Yaka, Landa Ngai 2024
Sanza ya nsambo: Bango “Bapengwaki ‘Ata Mokolo Moko Te.’” Alma 23–29


“Sanza ya sambo 8–14: ‘Bapengwaki “Ata Mokolo Moko Te.’’’ Alma 23–29,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Mabota mpe Eklezia: Buku ya Mormon 2024 (2023)

“Sanza ya nsambo 8–14. Alma 23–29,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Mbota mpe Eklezia: 2024 (2023)

Elilingi
Banti-Nefi-Lehi bazali kokunda bibundeli na bango

Banti-Nefi-Lehi Bakundi Bibundeli na Bango ya Bitumba,, na Jody Livingston

Sanza ya nsambo: Bango “Bapengwaki Ata Mokolo Moko Te”

Alma 23–29

Omitungisaka ntango mosusu soki bato bakoki ya solo mpenza kobongwana? Ntango mosusu omitungisaka na ntina ya soki okoki kotelemela maponi na yo ezanga ntina osalaki to bizalela na yo mabe okolisaki, to okoki kozala na mitungisi ya ndenge moko na ntina ya baye olingaka. Soki ezali bongo, lisitwale ya Banti-Nefi-Lehi ekoki kosunga yo. Bato oyo bazalaki bayini ya nsuka mpenza ya Banefi. Ntango bana mibali ya Mosiya bazwaki mokano ya koteya bango nsango malamu, Banefi “basekaki [bango] na kotiola.” Koboma Balamani emonanaki lokola nzela moko endimamaki koleka na esika ya kobongola bango. (Tala Alma 26:23–25.)

Kasi Balamani babongwanaki—na nzela ya nguya ya kobongwana ya yesu Klisto. Bayebanaki lokola “bato moko ya mitema makasi mpe ya boniama” (Alma 17:14), kasi bakomaki “ya kokesena mpo na mpiko na bango liboso ya Nzambe” (Alma 27:27). Na yango, bango “bapengwaki ata mokolo moko te” (Alma 23:6).

Ntango mosusu ozali na makanisi to misala ya kobongola to “bibundeli ya … botomboki” ya kokitisa na nse (Alma 23:7). To ntango mosusu osengeli kaka kozala mwa moke na zuwa koleka liboso ya Nzambe. Atako mbongwana nini ozali na yango bosenga, Alma 23–29 ekoki kopesa yo elikya ete, na nzela ya nguya ya bomikabi ya Yesu Klisto, mbongwana ya ntango molai ekoki kokokisama.

Makanisi mpo na boyekoli na Libota mpe na Eklezia

Alma 23–25; 27

Elilingi
seminary icon
Mbongwana na ngai na Yesu Klisto mpe na nsango malamu na Ye ekobongola bomoi na ngai.

Balamani bamonanaki lokola bato bazalaki na libaku mabe mpo na mbongwana, kasi ebele ya bango bamonaki bambongwana ya bikamwisi na nzela ya Yesu Klisto. Balamani babongwana bamibengaki bango moko Banti-Nefi-Lehi.

Boyekoli Alma 23–25; 27 ekoki kotinda yo kotia makanisi na mbongwana na yomoko. Tala mpo na nini ba Anti-Nefi-Lehi babonganaki—lolenge nini bango babongwanaki “kati na Klisto” (Alma 23:6). Biteni elandi ekoki kosunga yo mpo na kobanda:

Na balolenge nini Yesu Klisto mpe nsango malamu na Ye ebongolaki yo? Ntango nini omiyokaki penepene ya Ye? Lolenge nini okoki koloba soki yo okomi mobongwani na Yesu Klisto? Eloko nini Molimo atindikaaki yo kosala nsima?

Tala lisusu David A. Bednar, “Converted unto the Lord,Liahona, Sanza ya zomi na moko 2012, 106–9; Dale G. Renlund, “Unwavering Commitment to Jesus Christ,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2019, 22–25; Gospel Topics: “Become like Jesus Christ,” Gospel Library.

