13), batatolaki na ntina ya Klisto (tala Alma 9:26–27), mpe basalaki elongo (tala Alma 10:12).

  • Nzembo moko oyo elobeli mosala ya misionele, na ndakisa “I Want to Be a Missionary Now [Nalingi Kokoma Misionele Sikawa]” (Children’s Songbook, 168) ekokaki kopesa bana na yo makanisi na ntina ya banzela ya kokabola nsango malamu elongo na baninga na bango. Bengisa bango kotanga makanisi bazwi mpe bato bakokaki kokabola nsango malamu elongo na bango. Okoki kutu kotika bango basala masano ya makambo oyo bakoki koloba to kosala.

Lendisa bosali elongo. Ntango ozali komibongisa mpo na koteya, na esika ya kokana makambo ya koloba, mituna, “Bana bakosala nini mpo koyekola?” Bana bakoyekola malamu mpe bakomikundola ntango molai ntango bakosangana na molende.

Alma 11–12

Mwango ya Nzambe ezali mwango ya bosikoli.

  • Mbala mosusu bana na yo bakokaki kosala elilingi oyo ezali komonisa mitinda ya mwango ya bosikoli, lokola Bokweyi ya Adama mpe Eva, Bomikabi ya Yesu Klisto, boyamboli, kufa, lisekwa, mpe bosambisi. Na nsima, okoki kosalisa bango bakokanisa bililingi na bango na biteni oyo ezali na Alma 11–12 oyo eteyaka na ntina na mitinda yango.

Alma 8:18–22

Nakoki kozala moninga malamu.

  • Okoki kobengisa mwana moko asala lokola azali Amuleki mpe mosusu asala lokola azali Alma ntango ozali koyebisa lisolo na kati Alma 8:18–22. Ndenge nini Amuleki azalaki moninga malamu mpo na Alma? Na nsima bana na yo bakokaki koyebisa bango ndenge oyo moto moko azali moninga na bango mpe ndenge likambo yango esalaki ete bamiyoka.

  • Mbala mosusu okoki kosala puzzle ya boninga: koluka to kosala elilingi oyo ezali komonisa boninga mpe kokata yango na biteni ya puzzle. Na nsima ya eteni moko na moko, koma eloko moko tokoki kosala mpo na kozala moninga malamu, bakisa makambo Alma mpe Amuleki basalaki. Bana na yo bakokaki kosala ngala na bango kopona eteni moko mpe kobakisa yango na puzzle ntango ozali kotanga makambo oyo ekomami na nsima. Nani azali na mposa ya boninga na biso?

Elilingi
bana basi mibale bazali kosɛka

Tokoki kozala baninga malamu mpo na Basusu.

Alma 11:43–44

Mpo na Yesu Klisto, nakosekwa.

  • Tala liteya ya eloko lokola oyo mpo na koteya na ntina ya Lisekwa: loboko na yo ekokaki komonisa molimo na yo, mpe gant ekokaki komonisa nzoto na yo. Longola loboko na yo na gant mpo na kolakisa ete milimo mpe nzoto na biso ekokabwana na kufa. Na nsima zongisa loboko na yo na gant mpo na kolakisa ete milimo mpe nzoto na biso ekosangana lisusu esika moko na Lisekwa. Tika bana na yo balanda ngala na bango na kolata gant mpe balongola yango ntango ozali kotangela Alma 11:43 bango. Lakisa elilingi ya Mobikisi mosekwi (tala Gospel Art Book, no. 59), mpe tatola ete Yesu Klisto apesaki nzela mpo na moto nyonso asekwa.

Mpo na kozwa makanisi mosusu, tala bobimisi ya zulunalo ya sanza oyo Moninga zulunale.

Elilingi
Alma azali kolia na Amuleki

Elilingi ya Alma koliaka na Amuleki, na Dan Burr

Bimisa na lokasa