Yaka, Landa Ngai 2024
Sanza ya libwa 16–22: “Tombola Moto na Yo mpe Zala na Bosepeli.” 3 Nefi 1–7


“Sanza ya libwa 16–22: ‘Tombola Moto na Yo mpe Zala na Bosepeli.’ 3 Nefi 1–7,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe na Eklezia: Buku ya Mormon 2024 (2023)

“Sanza libwa 16–22. 3 Nefi 1–7,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe na Eklezia : 2024 (2023)

Elilingi
Banefi bazali banzeneneke ya mokolo ezanga butu

Mokolo Moko, Butu Moko, mpe Mokolo Moko, na Jorge Cocco

Sanza ya libwa 16–22: “Tombola Moto na Yo mpe Zala na Bosepeli”

3 Nefi 1–7

Na banzela mosusu, yango ezali ntango moko ya sikisiki ya kozala mondimi ya Yesu Klisto. Masakoli ezalaki kokokisama—bilembo mpe bikamwa minene kati na bato elakisaki ete Mobikisi akobotama kala mingi te. Na ngambo mosusu, yango ezalaki lisusu ntango moko ya komitungisa mpo na bandimi mpo ete, atako bikamwa nyonso bamonaki, bato bazanga bondimi batingamaki ete “ntango esilaki koleka” mpo na Mobikisi abotama (3 Nefi 1:5). Bato oyo basalaki “mobulu mingi kati ya mboka” (3 Nefi 1:7) mpe kutu batiaki mokolo mpo na koboma bandimi soki elembo Samwele Molamani abimisaki—butu moko ezanga molili—emonani te.

Na makambo ya kpokoso boye, profeta Nefi “angangaki makasi epai ya Nzambe na ye mpo na bato na ye” (3 Nefi 1:11). Eyano ya Nkolo oyo efulaka moto nyonso oyo azali kokutana na minyoko to ntembe mpe asengeli koyeba ete pole ekolonga molili: “Tombola moto na yo likolo mpe zala na bosepeli; … Nakokokisa nyonso oyo eye nayebisaki na monoko ya baprofeta basantu na ngai” (3 Nefi 1:13).

Makanisi mpo na koteya na Ndako mpe na Eklezia

3 Nefi 1–7

Kokoma mobongwami na nsango malamu ya Yesu Klisto esengaka motema molayi mpe makasi.

3 Nefi 1–7 elimboli na ntina ya bato babomgwamaki na Nkolo mpe basusu oyo babongwamaki te. Bokeseni ezalaki nini na katikati ya maboke mibale oyo? Etando lokola oyo elandi ekoki kosalisa yo obongisa makanisi na yo:

Makambo oyo elembisaka bobongoli motema

Makambo oyo elendisaka bobongoli motema

3 Nefi 1:5–11

Kozanga kondimi na maloba ya profeta mpe kotiola bayengebene

Kozala na bondimi na maloba ya profeta mpe kosambela mpo na lisalisi.

3 Nefi 1:29–30

3 Nefi 2:1–3

3 Nefi 3:12–16

3 Nefi 4:8–10, 30–33

3 Nefi 6:13–18

3 Nefi 7:15–22

Mituna mituna ntango ozali koyekola. Na ndakisa, ntango ozali kotondisa etando oyo, okoki kotuna mituna lokola “Nini ezali liteya mpo na ngai awa?” Yango ekoki komema bofuli uta na Molimo Mosantu.

3 Nefi 1:1–23

Elilingi
seminary icon
Mpo na Yesu Klisto, nakoki “kozala na Bosepeli.”

Tata na bino ya Lola ayebi ete bomoi na bino esangisi bantango ya mpasi, ata ya kobangisa. Kasi alingi yo lisusu ozwa esengo. Tanga 3 Nefi 1:1–23 mpo na koyekola maye matali bantina Banefi ya sembo babangisamaki. Bantina nini Nkolo apesaki bango mpo na “kozala na bosepeli”?

Mobikisi asalelaki maloba “zala na bosepeli” na mabaku mingi—na ndakisa, kati na Matai 14:24–27; Yoane 16:33; Mateya mpe Mayokani 61:36; 78:17–19. Nini esimbi yo mpo na oyo etali mabiangi oyo? Okoki kotanga milongo ya nzinganzinga mpo na kososola makambo oyo Mobikisi alobaki maloba maye. Na ndenge nyonso, bantina nini Ye apesaki kosalisa bato liboso ya babobangi na bango? Lolenge nini Asalaki yango mpo na yo?

Kanisa koyekola maloba ya Mokambi Russell M. Nelson “Esengo mpe Lobiko ya Molimo” (Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2016, 81– 81). Nini Mokambi Nelson ateyi yo na ntina ya kozwa esengo na makambo nyonso? Koma ntango boni Mokambi Nelson asaleli liloba tia mayele. Ntango mosusu okoki kokokanisa kotia mayele ya kamera to masini ya kotala na kotia mayele na Yesu Klisto. Lolenge nini okotia mayele mingi na Ye?

Tala lisusu “Mawa,” “Elikya,” “kolongono ya makanisi,” to mitu ya likambo mosusu na eteni ya “Lisalisi ya Bomoi” ya eteni ya Babuku ya Nsango Malamu).

3 Nefi 1:4–21; 5:1–3

Nkolo akokokisa maloba na Ye nyonso na ntango na Ye.