Alma 24:7–19; 26:17–22

Mpo ete Nzambe azali ngolu mingi, Ye alimbisaka ngai ntango nayambolaka.

Mbongwana oyo ba Anti-Nefi-Lehi bazwaki ezalaki mingi koleka mbongwana ya bizaleli—ezalaki mbongwana ya motena ebotami na bondimi kati na Yesu Klisto mpe boyamboli ya solo. Ntango mosusu okoki komona bosolo moko etali boyamboli na mokapo moko na moko na Alma 24:7–19. Nini milongo oyo eteyi biso mpo na oyo etali ngolu ya Nzambe liboso ya baye bayamboli? Bosolo nini mosusu oyekoli uta na Alma 26:17–22?

Manyola lolenge nini Nzambe alakisaki ngolu na Ye na bomoi na yo. Lolenge nini okoki kolakisa botondi na yo epai na Ye?

Alma 26; 29

Bokaboli nsango malamu ememelaka ngai esengo.

Liloba esengo ebimisami mbala 24 na Alma 23–29, kosalaka mikapo yango esika moko malamu ya koyekola lolenge nini koyamba esengo ya kobikaka—mpe kokabolaka—nsango malamu ya Mobikisi. Kanisa kotanga Alma 26:12–22, 35–37; mpe 29:1–17, lluka ntina bantina mpo na nini Amona, bana ya Mosiya, mpe Alma basepelaki. Nini oyekoli uta na milongo oyo ekoki komema na esengo mingi koleka na bomoi na yo?

Mpaka Marcus B. Nash ateyaki: “Kokabola nsango malamu epesaka esengo mpe elikya na milimo na bango mibale mopesi mpe mozwi. … Kokabolaka nsango malamu ezali esengo likolo ya esengo, elikya likolo ya elikya” (“Hold Up Your Light,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2021, 71). Bamayele nini ozwaki na kokabolaka nsango malamu na basusu? Bitumba nini okutanaki na yango ntango olukaki kokabola nsango malamu? Lolenge nini Tata ya Lola akoki kosalisa yo otelemela bitumba yango?

Mpo na motindo ya profeta na lolenge nini kokabola nsango malamu—mpe kozwa esengo ya kosalaka yango—kanisa kotanga maloba ya Dallin H. Oak “Sharing the Restored Gospel,” (Liahona, Sanza ya zomi na moko 2016, 57–60). Makanisi nini ozwi na etinda na ye?

Tala lisusu “The Bush Family Story,” “Sharing Your Beliefs,” “Sharing the Gospel” (videos), Gospel Library.

Bokanisa kosala molongo ya nkombo ya makambo bokokabola na moninga moko etali Buku ya Mormon. Bomeka kokabola Buku ya Mormon kosalelaka aplikasio ya Buku ya Mormon.

luka bandakisa mpe bamama ya likambo. Ntango ya boyekoli makomi, tokoki komona bosolo ya motuya na kolukaka maloba, milongo mpe makanisi ezangelama. Makanisi wana ezongelama ekoki kokoma eloko moko ya kotalela to mokangano na makomi na yo mpo na kokomisa yango pete mingi na komona.

Alma 26:5–7

Nakoki kozwa ebombamelo na Yesu Klisto mpe nsango malamu na Ye.

Na ntango ya bobuki mbuma, bankona ebombamaka mingimingi na mipiku oyo ebengami maboke mpe etiami na bandako ya bobombi, ntango mingi ebiangemi bibombelo. Na Alma 26:5–7 kanisa nini maboke ya loso, bbombelo, mpe ekumbaki ekoki kolimbola na bomoi na yo. Lolenge nini ozui ebombelo na Yesu Klisto?

Tala lisusu Russell M. Nelson, “The Temple and Your Spiritual Foundation,” Liahona, Nov. 2021, 93–96; David A. Bednar, “Honorably Hold a Name and a Standing,” Liahona, May 2009, 97–100; “Jesus, Lover of My Soul,” Hymns, no. 102.

Mpo na makansisi mingi, tala mateya ya sanza magazini ya Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge .

Makanisi mpo na Koteya Bana

Alma 24:6–24

Nkolo azali kopambola ngai ntango nazali kobunda mpo na kobomba bilaka na Ye.

  • Ntango mosusu bana na yo bakoki kosepela komemaka ya bango “bibundeli” lokola ba Anti-Nefi-Lehi. Okoki kotanga mwa milongo moko uta Alma 24:6–24 mpo na koteya bana na ntina ya bilaka Anti-Nefi-Lehi basalaki mpo na kolanda mobikisi. Bango bakoki bongo kokanisa eloko moko bango bakoki kobongola mpo kolanda Ye, koma yango na lokasa ya mosala ya poso oyo, mpe basala lokola batimoli libulu mpe bakundi bibundeli na bango.

  • Bana na yo bakoki kotanga Alma 24:15–19, kotalaka oyo ba Anti-Nefi-Lehi basalaki “lokola litatoli moko epai ya Nzambe.” Nsima okoki kosolola elongo na bango na ntina ya malongi ekoki kozala “litatoli moko mpo na Nzambe” (molongo 18). Tika bana na bino basolola etali lolenge nini bango bakolakisa Nzambe ete bango balingi kolanda Ye. Koyemba loyembo lokola “I Want to Live the Gospel” (Children’s Songbook, 148) ekoki kofula bango.

Alma 24:7–10; 26:23–34; 27:27–30

Nakoki koyambola.

  • Mpo na kosalisa bana na yo komona lolenge nini Yesu Klisto akoki kosunga biso tobonguana ntango toyamboli, okoki koteya bango na ntina ya ba Anti-Nefi-Lehi. Mpo na kosala yango, osengeli kokoma likolo ya basani mibale “yambo” mpe “nsima.” Nsima bana na yo bakoki kotanga Alma 17:14–15 mpe 27:27–30, koma nini Balamani bazalaki yambo mpe nsima ya koyambola, mpe tia yango na sani oyo esengeli. Engene na Alma 24:7–10, nini esungaki bango mpo na kobongwana? Lolenge nini tokoki kolakisa matondi na biso epai ya Nzambe mpo na ngolu na Ye?

Alma 26; 29

Yesu Klisto amemeli ngai esengo, mpe nakoki kokabola esengo oyo.

  • Ntango mosusu yo mpe bana na yo bokoki kosepela kokomaka bafoto ya biloko kati ya nsango malamu ya Yesu Klisto oyo ememelaka yo esengo. Kabola bafoto elongo na bana, mpe pesa bango makasi ya kokabola bafoto na bango na moto moko ya kosalisa ete ayoka esengo mpe lokola.

  • Salisa bana na yo bamona maloba esengo mpe bosepeli na Alma 26 mpe 29. Nini ememelaki Ammona mpe Alma esengo to esepelisakia bango? Motuna oyo ekoki kokumba na lisolo moko etali esengo oyo eyaka uta na kobika mpe kokabola nsango malamu ya Yesu Klisto.

Alama 27:28–30

Nakoki kosalisa baninga na ngai babika nsango malamu ya Yesu Klisto.

  • Bana na yo bakoki kotanga Alma 27:22–23, kolukaka nini Banefi basalaki mpo na kosalisa ba Anti-Nefi-Lehi babomba bilaka na bango ya kobunda lisusu ata mokolo moko te. Lolenge nini tokoki kosalisa baninga na biso babatela bilaka na bango? Bana na bino bakoki kosala lisano ya makambo moko nsima ya mosusu. Ndakisa, nini tokoki koloba na moninga moko oyo alingi kokosa to kozala moto mabe?

Mpo na makanisi mingi, tala bobimisi ya oyo ya magazini Moninga zulunale.

Elilingi
Banti-Nefi-Lehi bazali kokunda bibundeli na bango

Elilingi ya Banti-Nefi-Lehi kokundaka bibundeli na bango, na Dan Burr

Bimisa na lokasa