Tanga 3 Nefi 1:4–7 mpe kanisa na maye matali lolenge olingaki koyoka soki ozalaki moko ya bandimi. Nini basalaki mpo na kobatela bondimi na bango makasi? (tala 3 Nefi 1:4–21 mpe 5:1–3). Lolenge nini maloba ya Samwele ekokisamaki? (tala 3 Nefi 1:19–21). Lolenge nini Nkolo akokisi maloba na Ye na bomoi na yo?

3 Nefi 1:4–15; 5:12–26; 6:10–15; 7:15–26

Nazali moyekoli ya Yesu Klisto.

Mormon alobaki, “Tala, nazali moyekoli wa Yesu Klisto” (3 Nefi 5:13). Molongo oyo elingi koloba nini mpo na yo? Kanisa koluka 3 Nefi 1:4–15; 5:12–26; 6:10–15; mpe 7:15–26, koluka bizaleli malamu, bindimeli, mpe misala ya bayekoli ya Klisto.

Tala lisusu “Nazali Komeka Kozala lokola Yesu,” Chants pour les Enfants,, 78.

3 Nefi 2:11–12; 3:1–26

Ntango nasaleli bondimi kati na Yezu Klisto, nasengeli kobanga te.

Likambo ya Banefi na bituluku ya miyibi ekoki kozala na mateya oyo ekoki kosalisa yo na makama ya molimo oyo okokutana na yango. Luka mateya oyo kati na 3 Nefi 2:11–12 mpe 3:1–26. Na ndakisa, okoki koluka maloba ya Gidiani kati na 3 Nefi 3:2–10 mpe kokanisa yango na banzela Satana akoki komeka mpo na kokosa yo. Oyekoli nini uta na ndakisa ya Lakonusi?

Mpo na makanisi koleka, tala nsango ya sanza oyo na Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge bamagazini.

Makanisi mpo na Koteya Bana

3 Nefi 1:4–15, 19–21

Monzoto ya sika ebimaki ntango Yesu Klisto abotamaki.

  • Lokasa ya misala ya poso ekoki kosalisa bana na yo koyekola na ntina ya makamwisi Banefi bamonaki ntango Yesu Klisto abotamaki. Okoki lisusu kosalela “Mokapo 41: The Signs of Christ’s Birth” (Masolo ya Buku ya Mormon, 114–16) mpo na koteya bango lisolo oyo—to kosalisa bango baloba yango epai na yo.

3 Nefi 1:4–21

Maloba ya baprofeta ekokisamaka kaka.

  • Ntango yo mpe bana na yo botangi 3 Nefi 1:4–10, bengisa bango balobela lolenge nini ekokaki koyoka kozala moko ya bandimi oyo bazalaki kobika ntango wana. Nsima, ntango batangi ndambo etikali ya lisolo kati na milongo 11–15, bakoki kopesa makoki ya kobakisa molongo oyo: “Liteya ya lisolo oyo mpo na ngai ezali …”

  • Ntango mosusu bana na yo bakoki kosalisayo okanisa bantango misusu ntango Nzambe akokisaki bilaka na Ye epasama na nzela ya baprofeta na Ye. Bakoki kolinga kozwa bililingi ya masolo oyo kati na Buku ya Mayemi ya Nsango Malamu (tala, na ndakisa, nos. 7–8 mpe 81). Tika bango bakabola maye bayebi na ntina ya masolo oyo, kobakisaka lolenge nini bilaka ya Nzambe ekokisamaki. Botanga elongo 3 Nefi 1:20, mpe kabola matatoli na yomei ya babosolo oyo.

3 Nefi 2:11–12; 3:13–14, 24–26

Tozali makasi koleka ntango tosangani elongo.

  • Salisa bana na yo bayeba mpo na nini Banefi basanganaki elongo mpe mapamboli eyaki likolo na bango na 3 Nefi 2:11–12 mpe 3:13–14, 24–26. Mpo na nini ezali ntina mpo na biso kosangana lelo kati na mabota na biso mpe na Eklezia?

  • Oyebi liteya ya biloko oyo eteyaka na ntina ya bokasi ya bomoko? Ntango mosusu bana na yo bakokaki komeka kobuka nzete moko mpe nsima liboke ya banzete to kopasola lokasa ya mokanda moko mpe nsima liboke ya makasa ya mikanda. Lolenge nini ntango mosusu tozali lokola banzete to lokasa ya mokanda?

3 Nefi 5:12–26; 6:14; 7:15–26

Nazali moyekoli ya Yesu Klisto.

  • Nsima ya kotanga elongo 3 Nefi 5:13, benga bana na yo babandela maloba “Nazali moyekoli ya Yesu Klisto.” Mpo na kososola nini elingi koloba kozala moyekoli ya Yesu Klisto, botanga elongo mwa bandakisa oyo: Balamani babongoli motema (Tala 3 Nefi 6:14), Mormon (tala 3 Nefi 5:12–26), mpe Nefi (tala 3 Nefi 7:15–26). Okoki lisusu kozwa makanisi kati na loyembo lokola “I’m Trying to Be like Jesus” (Chants pour Enfants,, 78– 78).

  • Na eteni moko ya lokasa, salisa bana na yo bayema ndelo ya loboko na bango mpe bakata yango. koma “Nazali moyekoli ya Yesu Klisto.” na ngambo moko, mpe bengisa bango bayema eloko moko bakoki mpo na kozala moyekoli na ngambo mosusu.

Mpo na makanisi koleka, tala nsango ya sanza oyo na Moninga magazini.

Elilingi
Banefi bazalaki banzeneneke ya mokolo ezanga butu

Mokolo moko, Butu moko, mpe Mokolo moko,, na Walter Rane.

Bimisa na lokasa